Makomi
1 Nefi 17


Mokapo 17

Nefi atindami atonga masuwa—Bandeko ba ye bakeseni na ye—Alendisi bango na kosakolaka lisusu mambi ma bosali bwa Nzambe elongo na Yisalaele—Nefi atondisami na nguya ya Nzambe—Bandeko ba ye bapekisami kosimba ye, mbele bakauka lokola mokekele mokauka. Penepene na 592–591 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete tosalaki lisusu mobembo mwa biso o esobe; mpe tokendeki mobembo penepene na epai ya esti uta o ntango ena. Mpe tokendeki mobembo mpe tolekaki o katikati ya matungisi mingi o esobe; mpe basi ba biso babotaki bana o esobe.

2 Mpe boye enene ezalaki mapamboli ma Nkolo likolo lya biso, ete ntango ezalaki biso kolia niama ebesu o esobe, basi ba biso bapesaki miliki mitonda mekemeke mpo ya bana ba bango, mpe bazalaki bakasi, iyo, bo babali; mpe babandaki kondima mobembo mwa bango na bozangi boyimiyimi.

3 Mpe boye tomoni ete mitindo mya Nzambe misengeli kokokisama. Mpe soko boye ekozala ete bana ba bato bakobatela mitindo mya Nzambe akoleisa bango, mpe akopesa bango bokasi, mpe akopesa bango nzela na yango bakoki kokokisa makambo maye atindaki bango; yango wana, apesaki nzela mpo ya biso, ntango efandaki biso o esobe.

4 Mpe totikalaki o esobe o ntaka ya mibu mingi, iyo, kutu mibu mwambe o esobe.

5 Mpe tokomaki o mboka eye tobiangaki Beboo, na ntina ya mbuma nzike ya yango mpe lisusu mafuta ma nzoi; mpe biloko biye binso bilengelemeki na Nkolo ete tokoka kowa te. Mpe tomonoki mbu, eye tobiangaki Ileyatumi, eye ezali, na kolimbola, mai mingi.

6 Mpe esalemaki ete totelemisaki biema bya biso o libongo lya mbu; mpe ata toyokaki mpasi ya matungisi mingi mpe kpokoso nzike, iyo, kutu boye nzike ete tokokoka kokoma yango inso te, tosepelaki mpenza ekomaki biso o libongo lya mbu; mpe tobiangaki esika Beboo, na ntina ya mbuma nzike ya yango.

7 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, esilaka ngai kozala o mboka ya Beboo o ntaka ya mikolo mingi, mongongo mwa Nkolo moyaki epai ya ngai, kolobaka: Teleme, mpe kende o kati ya ngomba. Mpe esalemaki ete natelemeki mpe namataki o kati ya ngomba, mpe nabelelaki epai ya Nkolo.

8 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epai ya ngai, kolobaka: Okotonga masuwa, nsima ya lolenge loye nakolakisa yo, ete nakoka komeme bato ba yo o bokatisi bwa mai maye.

9 Mpe nalobaki: Nkolo, wapi nakokende ete nakoka kozwa makele mpo ya koniangola, ete nakoka kosala bisalele mpo ya kotonga masuwa nsima ya lolenge loye olakisaki ngai?

10 Mpe esalemaki ete Nkolo alobelaki ngai wapi nakokende mpo ya kozwa makele, ete nakoka kosala bisalele.

11 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nasalaki nkuka yoko, mpo ya kofula na yango moto, ya mposo ya niama; mpe esilisaki ngai kosala nkuka, ete nakoka kozwa nini kofula na yango moto, natutisaki mabanga mabale elongo ete nakoka kosala moto.

12 Mpo Nkolo, kina o ntango ena, atikaka te ete tokoka kosala moto moike, lokola ekendeki biso mobembo o esobe; mpo alobaki: Nakoyeisa bilei bya bino elengi, ete bolamba byango te.

13 Mpe lisusu nakozala mwinda mwa bino o esobe; mpe nakolengele nzela liboso lya bino, soko boye ekozala ete bokobomba mitindo mya ngai; yango wana, mbala nzike lokola ekobatela bino mitindo mya ngai bokokambema ona mboka elakelama; mpe bokoyeba ete ezali na ngai ete bokambemi.

14 Iyo, mpe Nkolo alobaki lisusu ete: Ekosila bino kokoma o mboka elakelama, bokoyeba ete ngai, Nkolo, nazali Nzambe; mpe ete ngai Nkolo nabikisaki bino uta o bobebisami; iyo, ete namemeki bino libanda lya mboka ya Yelusaleme.

15 Yango wana, ngai, Nefi, nasalaki makasi mpo ya kobatela mitindo mya Nkolo, mpe nalendisaki bandeko babali ba ngai na bopotongono mpe etingia.

16 Mpe esalemaki ete nasalaki bisalele bya makele maye naniangolaki uta o libanga.

17 Mpe emonoki bandeko babali ba ngai ete nalingaki kotonga masuwa, babandaki koyimayima na ngai, kolobaka: Ndeko wa biso azali moto wa ligboma, mpo akanisi ete akoka kotonga masuwa; iyo, mpe akanisi lisusu ete akokoka kokatisa mai maye manene.

18 Mpe boye bandeko babali ba ngai bayimayimaki likolo lya ngai, mpe balingaki ete bakoka te kosala, mpo bandimaki te ete ngai nakokoka kotonga masuwa; mpe elingaki bango kondima te ete ngai nalakisamaki na Nkolo.

19 Mpe sikawa esalemaki ete ngai, Nefi, nayokaki mawa mpenza mpo ya bokasi bwa mitema mya bango; mpe sikawa emonoki bango ete nabandaki koyoka mawa, bazalaki na nsai o mitema mya bango, mingi ete basepelaki likolo lya ngai, kolobaka: Toyebaki ete okokaki te kotonga masuwa, mpo toyebaki ete ozalaki ozanga bosambisi; yango wana, okoki te kosala mosala moko monene boye.

20 Mpe ozali bo tata wa biso, oyo akambemi mosika na bililingi bya ligboma lya motema mwa ye; iyo, akambaki biso libanda lya mboka ya Yelusaleme, mpe toyengayengaki o esobe mpo ya mibu miye mingi; mpe basi ba biso bayokaki bwale, kokumbaka bazemi; mpe babotaki bana o esobe mpe bayokaki mpasi ya ndenge inso, longola se liwa; mpe elingaki kozala bolamu mingi koleka ete bakufa yambo baya libanda lya Yelusaleme esika ete bayoka mpasi ya matungisi maye.

21 Tala, mibu mingi miye toyokaki mpasi o esobe, ntango yango tokokaki kosepela na bozwi bwa biso mpe mboka ya lisango lya biso; iyo, tokokaki kozala na bosepeli.

22 Mpe toyebi ete bato baye bazalaki o mboka ya Yelusaleme bazalaki bato sembo; mpo babatelaki meko mpe masambisi ma Nkolo, mpe mitindo mya ye minso, engebene na mobeko mwa Mose; yango wana, toyebi ete bazalaki bato sembo; mpe tata wa biso asambisaki bango, mpe akambaki biso mosika zambi toyokemelaki epai ya maloba ma ye; iyo, mpe ndeko wa biso mobali azali bo ye. Mpe nsima ya lolenge loye la elobeli bandeko babali ba ngai bayimayimaki mpe bamilelaki likolo lya biso.

23 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki epai ya bango, kolobaka: Bokanisi ete batata ba biso, baye bazalaki bana ba Yisalaele, balingaki kokambema mosika libanda lya maboko ma Baejipito soko bayokaka maloba ma Nkolo te?

24 Iyo, bobanzi ete balingaki kokambema libanda lya bowumbu soko Nkolo atindaka te Mose ete akamba bango libanda lya bowumbu?

25 Sikawa boyebi ete bana ba Yisalaele bazalaki o bowumbu; mpe boyebi ete banatisamaki mikumba, miye mizalaki bozito na komeme; yango wana, boyebi ete esengeli mpenza kozala likambo lyoko lilamu mpo ya bango, ete bamememe libanda lya bowumbu.

26 Sikawa boyebi ete Mose atindamaki na Nkolo mpo ya kosala mosala mona monene; mpe boyebi ete na liloba lya ye Mbu Etane ekabwanaki ngambo na ngambo, mpe balekaki o katikati likolo lya mabele makauka.

27 Kasi boyebi ete Baejipito bazindaki o Mbu Etane, baye bazalaki mampinga ma Falo.

28 Mpe lisusu boyebi ete baleisamaki na mana o esobe.

29 Iyo, mpe boyebi lisusu ete Mose, o liloba lya ye, engebene na nguya ya Nzambe eye ezalaki na ye, abeteki libanga, mpe mai mabimaki ete bana ba Yisalaele bakokaki kosilisa mposa ya mai ya bango.

30 Mpe ata ekambemaki bango, Nkolo Nzambe wa bango, Mosikoli wa bango, kokendeke liboso lya bango, kokambaka bango na moi mpe kopesaka bango mwinda na butu, mpe kosalaka makambo manso mpo ya bango maye malongobanaki mpo ya moto mpo ya kozwa, bayeisaki mitema mya bango mikasi mpe bakangaki miso mya mayele mya bango, mpe batiolaki Mose mpe Nzambe wa solo mpe wa bomoi.

31 Mpe esalamaki ete engebene na liloba lya ye, abebisaki bango; mpe engebene na liloba lya ye, akambaki bango; mpe engebene na liloba lya ye, asalaki makambo manso mpo ya bango; mpe likambo lyoko te lisalemaki longola se soko ezalaki na liloba lya ye.

32 Mpe esilaka bango kokatisa ebale ya Yaladene, ayeisaki bango bakasi mpo ya kobengana libanda bana ba mboka ena, iyo, mpo ya bopalangani bwa bango kina o bobebisami.

33 Mpe sikawa bobanzi ete bana ba mboka eye, baye bazalaki o mboka ya elako, baye babenganamaki libanda na batata ba biso, bobanzi ete bazalaki sembo? Tala, nalobi epai ya bino, te.

34 Bobanzi ete batata ba biso balingaki koponomo mingi koleka bango soko bazalaka sembo? Nalobi epai ya bino, Te.

35 Tala, Nkolo akotala mosuni monso na moko; oyo akozala sembo akosungama na Nzambe. Kasi tala, bato baye babwakaka liloba linso lya Nzambe, mpe batelaka o lisumu; mpe litondi lya nkele ya Nzambe ezalaki likolo lya bango; mpe Nkolo alakelaki botutu o mboka mpo ya bango, mpe apambolaki yango mpo ya batata ba biso; iyo, alakelaki yango botutu kina o bobebisami mpo ya bango, mpe apambolaki yango mpo ya batata ba biso mpo ya bozwi bwa bango nguya likolo lya yango.

36 Tala, Nkolo akelaki mabele ete mafandema na bato; mpe akelaki bana ba ye ete bazwa mango.

37 Mpe akotombola ekolo yoko sembo, mpe akobebisa bikolo bya moto wa nkuna.

38 Mpe akokamba mosembo mosika o kati ya mboka ya motuya mpe moto wa nkuna akobebisa, mpe alakeli mboka botutu mpo ya ntina ya bango.

39 Azali koyangela likolo o lola, mpo ezali kiti ya ye ya bokonzi, mpe mabele maye mazali ebonga ya makolo ma ye.

40 Mpe alingi baye bakolinga ye azala Nzambe wa bango. Tala, alingaki batata ba biso, mpe ayokanaki elongo na bango, iyo, kutu Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo; mpe amikundoli mayokani maye asalaka; yango wana, amemeki bango libanda lya mboka ya Ejipito.

41 Mpe atumbolaki bango o kati ya esobe na lingenda lya ye; mpo bayeisaki mitema mya bango mikasi, bobele lokola bino bosali; mpe Nkolo atumbolaki bango na ntina ya lisumu lya bango. Atindaki nioka ya moto apimbwaka o ntei ya bango; mpe esilaki bango koswama alengeleki nzela yoko ete bakoka kobika; mpe mosala moye basengelaki kosala mozalaki kotala; mpe na ntina ya mpasi te ya nzela ena, to petepete ya yango, bazalaki mingi baye bawaki.

42 Mpe bayeisaki mitema mya bango mikasi mbala na mbala, mpe batiolaki Mose, mpe lisusu Nzambe; nzokande, boyebi ete bakambemaki na nguya ya ye ezangi emekiseli, o kati ya mboka ya elako.

43 Mpe sikawa, nsima ya makambo maye manso, ntango eyaki ete, bakoma bato ba nkuna, solo, penepene na boteli; mpe nayebi te soki bazali o mokolo moye penepene na kobebisama; mpo nayebi ete mokolo mosengeli solo koya ete basengeli kobebisama, longola se bake, baye bakokambema mosika o kati ya bokangemi.

44 Yango wana, Nkolo atindaki tata wa ngai ete akende o esobe; mpe lisusu Bayuda balukaki kolongola bomoi bwa ye; iyo, mpe bino lisusu bolukaki kolongola bomoi bwa ye; yango wana bozali babomi o kati ya mitema mya bino mpe bozali bo bango.

45 Bozali mbangu mpo ya kosala lisumu kasi malembe mpo ya komikundola Nkolo Nzambe wa bino. Bomonoki anzelu moko, mpe alobaki epai ya bino; iyo, boyokaki mongongo mwa ye mbala na mbala; mpe alobaki epai ya bino na mongongo moke mwa kimia, kasi bosilaki kozanga liyoki, ete bokokaki te koyoka maloba ma ye; yango wana, alobaki epai ya bino bo na mongongo mwa nkake, moye moningisaki mabele lokola soko malingaki kokabwana o katikati.

46 Mpe boyebi lisusu ete na nguya ya liloba lya ye lya bokasi bonso akoki kosala ete mabele maleka mosika; iyo, mpe boyebi ete o liloba lya ye akoki kosala bisika bya mabulu mabulu biyeisama bipatalalu, mpe bisika bipatalalu bikobukanabukana. O, nde, ntina nini ezali, ete bokoki kozala bakasi mingi boye o mitema mya bino?

47 Tala, bozo bwa ngai bopasuki na nsomo na ntina ya bino, mpe motema mwa ngai moyoki mpasi; nazali kobanga mbele bokobwakama mosika libela. Tala natondisami na Molimo mwa Nzambe, mingi ete mikuwa mya ngai mizangi makasi.

48 Mpe sikawa esalemaki ete elobaki ngai maloba maye basilikaki na ngai, mpe balingaki kobwaka ngai o kati ya bozindo bwa mbu; mpe eyaki bango kotia maboko ma bango likolo lya ngai nalobaki epai ya bango, kolobaka: O nkombo ya Nzambe wa Bokasi Bonso, natindi bino ete bosimba ngai te, mpo natondi na nguya ya Nzambe, kutu kina o bozikisi bwa mosuni mwa ngai; mpe onso oyo akotia maboko ma ye likolo lya ngai akokauka kutu lokola monkekele mokauka; mpe akozala lokola eloko te liboso lya nguya ya Nzambe, mpo Nzambe akobete ye.

49 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki epai ya bango ete bayimayima lisusu te likolo lya tata wa bango; mpe baboya kosalisa ngai te mpo Nzambe atindaka ngai ete natonga masuwa.

50 Mpe nalobaki epai ya bango: Soko Nzambe atindaka ngai nasala makambo manso, nakoka kosala mango. Soko atindaka ngai naloba o mai maye, zala mabele, malingaka kozala mabele; mpe soko nalobaka yango, elingaki kosalema.

51 Mpe sikawa, soko Nkolo azali na nguya monene ya lolenge loye, mpe asalaki boye makamwisi mingi o ntei ya bana ba bato, boniboni ezali ete akoka kolakisa ngai te, ete nakoka kotonga masuwa?

52 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki makambo mingi epai ya bandeko ba ngai, mingi ete babulunganisamaki mpe bakokaki lisusu kotia ntembe na ngai te; mpe bamekaki te kotia maboko ma bango likolo lya ngai to kosimba ngai na misapi mya bango, kutu o ntaka ya mikolo mingi. Sikawa bamekaki kosala yango te mbele bakauka liboso lya ngai, ya nguya mingi boye ezalaki Molimo mwa Nzambe; mpe boye esalaki likolo lya bango.

53 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epai ya ngai: Tandola lisusu loboko la yo epai ya bandeko babali ba yo, mpe bakokauka te liboso lya yo, kasi nakotuta bango, elobaki Nkolo, mpe yango oyo nakosala, ete bakoka koyeba ete nazali Nkolo Nzambe wa bango.

54 Mpe esalemaki ete na tandolaki loboko la ngai epai ya bandeko babali ba ngai, mpe bakaukaki liboso lya ngai te; kasi Nkolo aningisaki bango, kutu engebene na liloba liye alobaka.

55 Mpe sikawa, balobaki: Toyebi na ntembe te ete Nkolo azali elongo na yo, mpo toyebi ete ezali nguya ya Nkolo eye eningisaki biso. Mpe bakweyaki o nse liboso lya ngai, mpe bazalaki penepene na kokumbamela ngai, kasi natikaki bango te, kolobaka: Ngai nazali ndeko wa bino, iyo, kutu ndeko wa bino wa leki; yango wana, bokumbamela Nkolo Nzambe wa bino, mpe bokumisa tata wa bino mpe mama wa bino, ete mikolo mya bino mikoka kozala milai o mboka eye Nkolo Nzambe wa bino akopesa bino.