Makomi
1 Nefi 16


Mokapo 16

Moto wa nkuna amoni bosolo bozali bokasi—Bana babali ba Lehi babali bana basi ba Yisamaele—Liawona likambi nzela ya bango o esobe—Maloba uta na Nkolo makomami likolo lya Liawona mbala na mbala—Yisamaele akufi; libota lya ye liyimayimi na ntina ya matungisi. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ngai, Nefi esilisaka ngai kotia nsuka ya bolobi na bandeko babali ba ngai, tala balobaki epai ya ngai: Osakoli epai ya biso makambo makasi, koleka maye tokoki kokumba.

2 Mpe esalemaki ete nalobaki epai ya bango ete nayebaki ete nalobaki makambo makasi mpo ya moto wa nkuna, engebene na bosolo; mpe mosembo nayengebeni, mpe natatolaki ete bakotombolama likolo o mokolo mwa nsuka; yango wana, molindo amoni bosolo bozali bokasi, mpo ekati bango o katikati mpenza.

3 Mpe sikawa bandeko babali ba ngai, soko bozalaki sembo mpe bolingaki koyokemela o bosolo, mpe kosala keba o bwango, ete bokoka kotambola semba liboso lya Nzambe, nde bolingaki te koyimayima na ntina ya bosolo, mpe koloba: Olobi epai ya biso makambo makasi.

4 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalendisaki bandeko babali ba ngai, na etingia enso, mpo ya kobatela mitindo mya Nkolo.

5 Mpe esalemaki ete bamikitisaki liboso lya Nkolo, mingi ete nazwaki bosepeli mpe elikia enene epai ya bango, ete bakotambola o nzela ya bosembo.

6 Sikawa, makambo manso maye malobamaki mpe masalemaki lokola efandaki tata wa ngai o ema ya ye o lobwako loye abiangaki Lemuele.

7 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nakamataki mwana mwasi wa Yisamaele o bolongani, mpe lokola, bandeko babali ba ngai bakamataki bana basi ba Yisamaele o bolongani; mpe lisusu Zolami akamataki mwana mwasi wa nkulutu wa Yisamaele o bolongani.

8 Mpe boye ekokisaka tata wa ngai mitindo minso mya Nkolo miye mipesamaka epai ya ye. Mpe lisusu ngai, Nefi, napambolamaka mpenza na Nkolo.

9 Mpe esalemaki ete mongongo mwa Nkolo molobaki epai ya tata wa ngai o butu, mpe motindaki ye ete o mokolo mwa nsima akende mobembo o kati ya esobe.

10 Mpe esalemaki ete elamukaki tata wa ngai o ntongo, mpe ekendeki ye o monoko mwa ema ya ye, o bokamwi bonene bwa ye amonoki likolo lya mabele libungutulu lyoko lya esaleli ya ntoki; mpe lizalaki lya motako mwa malonga. Mpe o kati ya libungutulu, ezalaki makonga mabale; mpe lyoko lilakisaki nzela wapi tokokende o kati ya esobe.

11 Mpe esalemaki ete tosangisaki elongo biloko binso biye tokomeme o kati ya esobe, mpe etikali enso ya bilei bya biso biye Nkolo apesaka epai ya biso; mpe tokamataki nkona ya ndenge inso iye tokokaki komeme o esobe.

12 Mpe esalemaki ete tokamataki biema bya biso mpe tokendeki o kati ya esobe, o bokatisi bwa ebale ya Lamani.

13 Mpe esalemaki ete tokendeki mobembo o ntaka ya mikolo minei, penepene na epai ya sudi-sudi-esti, totelemisaki lisusu biema bya biso; mpe esika yango tobiangaki nkombo Sazele.

14 Mpe esalemaki ete tokamataki matimbo ma biso mpe makula ma biso, mpe tokendeki o kati ya esobe koboma bilei mpo ya mabota ma biso; mpe esilisaka biso koboma bilei mpo ya mabota ma biso, tozongaki lisusu o mabota ma biso o esobe, o esika ya Sazele. Mpe tokendeki lisusu o esobe, kolandaka epai yango kaka, kokangemaka o bisika bya mabele maleki malamu ma esobe, maye mazalaki o ndelo mpembeni ya Mbu Etane.

15 Mpe esalemaki ete tokendeki mobembo o ntaka ya mikolo mingi, kobomaka bilei o nzela, na matimbo ma biso, mpe na makula ma biso, mpe mabanga ma biso, mpe bilingongo bya biso.

16 Mpe tolandaki mitindo mya libungutulu, liye likambaki biso o bisika bya mabele maleki malamu ma esobe.

17 Mpe esilisaki biso kotambola mobembo mpo ya ntaka ya mikolo mingi, totelemisaki biema bya biso mpo ya ntaka ya ntango yoko, ete tokokaki lisusu kopema bisomei mpe kozwa bilei mpo ya mabota ma biso.

18 Mpe esalemaki ete lokola ngai, Nefi, nakendeki koboma bilei, tala, nabukaki litimbo lya ngai, liye lisalemaki na ebende ekasi ya malonga; esilaki ngai kobuka litimbo lya ngai, tala bandeko ba ngai basilikaki na ngai na ntina ya bobungisi bwa litimbo lya ngai, mpo tozwaki bilei te.

19 Mpe esalemaki ete tozongaki na bilei te epai ya mabota ma biso, mpe elembaki bango mingi, na ntina ya mobembo mwa bango, bayokaki mpasi mingi mpo ya bozangi bwa bilei.

20 Mpe esalemaki ete Lamani mpe Lemuele mpe bana babali ba Yisamaele babandaki koyimayima mpenza, na ntina ya mpasi mpe matungisi ma bango o esobe; mpe lisusu tata wa ngai abandaki koyimayima na Nkolo Nzambe wa ye; iyo, mpe bakomaki bango banso na mawa mpenza, kutu ete bazalaki koyimayima na Nkolo.

21 Sikawa esalemaki ete ngai, Nefi, etungisamaki ngai elongo na bandeko babali ba ngai na ntina ya bobungisi bwa litimbo lya ngai, mpe ebungisaki matimbo ma bango nsinga, ebandaki kokoma kpokoso mpenza, iyo, mingi ete tokokaki te kozwa bilei.

22 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki nzike na bandeko babali ba ngai, zambi bayeisaka mitema mya bango mikasi lisusu, kutu kina na koyimayima na Nkolo Nzambe wa bango.

23 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nasalaki litimbo lya libaya, mpe na mbanzi yoko semba, likula; yango wana, nakamataki ngaimei bo minduki litimbo lyoko mpe likula lyoko, na bilingongo yoko mpe na mabanga. Mpe nalobaki epai ya tata wa ngai: Wapi nakokende mpo ya kozwa bilei?

24 Mpe esalemaki ete asengeki na Nkolo, mpo bamikitisaka na ntina ya maloba ma ngai; mpo nalobaki epai ya bango makambo mingi na makasi ma bozo bwa ngai.

25 Mpe esalemaki ete mongongo mwa Nkolo moyaki epai ya tata wa ngai; mpe solo atumbolamaki na ntina ya koyimayima ya ye na Nkolo, mingi ete amememeki o nse o kati ya bozindo bwa mawa.

26 Mpe esalemaki ete mongongo mwa Nkolo molobaki epai ya ye: Tala likolo lya libulungutu, mpe tala makambo makomami.

27 Mpe esalemaki ete ntango tata wa ngai amonoki makambo maye makomamaki likolo lya libungutulu, abangaki mpe alengeki mpenza, mpe lisusu bandeko babali ba ngai, mpe bana babali ba Yisamaele, mpe basi ba biso.

28 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namonoki makonga maye mazalaki o libungutulu, ete masalaki engebene na bondimi mpe etingia, mpe bokebi boye topesaki epai ya mango.

29 Mpe ekomamaki likolo lya mango bokomi bwa sika, bwango bozalaki polele mpo ya kotangema, bwango epesaki biso bososoli botali nzela ya Nkolo; mpe bokomamaki mpe bobongwanaki mbala na mbala, engebene na bondimi mpe etingia boye topesaki epai ya bwango. Mpe boye tomoni ete o nzela ike Nkolo akoki komeme makambo manene.

30 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namataki o kati ya nsonge ya ngomba, engebene na mitindo miye mipesamaki likolo lya libungutulu.

31 Mpe esalemaki ete nabomaki niama ya zamba, mingi ete nazwaki bilei mpo ya mabota ma biso.

32 Mpe esalemaki ete nazongaki o biema bya biso, komemeke niama iye nabomaki; mpe sikawa emonoki bango ete nazwaka bilei, boniboni enene ezalaki bosepeli bwa bango! Mpe esalemaki ete bamikitisaki liboso lya Nkolo, mpe bapesaki matondi epai ya ye.

33 Mpe esalemaki ete tosalaki lisusu mobembo mwa biso, kotambolaka penepene na nzela yango kaka lokola o ebandeli; mpe esilaka biso kokende mobembo mpo ya ntaka ya mikolo mingi totelemisaki lisusu biema bya biso, ete tokoka kofanda mpo ya ntaka ya ntango yoko.

34 Mpe esalemaki ete Yisamaele akufaki, mpe akundamaki o esika tobiangaki Nawomi.

35 Mpe esalemaki ete bana basi ba Yisamaele balelaki mpenza, na ntina ya liwa lya tata wa bango, mpe na ntina ya matungisi ma bango o esobe; mpe bayimayimaki likolo lya tata wa ngai, zambi akumbaki bango libanda lya mboka ya Yelusaleme, kolobaka: Tata wa biso akufi; iyo, mpe toyengayengaki mingi o esobe, mpe toyokaki mpasi nzike ya matungisi, nzala, mposa ya mai, mpe bolembi; mpe nsima ya mpasi iye inso, tosengelaki kowa o esobe na nzala.

36 Mpe boye eyimayimaki bango likolo lya tata wa ngai, mpe lisusu likolo lya ngai; mpe bazalaki na mposa ya kozonga o Yelusaleme.

37 Mpe Lamani alobaki epai ya Lemuele mpe lisusu epai ya bana ba Yisamaele: Tala, toboma tata wa biso, mpe ndeko wa biso Nefi, oyo akamati yango likolo lya ye kozala moyangeli mpe molakisi wa biso, oyo tozali bankulutu ba ye.

38 Sikawa, alobi ete Nkolo asololaki elongo na ye, mpe banzelu basalaki epai ya ye. Kasi tala, toyebi ete abuki lokuta epai ya biso; mpe alobeli biso makambo maye, mpe asali makambo mingi o misala mya mayele ma ye mabe, ete akoka kokosa miso mya biso, kokanisaka, mbele, ete akoka kokamba biso mosika o esobe yoko ya lolenge losusu; mpe ekosilisa ye kokamba biso mosika, akanisaki komikomisa yemei mokonzi moko mpe moyangeli moko likolo lya biso, ete akoka kosala elongo na biso engebene na bolingi mpe elengi ya ye. Mpe nsima ya lolenge loye ndeko wa ngai Lamani apusaki mitema mya bango na nkanda.

39 Mpe esalemaki ete Nkolo azalaki elongo na biso, iyo, kutu mongongo mwa Nkolo moyaki mpe molobaki maloba mingi epai ya bango, mpe motumbolaki bango mpenza; mpe esilaki bango kotumbolama na mongongo mwa Nkolo balongolaki nkanda ya bango, mpe bayambolaki masumu ma bango, mingi ete Nkolo apambolaki biso lisusu na bilei, mpe towaki te.