Makomi
1 Nefi 22


Mokapo 22

Yisalaele ekopalanganisama likolo lya etando enso ya mabele—Bapaganu bakosalisa mpe bakoleisa Yisalaele na nsango elamu o mikolo mya nsuka—Yisalaele ekosangisama mpe ekobikisama, mpe moto wa nkuna akozika lokola matiti—Bokonzi bwa zabulu bokobebisama, mpe Satana akokangema. Penepene na 588–570 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ngai, Nefi, esilisaka ngai kotanga makambo maye makomamaki likolo lya palaki ya motako, bandeko babali ba ngai bayaki epai ya ngai mpe balobaki epai ya ngai: Nini elingi koloba makambo maye otangi ? Tala, masengeli kososolama engebene na makambo maye mazali ma molimo, maye makosalema engebene na molimo kasi mosuni te?

2 Mpe ngai, Nefi, nalobaki epai ya bango: Tala mamonisamaki epai ya profeta na mongongo mwa Molimo; mpo na Molimo makambo manso mayebisami epai ya baprofeta, maye makoya likolo lya bana ba bato engebene na mosuni.

3 Yango wana, makambo maye natangaki mazali makambo matali ntango mpe molimo lokola; mpo emononi ete ndako ya Yisalaele, ata ndele, ekopalanganisama likolo lya etando enso ya mabele, mpe o ntei ya bikolo binso.

4 Mpe tala, bazali mingi babungi kala uta o boyebi bwa bango baye bazali o Yelusaleme. Iyo, eteni eleki mingi ya mabota manso mamememeki mosika; mpe mapalanganisami epai na epai likolo lya bisanga bya mbu; mpe epai wapi bazali moko te wa biso ayebi, longola se ete toyebi ete bamememeki mosika.

5 Mpe uta bamememeki mosika, makambo maye mabikulamaki matali bango, mpe lisusu matali bango banso baye bakopalanganisama nsima mpe na ya Mosantu Moko wa Yisalaele; mpo na ye bayeisaki mitema mya bango mikasi; yango wana, bakopalanganisama o ntei ya bikolo binso mpe bakoyinama na bato banso.

6 Nzokande, ekosila bango koleisama na Bapaganu, mpe Nkolo kotombola loboko la ye likolo lya Bapaganu mpe kotia bango likolo mpo ya bendele boko, mpe bana ba bango komememe o maboko ma bango, mpe bana basi ba bango komememe o mapeka ma bango, tala makambo maye malobami mazali ma ntango; mpo boye ezali mayokani ma Nkolo elongo na batata ba biso; elingi koloba biso o mikolo mikoya, mpe lisusu bandeko ba biso baye bazali baye ndako ya Yisalaele.

7 Mpe elingi koloba ete ntango ekoya ete ekosila ndako mobimba ya Yisalaele kopalanganisama mpe kobulunganisama, ete Nkolo Nzambe akotelemisa ekolo yoko ekasi o ntei ya Bapaganu, iyo, kutu likolo lya etando ya mboka eye; mpe na bango nkona ya biso ekopalanganisama.

8 Mpe esili nkona ya biso kopalanganisama, Nkolo Nzambe akobanda kosala makambo ma bokamwi o ntei ya Bapaganu, maye makolongobana mpenza epai ya nkona ya biso; yango wana, emekisami epai ya bango boleisami na Bapaganu mpe bomememi likolo lya maboko mpe mapeka ma bango.

9 Mpe lisusu ekolongobana epai ya Bapaganu; mpe bobele epai ya Bapaganu te kasi epai ya ndako mobimba ya Yisalaele, mpo ya koyebisa mayokani ma Tata wa lola epai ya Abalayama, kolobaka: Na nkona ya yo mabota manso ma mabele makopambolama.

10 Mpe nalingaki, bandeko ba ngai, ete boyeba ete mabota manso ma mabele makoki kopambolama te longola se soko ekotia Nkolo bolumbu loboko la ye losantu o miso mya mabota.

11 Yango wana, Nkolo Nzambe akobanda kotia bolumbu loboko la ye losantu o miso mya bikolo binso, na komemeke mayokani ma ye mpe nsango elamu ya ye epai ya baye bazali ba ndako ya Yisalaele.

12 Yango wana, akomeme bango lisusu libanda lya bokangemi, mpe bakosangisama o mboka ya lisango lya bango; mpe bakomememe libanda lya molili mpe libanda lya boindo; mpe bakoyeba ete Nkolo azali Mobikisi mpe Mosikoli wa bango, Mokasi Moko wa Yisalaele.

13 Mpe makila ma eklezia ena enene mpe ya nsomo, eye ezali mwasi wa pite wa mabele manso, makobaluka likolo lya mito mya bangomei; mpo bakobunda bitumba bango na bango, mpe mopanga mwa loboko la bangomei mokokweya likolo lya mito mya bangomei, mpe bakolangwisama na makila ma bangomei.

14 Mpe ekolo enso eye ekobunda bitumba na yo, O ndako ya Yisalaele, ekobaluka likolo lya bango na bango, mpe bakokweya o kati ya libulu liye batimolaki mpo ya kokanga o motambo bato ba Nkolo. Mpe banso baye bakobunda na Siona bakobebisama, mpe mwasi monene wa pite, oyo abebisaki nzela sembo ya Nkolo, iyo, eklezia ena enene mpe ya nsomo, akokweya o mputulu mpe enene ekozala bokwei bwa yango.

15 Mpo tala, elobi profeta, ntango ekoya noki eye Satana akozala lisusu te na nguya likolo lya mitema mya bana ba bato; mpo mokolo mokoya mosika te moye bato ba lolendo mpe bango baye bakosala na nkuna bakozala lokola matiti; mpe mokolo mokoya moye bakozikisama.

16 Mpo ntango ekoya mosika te eye litondi lya nkele ya Nzambe ekosopana libanda likolo lya bana banso ba bato; mpo akotika te ete moto wa nkuna abebisa mosembo.

17 Yango wana, akobatela basembo na nguya ya ye, kutu soko boye ekozala ete litondi lya nkele ya ye lisengeli koya, mpe basembo bakobatelama, kutu kina o bobebisami bwa bayini ba bango na moto. Yango wana, basembo bazali te na ntina ya kobanga; mpo boye elobi profeta, bakobika ma, kutu soko boye ekozala lokola na moto.

18 Tala, bandeko babali ba ngai, nalobi epai ya bino, ete makambo maye masengeli kosalema mosika te; iyo, kutu makila, mpe moto, mpe mbongi ya molinga esengeli koya; mpe esengeli mpenza kozala likolo lya mabele manso; mpe ekoya epai ya bato engebene na mosuni soko boye ekozala ete bakoyeisa mitema mya bango mikasi na Mosantu Moko wa Yisalaele.

19 Mpo tala, mosembo akowa te; mpo ntango solo esengeli koya eye bango banso baye babundi na Siona bakokatama mosika.

20 Mpe Nkolo solo akolengele nzela mpo ya bato ba ye, mpo ya bokokisi maloba ma Mose, maye alobaki, kolobaka: Profeta moko Nkolo Nzambe wa bino akotelemisa epai ya bino, bo ngai, ye bokoyoka o makambo manso maye akoloba epai ya bino. Mpe ekosalema ete bango banso baye bakoyoka profeta ena te bakokatama mosika uta o ntei ya bato.

21 Mpe sikawa ngai, Nefi, nasakoli epai ya bino, ete profeta oyo Mose alobelaki azalaki Mosantu Moko wa Yisalaele; yango wana, akotambolisa bosambisi o bosembo.

22 Mpe basembo bazali te na ntina ya kobanga, mpo bazali bango baye bakobulunganisama te. Kasi ezali bokonzi bwa zabulu, boye bokotongama o ntei ya bana ba bato, bokonzi boye botiami o ntei ya bango baye bazali o mosuni—

23 Mpo ntango ezali koya noki eye biklezia binso biye bitongami mpo ya kozwa matabisi, mpe bango banso baye batongami mpo ya kozwa nguya likolo lya mosuni, mpe bango baye batongami mpo ya koyebana na bato o miso mya mokili, mpe bango baye baluki mposa ya mosuni mpe biloko bya mokili, mpe kosala ndenge inso ya bobe; iyo, o nsuka, baye bazali ba bokonzi bwa zabulu bango bazali na ntina ya kobanga, mpe kolenge, mpe koningana; bango basengeli kokitisama o nse o mputulu, bango basengeli kozikisama lokola matiti; mpe eye ezali engebene na maloba ma profeta.

24 Mpe ntango ekoya noki eye basembo bakopumbwisama lokola bana ba ngombe ya ndako ya bibwele, mpe Mosantu Moko wa Yisalaele akokonza o bodondwi, mpe bokasi, mpe nguya, mpe nkembo enene.

25 Mpe akosangisa bana ba ye uta o ntaka inei ya mabele; akotanga mpate ya ye, mpe bayebi ye; mpe bakozala etonga yoko mpe mokengeli moko; mpe akoleisa mpate ya ye, mpe na ye bakozwa elanga ya bilei.

26 Mpe na ntina ya bosembo bwa bato ba ye, Satana azali na nguya te; yango wana, akoki te kokangolama o ntaka ya mibu mingi; mpo azali te na nguya likolo lya mitema mya bato, mpo bafandi o bosembo, mpe Mosantu Moko wa Yisalaele akonzi.

27 Mpe sikawa tala, ngai, Nefi, nalobi epai ya bino ete makambo maye manso makoya engebene na mosuni.

28 Kasi, tala, bikolo, mabota, minoko, mpe bato banso, bakofanda o bobangi te na Mosantu Moko wa Yisalaele soko boye ekozala ete bakoyambola.

29 Mpe sikawa ngai, Nefi, nasukisi; mpo nasengeli te koloba nsima lokola sikawa etali makambo maye.

30 Yango wana, bandeko babali ba ngai, nalingi ete bokoka komaniola ete makambo maye makomamaki likolo lya palaki ya motako mazali ma solo; mpe mazali kotatola ete moto asengeli kotosa mitindo mya Nzambe.

31 Yango wana, bozali te na ntina ya kobanza ete ngai mpe tata wa ngai tozali bobele boko baye batatolaki, mpe lisusu balakisaki mango. Yango wana, soko bokozala na botosi o mitindo, mpe bokotia molende kina o nsuka, bokobikisama o mokolo mwa nsuka. Mpe boye ezali. Amene.