Makomi
1 Nefi 2


Mokapo 2

Lehi amemi libota na ye kati na esobe mpembeni na Mbu Etane—Batiki bozwi na bango—Lehi atumbi mbeka epayi ya Nkolo mpe ateyi bana mibali na ye kobomba mitindo—Lamani mpe Lemuele bayimiyimi na tata na bango—Nefi azali na botosi mpe asambeli na bondimi; Nkolo alobi na ye, mpe aponami mpo na kokonza bandeko na ye ya mibali. Penepene na mobu 600 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpo tala, esalemaki ete Nkolo alobelaki tata na ngai, iyo, kutu na ndoto, mpe alobaki epayi na ye: Opambolami Lehi, na ntina ya makambo oyo osalaki; mpe mpo ete ozalaki sembo, mpe na ntina ete oyebisaki epayi ya bato oyo makambo oyo natindaki yo, tala, bazali koluka kolongola bomoi na yo.

2 Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki tata na ngai, kutu na ndoto, ete akamata libota na ye mpe akende kati na esobe.

3 Mpe esalemaki ete azalaki moto ya botosi na liloba ya Nkolo, yango wana asalaki lokola Nkolo atindaki ye.

4 Mpe esalemaki ete akendaki kati na esobe. Mpe atikaki ndako na ye, mpe mboka ya bosangoli libula na ye, mpe wolo na ye, mpe mpauni na ye, mpe biloko na ye ya motuya, mpe akamataki eloko moko te elongo na ye, longola se libota, mpe bilei, mpe biema na ye, mpe bakendaki kati na esobe.

5 Mpe akitaki mpembeni na ndelo, penepene na libongo ya Mbu Etane; mpe akendaki mobembo kati na esobe na ndelo oyo ezali penepene mpenza na Mbu Etane; mpe akendaki mobembo kati na esobe elongo na libota na ye, oyo ezalaki na mama na ngai Salia, mpe bandeko mibali bankulutu na ngai, oyo bazalaki Lamani, Lemuele mpe Sami.

6 Mpe esalemaki ete ntango akendaki mobembo mikolo misato kati na esobe, atelemisaki ema na ye na lobwaku, mpembeni na ebale ya mai.

7 Mpe esalemaki ete atongaki etumbelo ya mabanga, mpe abonzelaki Nkolo, mpe apesaki matondi epayi ya Nkolo Nzambe na biso.

8 Mpe esalemaki ete abiangaki nkombo ya ebale yango, Lamani, mpe ezalaki kosopana kati na Mbu Etane; mpe lobwaku yango ezalaki na ndelo mpembeni na monoko na yango.

9 Mpe ntango tata na ngai amonaki ete mai ya ebale ezalaki kosopana kati na liziba ya Mbu Etane, alobaki epayi ya Lamani, kolobaka: O tika ete okoka kozala lokola ebale oyo, ntango nyonso kotiolaka mbangu kati na liziba ya bosembo nyonso!

10 Mpe alobaki lisusu epayi ya Lemuele: O tika ete okoka kozala lokola lobwaku oyo, ngwi mpe makasi, mpe kozangaka koningana na kobatelaka mitindo ya Nkolo!

11 Sikawa alobaki oyo na ntina ya matoyi mangongi ya Lamani mpe ya Lemuele; mpo tala bazalaki na makambo mingi koyima-yima na tata na bango, mpo ete azalaki moto ya mamoni, mpe akumbaki bango uta na mboka ya Yelusaleme, mpo batika mboka ya bosangoli libula na bango, mpe wolo na bango, mpe mpauni na bango, mpe biloko na bango ya motuya, mpo na kowa na esobe. Mpe oyo balobaki, asalaki yango na ntina ya makanisi ya liboma ya motema na ye.

12 Mpe boye Lamani mpe Lemuele, lokola bazalaki bankulutu, bazalaki koyima-yima na tata na bango. Mpe bazalaki koyima-yima mpo bayebaki te misala ya Nzambe oyo akelaki bango.

13 Mpe bandimaki te ete Yelusaleme, engumba wana monene, ekokaki kobebisama engebene na maloba ya baprofeta. Mpe bazalaki lokola Bayuda oyo bazalaki na Yelusaleme, oyo balukaki kolongola bomoi ya tata na ngai.

14 Mpe esalemaki ete na lobwaku ya Lemuele tata na ngai, lokola atondisamaki na Molimo, alobelaki bango na nguya, kino nzoto ya nzoto na bango elengaki liboso na ye. Mpe ayokisaki bango nsoni mpenza, ete bamekaki te kozongisa na ye liloba; yango wana, basalaki lokola atindaki bango.

15 Mpe tata na ngai azalaki kofanda na ema.

16 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nazalaki elenge mpenza, kasi nazalaki mbinga na nzoto, mpe lisusu nazalaki na mposa mingi ya koyeba mibombamo ya Nzambe, yango wana, nabelelaki epayi ya Nkolo; mpe tala, abimelaki ngai, mpe alembisaki motema na ngai mpenza, ete nandimaki maloba nyonso oyo elobamaki na tata na ngai; yango wana, natombokelaki ye te lokola bandeko na ngai ya mibali.

17 Mpe nalobaki epayi ya Sami, koyebisaka ye makambo oyo Nkolo amonisaki epayi na ngai na nzela ya Molimo Mosantu na ye. Mpe esalemaki ete andimaki maloba na ngai.

18 Kasi, tala, Lamani mpe Lemuele balingaki te koyoka maloba na ngai; mpe lokola nayokaki mawa na ntina ya bokasi ya mitema na bango, nabelelaki epayi ya Nkolo mpo na bango.

19 Mpe esalemaki ete Nkolo alobelaki ngai, kolobaka: Opambolami, Nefi, na ntina ya bondimi na yo, mpo olukaki ngai na molende, na bokitisi ya motema.

20 Mpe mbala mingi lokola ekobomba yo mitindo na ngai, okofuluka, mpe okokambama na mboka ya elaka; iyo, kutu mboka oyo nalengelaki mpo na yo; iyo, mboka oyo ezali ya boponi koleka bamboka nyonso mosusu.

21 Mpe mbala mingi lokola bandeko na yo ya mibali bakotombokela yo, bakokatama mosika uta na miso ya Nkolo.

22 Mpe mbala mingi lokola ekobomba yo mitindo na ngai, okokoma moyangeli mpe moteyi likolo ya bandeko na yo ya mibali.

23 Mpo tala, na mokolo wana oyo bakotomboka na ngai, nakolakela bango mabe, kutu na bolakeli mabe ya nsomo, mpe bakozala na nguya te likolo ya nkona na yo longola se soki bakotomboka na ngai lokola.

24 Mpe soki bongo ete batombokeli ngai, bakozala fimbo mpo na nkona na yo, mpo na kolamusa bango na banzela ya bokundoli.

Bimisa na lokasa