Makomi
1 Nefi 21


Mokapo 21

Masiya akozala pole mpo na Bayuda-te mpe akobikisa bato ya boloko—Yisalaele ekosangana na nguya na mikolo ya nsuka—Bakonzi bakozala batata babokoli na bango—Meka na Yisaya 49. Penepene na mibu 588–570 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe lisusu: Boyoka, O bino ndako ya Yisalaele, bino nyonso oyo bobukami mpenza mpe bobenganami libanda na ntina ya nkuna ya bakengeli ya bato na ngai; iyo, bino nyonso oyo bobukami mpenza, baoyo bopanzami bipayi nyonso, baoyo bozali bato na ngai, O ndako ya Yisalaele. Botia matoyi, O bisanga, epayi na ngai, boyoka bino bato uta na mosika; Nkolo abiangaki ngai uta na libumu; uta na nsopo ya mama na ngai atangaki nkombo na ngai.

2 Mpe akomisaki monoko na ngai lokola mompanga ya mopotu; na elilingi ya loboko na ye abombaki ngai, mpe akomisaki ngai likula ya nsonge; kati na libenga na ye ya bokila abombaki ngai.

3 Mpe alobaki epayi na ngai: Ozali mosali na ngai, O Yisalaele, na oyo nakokembelama.

4 Nsima nalobaki, nasalaki mosala ya mpamba, nabebisaki makasi na ngai mpo na eloko te mpe se mpamba; solo bosambisi na ngai ezali na Nkolo, mpe mosala na ngai na Nzambe na ngai.

5 Mpe sikawa, elobi Nkolo—oyo asalaki ngai uta na libumu ete nazala mosali na ye, mpo na komema lisusu Yakobo epayi na ye—ata Yisalaele esangani te, kasi nakozala na nkembo na miso ya Nkolo, mpe Nzambe na ngai akozala makasi na ngai.

6 Mpe alobaki: Ezali eloko ya mpasi te ete ozala mosali na ngai mpo na kotelemisa mabota ya Yakobo, mpe kozongisa babatelami ya Yisalaele. Nakopesa yo lisusu kozala lokola pole mpo na Bayuda-te, ete okoka kozala oyo azali kopesa lobiko na ngai kino nsuka ya mabele.

7 Boye elobi Nkolo, Mosikoli ya Yisalaele, Moko Mosantu na ye, ye oyo bato batiolaka, ye oyo bikolo bayinaka, na mosali ya bayangeli: Bakonzi bakomona mpe bakotelema, bana ya bakonzi lisusu bakokumbamela, mpo ete Nkolo oyo azali sembo.

8 Boye elobi Nkolo: Na ntango oyo endimama nayokaki yo, Omabongo ya mbu, mpe na mokolo ya lobiko nasungaki yo; mpe nakobatela yo, mpe nakopesa yo mosali na ngai mpo na liyokani ya bato, mpo na kotia mabele, mpo na kosala ete bato basangola mabula matikala mpamba;

9 Ete okoka koloba na bato ya boloko: Bokende; na baoyo bafandi kati na molili: Bomilakisa. Bakolia nzela nzela, mpe bilanga na bango ya bilei ekozala na bisika nyonso ya likolo.

10 Bakoyoka nzala te mpe mposa te, mpe molunge mpe te moi mokobeta bango mpe te; mpo ye oyo azali na boboto likolo na bango akokamba bango, kutu mpembeni na moto ya mai akokamba bango.

11 Mpe nakokomisa bangomba na ngai nyonso se nzela moko, mpe balabala na ngai ekonetolama.

12 Mpe nsima, O ndako ya Yisalaele, tala, baoyo bakoya uta na mosika; mpe tala, baoyo uta na nordi mpe uta na westi; mpe baoyo uta na mboka ya Sinimi.

13 Boyemba, O lola; mpe zala na bosepeli, O mabele; mpo na makolo na bango oyo bazali na esti ekotiama; mpe makobukana na koyembaka, O bangomba; mpo bakobetama lisusu te; mpo Nkolo abondisaki bato na ye, mpe akolakisa boboto likolo ya batungisami na ye.

14 Kasi, tala, Siona alobaki: Nkolo atiki ngai, mpe Nkolo na ngai abosani ngai—kasi akolakisa ete abosani te.

15 Mpo ekoki mwasi kobosana na ye mwana oyo azali komela, ete ayoka mawa te likolo ya mwana ya libumu na ye? Iyo, bakoki kobosana, kasi nakobosana yo te, O ndako ya Yisalaele.

16 Tala, nakati yo likolo ya matandu ya maboko na ngai; bifelo na yo ezali ntango nyonso liboso na ngai.

17 Bana na yo bakosala mbangu na babebisi na yo; mpe bango oyo bakomisi yo mpamba bakokende mosika na yo.

18 Tombola miso na yo nzinganzinga mpembeni mpe tala; nyonso oyo basangani bango moko esika moko, mpe bakoya epayi na yo. Mpe lokola nazali na bomoi, elobi Nkolo, solo okolata bango nyonso, lokola likembi, mpe okokanga bango kutu lokola mwasi abandami libala.

19 Mpo bisika na yo ya esobe mpe ya mpamba, mpe mboka ya bobebisami na yo, ekozala kutu sikawa ya nkaka mpenza na ntina ya bafandi; mpe bango oyo bamelaki yo bakozala mosika mpenza.

20 Bana oyo okozwa, nsima ya kobungisa ya yambo, bakoloba lisusu na matoyi na yo: Esika eleki moke mingi mpo na ngai; pesa ngai esika ete nakoka kofanda.

21 Bongo okoloba na motema na yo: Nani aboteli ngai baoyo, komonaka ete nabungisaki bana na ngai, mpe nazali mpamba, mokangemi, mpe kokendaka awa mpe kuna? Mpe nani abokolaki baoyo? Tala, natikalaki ngai moko; baoyo, bazalaki wapi?

22 Boye elobi Nkolo Nzambe: Tala, nakotombola loboko na ngai na baoyo bazali Bayuda-te, mpe nakotia bendele na ngai epayi ya bato; mpe bakomema bana mibali na yo na maboko na bango, mpe bana basi na yo bakokumbama na mapeka na bango.

23 Mpe bakonzi bakozala batata babokoli na yo, mpe basi bakonzi na bango bamama babokoli na yo; bakogumbamela yo bilongi na bango epayi na mabele, mpe bakolembola mputulu ya makolo na yo; mpe okoyeba ete nazali Nkolo; mpo baoyo bazelaka ngai bakoyoka nsoni te.

24 Mpo biloko bakangi na etumba ebotolamaka uta na bato ya makasi, to babikisaka bakangemi ya mibeko?

25 Kasi boye elobi Nkolo, kutu bakangemi ya bato ya makasi bakolongolama, mpe biloko bakangi na etumba na moto ya nsomo ekobikisama; mpo nakowela na oyo akowela na yo, mpe nakobikisa bana na yo.

26 Mpe nakoleisa bango oyo bakoniokola yo na mosuni na bango moko; bakolangwisama na makila na bango moko lokola vinyo ya sukali; mpe mosuni nyonso mokoyeba ete ngai, Nkolo, nazali, Mobikisi na yo mpe Mosikoli na yo, Moko ya Makasi ya Yakobo.

Bimisa na lokasa