Makomi
1 Nefi 9


Mokapo 9

Nefi asali maboke mabale ma makundoli—Moko na moko mobiangemi palaki ya Nefi—Palaki inene izali na mambi ma mokili; palaki ike izali mingi na makambo ma bule. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe makambo manso maye tata wa ngai amonoki, mpe ayokaki, mpe alobaki, lokola efandaki ye o ema, o lobwaku la Lemuele, mpe lisusu makambo maike mpenza, maye makoki kokomama likolo lya palaki iye te.

2 Mpe sikawa, lokola elobaki ngai etali palaki iye, tala izali te palaki likolo lya yango napesi nsango mobimba ya mambi ma bato ba ngai; mpo palaki, likolo lya yango napesi nsango mobimba ya bato ba ngai, napesi yango nkombo ya Nefi; yango wana, ibiangemi palaki ya Nefi, nsima ya nkombo ya ngaimei; mpe palaki iye lisusu ibiangemi palaki ya Nefi.

3 Nzokande, nazwaki motindo mwa Nkolo ete nasala palaki iye, mpo ya mwango mwa kafukafu ete ezala nsango yoko ekomama ya mosala mwa bato ba ngai.

4 Likolo lya palaki isusu, esengelaki ekokomama nsango yoko ya bokonzi bwa bakonzi, mpe bitumba mpe boweli bwa bato ba ngai; yango wana palaki iye izali, mpo ya eteni eleki mingi, ya mosala; mpe palaki isusu izali, mpo ya eteni eleki mingi, ya bokonzi bwa bakonzi, mpe bitumba mpe boweli bwa bato ba ngai.

5 Yango wana, Nkolo atindaki ngai nasala palaki iye mpo ya mwango mwa bwania bwa ye, yango mwango, nayebi te.

6 Kasi Nkolo ayebi makambo manso uta o ebandeli; yango wana, akolengeleke nzela mpo ya kokokisa misala mya ye minso o ntei ya bana ba bato; mpo tala, azali na nguya inso mpo ya bokokisi maloba ma ye manso. Mpe boye ezali. Amene.