Makomi
1 Nefi 3


Mokapo 3

Bana babali ba Lehi bazongi o Yelusaleme kokamata palaki ya motako—Labana aboyi kopesa palaki—Nefi alendisi mpe akembisi bandeko babali ba ye—Labana ayibi bozwi bwa bango mpe ameki koboma bango—Lamani mpe Lemuele babeti Nefi mpe Sami mpe bapamelami na anzelu moko. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nazongaki, uta o bosololi elongo na Nkolo, o ema ya tata wa ngai.

2 Mpe esalemaki ete alobaki epai ya ngai, kolobaka: Tala, nalotoki ndoto yoko, o yango Nkolo atindaki ngai ete yo mpe bandeko babali ba yo bozonga o Yelusaleme.

3 Mpo tala, Labana azali na likundoli lya Bayuda, mpe lisusu bonkoko bwa batata ba ngai ba kala, mpe ekomama likolo lya palaki ya motako.

4 Yango wana Nkolo atindaki ngai ete yo mpe bandeko babali ba yo bosengeli kokende o ndako ya Labana, mpe koluka makundoli, mpe kokumba mango awa o kati ya esobe.

5 Mpe sikawa, tala bandeko babali ba yo bazali koyimayima, kolobaka ezali likambo likasi liye nasengeki bango; kasi tala nasengeki bango yango te, kasi ezali motindo mwa Nkolo.

6 Yango wana kende, mwana wa ngai, mpe Nkolo akosunga yo, zambi oyimayimaki te.

7 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki epai ya tata wa ngai: Nakokende, mpe nakosala makambo maye Nkolo atindi, mpo nayebi ete Nkolo akopesaka mitindo epai ya bana ba bato te, longola se soko ekolengele ye nzela mpo ya bango ete bakoka kokokisa likambo liye atindi bango.

8 Mpe esalemaki ete eyokaka tata wa ngai maloba maye, azalaki na nsai mpenza, mpo ayebaki ete napambolamaka na Nkolo.

9 Mpe ngai, Nefi, mpe bandeko babali ba ngai tokamataki nzela ya mobembo mwa biso o esobe, elongo na biema bya biso, mpo ya komata o mboka ya Yelusaleme.

10 Mpe esalemaki ete emataki biso o mboka ya Yelusaleme, ngai elongo na bandeko babali ba ngai totunaki biso na biso.

11 Mpe tobeteki zeke—nani ya biso akokota o ndako ya Labana. Mpe esalemaki ete zeke ekweiyaki likolo lya Lamani; mpe Lamani akotaki o kati ya ndako ya Labana, mpe asololaki elongo na ye, lokola efandaki ye o ndako ya ye.

12 Mpe asengelaki na Labana makundoli maye makomamaki likolo lya palaki ya motako, iye ikwi bonkoko bwa tata wa ngai.

13 Mpe tala, esalemaki ete Labana asilikaki, mpe asukumaki ye libanda uta o miso mya ye; mpe alingaki te akamata palaki.Yango wana, alobaki epai ya ye: Tala ozali moyibi, mpe nakoboma yo.

14 Kasi Lamani akimaki libanda lya miso mya ye, mpe alobaki makambo maye Labana asalaki, epai ya biso. Mpe tobandaki koyoka mawa mpenza, mpe bandeko babali ba ngai bazalaki penepene na kozonga epai ya tata wa ngai o esobe.

15 Kasi tala nalobaki epai ya bango ete: lokola Nkolo azali na bomoi, mpe lokola tozali na bomoi, tokokita te epai ya tata wa biso o esobe kina ekokokisa biso likambo liye Nkolo atindaki biso.

16 Yango wana, tozala potongono na kobatelaka mitindo mya Nkolo; yango wana tokita o mboka ya lisango lya tata wa biso, mpo atikaki wolo, mpe mpauni, mpe bomengo bwa ndenge inso. Mpe enso eye asalaki na ntina ya mitindo mya Nkolo.

17 Mpo ayebaki ete Yelusaleme esengeli ebebisama, na ntina ya nkuna ya bato.

18 Mpo tala, babwakaki maloba ma baprofeta. Nzokande, soko tata wa ngai afandaki o mboka nsima ya ye kotindama mpo ya kokima libanda lya mboka, tala, ye alingaki lokola kowa. Yango wana , esengeli mpenza ezala ete akima libanda lya mboka.

19 Mpe tala, ezali bwania na Nzambe ete tozwa makundoli maye, ete tokoka kobomba mpo ya bana ba biso, lokota la batata ba biso.

20 Mpe lisusu ete tokoka kobomba mpo ya bango maloba malobama o monoko mya baprofeta basantu banso, maye mapesamela bango na Molimo mpe nguya ya Nzambe, uta mokili ebanda, kutu kina o mokolo mwa lelo.

21 Mpe esalemaki ete nsima ya lolenge loye la elobeli nandimisaki bandeko babali ba ngai, ete bazala potongono na kobatelaka mitindo mya Nzambe.

22 Mpe esalemaki ete tokitaki o mboka ya lisango lya biso, mpe tosangisaki elongo wolo ya biso, mpe mpauni ya biso, mpe biloko bya motuya bya biso.

23 Mpe esilisaka biso kosangisa biloko biye elongo, tomataki lisusu epai ya ndako ya Labana.

24 Mpe esalemaki ete tokotaki epai ya Labana, mpe tosengelaki na ye ete apesa biso makundoli maye makomamaki likolo lya palaki ya motako, mpo ya mango tolingaki kopesa ye wolo ya biso, mpe mpauni ya biso, mpe biloko binso bya motuya bya biso.

25 Mpe esalemaki ete emonoki Labana bozwi bwa biso, mpe ete bozalaki bonene mpenza, alulaki bwango, mpo ete asukumaki biso libanda, mpe atindaki basali ba ye baboma biso, ete akoka kozwa bozwi bwa biso.

26 Mpe esalemaki ete tokimaki liboso lya basali ba Labana, mpe tosengelaki kotika bozwi bwa biso, mpe bikweiyaki o kati ya maboko ma Labana.

27 Mpe esalemaki ete tokimaki o kati ya esobe, mpe basali ba Labana bakangaki biso te, mpe tomibombaki o libulu lya libanga lyoko.

28 Mpe esalemaki ete Lamani asilikaki na ngai, mpe lisusu na tata wa ngai; mpe na Lemuele lokola, mpo ayokemelaki epai ya maloba ma Lamani. Yango wana Lamani mpe Lemuele balobaki maloba mingi mabe epai ya biso, bandeko babali ba leki ba bango, mpe babeteki biso kutu na lingenda.

29 Mpe esalemaki ete lokola ebeteki bango biso na lingenda, tala, anzelu yoko wa Nkolo ayaki, mpe atelemaki liboso lya bango, mpe alobaki epai ya bango, kolobaka: Ntina nini bokobete ndeko mobali wa leki wa bino na lingenda? Boyebi te ete Nkolo aponoki ye mpo azala moyangeli moko wa bino, mpe eye na ntina ya mabe ma bino? Tala, bokomata lisusu ona Yelusaleme, mpe Nkolo akotika Labana o kati ya maboko ma bino.

30 Mpe esilisaki anzelu koloba epai ya biso, akendeki.

31 Mpe esilaki anzelu kokende, Lamani mpe Lemuele babandaki lisusu koyimayima, kolobaka: Boniboni ekoki kosalema ete Nkolo atika Labana o kati ya maboko ma biso? Tala, azali moto mokasi, mpe akoki kopesa motindo na ntuku itano, iyo, kutu akoki koboma ntuku itano; nde boniboni biso te?