Makomi
1 Nefi 11


Mokapo 11

Nefi amoni Molimo mwa Nkolo mpe elakisami ye o limoni nzete ya bomoi—Amoni mama wa Mwana Mobali wa Nzambe mpe ayekoli bonkonde bwa Nzambe—Amoni libatisi, mosala, mpe bokakami bwa Mwana wa Mpate wa Nzambe o ekulusu—Amoni lisusu bobiangi mpe mosala mwa Bapostolo Zomi na Babale ba Mwana wa Mpate. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpo esalemaki ete esilaka ngai koyoka mposa ya koyeba makambo maye tata wa ngai amonoko, mpe kondimaka ete Nkolo akoka kosala ete mango mayebana epai ya ngai, lokola efandaki ngai komaniolaka o motema mwa ngai, nakumbamaki mosika na Molimo mwa Nkolo, iyo, o kati ya ngomba yoko elai mpenza, eye namonoko naino te, mpe likolo lya yango natiaka naino te lokolo la ngai.

2 Mpe Molimo alobaki epai ya ngai: Tala, mposa ya yo ezali kani?

3 Mpe nalobaki: nazali na mposa ya komono makambo maye tata wa ngai amonoki.

4 Mpe Molimo alobaki epai ya ngai: Ondimi ete tata wa yo amonoki nzete ena eye alobelaki?

5 Mpe nalobaki: Iyo, oyebi ete nandimi maloba manso ma tata wa ngai.

6 Mpe elobaki ngai maloba maye, Molimo agangaki na mongongo mokasi, kolobaka: Ozana na Nkolo, Nzambe aleki likolo; mpo azali Nzambe likolo lya mabele manso, iyo, kutu likolo lya inso. Mpe opambolami, Nefi, zambi ondimi na Mwana wa Nzambe aleki likolo; yango wana, okomono makambo maye ozalaki na mango mposa.

7 Mpe tala eloko eye ekopesama epai ya yo bo elembo, ete ekosilisa yo komono nzete eye eboti mbuma iye tata wa yo amekaki, okomono lisusu moto moko kokitaka libanda lya lola, mpe ye okotatola; mpe ekosilisa yo kotatola ye okopesa litatoli ete ezali Mwana wa Nzambe.

8 Mpe esalemaki ete Molimo alobaki epai ya ngai: Tala! Mpe natalaki mpe namonoki nzete yoko; mpe ezalaki bo nzete eye tata wa ngai amonoko; mpe kitoko ya yango ezalaki mosika koleka, iyo, kolutaka kitoko inso, mpe mpembe ya yango elutaki mpembe ya mapata ma mpembe makopembele.

9 Mpe esalemaki ete esilisaka ngai komono nzete ena, nalobaki epai ya Molimo: namoni olakisi epai ya ngai nzete eye ezali motuya likolo lya inso.

10 Mpe alobaki epai ya ngai: Mposa ya yo ezali kani?

11 Mpe nalobaki epai ya ye: Koyeba ndimbola ya yango—mpo nalobaki epai ya ye lokola moto moko akolobaka; mpo namonoki ete azalaki na lolenge la moto moko; kasi nzokande, nayebaki ete ezalaki Molimo mwa Nkolo; mpe alobaki epai ya ngai lokola moto akolobaka elongo na moto mosusu.

12 Mpe esalemaki ete alobaki epai ya Ngai: Tala! Mpe natalaki lokola soko epai ya ye, mpe namonoki ye te; mpo alongwaka liboso lya miso mya ngai.

13 Mpe esalemaki ete natalaki mpe namonoki engumba enene ya Yelusaleme, mpe bingumba bisusu lokola. Mpe namonoki engumba ya Nasalete; mpe o engumba ya Nasalete, namonoki moseka moko, mpe azalaki monzenga mpenza mpe mpembe.

14 Mpe esalemaki ete namonoki lola lofungwani; mpe anzelu moko akitaki mpe atelemeki liboso lya ngai; mpe alobaki epai ya ngai: Nefi omoni nini?

15 Mpe nalobaki epai ya ye: Moseka moko, kitoko mpenza mpe kitoko likolo lya baseka banso.

16 Mpe alobaki epai ya ngai: Oyebi bonkonde bwa Nzambe?

17 Mpe nalobaki epai ya ye: Nayebi ete alingi bana ba ye; nzokande, nayebi ntina ya makambo manso te.

18 Mpe alobaki epai ya ngai: Tala, moseka oyo omonoki azali mama wa Mwana wa Nzambe, nsima ya lolenge la mosuni.

19 Mpe esalemaki ete namonoki ete amememeki mosika o Molimo; esilaka ye komememe mosika o Molimo o ntaka ya ntango yoko, anzelu alobaki epai ya ngai, kolobaka: Tala!

20 Mpe natalaki mpe namonoki moseka lisusu, komemeke mwana moko o maboko ma ye.

21 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai: Tala Mwana wa Mpate wa Nzambe, iyo, kutu Mwana wa Tata wa Seko! Oyebi ntina ya nzete eye tata wa yo amonoki?

22 Mpe nayanolaki epai ya ye, kolobaka: Iyo, ezali bolingo bwa Nzambe, boye bosopani mosika o mitema mya bana ba bato; yango wana, bosengelami mingi likolo lya biloko binso.

23 Mpe alobaki epai ya ngai, kolobaka: Iyo, mpe ya nsai mingi koleka mpo ya bozo.

24 Mpe esilisaka ye koloba maloba maye, alobaki epai ya ngai: Tala! Mpe natalaki, mpe namonoki Mwana wa Nzambe kokendeke o ntei ya bana ba bato; mpe namonoki mingi bakwei o makolo ma ye mpe bakumbameli ye.

25 Mpe esalemaki ete namonoki ete lingenda lya ebende, liye tata wa ngai amonoko, lizalaki liloba lya Nzambe, liye likokamba o liziba lya mai ma bomoi, to nzete ya bomoi; mango mai mazali emoniseli ya bolingo bwa Nzambe; mpe lisusu namonoki ete nzete ya bomoi ezalaki emoniseli ya bolingo bwa Nzambe.

26 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai lisusu boye: Tala mpe mono bonkonde bwa Nzambe!

27 Mpe natalaki mpe namonoki Mosikoli wa mokili, oyo tata wa ngai alobelaka; mpe lisusu namonoki profeta oyo akolengele nzela liboso lya ye. Mpe Mwana wa Mpate wa Nzambe akendeki mpe abatisamaki na ye; mpe esilaki ye kobatisama, namonoki lola lofungwani, mpe Molimo Mosantu akiti libanda lya lola mpe afandi likolo lya ye o lolenge la ebenga.

28 Mpe namonoki ete akendeki kosalaka epai ya bato, na nguya mpe nkembo enene; mpe ebele basanganaki elongo mpo ya koyoka ye; mpe namonoki ete babwakaki ye libanda uta o ntei ya bango.

29 Mpe namonoki lisusu zomi na babale basusu kolandaka ye. Mpe esalemaki ete bamememeki o Molimo mosika uta o liboso lya elongi ya ngai, mpe namonoki bango te.

30 Mpe esalemaki ete anzelu alobaki epai ya ngai lisusu kolobaka: Tala! Mpe natalaki, mpe namonoki lola lofungwani lisusu, mpe namonoki anzelu kokitaka likolo lya bana ba bato; mpe basalaki epai ya bango.

31 Mpe alobaki epai ya ngai lisusu, boye: Tala! Mpe natalaki, mpe namonoki Mwana wa Mpate wa Nzambe kokendeke o ntei ya bana ba bato. Mpe ebele ya bato baye bazalaki bakoni, mpe baye batungisamaki na malali ma ndenge inso, mpe na bazabulu mpe milimo mya mbindo; mpe anzelu alobaki mpe alakisaki makambo maye manso epai ya ngai. Mpe babikisamaki na nguya ya Mwana wa Mpate wa Nzambe; mpe zabulu mpe milimo mya mbindo babwakamaki libanda.

32 Mpe esalemaki ete anzelu alobaki epai ya ngai lisusu kolobaka: Tala! Mpe natalaki mpe namonoki Mwana wa Mpate wa Nzambe, ete akamatamaka na bato; iyo, Mwana wa Nzambe wa seko asambisamaki na mokili; mpe namonoki mpe napesi litatoli.

33 Mpe ngai, Nefi, namonoki ete atombolamaki likolo lya ekulusu mpe abomamaki mpo ya masumu ma mokili.

34 Mpe esilaki ye kobomama, namonoki bato ebele ya mabele, ete basanganaki elongo mpo ya kobunda na bapostolo ba Mwana wa Mpate; mpo boye babiangemaki bazomi na babale na anzelu wa Nkolo.

35 Mpe bato ebele ya mabele basanganaki elongo; mpe namonoki bazalaki o ndako yoko enene mpe ya etando, bo ndako eye tata wa ngai amonoki. Mpe anzelu wa Nkolo alobaki epai ya ngai lisusu kolobaka: Tala mokili mpe bwania bwa mwango, iyo, tala ndako ya Yisalaele esangani mpo ya kobunda na bapostolo zomi na babale ba Mwana wa Mpate.

36 Mpe esalemaki ete namonoki mpe napesi litatoli, ete ndako enene mpe ya etando ezalaki lolendo la mokili; mpe ekweyaki mpe bokwei bwa yango bozalaki bonene mpenza. Mpe anzelu wa Nkolo alobaki epai ya ngai kolobaka: Boye ekozala bobebisami bwa bikolo, mabota, minoko mpe bato banso, baye bakobunda na bapostolo zomi na babale ba Mwana wa Mpate.