Makomi
1 Nefi 15


Mokapo 15

Nkona ya Lehi esengeli kozwa nsango malamu uta na Bayuda-te na mikolo ya nsuka—Bosangani ya Yisalaele emekisami na nzete ya elaya oyo kani bitape ya mboka bikokangisama lisusu na kati ya nzete—Nefi alimboli limoni ya nzete ya bomoi mpe alobeli boyengebene ya Nzambe na kokabolaka bato ya nkuna uta na basembo. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, esilaki ngai komemama mosika na Molimo, mpe komona makambo oyo nyonso, nazongaki na ema ya tata na ngai.

2 Mpe esalemaki ete namonaki bandeko mibali na ngai, mpe bazalaki koswana bango na bango mpo na oyo etali makambo oyo tata na ngai alobaki epayi na bango.

3 Mpo solo alobaki makambo minene mingi epayi na bango, oyo ezalaki makasi mpo ete masosolama, longola se soki moto asengi uta na Nzambe; mpe lokola bazalaki mitema makasi, boye balukaki te Nkolo lokola basengelaki.

4 Mpe sikawa ngai, Nefi, nayokaki mawa na ntina ya bokasi ya mitema na bango, mpe lisusu, na ntina ya makambo oyo namonaki, mpe nayebaki ete esengeli na tembe te kosalema na ntina ya nkuna monene ya bana ya bato.

5 Mpe esalemaki ete nalongamaki na ntina ya mitungisi na ngai, mpo nakanisaki ete mitungisi na ngai ezalaki minene koleka nyonso, na ntina ya bobebisami ya bato na ngai, mpo namonaki bokwei na bango.

6 Mpe esalemaki ete esilaki ngai kozwa makasi, nalobaki epayi ya bandeko mibali na ngai, mpe nazalaki na mposa ya koyeba uta na bango ntina ya boswani na bango.

7 Mpe balobaki: Tala, tokoki te kososola maloba oyo tata na biso alobaki mpo na oyo etali bitape ya mboka ya nzete ya elaya, mpe lisusu mpo na oyo etali Bayuda-te.

8 Mpe nalobaki epayi na bango: Elukaki bino koyeba yango uta na Nkolo?

9 Mpe balobaki epayi na ngai: Tosalaki yango te; mpo Nkolo ayebisi likambo ya lolenge oyo epayi na biso te.

10 Tala, nalobaki epayi na bango: Ezali boniboni ete bobatelaka te mitindo ya Nkolo? Ezali boniboni ete bowa, na ntina ya bokasi na mitema na bino?

11 Bomikundoli te makambo oyo Nkolo alobaki?—Soki bokoyeisa mitema na bino makasi te, mpe bosengi ngai na bondimi, kondimaka ete bokozwa, na molende na kobatelaka mitindo na ngai, solo makambo oyo ekoyebisama epayi na bino.

12 Tala, nalobi epayi na bino, ete ndako ya Yisalaele emekisamaki na nzete ya elaya, na Molimo ya Nkolo oyo azalaki na tata na biso; mpe tala ebukami biso te uta na ndako ya Yisalaele, mpe ezali biso te etape ya ndako ya Yisalaele?

13 Mpe sikawa, likambo oyo tata na biso alingi koloba mpo na oyo etali bokangisami kati na bitape ya mboka na nzela ya litondi ya Bayuda-te, ezali, ete na mikolo ya nsuka, ntango nkona na biso ekosila kobeba moke moke kati na bozangi boyambi, iyo, na ntaka ya mibu mingi, mpe nkola mingi nsima ya Masiya komimonisama na nzoto epayi ya bana ya bato, nde litondi ya nsango malamu ya Masiya ekokoma epayi ya baoyo bazali Bayuda-te, mpe uta na Bayuda-te epayi ya montika ya nkona na biso—

14 Mpe na mokolo wana montika ya nkona na biso mokoyeba ete bazali baoyo bato ya ndako ya Yisalaele, mpe ete bazali bato ya liyokani ya Nkolo; mpe nde bakoyeba mpe bakoya na boyebi ya batata na bango ya kala, mpe lisusu na boyebi ya nsango malamu ya Mosikoli, oyo epesamaki epayi ya batata na bango na nzela na ye; yango wana, bakoya na boyebi ya Mosikoli na bango mpe na boyebi ya biteni sikisiki ya malongi na ye, ete bakoka koyeba lolenge nini ya koya epayi na ye mpe kobikisama.

15 Mpe boye na mokolo wana ekosepela bango te, mpe ekopesa bango masanzoli te epayi ya Nzambe ya Libela, libanga na bango mpe lobiko na bango? Iyo, na mokolo wana, ekozwa bango te bokasi mpe bilei uta na nzete ya vinyo ya solo? Iyo, ekoya bango te epayi na etonga ya solo ya Nzambe?

16 Tala, nalobi epayi na bino, Iyo; bakokundolama lisusu na kati ya ndako ya Yisalaele; bakokangisama na kati, mpo bazali etape ya mboka ya nzete ya elaya, na kati ya nzete ya elaya ya solo.

17 Mpe oyo ezali nini oyo tata na biso alingi koloba; mpe alingi koloba ete ekosalema te kino ekosila bango kopanzama na Bayuda-te; mpe alingi koloba ete ekosalema na nzela ya Bayuda-te, ete Nkolo akoka kolakisa nguya na ye epayi ya baoyo bazali Bayuda-te, mpo na ntina mpenza ete akobwakama na Bayuda, to na ndako ya Yisalaele.

18 Yango wana, tata na biso alobelaki nkona na biso yango moko te, kasi lisusu ndako ya Yisalaele, kolakisaka liyokani oyo esengelaki kokokisama na mikolo ya nsuka; oyo liyokani Nkolo asalaki elongo na tata na biso Abalayama, kolobaka: Na nzela ya nkona na yo mabota nyonso ya mabele ekopambolama.

19 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobelaki bango mingi mpo na oyo etali makambo oyo; iyo, nalobelaki bango mpo na oyo etali bozongisi ya Bayuda na mikolo ya nsuka.

20 Mpe nazongaki kolobela bango maloba ya Yisaya, oyo alobaki mpo na oyo etali bozongisi ya Bayuda, soki te bozongisi ya ndako ya Yisalaele; mpe ekosila bango kozongisama bakobulunganisama lisusu te, mpe bakopanzama mpe lisusu te. Mpe esalemaki ete nalobaki maloba mingi epayi ya bandeko mibali na ngai, ete bazwaki kimia mpe bamikitisaki liboso ya Nkolo.

21 Mpe esalemaki ete balobelaki ngai lisusu, kolobaka: Likambo oyo tata na biso amonaki na ndoto? Elimboli nini nzete oyo amonaki?

22 Mpe nalobaki epayi na bango: Ezalaki emoniseli ya nzete ya bomoi.

23 Mpe balobaki epayi na ngai: Elimboli nini lingenda ya ebende oyo tata na biso amonaki, oyo ekambaki na nzete?

24 Mpe nalobaki epayi na bango ete ezalaki liloba ya Nzambe, mpe nyonso oyo akoyoka liloba ya Nzambe, mpe akosimba yango ngwi, akowa soki moke te; mpe masenginia mpe mbanzi ya nkanda ya moyini ekolonga bango te kino na bokufi miso, mpo na kokamba bango na bobebisami.

25 Yango wana, ngai, Nefi, nalendisaki bango na kotiaka bokebi na liloba ya Nkolo; iyo, nalendisaki bango na makasi nyonso ya molimo na ngai, mpe na boyebi nyonso oyo nazwaki, ete batiaka bokebi na liloba ya Nzambe mpe bamikundola kobatela mitindo na ye ntango nyonso mpe na makambo nyonso.

26 Mpe balobaki epayi na ngai: Elingi koloba nini ebale ya mai oyo tata na biso amonaki?

27 Mpe nalobaki epayi na bango ete mai oyo tata na ngai amonaki ezalaki mbindo; mpe boye mpenza mayele na ye matindamaki mobimba na makambo mosusu ete amonaki te mbindo ya mai.

28 Mpe nalobaki epayi na bango ete ezalaki libulu monene ya kobangisa, oyo ekabolaki bato ya nkuna uta na nzete ya bomoi, mpe lisusu na basantu ya Nzambe.

29 Mpe nalobaki epayi na bango ete ezalaki elilingi ya lifelo ya kobangisa, oyo anjelu alobaki epayi na ngai ete elengelamaki mpo na bato ya nkuna.

30 Mpe nalobaki epayi na bango ete tata na biso lisusu amonaki ete boyengebene ya Nzambe ekabolaki lisusu bato ya nkuna uta na basembo; mpe engengeli ya boyengebene yango ezalaki lokola engengeli ya moto oyo ezali kopela, oyo emataka epayi ya Nzambe libela na libela, mpe oyo ezali na nsuka te.

31 Mpe balobaki epayi na ngai: Likambo oyo elingi kolimbola monyoko ya nzoto na mikolo ya momekano, to elingi kolimbola ezalela ya nsuka ya molimo nsima ya liwa ya nzoto oyo ya ntango, to ezali kolobela makambo oyo ezali ya ntango?

32 Mpe esalemaki ete nalobaki epayi na bango ete ezali elilingi ya makambo ya ntango mpe ya molimo mpe lokola; mpo na mokolo ekoya wapi basengeli kosambisama mpo na misala na bango, iyo, kutu misala oyo misalemaki na nzoto oyo ya ntango na mikolo na bango ya momekano.

33 Yango wana, soki bakokufa na nkuna na bango, basengeli mpe lokola kobwakama mosika, mpo na makambo oyo ezali ya molimo, oyo etali bosembo; yango wana, basengeli komemama mpo na kotelema liboso ya Nzambe, mpo na kosambisama mpo na misala na bango, mpe soki misala na bango ezalaki mbindo basengeli mpenza kozala mbindo; mpe soki bazali mbindo esengeli mpenza ezala ete bakoka kofanda na bokonzi ya Nzambe te; soki bongo, bokonzi ya Nzambe esengelaki kozala mbindo mpe lokola.

34 Kasi tala, nalobi epayi na bino, bokonzi ya Nzambe ezali mbindo te, mpe eloko moko te ya bosoto ekoki kokota na bokonzi ya Nzambe; yango wana esengeli mpenza ete esika ya mbindo ezala elengelami mpo na oyo ezali mbindo.

35 Mpe ezali na esika oyo elengelami, iyo, kutu lifelo wana ya kobangisa oyo nalobelaki, mpe zabulu azali molengeli na yango; yango wana ezalela ya nsuka ya milimo ya bato ezali kofanda na bokonzi ya Nzambe, to kobwakama libanda na ntina ya boyengebene boye nalobelaki.

36 Yango wana, bato ya nkuna babwakami mosika uta na basembo, mpe mpo na kobakisa uta na nzete wana ya bomoi, oyo kani mbuma ezali ya motuya koleka mpe esengelami koleka bambuma nyonso; iyo, mpe oyo ezali likabo monene koleka kati na makabo nyonso ya Nzambe. Mpe boye nde nalobaki na bandeko mibali na ngai. Amene.

Bimisa na lokasa