Makomi
1 Nefi 1


Buku ya Yambo ya Nefi

Bokonzi mpe Mosala mwa Ye

Nsango yoko ya Lehi, mpe mwasi wa ye Salia, mpe bana banei ba ye, ebiangemi bango, (kobandaka na nkulutu) Lamani, Lemuele, Sami, mpe Nefi. Nkolo akebisi Lehi mpo ya kokende libanda lya mboka ya Yelusaleme, zambi abikuli epai ya bato etali bobe bwa bango, mpe baluki kobebisa bomoi bwa ye. Asali mikolo misato mya mobembo o kati ya esobe elongo na libota lya ye. Nefi akamati bandeko babali ba ye, mpe bazongi o mboka ya Yelusaleme nsima ya makundoli ma Bayuda. Nsango ya mpasi ya bango. Bakamati bana basi ba Yisamaele o bolongani. Bakamati mabota ma bango, mpe bazongi o kati ya esobe. Mpasi mpe matungisi ma bango o esobe. Nzela ya mibembo mya bango. Bakomi o mai manene. Bandeko babali ba Nefi batomboki na ye. Abulunganisi bango, mpe atongi masuwa. Babiangi nkombo ya esika Beboo. Bakatisi mai manene ona kati ya mboka elakelama, mpe bongo na bongo. Eye ezali engebene na nsango ya Nefi; to o elobeli esusu, ngai, Nefi, nakomaki makundoli maye.

Mokapo 1

Nefi abandi likundoli lya bato ba ye—Lehi amoni o limoni likonzi lyoko lya moto mpe atangi o buku ya bobikuli—Asanzoli Nzambe, alobeli yambo esalema boyei bwa Masiya, mpe abikuli bobebisami bwa Yelusaleme—Aniokwami na Bayuda. Penepene na 600 Yambo ya Klisto.

1 Ngai, Nefi, ebotama ngai na baboti balamu, yango wana nayekolamaki mwa moke o boyekoli bonso bwa tata wa ngai; mpe emono ngai matungisi mingi o nzela ya mikolo mya ngai, nzokande, esungama ngai mpenza na Nkolo o mikolo mya ngai minso; iyo, ezwa ngai boyebi bonene bwa bolamu mpe mibombamo mya Nzambe, yango wana nasali likundoli lyoko lya matamboli ma ngai o mikolo mya ngai.

2 Iyo, nasali likundoli lyoko o lokota la tata wa ngai, liye likwi boyekoli bwa Bayuda mpe lokota la Baejipito.

3 Mpe nayebi ete likundoli liye nasali lizali lya solo; mpe nasali lyango na loboko la ngaimei; mpe nasali lyango engebene na boyebi bwa ngai.

4 Mpo esalemaki, o ebandeli ya mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa Sidikiya, mokonzi wa Bayuda, (tata wa ngai, Lehi, efandaka ye o Yelusaleme o mikolo mya ye minso); mpe o mobu mona kaka, eyaki baprofeta mingi kobikulaka epai ya bato ete basengeli koyambola, to engumba enene ya Yelusaleme ekobebisama.

5 Yango wana esalemaki ete tata wa ngai, Lehi, bo ekendeki ye, asambelaki epai ya Nkolo, iyo, kutu na motema mwa ye mobimba, mpo ya litomba lya bato ba ye.

6 Mpe esalemaki ete bo esambelaki ye epai ya Nkolo, likonzi lyoko lya moto liyaki, mpe lifandaki likolo lya libanga lyoko liboso lya ye; mpe amonoki, mpe ayokaki makambo maike; mpe na ntina ya makambo amonoki mpe ayokaki, aninganaki, mpe alengeki mpenza.

7 Mpe esalemaki ete azongaki o ndako ya yemei o Yelusaleme; mpe amibwakaki likolo lya mbeto ya ye, elongamaki ye na Molimo mpe makambo maye amonoki.

8 Mpe elongamaki ye boye na Molimo, akumbanaki o limoni lyoko, kutu ete amonoki lola lofungwani, mpe akanisaki amonoki Nzambe kofandaka likolo lya ngbende ya ye, ezingamaki ye na mangomba maike ma banzelu na ezalela ya koyembelaka mpe kosanzolaka Nzambe wa bango.

9 Mpe esalemaki ete amonoki Moko kokitaka libanda o katikati ya lola, mpe amonoki ete bongengi bwa ye bozalaki likolo lya boye bwa moi o nzanga.

10 Mpe amonoki lisusu zomi na babale basusu kolandaka ye, mpe engengeli ya bango elekaki eye ya minzoto o etando ya likolo.

11 Mpe bakitaki, mpe batambolaki likolo lya etando ya mabele; mpe ya yambo ayaki, mpe atelemaki liboso lya tata wa ngai, mpe apesaki epai ya ye buku yoko, mpe atindaki ye ete akoka kotanga.

12 Mpe esalemaki ete bo etangaki ye, atondisamaki na Molimo mwa Nkolo.

13 Mpe atangaki, kolobaka: Lisuma, lisuma, epai ya Yelusaleme, mpo namoni bonsomo bwa yo! Iyo, mpe makambo mingi tata wa ngai atangaki matali Yelusaleme—ete ekobebisama, mpe bafandi ba yango; mingi bakowa na mopanga, mpe mingi bakomememe bakangemi o kati ya Babiloni.

14 Mpe esalemaki ete etangaka tata wa ngai mpe emonoko ye makambo mingi manene mpe ma bokamwi, agangaki makambo mingi epai ya Nkolo; lokola: Enene mpe ya bokamwi ezali misala mya yo, O Nkolo Nzambe wa Bokasi Bonso! Ngbende ya yo ezali mpenza o lola, mpe ya yo nguya, mpe bolamu, mpe ngolu izali likolo lya bafandi banso ba mabele; mpe, zambi ozali na ngolu, okotika te ete baye bayei epai ya yo bawa!

15 Mpe nsima ya lolenge loye ezalaki elobeli ya tata wa ngai o bosanzoli bwa Nzambe wa ye; mpo bozo bwa ye bosepelaki, mpe motema mwa ye mobimba motondaki, na ntina ya makambo maye amonoko, iyo, maye Nkolo alakisaka epai ya ye.

16 Mpe sikawa, ngai, Nefi, nasali te nsango mobimba ya makambo maye tata wa ngai akomaki, mpo akomaki makambo mingi maye amonoki o mamoni mpe o ndoto; mpe akomaki lisusu makambo mingi maye abikulaki mpe alobaki epai ya bana ba ye; ya mango, nakokoma nsango mobimba te.

17 Kasi nakosala nsango yoko ya matamboli ma ngai o mikolo mya ngai. Tala, nasali bokuse boko bwa likundoli lya tata wa ngai, likolo lya palaki iye nasalaki na maboko ma ngaimei; yango wana, ekosilisa ngai kosala o bokuse likundoli lya tata wa ngai, nde nakosala nsango yoko ya bomoi bwa ngaimei.

18 Yango wana, nalingi ete boyeba, ete esilisaka Nkolo kolakisa makambo mingi boye ma bokamwi epai ya tata wa ngai, Lehi, iyo, matali bobebisami bwa Yelusaleme, tala akendeki o ntei ya bato, mpe abandaki kobikula, mpe kosakola epai ya bango etali makambo maye amonoko mpe ayokaka lokola.

19 Mpe esalemaki ete Bayuda batiolaki ye na ntina ya makambo maye ye atatolaki etali bango; mpo solo atatolaki etali nkuna ya bango, mpe bonsomo bwa bango; mpe atatolaki ete makambo maye amonoki mpe ayokaki, mpe lisusu makambo maye atangaki o buku, malakisaki polele boyei bwa Masiya, mpe lisusu bosikoli bwa mokili.

20 Mpe eyokaki Bayuda makambo maye, basilikaki na ye; iyo, kutu lokola na baprofeta ba kala, baye bango babwakaka libanda, mpe babambaka mabanga, mpe babomaka; mpe balukaki bomoi bwa ye lokola, ete bakoka kolongola bwango. Kasi tala, ngai, Nefi, nakolakisa epai ya bino ete ngolu ya Nkolo ezali likolo lya baye banso aponoki, na ntina ya bondimi bwa bango, mpo ya kopesa bango makasi, kutu ata nguya ya libiki.