Makomi
1 Nefi 4


Mokapo 4

Nefi abomi Labana engebene na etinda ya Nkolo, mpe nsima abotoli bapalaki ya motako na mayele—Zolami aponi kosangana elongo na libota ya Lehi na esobe. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete nalobaki epayi ya bandeko mibali na ngai, kolobaka: Tika tomata lisusu na Yelusaleme, mpe tozala sembo na kobombaka mitindo ya Nkolo; mpo tala, ye aleki mabele nyonso na bokasi, bongo mpo na nini ekozala ye makasi koleka Labana na bokasi mpe ntuku mitano na ye te, iyo, to kutu koleka nkoto zomi na ye te?

2 Boye tika tomata; tika tozala makasi lokola Mose; mpo solo alobaki na mai ya Mbu Etane, mpe mai yango ekabwanaki ngambo na ngambo, mpe batata na biso batambolaki, uta na bokangemi, likolo ya mabele ekawuka, mpe mampinga ya Falo elandaki mpe ezindaki kati na mai ya Mbu Etane.

3 Sikawa tala boyebi ete oyo ezali ya solo; mpe boyebi lisusu ete anjelu alobelaki bino; yango wana ekoki bino kotia ntembe? Tika tomata; Nkolo akoki kobikisa biso, kutu lokola asalaki na batata na biso, mpe kobebisa Labana, kutu lokola asalaki na Baejipito.

4 Sikawa esilaki ngai koloba maloba oyo, bazalaki naino kodasuka, mpe bazalaki se kokoba koyima-yima; nzokande balandaki ngai kino tokomaki na libanda ya bifelo ya Yelusaleme.

5 Mpe ezalaki na butu; mpe nasalaki ete bamibomba na libanda ya bifelo. Mpe esilaki bango komibomba, ngai, Nefi, nayingelaki na bonkutu kati na engumba, mpe nakendaki epayi na ndako ya Labana.

6 Mpe nakambamaki na Molimo, koyebaka liboso te makambo oyo nasengelaki kosala.

7 Nzokande nakendaki, mpe lokola ekomaki ngai penepene na ndako ya Labana, namonaki moto moko, mpe azalaki ya kokweya na mabele liboso na ngai, mpo alangwaki vinyo.

8 Mpe ntango nakomaki epayi na ye, namonaki ete ezalaki Labana.

9 Mpe namonaki mompanga na ye, mpe nabendaki yango uta na lokoto na yango; mpe esimbelo na yango ezalaki ya wolo ya peto, mpe esaleli na yango ezalaki ya malonga koleka, mpe namonaki ete mbeli na yango ezalaki ya ebende ya motuya mingi koleka nyonso.

10 Mpe esalemaki ete nasengisamaki na Molimo ete naboma Labana; kasi namilobelaki na motema na ngai: Naino nasopa makila ya moto ata na ntango moko te. Mpe nazongaki nsima, mpe nalingaki te ete naboma ye.

11 Mpe Molimo alobelaki ngai lisusu: Tala Nkolo atiki ye na maboko na yo. Iyo, mpe lisusu nayebaki ete alukaki kolongola bomoi na ngai moko; iyo, mpe aboyaki koyoka mitindo ya Nkolo; mpe akamataki lisusu bozwi na biso.

12 Mpe esalemaki ete Molimo alobelaki ngai lisusu: Boma ye, mpo Nkolo atiki ye na maboko na yo;

13 Tala Nkolo abomaka bato ya nkuna mpo na kokokisa bantina na ye ya sembo. Eleki malamu mingi ete moto moko awa na esika ete ekolo mobimba ebeba moke moke mpe ewa kati na bozangi boyambi.

14 Mpe sikawa, eyokaki ngai, Nefi, maloba oyo, namikundolaki maloba ya Nkolo, oyo alobaki epayi na ngai na esobe, kolobaka ete: Mbala mingi lokola ekobomba nkona na yo mitindo na ngai, bakofuluka na mboka ya elaka.

15 Iyo, mpe nakanisaki lisusu ete bakokaki te kobomba mitindo ya Nkolo, engebene na mobeko ya Mose, longola se soki bakozala na mobeko.

16 Mpe nayebaki lisusu ete mobeko ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako.

17 Mpe lisusu, nayebaki ete Nkolo atikaki Labana na maboko na ngai mpo na ntina oyo—ete nakoka kozwa masolo ya makomi engebene na mitindo na ye.

18 Boye natosaki mongongo ya Molimo, mpe nakamataki Labana na nsuki ya moto, mpe nakataki moto na ye na mompanga na ye moko.

19 Mpe esilaki ngai kokata moto na ye na mompanga na ye moko, nakamataki bilamba ya Labana, mpe nalataki yango likolo ya nzoto na ngai moko; iyo, kutu eteni na eteni; mpe nazingaki bibundeli na ye na nketo na ngai.

20 Mpe esilaki ngai kosala oyo, nakendaki na ebombelo ya bozwi ya Labana. Mpe lokola nabelemaki na ebombelo ya bomengo ya Labana, tala, namonaki mosali ya Labana oyo azalaki na bafungola ya ebombelo ya bozwi. Mpe natindaki ye, na mongongo ya Labana, ete akota elongo na ngai kati na ebombelo ya bozwi.

21 Mpe abanzaki ete ngai nazalaki nkolo na ye, Labana, mpo atalaki bilamba, mpe lisusu mompanga oyo ezingaki nketo na ngai.

22 Mpe alobelaki ngai mpo na oyo etali bampaka ya Bayuda, mpo ayebaki ete nkolo na ye Labana, azalaki libanda na butu kati na bango.

23 Mpe nalobelaki ye lokola soki ezalaki Labana.

24 Mpe lisusu nalobaki epayi na ye ete nakomema minkoma, oyo ezali likolo ya bapalaki ya motako, epayi na bandeko mibali bankulutu na ngai, oyo bazalaki na libanda ya bifelo.

25 Mpe lisusu natindaki ye ete alanda ngai.

26 Mpe, lokola akanisaki ete nazalaki koloba na ntina ya bandeko ya eklezia, mpe ete nazalaki solo Labana oyo nabomaki, yango wana alandaki ngai.

27 Mpe alobelaki ngai mbala mingi mpo na oyo etali bampaka ya Bayuda, lokola ezalaki ngai kokende epayi ya bandeko mibali na ngai, oyo bazalaki na libanda ya bifelo.

28 Mpe esalemaki ete ntango Lamani amonaki ngai abangaki mpenza, mpe Lemuele mpe Sami lisusu mpe lokola. Mpe bakimaki mosika uta na liboso ya miso na ngai; mpo babanzaki ezalaki Labana, mpe ete abomaki ngai, mpe azalaki lisusu koluka kolongola bomoi na bango.

29 Mpe esalemaki ete nabiangaki bango, mpe bayokaki ngai; yango wana batikaki kokima mosika uta na miso na ngai.

30 Mpe esalemaki ete ntango mosali ya Labana amonaki bandeko mibali na ngai abandaki kolenge, mpe azalaki penepene na kokima mosika liboso na ngai mpe kozonga na engumba ya Yelusaleme.

31 Kasi ngai, Nefi, lokola nazalaki moto moko mbinga na nzoto, mpe lokola nazwaki makasi mingi uta na Nkolo, boye nasimbaki mosali ya Labana, mpe nakangaki ye, ete akoka kokima te.

32 Mpe esalemaki ete nalobaki na ye, ete soki akoyoka maloba na ngai, lokola Nkolo azali na bomoi, mpe lokola nazali na bomoi, kutu boye ete soki akoyoka maloba na biso, tokobikisa bomoi na ye.

33 Mpe nalobaki epayi na ye, kutu na nzela ya kolapaka ndai, ete azali te na ntina ya kobanga; ete akozala nsomi lokola biso soki akokende na esobe elongo na biso.

34 Mpe nalobaki lisusu epayi na ye, kolobaka: solo Nkolo atindaki biso mpo na kosala likambo oyo; mpe ekozala biso na molende te mpo na kobombaka mitindo ya Nkolo? Boye, soki okokita kati na esobe epayi ya tata na ngai, okozwa esika elongo na biso.

35 Mpe esalemaki ete Zolami azwaki mpiko na koyokaka maloba oyo nalobaki. Sikawa Zolami ezalaki nkombo ya mosali yango; mpe alakaki ete akokita kati na esobe epayi ya tata na biso. Iyo, mpe alapaki lisusu ndai epayi na biso ete akotikala na biso uta na ntango wana kokende liboso.

36 Sikawa tozalaki na mposa ete atikala na biso mpo na ntina oyo, ete Bayuda bakoka koyeba te oyo etali bokimi na biso kati na esobe, mbele balanda biso mpe baboma biso.

37 Mpe esalemaki ete ntango Zolami alapaki ndai epayi na biso, bobangi na biso esilaki mpo na ye.

38 Mpe esalemaki ete tokamataki bapalaki ya motako mpe mosali ya Labana, mpe tokendaki kati na esobe, mpe tosalaki mobembo epayi na ema ya tata na biso.

Bimisa na lokasa