Makomi
1 Nefi 20


Mokapo 20

Nkolo abimisi mwango mwa ye na Yisalaele—Yisalaele aponomoki o etumbele ya matungisi mpe asengeli kolongwa uta o Babiloni—Mekisani Yisaya 48. Penepene na 588–570 Yambo ya Klisto.

1 Yokemelani mpe yokani eye, O ndako ya Yakobo, oyo bobiangemi na nkombo ya Yisalaele, mpe boyaki libanda lya mai ma Yuda, to libanda lya mai ma libatisi, oyo bokolapa ndai na nkombo ya Nkolo, mpe bokolobela nkombo ya Nzambe wa Yisalaele, naino balapi ndai na solo te mpe bosembo te.

2 Nzokande, bamibiangi ba engumba esantu, kasi bamiwumisi te likolo lya Nzambe wa Yisalaele, oyo azali Nkolo wa Bibele; iyo, Nkolo wa Bibele ezali nkombo ya ye.

3 Tala, nasakolaki makambo ma kala uta o ebandeli; mpe makendeki libanda lya monoko mwa ngai, mpe nalakisaki yango. Nalakisaki bango na mbalakaka.

4 Mpe nasalaki yango zambi nayebaki ete ozali na nkanza, mpe nkingo ya yo ezali mosisa mwa ebende, mpe ebolo ya yo motako;

5 Mpe kutu nasakolaki uta o ebandeli na yo; yambo esalemaki nalakisaki yo mango; mpe nalakisaki mango mpo ya bobangi mbele okoloba—Ya ngai nzambe ya ekeko esalaki mango, mpe ya ngai elili ekatama, mpe ya ngai elili eniangwa etindi mango.

6 Oyokaki mpe omonoki enso eye; mpe okosakola mango te? Mpe ete nalakisa yo makambo ma sika uta o ntango eye, kutu makambo mabombama, mpe oyebaki mango te.

7 Makelami sikawa, mpe te uta o ebandeli, kutu yambo ya mokolo moye oyokaki mango te masakolamaki epai ya yo, mbele oloba—Tala nayebaki mango.

8 Iyo, mpe oyokaki te; iyo, oyebaki te; iyo, uta o ntango ena litoyi lya yo lifungwanaki te; mpo nayebaki ete yo okozala yauli mpenza, mpe ete obiangemaki mobuki uta o libumu.

9 Nzokande, mpo ya ntina ya nkombo ya ngai nakozongisa nsima nkanda ya ngai, mpe mpo ya bosanzoli bwa ngai nakokeba na yo, ete nasasa yo te.

10 Mpo, tala, napetolaki yo, naponoki yo o etumbele ya matungisi.

11 Mpo ya ntina ya ngaimei, iyo, mpo ya ntina ya ngaimei nakosala eye, zambi nakotika te nkombo ya ngai esantolama, mpe nakopesa nkembo ya ngai na mosusu te.

12 Yokemela epai ya ngai, O Yakobo, mpe Yisalaele mobiangemi wa ngai, mpo nazali ye; nazali ya yambo, mpe nazali lisusu ya nsuka.

13 Loboko la ngai lolalisaki nse ya mabele, mpe loboko la ngai la mobali lotandolaki lola. Nabiangi bango, mpe batelemi elongo.

14 Bino banso, bomisangisa, mpe yokani; nani o ntei ya bango asakolaki makambo maye epai ya bango? Nkolo alingaki ye; iyo, mpe akokokisa liloba liye asakolaki na bango; mpe akosala elengi ya ye likolo lya Babiloni, mpe loboko la ye lokoya likolo lya Bakaladi.

15 Lisusu, elobi Nkolo; ngai Nkolo, iyo, nalobaki; iyo, nabiangaki ye mpo asakola, namemeki ye, mpe akosala nzela ya ye elamu.

16 Yakani penepene epai ya ngai; nalobi o nkuku te; uta o ebandeli, uta o ntango eye esakolamaki nalobaki; mpe Nkolo Nzambe, mpe Molimo mwa ye, atindaki ngai.

17 Mpe boye elobi Nkolo, Mosikoli wa yo, Mosantu Moko wa Yisalaele; natindaki ye, Nkolo Nzambe wa yo oyo ateyi yo mpo ya litomba, oyo akambi yo o nzela okokende, asalaki yango.

18 O soko eyokemelaka yo o mitindo mya ngai—nde kimia ya yo ezalaka lokola ebale, mpe bosembo bwa yo lokola mbonge ya mbu.

19 Nkona ya yo lisusu ezalaka lokola zelo; eboto moko ya nsopo ya yo lokola mozelo mwa yango; nkombo ya ye ekokaki te kokatama mosika to kobebisama uta o liboso lya ngai.

20 Kendeni mosika na Babiloni, kimani uta o Bakaladi, na mongongo mwa koyembaka sakolani, lobelani eye, sangelani kina o nsuka ya mabele; lobani: Nkolo asikoli mosali wa ye Yakobo.

21 Mpe bayokaki mposa ya mai te; akambaki bango o katikati ya maliki; asalaki mai masopana libanda lya libanga mpo ya bango; apasulaki libanga lisusu mpe mai mabimaki zololo.

22 Mpe ata asalaki makambo maye manso, mpe manene masusu maleki, ezali te kimia, elobi Nkolo, epai ya moto wa nkuna.