Makomi
1 Nefi 10


Mokapo 10

Lehi alobi yambo esalema ete Bayuda bakokamatama bawumbu na bato ba Babiloni—Alobeli o ntei ya Bayuda boyei bwa Masiya, Mobikisi, Mosiko—Lehi alobeli lisusu boyei bwa moko oyo akobatisa Mwana wa Mpate wa Nzambe—Lehi alobeli liwa mpe bosekwi bwa Masiya—Amekisi bopalangani mpe bosangani bwa Yisalaele na nzete ya elaya—Nefi alobi etali Mwana wa Nzambe, likabo lya Molimo Mosantu, mpe lisengeli lya bosembo. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa ngai, Nefi, nakobi kopesa nsango yoko likolo lya palaki iye ya matamboli ma ngai, mpe bokonzi, mpe mosala mwa ngai; yango wana, mpo ya kokoba na nsango ya ngai, nasengeli koloba mwa moke makambo ma tata wa ngai, mpe lisusu ma bandeko babali ba ngai.

2 Mpo tala, esalemaki ete esilisaka tata wa ngai kosukisa bolobi maloba ma ndoto ya ye, mpe lisusu bolendisi bango na etingia enso, alobaki epai ya bango etali Bayuda—

3 Ete ekosila bango kobebisama, kutu engumba enene ya Yelusaleme, mpe mingi komememe mosika bakangemi o kati ya Babiloni, engebene na ntango esengeli ya Nkolo yemei, bakozonga lisusu, iyo, kutu bakozongisama libanda lya bokangemi; mpe nsima ya bango kozongisama libanda lya bokangemi bakozwa lisusu mboka ya lisango lya bango.

4 Iyo, kutu mibu nkama motoba uta tata wa ngai alongwaki o Yelusaleme, profeta moko Nkolo Nzambe akobimisa o ntei ya Bayuda—kutu Masiya moko, to, o elobeli esusu, Mobikisi moko wa mokili.

5 Mpe alobaki lisusu etali baprofeta, motango monene boniboni batatolaka makambo maye, matali Masiya, oyo alobelaka, to Mosikoli oyo wa mokili.

6 Yango wana, bato banso bazalaki na bozali bwa libunga mpe bwa bokwei, mpe bakozala boye libela, longola se soko bakoyekeme na Mosikoli.

7 Mpe alobaki lisusu etali profeta moko oyo akoya yambo ya Masiya, mpo ya kolengele nzela ya Nkolo—

8 Iyo, kutu akokende mpe akobelela o esobe: Lengeleni nzela ya Nkolo, mpe sembolani nzela ya ye; mpo ezali moko o ntei ya bino oyo boyebi te; mpe aleki ngai na nguya; oyo ya ye nsinga ya sapato nalongobani te kokangola. Mpe tata wa ngai alobaki mingi etali makambo maye.

9 Mpe tata wa ngai alobaki ete akobatisa o Betabara, o ngambo ya Yaladene; mpe alobaki lisusu akobatisa na mai; kutu ete akobatisa Masiya na mai.

10 Mpe ekosilisa ye kobatisa Masiya na mai, akomono mpe akopesa litatoli ete abatisaka Mwana wa Mpate wa Nzambe, oyo akolongola masumu ma mokili.

11 Mpe esalemaki ete esilisaki tata wa ngai koloba maloba maye, alobaki epai ya bandeko babali ba ngai etali nsango elamu eye ekoteyama o ntei ya Bayuda, mpe lisusu etali bokulumwi bwa Bayuda o bozangi bondimi. Mpe ekosilisa bango koboma Masiya, oyo akoya, mpe ekosila ye kowa, akosekwa uta o bakufi, mpe akomimonisa, na Molimo Mosantu, epai ya Bapaganu.

12 Iyo, kutu tata wa ngai alobaki mingi etali Bapaganu, mpe lisusu etali ndako ya Yisalaele, ete bakomekisama bo nzete ya elaya, ya yango bitape bikobukama mpenza mpe bikopalanganisama likolo lya etando enso ya mabele.

13 Yango wana, alobaki: esengeli mpenza ete tokambema elongo na boyokani boko o kati ya mboka ya elako, mpo ya kokokisa maloba ma Nkolo, ete tokopalanganisama likolo lya etando enso ya mabele.

14 Mpe ekosila ndako ya Yisalaele kopalanganisama, bakosangana lisusu esika yoko; to, o nsuka, ekosilisa Bapaganu kozwa litondi lya Nsango Elamu, bitape bya mboka bya nzete ya elaya to mintika mya ndako ya Yisalaele, mikoyingisama o kati, to mikoya o boyebi bwa Masiya wa solo, Nkolo wa bango mpe Mosikoli wa bango.

15 Mpe nsima ya lolenge loye la elobeli tata wa ngai abikulaki mpe alobaki epai ya bandeko babali ba ngai, mpe lisusu makambo mingi koleka, maye nakomi o buku eye te; mpo nakomaki mingi ya mango, lokola elongobanaki mpo ya ngai, o buku ya ngai esusu.

16 Mpe makambo manso mana, maye nalobaki, masalemaki lokola efandaki tata wa ngai o ema, o lobwaku la Lemuele.

17 Mpe esalemaki ete esilisaki ngai, Nefi, koyoka maloba manso ma tata wa ngai, matali makambo maye amonoki o limoni lyoko, mpe lisusu makambo maye alobaki na nguya ya Molimo Mosantu, eye nguya azwaki na bondimi likolo lya Mwana wa Nzambe—mpe Mwana wa Nzambe azalaki Masiya oyo akoya—ngai, Nefi, nazalaki na mposa lisusu ete nakoka komono, mpe koyoka, mpe koyeba makambo maye, na nguya ya Molimo Mosantu, eye ezali likabo lya Nzambe epai ya baye banso bakoluka ye na etingia, o bileko bya kala lokola o eleko eye akomimonisa epai ya bana ba bato.

18 Mpo azali ye kaka lobi, lelo, mpe libela; mpe nzela elengelemi mpo ya bato banso uta o bokelami bwa mokili, soko ekozala boye ete bayambola mpe baya epai ya ye.

19 Mpo oyo akoluka na etingia, akozwa; mpe mibombamo mya Nzambe mikofungwana epai ya bango na nguya ya Molimo Mosantu, o bileko biye lokola o bileko bya kala, mpe o bileko bya kala lokola o bileko bikoya; yango wana, nzela ya Nkolo ezali zunguluke yoko ya seko.

20 Yango wana omikundola, O moto, mpo ya misala mya yo minso okomememe o kati ya bosambisi.

21 Yango wana, soko olukaki kosala na nkuna o mikolo mya momekano mwa yo, nde okomonomo na mbindo liboso lya kiti-ya-bosambisi ya Nzambe; mpe eloko yoko te ya mbindo ekoki kofanda elongo na Nzambe; yango wana, osengeli kobwakama mosika libela.

22 Mpe Molimo Mosantu apesi bokulaka ete naloba makambo maye, mpe nawangana mango te.