Makomi
1 Nefi 12


Mokapo 12

Nefi amoni mboka ya elaka na limoni; bosembo, mabe, mpe bokwei ya bafandi na yango; boyei ya Mwana ya mpate ya Nzambe na kati na bango; lolenge boni Bayekoli Zomi na mibale mpe Bapostolo Zomi na mibale bakosambisa Yisalaele; ezalela ya bosoto mpe ya mbindo ya baoyo babebaki moke moke kati na bozangi boyambi. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete anjelu alobaki epayi na ngai: Tala, mpe mona nkona na yo, mpe lisusu nkona ya bandeko mibali na yo. Mpe natalaki mpe namonaki mboka ya elaka; mpe namonaki ebele ya bato, iyo, kutu lokola soki ezalaki na motango monene lokola zelo ya mbu.

2 Mpe esalemaki ete namonaki ebele ya bato basanganaki esika moko mpo na kobunda, bango na bango; mpe namonaki bitumba, mpe nungunungu ya bitumba, mpe kobomaboma na mompanga na kati ya bato.

3 Mpe esalemaki ete namonaki nkola mingi koleka, engebene na lolenge ya bitumba mpe boweli na mboka; mpe namonaki bingumba mingi, iyo, kutu mingi ete natangaki yango te.

4 Mpe esalemaki ete namonaki londende ya molili likolo ya etando ya mboka ya elaka; mpe namonaki minkalikali, mpe nayokaki kake, mpe boningani ya mabele, mpe ndenge nyonso ya makelele ya lokito; mpe namonaki mabele mpe mabanga, ete epasukaki; mpe namonaki bangomba ebukanaki na biteni; mpe namonaki bitando ya polele ya mabele, ete ebukanaki; mpe namonaki bingumba mingi ete ezindaki; mpe namonaki mingi oyo ezikaki na moto; mpe namonaki mingi ete ekweyaki na mabele, na ntina ya boningani na yango.

5 Mpe esalemaki ete esilaki ngai komona makambo oyo, namonaki mbongi ya molili, ete elekaki mosika uta na etando ya mabele; mpe tala, namonaki ebele ya bato oyo bakweyaki te na ntina ya masambisi minene mpe ya nsomo ya Nkolo.

6 Mpe namonaki lola efungwani, mpe Mwana ya mpate ya Nzambe kokitaka uta na lola, mpe akitaki mpe amilakisaki epayi na bango.

7 Mpe namonaki lisusu mpe napesi litatoli ete Molimo Mosantu akitaki likolo ya zomi na mibale basusu; mpe bakulisamaki na Nzambe, baponamaki.

8 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai kolobaka: Tala bayekoli zomi na mibale ya Mwana ya mpate, baoyo baponami mpo na kosala epayi na nkona na yo.

9 Mpe alobaki epayi na ngai: Omikundoli bapostolo zomi na mibale ya Mwana ya mpate? Tala ezali bango oyo bakosambisa mabota zomi na mibale ya Yisalaele; yango wana, basali zomi na mibale ya nkona na yo bakosambisama na bango; mpo bozali bato ya ndako ya Yisalaele.

10 Mpe basali zomi na mibale oyo omoni bakosambisa nkona na yo. Mpe, tala, bazali basembo mpo na libela; mpo na ntina ya bondimi na bango na Mwana ya mpate ya Nzambe bilamba na bango ekomisami mpembe na makila na ye.

11 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai, boye: Tala! Mpe natalaki, mpe namonaki nkola misato elekaki na bosembo; mpe bilamba na bango ezalaki mpembe kutu lokola Mwana ya mpate ya Nzambe. Mpe anjelu alobaki epayi na ngai: Baoyo bakomisami mpembe na makila ya Mwana ya mpate, na ntina ya bondimi na bango na ye.

12 Mpe ngai, Nefi, namonaki lisusu mingi ya nkola ya minei oyo elekaki na bosembo.

13 Mpe esalemaki ete namonaki ebele ya bato ya mabele basangani esika moko.

14 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai: Tala nkona na yo, mpe lisusu nkona ya bandeko na yo ya mibali.

15 Mpe esalemaki ete natalaki mpe namonaki bato ya nkona na ngai basangani esika moko elongo kati na ebele ya bato kotelemelaka nkona ya bandeko mibali na ngai; mpe basanganaki esika moko mpo na kobunda.

16 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai, kolobaka: Tala liziba ya mai ya mbindo oyo tata na yo amonaki; iyo, kutu ebale oyo alobelaki; mpe bozindo na yango ezali bozindo ya lifelo.

17 Mpe londende ya molili ezali masenginia ya zabulu, oyo ezipi miso, mpe ekomisi mitema ya bana ya bato makasi, mpe ekokamba bango mosika kati na nzela ya monene, ete bawa mpe babunga nzela.

18 Mpe ndako ya monene mpe ya etando, oyo tata na yo amonaki, ezali bililingi mpamba ya makanisi mpe lolendo ya bana ya bato. Mpe libulu monene mpe ya nsomo likaboli bango; iyo, kutu liloba ya boyengebene ya Nzambe ya Seko, mpe Masiya oyo azali Mwana ya mpate ya Nzambe, oyo kani Molimo Mosantu apesi litatoli, uta na ebandeli ya mokili kino na ntango oyo, mpe uta na ntango oyo kokende liboso mpe libela.

19 Mpe ntango elobaki anjelu maloba oyo, natalaki mpe namonaki ete nkona ya bandeko mibali na ngai ewelanaki na nkona na ngai, engebene na liloba ya anjelu; mpe na ntina ya lolendo ya nkona na ngai, mpe masenginia ya zabulu, namonaki ete nkona ya bandeko mibali na ngai balongaki bato ya nkona na ngai.

20 Mpe esalemaki ete natalaki, mpe namonaki bato ya nkona ya bandeko mibali na ngai balongaki nkona na ngai; mpe bakendaki na ebele ya bato likolo ya etando ya mboka.

21 Mpe namonaki bango basangani esika moko na ebele ya bato; mpe namonaki bitumba mpe nungunungu ya bitumba na kati na bango; mpe kati na bitumba mpe kati na nungunungu ya bitumba namonaki nkola mingi koleka.

22 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai: Tala baoyo bakobeba moke moke kati na bozangi boyambi.

23 Mpe esalemaki ete namonaki, esilaki bango kobeba moke moke kati na bozangi boyambi, bakomaki bato moko baindo, bato bayinama, mpe bato ya mbindo, batonda na goigoi mpe ndenge nyonso ya bonsomo.

Bimisa na lokasa