Makomi
1 Nefi 8


Mokapo 8

Lehi amoni limoni lyoko lya nzete ya bomoi—Lehi alei mbuma ya yango mpe alingi libota lya ye lisala boye lokola—Amoni lingenda lya ebende, nzela yoko eke mpe ya nkaka, londende la molili loye lozipi bato—Salia, Nefi, mpe Sami balei mbuma, kasi Lamani mpe Lemuele baboyi. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete tosangisaka elongo ndenge inso ya nkona ya lolenge na lolenge, mboto ya lolenge na lolenge lokola, mpe lisusu nkona ya mbuma ya lolenge na lolenge.

2 Mpe esalemaki ete ntango efandaki tata wa ngai o esobe, alobaki epai ya biso, kolobaka: Tala, naloti ndoto yoko; to, o elobeli esusu, namoni limoni lyoko.

3 Mpe tala, na ntina ya likambo liye namonoki, nazali na ntina ya kosepela na Nkolo na ntina ya Nefi mpe ya Sami lokola; mpo nazali na ntina ya kobanza ete bango, mpe lisusu mingi ya nkona ya bango bakobikisama.

4 Kasi tala, Lamani mpe Lemuele, nazali kobanga mpenza na ntina ya bino; mpo tala, nakanisaki namonoki o ndoto ya ngai, esobe ya molili mpe mawa.

5 Mpe esalemaki ete namonoki moto moko, mpe alataki monkoto mwa mpembe; mpe ayaki, mpe atelemaki liboso lya ngai.

6 Mpe esalemaki ete alobaki epai ya ngai, mpe atindaki ngai nalanda ye.

7 Mpe esalemaki ete lokola elandaki ngai ye, namimonoki ete nazalaki o eliki yoko ya molili mpe mawa.

8 Mpe esilaka biso kokende mobembo o ntaka ya ngonga mingi o molili, nabandaki kosambela epai ya Nkolo ete ayoka ngolu likolo lya ngai, engebene na ebele ya ngolu ya boboto ya ye.

9 Mpe esalemaki ete esilisaka ngai kosambela epai ya Nkolo, namonoki zamba yoko enene mpe ya etando.

10 Mpe esalemaki ete namonoki nzete yoko, ya yango mbuma esengelama mpo ya kopesa moto esengo.

11 Mpe esalemaki ete nakendeki, mpe naliaki mbuma ya yango; mpe namonoki ete ezalaki sukali mingi, likolo lya inso iye namekaka naino yambo. Iyo, mpe namonoki ete mbuma ya yango ezalaki mpembe, koleka mpembe inso iye naino namono.

12 Mpe lokola eliaki ngai mbuma ya yango, etondisaki bozo bwa ngai na esengo enene mpenza; yango wana, nabandaki kozala na mposa ete libota lya ngai lisengela kolia yango lokola, mpo nayebaki ete ezalaki kopesa mposa koleka mbuma inso isusu.

13 Mpe lokola ebwakaki ngai miso mya ngai zingazinga, ete mbele nakoka komono libota lya ngai lokola, namonoki ebale ya mai ezalaki kokima mbangu mpembeni; mpe ezalaki penepene na nzete eye ya yango mbuma nazalaki kolia.

14 Mpe natalaki mpo namono wapi ewutaki; mpe namonoki moto mwa yango mwa mosika; mpe o moto mwa yango, namonoki mama wa bino Salia, mpe Sami mpe Nefi; mpe batelemeki lokola soko bayebaki te wapi bakokende.

15 Mpe esalemaki ete napepaki epai ya bango; mpe nalobaki lisusu epai ya bango na mongongo mokasi ete baya epai ya ngai, mpe balia mbuma, eye esengelama likolo lya mbuma inso isusu.

16 Mpe esalemaki ete bayaki epai ya ngai mpe baliaki mbuma yango lokola.

17 Mpe esalemaki ete nazalaki na mposa ete Lamani mpe Lemuele baya mpe balia mbuma yango lokola; yango wana, nabwakaki miso mya ngai ona moto mwa ebale, mbele nakoka komono bango.

18 Mpe esalemaki ete namonoki bango, kasi balingaki te koya epai ya ngai mpe kolia mbuma yango.

19 Mpe namonoki lingenda lya ebende, mpe ebendanaki na bolai bwa libongo lya ebale, mpe ekambaki o nzete, mpembeni ya yango natelemeki.

20 Mpe namonoki lisusu nzela yoko eke mpe ya nkaka, eye eyaki mpembeni penepene na lingenda lya ebende, kutu kina o nzete mpembeni ya yango natelemeki; mpe ekambaki lokola mpembeni ya moto mwa liziba, epai ya elanga enene mpe ya etando, lokola soko ezalaki mokili moko.

21 Mpe namonoki mangomba maike ma bato, mingi ya bango bazalaki kokende mbangu o boso ete bakoka kozwa nzela eye ekambaki epai ya nzete mpembeni ya yango natelemeki.

22 Mpe esalemaki ete babelemeki, mpe bayingelaki o nzela eye ekambaki o nzete.

23 Mpe esalemaki ete londende la molili lomataki; iyo, kutu londende loko lonene mpenza la molili, mpo ete baye bayingelaki o nzela babungaki nzela ya bango, ete bayengayengaki mosika mpe babungaki.

24 Mpe esalemaki ete namonoki basusu bazalaki kokende mbangu o boso, mpe babelemeki mpe bakangaki nsonge ya lingenda lya ebende; mpe bakendeki mbangu o boso o katikati ya londende la molili, kokangemaka o lingenda lya ebende, kutu kina babelemeki mpe baliaki mbuma ya nzete.

25 Mpe esilisaka bango kolia mbuma ya nzete, babwakaki miso mya bango zingazinga lokola soko bazalaki koyoka nsoni.

26 Mpe ngai lisusu nabwakaki miso mya ngai bipai na bipai zingazinga, mpe namonoki, o ngambo esusu ya ebale ya mai, ndako yoko enene mpe ya etando; mpe etelemeki lokola ezalaki o mopepe, likolo mpenza lya mabele.

27 Mpe etondaki na bato, mibange mpe bilenge lokola, babali mpe basi lokola; mpe lolenge la molato mwa bango lozalaki malonga mpenza; mpe bazalaki na ezalela ya kosekaka mpe kolakisaka misapi mya bango ona baye bakomaki mpe bazalaki kolia mbuma.

28 Mpe esilisaka bango komeka mbuma ya nzete bayokaki nsoni, na ntina ya baye bazalaki koseka bango; mpe bakweiaki o kati ya nzela epekisama mpe babungaki.

29 Mpe sikawa ngai, Nefi, nalobi te maloba manso ma tata wa ngai.

30 Kasi, mpo nazala mokuse o bokomi, tala, amonoki ebele esusu kokendeke mbangu o boso; mpe bayaki mpe bakangaki nsonge ya lingenda lya ebende; mpe bakendeki mbangu o boso, o nzela ya bango, ntango inso kokangaka ngbi lingenda lya ebende, kina babelemeki, mpe bakweiyaki, mpe baliaki mbuma ya nzete.

31 Mpe amonoki lisusu ebele esusu kolukaka nzela ya bango ona ndako ena enene mpe ya etando.

32 Mpe esalemaki ete mingi bazindaki o mozindo mwa liziba; mpe mingi balimwaki mosika o miso mya ye, koyengayengaka o nzela ya ndenge isusu.

33 Mpe ebele mpenza bazalaki baye bakotaki o kati ya ndako ena ya lolenge losusu. Mpe esilisaki bango kokota o kati ya ndako ena, balakisaki misapi mya litio na ngai mpe baye bazalaki kolia mbuma lokola; kasi tokebaki na bango te.

34 Eye ezali maloba ma tata wa ngai: Mpo mingi bakebaki na bango, bakweiyaki.

35 Mpe Lamani mpe Lemuele baliaki mbuma te, elobaki tata wa ngai.

36 Mpe esalemaki ete esilisaka tata wa ngai koloba maloba manso ma ndoto to limoni lya ye, mango mazalaki mingi, alobaki epai ya biso ete, na ntina ya makambo maye amonoki o limoni, abangaki mpenza mpo ya Lamani mpe Lemuele; iyo, abangaki mbele babwakama mosika o miso mya Nkolo.

37 Mpe alendisaki bango nde na motema mwa tata wa bolingo, ete bayokemela epai ya maloba ma ye, ete mbele Nkolo alinga kozala na ngolu epai ya bango, mpe kobwaka bango mosika te; iyo, tata wa ngai ateyaki epai ya bango.

38 Mpe esilisaka ye kosakola epai ya bango, mpe kobikula epai ya bango makambo mingi, atindaki bango babatela mitindo mya Nkolo; mpe asilisaki kolobaka epai ya bango.