Makomi
Moziya 8


Mokapo 8

Amona alakisi bato ba Limiyi—Ayekoli na palaki ntuku ibale na inei ya Bayelede—Makundoli ma kala makoki kolimbolama na bamoni—Likabo te lileki lya bomoni. Penepene na 121 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete esilisaka mokonzi Limiyi kotia nsuka yoko ya kolobaka na bato ba ye, mpo alobaki epai ya bango makambo mingi mpe bobele mwa moke ya yango nakomi o buku eye, alobelaki bato ba ye makambo manso matali bandeko ba bango baye bazalaki o mboka ya Zalayemila.

2 Mpe asalaki ete Amona ateleme liboso lya ebele, mpe azongelaki epai ya bango manso maye masalemaki epai ya bandeko ba bango uta o ntango eye Zenifi amataki libanda lya mboka yango kutu kina o ntango eye yemei amataki libanda lya mboka yango.

3 Mpe azongelaki lisusu epai ya bango maloba ma nsuka maye mokonzi Benyamina alakisaki bango, mpe alimbolaki mango o bato na mokonzi Limiyi, boye ete bakoka kososola maloba manso maye alobaki.

4 Mpe esalemaki ete esilisaka ye kosala enso eye, ete mokonzi Limiyi apanzaki ebele, mpe asalaki ete bazonga moko na moko epai ya ndako ya yemei.

5 Mpe esalemaki ete asalaki ete palaki iye ikwaki makundoli ma bato ba ye uta o ntango eye batikaki mboka ya Zalayemila, makoka komememe liboso lya Amona, ete akoka kotanga mango.

6 Sikawa, sasaipi lokola etangaka Amona likundoli, mokonzi atunaki ye soko akokaki kolimbola nkota, mpe Amona alobelaki ye ete akoka te.

7 Mpe mokonzi alobaki epai ya ye: Koyokaka mawa mingi mpo ya matungisa ma bato ba ngai, nasalaki ete ntuku inei na isato ya bato ba ngai bakende mobembo o kati ya esobe, ete na yango bakoka komono mboka ya Zalayemila, ete tokoka kobila epai ya bandeko ba biso babikisa biso o libanda lya bowumbu.

8 Mpe babungaki o esobe mpo ya ntaka ya mikolo mingi, nzokande bazalaki na etingia, mpe bamonoki te mboka ya Zalayemila kasi bazongaki o mboka eye, ekendeki bango mobembo o mboka yoko o ntei ya mai mingi, mpe ebombolaki bango mboka yoko etonda na mikuwa mya bato, mpe mya niama, mpe etondaki lokola na binielengeni bya ndako bya lolenge na lolenge, lokola ebombolaki bango mboka yoko efandamaki na bato ba motango monene lokola bibela bya Yisalaele.

9 Mpe mpo ya litatoli lyoko ete makambo balobaka mazalaki ma solo bamemeki palaki ntuku ibale na inei iye itondaki na minkoma, mpe izali ya wolo ya peto.

10 Mpe tala, lisusu, bamemeki bibende bya ntolo, biye bizali binene, mpe bizali bya motako mpe bya mbengi, mpe bizali bya lolenge mpenza.

11 Mpe lisusu, bamemeki mipanga, ya myango bisimbelo bibeba, mpe mbeli ya myango iguga tuu; mpe ezali moto te o mboka oyo akoki kolimbola lokota to minkoma miye mizali likolo lya palaki. Yango wana nalobaki epai ya yo: Okoki kolimbola?

12 Mpe nalobi epai ya yo lisusu: Oyebi moko oyo akoki kolimbola? Mpo nazali na mposa ete makundoli maye mabongolama na lokota la biso; mpo, mbele, makopesa biso boyebi boko bwa montika mwa bato baye babebisamaki, uta wapi makundoli maye mayei; to, mbele, makopesa biso boyebi boko bwa bato baye mpenza baye babebisamaki; mpe nazali na mposa ya koyeba ntina ya bobebisami bwa bango.

13 Sikawa Amona alobaki epai ya ye: Nakoki na ntembe te kolobela yo, O mokonzi, moto moko oyo akoki kobongola makundoli maye; mpo azali na nini akoki kotala, mpe kobongola makundoli manso maye mazali ma mikolo mya kala; mpe ezali likabo uta na Nzambe. Mpe biloko bibiangemi bibongolele, mpe moto te akoki kotala yango longola se soko atindami, soko te akotala eye asengelaki te mpe akowa. Mpe onso oyo atindami mpo ya kotala byango, ye kaka abiangemi momoni.

14 Mpe tala, mokonzi wa bato baye bazali o mboka ya Zalayemila azali moto oyo atindami mpo ya kosala makambo maye, mpe oyo azali na likabo liye linene uta na Nzambe.

15 Mpe mokonzi alobaki ete momoni moko azali monene koleka profeta moko.

16 Mpe Amona alobaki ete momoni moko azali mobimisi moko mpe profeta moko lokola; mpe likabo lyoko lizali linene mingi moto te akoki kozwa, longola se soko azwi nguya ya Nzambe, eye moto te akoki; nzokande moto moko akoki kozwa nguya enene epesami ye uta na Nzambe.

17 Kasi momoni akoki koyeba makambo maye maleka, mpe lokola makambo maye makoya, mpe na biango makambo manso makobimisama, to, nde, makambo ma nkuku makomonisama, mpe makambo mabombama makobima o mwinda, mpe makambo mayebani te makoyebisama na biango, mpe lisusu makambo makoyebisama o biango maye soko te makokaki koyebana te.

18 Boye Nzambe apesaki nzela ete moto, na bondimi, akoka kosala makamwisi ma nguya; yango wana akomi litomba lyoko linene epai ya baninga ba ye bato.

19 Mpe sikawa, etiaki Amona nsuka yoko ya kolobaka maloba maye mokonzi asepelaki mingi mpenza, mpe apesaki matondi na Nzambe, kolobaka: Na ntembe te mobombamo monene mozali o kati ya palaki iye, mpe bibongolele biye bilengelemeki mpo ya mwango mwa kotandola mibombamo mya lolenge loye na bana ba bato.

20 O boniboni ya bokamwi ezali misala mya Nkolo, mpe boniboni ntango elai ayokaki mpasi elongo na bato ba ye; iyo, mpe boniboni ya lolanda mpe ekangema ezali boyebi bwa bana ba bato; mpo balingi koluka bwania te, mpe bazali na mposa te ete boyangela likolo lya bango!

21 Iyo, bazali lokola ebwele ya zamba eye ekokima mobateli, mpe ekopalangana, mpe ebenganami, mpe eliami na niama ya zamba.