Makomi
Moziya 20


Mokapo 20

Boko bana basi ba Balamani bawambolami na Banganga ba Noa—Balamani basali etumba na Limiyi mpe bato ba ye—Mampinga ma Balamani babenganami mpe bazwi kimia. Penepene na 145–123 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa ezalaki esika yoko o Semiloni wapi bana basi ba Balamani bamisangisaki elongo mpo ya koyemba, mpe mpo ya kobina, mpe mpo ya komisepelisa.

2 Mpe esalemaki ete ezalaki mokolo moko motango moko moke mwa bango mosanganaki elongo mpo ya koyemba mpe kobina.

3 Mpe sikawa banganga ba mokonzi Noa, ezalaki bango koyoka nsoni mpo ya kozonga o mboka ya Nefi, iyo, mpe lisusu kobangaka ete bato baboma bango, yango wana bamekaki te kozonga na basi ba bango mpe bana ba bango.

4 Mpe etikalaki bango o esobe, mpe ebombolaki bango bana basi ba Balamani, babatamaki mpe basenzeleki bango;

5 Mpe emonoki bango ete ezalaki moke ya bango basanganaki elongo mpo ya kobina, babimaki o esika ya bango ya bonkutu mpe bakamataki bango mpe bamemeki bango o kati ya esobe; iyo, ntuku ibale na inei ya bana basi ba Balamani bamemeki o kati ya esobe.

6 Mpe esalemaki ete emonoki Balamani ete bana basi ba bango bazangaka, basilikaki na bato ba Limiyi, mpo bakanisaki ete ezalaki bato ba Limiyi.

7 Yango wana batindaki mampinga ma basoda ba bango; iyo, kutu mokonzi yemei akendeki liboso lya bato ba ye; mpe bamataki o mboka ya Nefi kobebisa bato ba Limiyi.

8 Mpe sikawa Limiyi abombolaka bango uta o linongi, kutu bolengeli bwa bango banso mpo ya bitumba bobombolamaki; yango wana asangisaki bato ba ye elongo, mpe babatamaki mpo ya kozila bango o bilanga mpe o zamba.

9 Mpe esalemaki ete emataka Balamani, bato ba Limiyi babandaki kokweya likolo lya bango na bisika bya bango bya kobatama, mpe babandaki koboma bango.

10 Mpe esalemaki ete etumba ekomaki nsomo mpenza, mpo babundaki bo nkosi mpo ya niama ikangi bango.

11 Mpe esalemaki ete bato ba Limiyi babandaki kobengana Balamani liboso lya bango; nzokande bazalaki te na motango mingi boye lokola Balamani. Kasi babundaki mpo ya bomoi bwa bango, mpe mpo ya basi ba bango, mpe mpo ya bana ba bango; yango wana basalaki makasi bangomei mpe bo dalagona ebundaki bango.

12 Mpe esalemaki ete bakutaki mokonzi wa Balamani o ntei ya motango mwa bakufi; nzokande akufaki te, ezokaki ye mpe atikalaki o mabele, boye mbangu mingi ezalaki bokimi bwa bato ba ye.

13 Mpe bakamataki ye mpe bakangaki mpota ya ye, mpe bamemeki ye liboso lya Limiyi, mpe balobaki: tala, awa ezali mokonzi wa Balamani; ezokaki ye akweyaki o ntei ya bakufi ba bango, mpe batikaki ye; mpe tala, tomemi ye liboso lya yo; mpe sikawa tika biso toboma ye.

14 Kasi Limiyi alobaki epai ya bango: Bokoboma ye te, kasi bokomeme ye awa mpo ete nakoka komono ye. Mpe bamemeki ye. Mpe Limiyi alobaki epai ya ye: Ntina nini ezwi bino mpo ya komata mpo ya kobunda na bato ba ngai? Tala, bato ba ngai babukaki te ndai eye nasalaki epai ya yo; yango wana, ntina kani bobuki ndai eye bosalaki epai ya bato ba ngai?

15 Mpe sikawa mokonzi alobaki: Nabukaki ndai zambi bato ba yo bamemeki mosika bana basi ba bato ba ngai; yango wana, na nkanda ya ngai nasalaki bato ba ngai bamata mpo ya kobunda na bato ba yo.

16 Mpe sikawa Limiyi ayokaka eloko yoko te etali likambo liye; yango wana alobaki: Nakoluka o ntei ya bato ba ngai mpe onso oyo asalaki likambo liye akowa. Yango wana asalaki boluki boko bosalema o ntei ya bato ba ye.

17 Sikawa eyokaka Gideona makambo maye, ye kozalaka kapiteni wa mokonzi, akendeki mpe alobaki epai ya mokonzi: Nakosenge yo otika, mpe oluka te bato baye, mpe otia te eloko eye o mokumba mwa bango.

18 Mpo emikundoli yo te banganganzambe ba tata wa yo, baye bato baye balukaki kobebisa? Mpe ezali bango te o esobe? Ezali bango te boko baye bayibaki bana basi ba Balamani?

19 Mpe sikawa, tala, mpe lobela mokonzi makambo maye, ete akoka kolobela bato ba ye ete bakoka kozwa kimia ona biso; mpo tala bazali kala kolengele mpo ya koya likolo lya biso; mpe tala lisusu ezali bobele moke ya biso.

20 Mpe tala, bakoya elongo na mampinga ma bango ya motango moike; mpe longola se soko mokonzi apesi bango kimia te ona biso tokowa.

21 Mpo maloba ma Abinadi makokisami te, maye abikulaki likolo lya biso—mpe enso eye zambi toyokemelaki te epai ya maloba ma Nkolo, mpe totikaki te masumu ma biso?

22 Mpe sikawa tika topesa mokonzi kimia; mpe tokokisa ndai eye tosalaki epai ya ye; mpo eleki bolami mingi tozala o bowumbu esika ete tobungisa bomoi bwa biso; yango wana, tika totia nsuka ya bosopi bwa makila maike.

23 Mpe sikawa Limiyi alobelaki mokonzi makambo manso matali tata wa ye, mpe banganga baye bakimaka o kati ya esobe, mpe atiaki bomemi mosika bwa bana basi ba bango na bango.

24 Mpe esalemaki ete mokonzi azwaki kimia ona bato ba ye; mpe alobaki epai ya bango: Tika tokende kokutana na bato ba ngai, maboko mazangi mandoki; mpe nakolapa epai ya bino na ndai ete bato ba ngai bakoboma bato ba yo te.

25 Mpe esalemaki ete balandaki mokonzi, mpe bakendeki, bazangi mandoki, kokutana na Balamani. Mpe esalemaki ete bakutanaki na Balamani; mpe mokonzi wa Balamani agumbamaki yemei liboso lya bango, mpe asambaki mpo ya litomba lya bato ba Limiyi.

26 Mpe emonoki Balamani ete bato ba Limiyi bazalaki na mandoki te, bayokaki mawa likolo lya bango mpe bazwaki kimia ona bango, mpe bazongaki elongo na mokonzi wa bango na kimia o mboka ya bango.