Likita Linene
Tominamaki na esengo ya Klisto
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Tominamaki na esengo ya Klisto

Natatoli ete Tata na biso ya Lola ayokaka mabondeli na bino ya mai ya miso mpe akoyanola ntango nyonso na bwanya ya kokoka.

Tolingi yo, Mpaka Kearon. Nakoki kodefa accent wana mpo na baminite zomi?

Makamwisi oyo Tozali Kolikya

Na Kondimana na Sika toyekoli oyo etali Bartimee oyo akufa miso, oyo agangaki epayi ya Yesu na mposa ya likamwisi. “Yesu alobelaki ye ete, Kende na yo, kondima na yo esili kobikisa yo. Mpe mbala moko azongelaki komona.”1

Na libaku mosusu mobali moko na Betesaida azalaki na mposa makasi ya kobikisama. Nzokande, likamwisi yango eyaki mbala moko te. Kasi, Yesu apambolaki ye mbala mibale liboso “azongela komona.”2

Na ndakisa ya misato, Apostolo Paulo “abondelaki Nkolo mbala misato” kati na motungisi na ye,3 nzokande, na boyebi na biso, bosenga na ye ya solo epesamaki te.

Bato misato ya kokesena. Ba expeliense misato oyo ekokani na mosusu te.

Na boye, motuna: mpo na nini basusu bazwaka makamwisi na bango ya mposa makasi nokinoki, ntango basusu na motema molai bayikaka mpiko, kozelaka Nkolo?4 Tokoki koyeba te mpo na nini, kasi na botondi, toyebi Ye oyo “alingaka [biso]”5 mpe “[asalaka] makambo nyonso mpo na bolamu mpe esengo [na biso].”6

Mikano ya Bonzambe

Nzambe, oyo Azali komona nsuka uta na ebandeli,7 Azali kondimisa, “Mikakatano na bino mpe mitungisi na bino ekozala kaka mwa ntango moke”8 mpe ekobulisama “mpo na litomba na yo.”9

Kosalisa biso tozwa ndimbola mosusu na mimekano na biso, Mpaka Orson F. Whitney atangisaki: “mpasi moko te oyo tozali konyokwama, momekano moko te oyo tozali na yango ezali mpamba. Ezali kotangisa biso. … Nyonso … oyo toyikaka mpiko [na motema molai] … etongaka bizaleli na biso, epetolaka mitema na biso, epanzanaka na milimo na biso, mpe ekomisaka biso na bolingo mpe na bolingo malamu. … Ezali na nzela ya mawa mpe mpasi, na mosala makasi mpe na bolozi, nde tozali kozwa mateya oyo toyeli awa mpo na kozwa mpe oyo ekosala ete tokokana mingi na [baboti na biso ya lola].”10

Kososola ete “nguya ya Klisto [eko] pema likolo na [ye]” na bampasi na ye, Apostolo Paulo alobaki na komikitisa, “Pamba te ezali na tango nazalaka na bolembu, nde natondaka na makasi.”11

mimekano ya bomoi ezali komonisa biso.12 Kutu Mobikisi “Ayekolaki … botosi na nzela” mpe asalamaki “ya kokoka na nzela ya mpasi.”13

Mpe mokolo moko Akosakola na motema nyonso, “Tala, Napetolaki yo, Naponaki yo o etumbelo ya mitungisi.”14

Koya kotya motema na mikano ya bonzambe ya Nzambe epesaka elikya kati na bato ya kolemba mpe epelisaka mokano na bileko ya pasi mpe mpasi ya motema.15

Makanisi ya Bonzambe

Mibu oyo eleki, Mokambi Russell M. Nelson akabolaki likanisi oyo ya motuya: “Ntango tozali kotala makambo nyonso na makanisi ya seko, ekokitisa mpenza mokumba na biso.”16

Elilingi
Holly mpe Trey Porter.

Mwasi na ngai, Jill, mpe ngai kala mingi te tomonaki bosolo oyo na bomoi ya sembo ya Holly mpe Rick Porter, oyo mwana na bango ya mobali ya mibu 12, Trey, akufaki na moto ya mawa. Na maboko mpe makolo oyo ezikaki makasi na komekaka ya elombe mpo na kobikisa mwana na ye ya mobali ya bolingo, Holly atatolaki nsima na likita ya elambo ya palwasi na kimia mpe esengo monene Nkolo asopaki likolo ya libota na ye na bapasi na bango, kosalelaka maloba lokola likamwisi, kokamwisa, mpe kokamwa.

Elilingi
Kosimba loboko ya kobikisa.

Mawa ya makasi ya mama oyo ya motuya ezwaki esika na kimya oyo elekaki ntango likanisi oyo eyaki na makanisi na ye: “Maboko na ngai ezali maboko te oyo ebikisaka. Maboko wana ezali ya mobikisi! Na esika ya kotala bampota na ngai lokola bokundoli ya oyo nakokaki kosala te, namikundoli bampota Mobikisi na ngai amemi.”

Litatoli ya Holly ekokisi elaka ya profeta na biso: “Ntango bozali kokanisa lola, bokotala mimekano mpe botelemeli na lolenge ya sika.”17

Mpaka D. Todd Christofferson alobaki: “Nandimi ete mokakatano ya kolonga mpe kokola uta na mpasi esepelisaki biso ntango Nzambe alakisaki mwango na Ye ya bosikoli na bomoi yambo ya mbotama ya mokili. Tosengeli kopusana penepene na mokakatano wana sikawa koyebaka ete Tata na biso ya Lola akosunga biso. Kasi ezali na ntina mingi tobaluka epayi na Ye. Soki Nzambe azali te, makambo ya molili ya mpasi mpe mikakatano ezalaka na momeseno ya kozanga elikya, kozangisa elikya, mpe kutu na bololo.”18

Mibeko ya Bonzambe

Mpo na kokima molili ya kozanga bosepeli mpe na esika na yango kozwa kimya monene, elikia, mpe kutu esengo na ntango ya mikakatano ya mpasi ya bomoi, Nazali kokabola mibeko misato ya bonzambe lokola mabiangi.

Moko—kondima ya makasi koleka eyaka na kotya Yesu Klisto na esika ya liboso.19 “Botala epai na ngai na makanisi na bino nyonso,” Azali kosakola; “botia ntembe te, bobanga te.”20 Mokambi Nelson ateyi:

“Bomoi [na biso] ya seko etali bondimi [na biso] na [Klisto] mpe na Bomikabi na Ye,”21

“Komitungisaka na mpasi makasi oyo esalamaki na likama na ngai ya kala te, nayokaki kutu bosepeli makasi mpo na Yesu Klisto mpe likabo ezanga bososoli ya Bomikabi na Ye. Kanisa yango! Mobikisi anyokwamaki ‘mpasi mpe mitungisi mpe masenginya ya ndenge na ndenge‘ mpo ete Akoka kolendisa biso, kobikisa biso, [mpe] kosunga biso, na bantango ya bosenga.”22

Akobaki: “Likama na ngai etindi ngai nakanisa lisusu mpe lisusu ‘Moko ya monene koleka ya Mosantu ya Yisalaele.’ Na ntango ya libiki na ngai, Nkolo alakisaki nguya na Ye ya bonzambe na ndenge ya kimya mpe ya banzela ya polele.”23

“Kati na mokili bokozala na mitungisi: kasi bozala na esengo malamu,” Mobikisi na biso alendisi; “ngai nasili kolonga mokili.”24

Mibale—elikya ya kongenga mingi eyaka na komonaka na makanisi destin na biso ya seko.25 Na kolobela nguya oyo ezali na kati ya kobatela “emonaneli ya mapamboli ya Tata na biso oyo elakamaki oyo ekoki kondimama te … liboso ya miso na biso mikolo nyonso,” Ndeko mwasi Linda Reeves atatolaki: “Nayebi te mpo na nini tozali na mimekano mingi oyo tozali na yango, kasi ezali liyoki na ngai moko ete mbano ezali monene mpenza, … esengo mpenza mpe koleka bososoli na biso ete na mokolo wana ya mbano, tokoki koyoka mpo na koloba na Tata na biso ya motema mawa mpe ya bolingo, ‘Yango nde esengelaki nde?’ … Ekozala na ntina nini … oyo tonyokwamaki awa soki, na suka, komekama wana … epesi biso masengami mpo na kozwa bomoi ya seko … na bokonzi ya Nzambe?”26

Mokambi Nelson akabolaki bososoli oyo: “Banza eyano ya Nkolo epai ya Joseph Smith ntango abondelaki mpo na lisungi ya Boloko ya Liberty. Nkolo ateyaki Profeta ete mpasi na ye ya bomoto ekopesa ye boyebi mpe ezali mpo na bolamu na ye. ‘Soki okangi motema malamu’, ‘Nkolo akotombola yo likolo.’ Nkolo azalaki koteya Joseph akanisa lola mpe aluka lifuti ya seko koleka kotalela makambo ya bampasi ya mokolo.”27

Mbongwana ya Joseph na lolenge ya kotalela makambo ememaki bosantu ya mozindo, ndenge emonisami na mokanda oyo mpo na moninga moko: “Nsima ya kokangama na bifelo ya boloko na boumeli ya sanza mitano emonani na ngai ete motema na ngai ekozala ntango nyonso na boboto mingi nsima ya likambo oyo koleka lolenge ezalaki liboso. … Nakanisi ete nakokaki ata moke te koyoka lokola nazali komiyoka sikawa soki nanyokwamaki te na mabe oyo nakutanaki na yango.”28

Misato—nguya monene ewutaka na kotya makanisi na esengo.29 Na bowumeli ya bangonga ya ntina mingi, ya mpasi ya seko, Mobikisi na biso Akitanaki te kasi Amelaki kopo ya bololo.30 Lolenge nini Asalaki yango? To tangaka, “Mpo na esengo oyo etiamaki liboso na ye [Klisto] Ayikaki mpiko na ekulusu,”31 bolingi na Ye “kominama na bolingi ya Tata.”32

Elilingi
Klisto na Getesemana.

Liloba oyo “eminami” esimbaka ngai mingi. Bosepeli na ngai ekomaki makasi ntango nayebaki ete naki Espagnol, “eminami” ebongolami lokola “elyami.”; naki Allemand, lokola “esili kolyama”; mpe naki Chinois, lokola ”ezipami.” Na yango, ntango mikakatano ya bomoi ezali kopesa mpasi mingi mpe koleka, Namikundolaka elaka ya Nkolo—ete “tosengeli konyokwama na bampasi ata moko te, longola se [ezali] kominama [kosilisama, koliama, mpe kozindisama] na bosepeli ya Klisto.”33

Nazali komona kati na bino ebele esengo oyo, oyo “[ezali koboya] … bososoli ya moto,”34 ata soki bakopo na bino ya bololo elongolami naino te. Matondo mpo na kobatela mayokani na bino mpe kotelema lokola batatoli mpo na Nzambe.35 Matondo mingi mpo na kosembola loboko mpo na kopambola biso banso, ntango “na kati ya motema [na yo] ya kimia ebombami mawa oyo liso ekoki komona te.”36 Mpo ntango ozali komema lisungi ya Mobikisi epai ya basusu, okozwa yangi mpo na yo moko, eteyaki Mokambi Camille Johnson.37

Bilaka ya Bonzambe

Sikoyo, zonga na ngai na likita ya elambo esika totatolaki likamwisi ya libota ya Holly Porter oyo basunganaki na Nkolo.38 Ntango nafandaki komanyola nini nakokaki koloba mpo na kopesa libondisi na libota oyo ya kokamwa mpe baninga na bango, likanisi oyo eyaki: “Salela maloba ya Mobikisi.”39 Bongo, nakosukisa lelo lokola nasalaki na Saba wana, na maloba na Ye, “oyo ebikisaka motema ezoka.”40

“Boya epayi na ngai, bino banso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.”41

“Nakokomisa lisusu pepele mikumba miye mitiami likolo lya mapeka ma bino, ete kutu bokoka koyoka myango te likolo lya mikongo mya bino, kutu ntango ezali bino o bowumbu; … ete bokoka koyeba na ntembe te ete Ngai, Nkolo Nzambe, nakobimela bato ba ngai o matungisi ma bango.”42

“Nakotika bino lokola bana etike te: nakoya epayi na bino.”43

Motatoli na ngai

Na limemya ya bosepeli, Natatoli bomoi ya Mobikisi na biso mpe bilaka na Ye ezali ya solo.44 Mingimingi mpo na bino oyo bozali kotungisama to oyo “bonyokwami na lolenge nyonso,”45 Natatoli ete Tata na biso ya Lola Ayokaka mabondeli na bino ya mai ya miso46 mpe Akoyanola ntango nyonso na bwanya ya kokoka.47 “Nzambe Apesa bino,” lokola asali mpo na libota na biso na ntango ya bamposa makasi, “mpo ete mikumba na bino ezala pepele,”48 kutu “kominama na esengo ya Klisto.”49 Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.