Likita Linene
Bokeseni na Makambo Nyonso
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Bokeseni na Makambo Nyonso

Mpo na kozala na makoki ya kosala, tosengeli kozala na banzela ekeseni oyo esengeli kotalela.

Kala te, ntango nazalaki kokumba motuka na engumba toyebaki te, nazwaki na kozanga koyeba nzela ya mabe, oyo ememaki mwasi na ngai mpe ngai na nzela monene ya mbangu oyo ezalaki na bantaka ya kilometele mingi kozangaka makoki ya kozonga lisusu. Toyambaki mbela ya kokende na ndako ya moninga moko mpe tomitungisaki ete tokoki sikawa kokoma na ngonga te koleka oyo tokanisaki.

Ntango na nzela mpe na mawa nyonso kolukaka nzela ya kobimela lisusu, namisilikelaki ngai moko mpo na kozanga kosala bokebi na elembo ya botambwisi. Likambo yango esalaki ngai nakanisa oyo etali boniboni kati na bomoi na biso ntango mosusu tozwaka mikano ya mabe mpe lolenge nini tosengeli kobika na bambano na bomikitisi mpe kokanga motema kino tokokoka kobongola etamboli na biso lisusu.

Bomoi ezali kaka mpo na kosala maponi. Tata na biso ya Lola apesaki biso likabo ya bonzambe ya makoki ya kosala mpo ete tokoka koyekola uta na maponi na biso—uta na ya malamu mpe ya mabe. Tobongisaka maponi na biso ya mabe ntango toyamboli. Awa nde epayi bisengo ekolaka. Mwango ya Tata na Lola mpo biso nyonso etali boyekoli, bokoli, mpe bokobi mpo na kokende na bomoi ya seko.

Banda ntango mwasi na ngai mpe ngai toteyamaki na bamisionele mpe tokotaki na Eklezia mibu mingi eleki, nakamwisami ntango nyonso mateya ya bozindo oyo Lehi apesaki na mwana na ye ya mobaki Yakobo na Buku ya Mormon. Ye ateyaki ete “Nkolo Nzambe apesaki epayi ya moto ete asala mpo na yemoko”1 mpe ete “esengalaki mpenza ezala, ete ezala bokeseni na makambo nyonso.” Mpo na kozala na makoki ya kosala, tosengeli kozala na banzela ekeseni oyo esengeli kotalela. Na kosalaka bongo, Buku ya Mormon ekundolisi biso lisusu ete biso “toyekolisamaki na bokoki nyonso”3 mpe ete “Molimo ya Klisto”4 epesami na moto nyonso na biso mpo na “koyeba malamu na mabe.”

Na bomoi, tokutanaka ntango nyonso na maponi mingi ya motuya. Ndakisa:

  • Koponaka soki to te tokolanda mitindo ya Nzambe.

  • Koponaka kozala na bondimi mpe koyeba ntango bikamwa eyei to na ntembe kozelaka mpo na eloko moko eya yambo ya kopona kondima bobele ntangowana.

  • Koponaka kokolisa elikya na Nzambe to na bobangi nyonso kozela mokakatano mosusu na mokolo elandi.

Ntango tozwaki nzela ya mabe, konyokwamaka na bambano ya mikano na biso moko ya mabe ekoki mbala mingi kozala mingimingi mpasi mpo ete bobele tokomigangala biso moko. Atako, tokoki ntango nyonso kopona koyamba bolendisi na nzela ya lolenge ya boyamboli ya bonzambe, kosala makambo ya mabe ekoma malamu, mpe na kosalaka bongo koyekola mwa mateya ya mbongwana ya bomoi.

Ntango mosusu tokoki lisusu kokutana na bokeseni mpe mimekano uta na makambo tokoki kososola te, lokola:

  • Ntango ya maladi mpe bileko ya bobeli.

  • Ntango ya kimya mpe ntango ya bitumba.

  • Bangonga ya moi mpe ya butu mpe bileko ya moyi mpe ya malili.

  • Ntango ya mosala elandisami na ntango ya bopemi.

Atako mingi tokokaka te kopona katikati ya makambo ya lolenge oyo mpo ete yango ekomaka kaka, tozali kaka na bonsomi ya kopona boniboni koyanola na yango. Tokoki kosala bongo na makanisi ya malamu to ya bozangi elikya. Tokoki koluka koyekola uta na makambo tokutanaka na yango mpe kosenga lisungi mpe lisalisi ya Nkolo, to tokoki kokanisa ete tozali biso moko kati na momekano oyo mpe ete tosengeli konyokwana biso moko. Toki “kobongisa minano na biso ” mpo na solo ya sika, to tokoki kozwa mokano ya kobongola eloko moko te. Na molili ya butu, tokoki kopelisa minda na biso. Na eleko ya malili makasi, tosengeli koponaka kolata bilamba ya malili. Na bileko ya maladi, tokoki koluka lisalisi ya monganga mpe ya molimo. Toponaka lolenge nini kosala na mabaku oyo.

Kobongisa, koyekola, , kopona nyonso ezali lolenge ya kosala. Tomikundola ete tozali basali kasi biloko te. Tika tobosana te ete Yesu alakaki ete ye “akomema likolo na ye bampasi mpe maladi ya bato na ye … ete ye akoki … kosunga” to kosalisa, biso soki totali epayi na Ye.6 Ntango toponi kotonga moboko na biso likolo ya libanga oyo ezali Yesu Klisto mpo ete ntango mbonge makasi eyei “ekozala na nguya moko te likolo na [biso].”7 Alakaki ete “moto nyonso akoya [epayi na Ye], ye [Ye] akoyamba; mpe akopambola baoyo bakoya epayi na [Ye].”8

Sikawa, ezali na mobeko moko ya kobakisa oyo ezali mingimingi motuya. Lehi alobaki ete mpo “esengeli mpenza ezala … na bokeseni na makambo manso.”9 Elingi koloba ete bokeseni ezali kozanga te uta moko na mosusu. Bakoki kutu kobakisana moko na mosusu. Tokokaki te koyeba esengo soki toyebaki mawa te na ngonga moko mpe mosusu. Koyoka nzala na ntango mosusu esalisaka biso tozala na botondi ya sikisiki ntango tozwaka oyo ekoki mpo na kolia lisusu. Tokokaki te koyeba bosolo longola se soki tomonaki te lokuta awa mpe kuna.

Babokeseni oyo ezali lokola ngambo mibale ya mbongo ya libende. Bangambo nyonso mibale ezalaka ntango nyonso. Charles Dickens apesaki ndakisa moko ya likanisi oyo ntango akomaki ete “yango ezalaki ntango ya malamu mpenza, yango ezalaki ntango ya mabe mpenza.”10

Botika napesa ndakisa moko uta na bomoi na biso moko. Kobala, mpe kotonga libota, mpe kobota bana ememelaki biso bantango minene ya esengo mpenza oyo tomona naino na bomoi na biso te kasi lisusu bantango ya mozindo ya mpasi mpenza, ya motungisi, mpe mawa ntango eloko moko ekomelaka na moko kani na biso. Esengo ezanga ndelo mpe bosepeli elongo na bana na biso ntango mosusu elandamaka lisusu na bileko ya maladi, bokoti lopitalo, mpe babutu ezanga mpongi etondisami na bobangi ya mbala na mbala, elongo na bopemi ezwami na losambo mpe mapamboli ya bonganganzambe. Makambo oyo ekokani te eteyaki biso ete tozali biso moko te na bantango ya minyoko, mpe yango elakisi biso lisusu boniboni tokoki komema lisalisi mpe lisungi ya Nkolo. Makambo oyo esalisaka mpo na kotonga biso na ndenge moko ya kafukafu, mpe ezalaki mpenza na motuya. Ezali mpo na yango te nde toyaki awa?

Kati na makomi tozwaka lisusu mwa bandakisa malamu:

  • Lehi ateyaki mwana na ye ya mobali Yakobo ete minyoko ye anyokwamaki na esobe esalisaki ye ayeba bonene ya Nzambe mpe ete “[Nzambe] akobulisa mitungisi [na ye] mpo na [ya ye] litomba.”11

  • Na ntango ya bokangemi ya mpasi ya Joseph Smith na boloko ya Liberty, Nkolo alobaki na ye ete “ makambo nyonso oyo ekopesa [ye] mayele, mpe ekozala mpo na bolamu na [ye] .”12

  • Nsukansuka, mbeka ezanga ndelo ya Yesu Klisto ezalaki na bosolo mpenza ndakisa monene ya mpasi mpe minyoko emonana ata mokolo moko te, kasi yango ememaki lisusu mapamboli ya kitoko ya Bomikabi mpo na bana nyonso ya Nzambe.

Esika moyi ezali kongenga, elilingi esengeli ezala wana mpe lisusu. Mpela ekoki komema bobebisi, kasi na momesano yango ememaka mpe bomoi. Mpizoli ya mpasi ebalukaka na mpizoli ya lisungi mpe ya bosepeli. Mayoki ya mawa ntango balingami bakufi ezalaka nsima kozwama esika na esengo ya kokutana lisusu. Na eleko ya bitumba mpe bobebisi, misala mingi ya mikemike ya boboto mpe bolingo eyaka lisusu mpo na baye bazali na “miso mpo na komona, mpe matoyi mpo na koyoka.”13

Mokili na biso lelo oyo etondisami mingimingi na bobangi mpe mitungisi—bobangi ya oyo lobi ekoki komemela biso. Kasi Yesu ateyaki biso kotia elikya mpe “kotala epayi na [Ye] na makanisi nyonso; ntembe te, kobanga te.”14

Tika biso tosala ntango nyonso bokasi moko ya boyebi mpenza mpo komona bangambo mibale nyonso ya mbongo ya libende epesameli biso na bomoi na biso. Atako ngambo nyonso mibale ekokintango mosusu komonana te mbala moko na biso, tokoki koyeba mpe kolikya ete yango ezali wana ntango nyonso.

Tokoki kotikala ya kondimisama ete mikakatano, kolela, minyoko, mpe bampasi nde emonisaka biso te; nzokande yango ezali lolenge nini biso tolandeli yango nde ekosalisa biso tokola mpe topusana pembeni ya Nzambe. Ezali lolenge mpe maponi na biso nde emonisaka biso malamu koleka na esika ya mikakatano na biso.

Ntango ozali na na bokolongono, linga mpe zala na botondi mpo na yango na ngonga nyonso. Na ntango ya maladi, luka koyekola na bokangi motema nyonso uta na yango mpe yeba ete yango ekoki kobongwana lisusu engebene na bolingi ya Nzambe. Na ntango ya mawa, likya ete esengo ezali nzinganzinga; mbala mingi tozali kaka komona yango naino te. Na mayele nyonso tia makanisi mpe tombola makanisi na yo na ngambo malamu ya mikakatano, mpo ete yango na ntembe te yango ezali mpe wana. Kobosana ata mokolo moko te kozala na botondi. Bopona kondima Bopona kozala na bondimi kati na Yesu Klisto. Bopona ntango nyonso kotiela Nzambe motema. Bopona “kokanisa na lolenge ya lola,” lokola Mokambi Russell M. Nelson ateyaki biso kala te!15

Totia na makanisi ntango nyonso mwango ya kafukafu ya Tata na biso na Lola mpo na biso. Ye alingi biso mpe atindaki Mwana na Ye ya Bolingo mpo na kosalisa kati na mimekano na biso mpe kofongolela biso ekuke ya kozonga epayi na Ye. Yesu Klisto azali na bomoi mpe atelemi kuna na ngonga nyonso, kozelaka biso topona kobenga Ye mpo na kopesa lisungi, bokasi, mpe libiki. Na ntina ya makambo oyo natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.