Likita Linene
Batempelo, Bandako ya Nkolo Ezali Kotongama Bisika nyonso na Mabele
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Batempelo, Bandako ya Nkolo Ezali Kotongama Bisika nyonso na Mabele

Ntango ozali koya na bokoki mpe libondeli na ndako na Ye esantu, okopambolama na nguya na Ye.

Olingaka te maloba kitoko oyo towuti koyemba? “Nakolendisa yo, kosalisa yo, mpe kosala yo otelema, … Osimbami na loboko na ngai ya sembo mpe ya nguya.”1 Nkolo alendisaka Basantu na Ye ya mbula nyonso ntango bazali koya na ndako esantu na Ye. Uta Kinshasa kino na Zollikofen na Fukuoka na Oakland, bilenge, na makasi na bango moko, bazali kotondisa maziba ya libatisi ya tempelo . Na kala, balingami basali mingi ya makuli bazalaki na suki ya mua motane—kasi lelo ezali lisusu bongo te. Bamisionele babiangema, bamisionele ya mosala, mpe bamisionele bazonga bazali bisika nyonso na nzela. Na mokili mobimba ezali na liyoki oyo ezali kokola kobendaka biso na ndako ya Nkolo.

Mwa mibu eleki, molingami moninga moko ya libota, ya mibu 95 afandi na ngambo ya esiti ya Etazini, oyo ateyamaki na bamisionele uta mibu 70, alobelaki mwana na ye ya mwasi, “nalingi nakende na yo na tempelo.”

Mwana na ye ya mwasi ayanolaki, “Malamu, Mama, osengeli obatisama nanu.”

Elilingi
Libatisi ya ndeko mwasi ya mobange.

“OK,” ayanolaki, “nsima, nasengeli kobatisama.” Ye abatisamaki. Mwa mikolo moke nsima, na limemya asepelaki kozinda na liziba ya tempelo. Mpe kaka sanza moko eleki, azwaki dotasio mpe bokangi na ye moko. “Boyebi mpe nguya ya Nzambe ezali kokola; elamba oyo ezipi mabele ebandi kopasuka.”2

Elilingi
Ndeko mwasi ya mobange libanda ya tempelo.

Bosila komitungisa mpo na nini Nkolo asengelaki kotinda profeta na Ye sikawa atonga na mabele batempelo na Ye esantu?3 Mpo na nini Alingaki, na ntango oyo elongobani kopesa nkita esengeli na bato na Ye ya boyokani mpo ete na nzela ya moko na zomi na bango ya bule, bankama ya bandako ya Nkolo ekoka kotongama?

Ntongo ya lelo, Mokambi Dallin H. Oaks alakisaki elilingi ya kitoko ya tempelo oyo ezali kotongama kati na mikili mobimba. Kathy mpe ngai tozalaki na Philippines kala te. Bokanisa likamwisi oyo: Tempelo ya Manila ekulisamaki na 1984. Esengelaki kozela mibu 26 yambo tempelo ya mibale, na Cebu City, esila na 2010. Sikawa, mibu 14 nsima, batempelo 11 ezali kotongama, elengelami to ebongisami mpo na bobulisi. Uta na nordi kino na sudi: Laoag, Tuguegarao, Santiago, Urdaneta, Alabang, Naga, Tacloban City, Iloilo, Bacolod, Cagayan de Oro, mpe Davao. Ezali kokamwa komona misala kitoko ya Nzambe!

Elilingi
Batempelo na Philippines.

Na mokili mobimba, bandako ya Nkolo ezali kopusana pene na biso. Mpo na nini na mikolo na biso?

Mikolo mya Nsuka

Nkolo akebisaki ete na mikolo ya nsuka, mawa ekozala na kati ya bikolo,4 bato “bakomilinga bangomei,”5 “biloko nyonso [ekozala] na buluyeke,”6 mubulungano ekozala makasi,7 mpe “mitema ya bato [ekobungisa] bango.”8 Tomoni mpenza mitema ya mibali mpe basi ndenge ekweisa bango: masenginya ya mokili, bobungisi makanisi na mingongo ya bopengwisi, kobwakisa bileyi ya molimo, bolembu na bosenga ya kimoyekoli.9 Mbala mosusu oyokaki mawa ntango omonaki moto oyo olingaka, oyo mokolo moko alobaki bosolo ya bondimi na ye na Yesu Klisto, atatolaki na ntina ya Buku ya Mormon, mpe akanaki kosalisa kotonga bokonzi ya Nzambe, kokoba, na mbalakaka abungi nzela, mpo na sikawa, akeyi mosika uta ya babondimi na ye mpe na bandelo ya Eklezia. Toli na ngai epayi na yo ezali ete kobungisa elikya te! Nyonso ezali malamu. Na Nzambe, eloko moko te ezali mpasi.10

Na buluyeke oyo esakolamaki mpe bozangi kondima na mokili, Nkolo alakaki ete ekozala bato ya boyokani, bato oyo na bompikiliki ya kozela bozongi na Ye, bato oyo bakotelema na bisika bisantu mpe bakolongwa te na esika na bango.11 Alobelaki bato ya sembo oyo bakotelemela bokosi ya monguna, bakotalela bobele kondima na bango, bakokanisa lola, mpe bakondimela na motema mobimba Mobikisi, Yesu Klisto.

Mpo na nini Nkolo azali sikawa komema bankama ya batempelo pene na biso? Ntina moko ezali ete na kati ya mbonge mpe masenginya ya mokili, Alakaki kolendisa mpe kopambola Basantu na Ye ya boyokani, mpe bilaka na Ye ezali kokokisama.

Bilaka uta na Tempelo ya Kirtland

Lolenge nini bandako esantu oyo elendisaka, ebondisaka mpe ebatelaka biso? Tokozwa eyano na kati ya mabondeli ya Profeta Joseph Smith na kati ya bobulisi ya Tempelo ya Kirtland. Ezali nde na kati ya Tempelo oyo nde Basantu bayembaki, “Tokoyemba pe tokoganga elongo na mampinga ya lola.”12 Mobikisi Yemei abimelaki, mpe baprofeta ya kala bazongaki, kopesaka bafungola ya kobakisa ya bonganganzambe ya nsango malamu ezongisama.13

Na libaku wana ya bule na kati ya Tempelo ya Kirtland, profeta asambelaki ete na kati ya ndako esantu ya Nkolo, Basantu bakolatisama na bibundeli na nguya ya Nzambe, ete nkombo ya Yesu Klisto ekozala likolo na bango, ete banzelu bakozala na mikumba na bango, mpe ete bakokola kati ya Nkolo mpe bakozwa litondi ya Molimo Mosantu.”14 Mabondeli oyo ya nguya ezali kokokisama na babomoyi na biso ntango togumbamelaka na bosembo kati na ndako ya Nkolo.

Balatisama na Nguya

Kati na ndako na Ye, tolatisamaka mpenza na nguya ya lola.15 Bondimi na biso kati na Yesu Klisto mpe bolingo na biso mpo na Ye endimisamaka mpe elendisamaka. Tondimisami na molimo ya bomoto na biso ya solo mpe bantina ya bomoi.16 Lokola tozali sembo, topambolami na bobateli uta na masenginya mpe babobungisi makanisi. Toyokaka bolingo ya Mobikisi na biso ntango Atombolaka biso uta na mikakatano mpe mawa biso. Tolatisami na mandoki ya nguya ya Nzambe.

Nkombo na Ye likolo na Biso

Na kati ya ndako esantu, tozwaka nkombo na Ye mobimba koleka likolo na biso. Ntango tobatisamaka, tosakolaka bondimi na biso epayi na Ye mpe bolingi na biso ya kobomba mitindo na Ye. Na kati ya tempelo, tolakaka na bosantu, na nzela ya mayokani na biso, mpo na kolanda Ye libela.

Elilingi
Lilandi ya Tempelo ya Heber Valley Utah.

Bilenge ya Eklezia oyo bazali ya kokamwa. Na mokili ya mpasi, bazwaka likolo na bangomei nkombo ya Klisto. Na Heber City, Utah, liyangani ya bato esalamaki mpo na kolobela makambo mikemike ya kotonga tempelo. Bilenge nkama misato batondisaki parke mpo na kolakisa lisungi na bango mpo na tempelo oyo esakolamaki. Elenge moko, kolobaka na bakambi ya leta na likita efungwama, na bokasi nyonso alimbolaki, “Nazali kolikya nakobaIa kati ya tempelo oyo. [Tempelo ekosalisa] ngai nazala na mbindo te mpe nazala peto.” Mosusu alimbolaki tempelo lokola elembo ya pole mpe elikya. Bilenge mibali mpe basi ya Eklezia na mokili mobimba bazali koyamba nkombo ya Yesu Klisto.17

Elilingi
Bilenge batondisi parke na Engumba ya Heber.

Banzelu elongo na Biso

Na kati ya Tempelo ya Kirtland, Profeta Joseph asambelaki ete “banzelu basengelaki] kozwa mokumba likolo [ya Basantu].”18 Kosalaka makuli mingmingi mpo na bankoko na biso na tempelo ememaka bondimisi moko kitoko mpe ya solo ete bomoi ezali kokoba na nsima ya nkufa.

Atako baboyebi na biso na ndako ya Nkolo ezali bule mpo na koyebisa yango na bato, misusu tokoki koloba yango. Mibu ntuku minei eleki, ntango tozalaki na Florida, Kathy mpe ngai tokendaki mobembo na tempelo na Atlanta, Georgia. Na butu ya mokolo ya misato, mokolo ya 9 Sanza ya mitano na mobu 1984, ntango tosilisaki liyangani na tempelo, mosali bokuli moko apusanaki pene na ngai mpe atunaki soki nazalaki bobele na ntango mpo ya kosala bokuli ya ebandeli. Nkombo ya moto nazali nakosalela eyebanaki te. Nkombo na Ye ezalaki Eleazer Cerc.

Mokolo oyo elandi, tempelo etondaki na Basantu. Ntango nazalaki komilengela mpo na kosala dotasio na ngai ya mibale ya mokolo, napesamaki nkombo ya moto oyo nasengelaki kosalela. Kokamwa, nkombo ezalaki ndenge moko na nkombo ya moto oyo nasalelaki na mpokwa eleki, Eleazer Cercy. Nayokaki Molimo ya Nkolo ntango dotasio esilaki. Nsima na mpokwa, kaka na kati ya tempelo, Kathy amonaki moninga moko mobange ya libota, Ndeko mwasi Dolly Fernandez, oyo azali kofanda sikawa na Atlanta. Afandaka na ndeko mobali te na libota na ye, atunaki soki nakokaki kosunga na bokangisi ya tata na ye na baboti ya tata na ye. Nazwaki solo lokumu.

Ntango nafukamaki na makolo ya lotale mpo na bokuli wana ya bule, nayokaki lisusu nkombo oyo ekomamaki na makanisi na ngai, tata na ye, Eleazer Cercy. Nandimelaka ete nsima ya bomoi oyo, nakokutana mpe nakoyamba moto moko ayebana na bomoi na ye ya nkufa lokola Eleazer Cercy.

Mingi ya baboyebi na biso na ndako ya Nkolo ememaka esengo ya kimia mpe emoniseli ya kimia koleka makambo ya minene. Kasi yeba ete: baanjelu bazali na mukumba likolo na biso!

Litondi ya Molimo Mosantu

Likabo ya Molimo Mosantu epesamelaka biso ntango tondimisami lokola mondimi ya Eklezia. Poso nyonso ntango toliaka elambo na kolongobana limpa mpe tomelaka mayi mpo na komikundola Mobikisi na biso, tolakelamaka ete Molimo na Ye ekozala ntango nyonso na biso.19 Ntango toyaka na mitema ya bolingi na ndako ya Nkolo, esika moko esantu koleka na mabele, tokolaka kati ya Nkolo mpe “tozwaka litondi ya Molimo Mosantu.”20 Na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu, totondisamaka na kimya mpe esengo mpe elikya makasi koleka.21 Tozwaka bolendisi mpo na kotikala bayekoli na Ye atako na ntango oyo tomimonaka bisomei kozala libanda ya bisika bisantu.

Mokambi Russell M. Nelson alobaki “Mobikisi mpe Mosikoli na biso, Yesu Klisto, akosala misala na Ye ya nguya mpenza katikati ya sikawa mpe ntango Akoya lisusu. Tokomona makambo ya kokamwa ete Nzambe Tata mpe Yesu Klisto bazali kokamba Eklezia oyo na nguya mpe nkembo.”22 Kotondisaka mabele na bandako ya Nkolo ezali mosala ya nguya mpe elembo ya kokamwisa.23

Baninga balingami na ngai, soki tokoki mpe soki tomatisi naino te bokeyi na biso na tempelo, tika tozwa ntango mbala na mbala mpo na kosambela na kati ya ndako ya Nkolo. Tika tosambela mpo na batempelo oyo esakolamaki, ete mapango ekoka kosombama, ete leta akondima miango, ete basali bayebi bakomona makabo na bango esalami, mpe ete mabulisi ya bule ekomema bondimami ya lola mpe botali ya banzelu.

Bilaka

Tempelo ebengami ndako ya Nkolo. Nalaki bino ntango boyei ya kolongobana mpe bosambeli na ndako na Ye ya bule, bokolatisama na bibundeli na Ye ya nguya, nkombo na Ye ekozala likolo na bino, banzelu na Ye bakozala na mikumba na bino, mpe bokokola na lipamboli ya Molimo Mosantu.

Nkolo alakaki, “Molimo nyonso oyo ekotika masumu na yango mpe ekoya epayi na ngai, mpe ekobenga nkombo na ngai, mpe ekotosa mongongo na ngai, mpe ekobatela mitindo na ngai, ekomona elongi na ngai mpe ekoyeba ete nazali.”24 Ezali na banzela ebele ya komona elongi ya Klisto, mpe ezali na esika ya malamu te koleka na kati ya ndako na Ye esantu.25

Na mikolo oyo ya mobulungano mpe buluyeke, natatoli ete tempelo ezali ndako na Ye esantu mpe ekosalisa na kobatela biso, kobomba biso, mpe kolengela biso mpo na mokolo ya nkembo ntango, elongo na banzelu na Ye nyonso basantu, Mobikisi na biso akozonga na lokumu, nguya mpe nkembo monene. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “How Firm a Foundation,” Hymns, no. 85.

  2. “The Spirit of God,” Hymns, no. 2.

  3. Sikawa ezali na batempelo 182 oyo ebulisami. Motoba ezali kozongisama sika. Nsambo ezali na bozeli mpo na kobulisama, elongo na moko kozelaka kobulisama lisusu. 45 ezali kotongama mpe 94 misusu esakolamaki to ezali kolengelama mpe kobongisama.

  4. Tala Luka 21:10.

  5. 2 Timote 3:2.

  6. Malongi mpe Mayokani 88:91.

  7. Mpaka David A. Bednar alobaki: “Mibeko ya nsango malamu ezali mpo na ngai mpe yo oyo yenda ezali mpo na masuwa. Mibeko malamu epesaka biso makoki ya komona nzela na biso mpe kotelema ngwi, na bompikiliki, mpe koningana te mpo ete tokoka kobungisa te mpiko na biso mpe kokweya te na mipepe makasi ya molili ya mikolo mya nsuka mpe mobulungano” (“Mibeko ya Nsango Malamu na Ngai,” Liahona, Sanza ya Mitano 2021, 126).

  8. Malongi mpe Mayokani 45:26.

  9. “Soki moto akolanda ngai, amiwangana, mpe amema ekulusu na ye mpe alanda ngai” (Matai 16:24).

  10. Tala Luka 1:37.

  11. Tala Malongi mpe Mayokani 87:8.

  12. Hymns, no. 2.

  13. Tala Malongi mpe Mayokani 110. Liboso ya ngonga yango, Profeta Joseph Smith azwaki Bonganganzambe ya Alona mpe bafungola na yango uta na Yoane Mobatisi, mpe azwaki Bonganganzambe ya Melekisedeki mpe bafungola na yango uta na bantoma Petelo, Jake, mpe Yoane (tala Malongi mpe Mayokani 13:1; 27:12–13).

  14. Malongi mpe Mayokani 109:15; tala lisusu molongo 22.

  15. Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Tempelo ekoki kosalisa biso kati na boluki na biso. Kuna tozwi dotasio na nguya ya Nzambe, kopesaka biso makoki ya kolonga Satana, mobandisi ya bowelani” nyonso (“Tozali na Mposa ya Bapesi Kimia,” Liahona, Sanza ya Mitano 2023, 101).

  16. Tala Russell M. Nelson, “Choices for Eternity” (worldwide devotional for young adults, Sanza ya Mitano 15, 2022), Gospel Library.

  17. Mpaka Colin Stauffer, personal correspondence, Sanza ya Yambo 30, 2024.

  18. Malongi mpe Mayokani 109:22.

  19. Tala Malongi mpe Mayokani 20:77, 79.

  20. Malongi mpe Mayokani 109:15.

  21. Tala Baloma 15:13.

  22. Russell M. Nelson, “Emoniseli mpo na Eklezia, Emoniseli mpo na Babomoi na Biso,” Liahona, Sanza ya Mitano 2018, 96.

  23. Mokambi Brigham Young alobaki, “Tokozala na bankama ya batempelo mpe bankoto ya mibali mpe basi kosalaka kuna na kati mpo na baoyo bakufa, bazwaki libaku te ya koyoka mpe kotosa Nsango malamu” (Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Brigham Young [1997], 312). Mpe Mokambi Ezra Taft Benson alobaki: “Baye batika biso basakolaki ete batempelo ekotongama na Nordi mpe Sudi ya Amerika, bisanga ya Pasifiki, Eropa, mpe bisika nyonso. Soki mosala oyo ya bosikoli esengeli kosalama na ndelo ya ebuteli lolenge esengeli, bankama ya batempelo ekosengelama” (The Teaching of Ezra Taft Benson [1988], 247).

  24. Malongi mpe Mayokani 93:1.

  25. Mpaka David B. Haight alobaki:

    “Ezali solo ete boko bamonaki solo Mobikisi, kasi soki moto atali na dikisionele, akoyekola ete liloba wana ezali na bantina mingi tala, ndakisa lokola koya koyeba Ye, kososola Ye, kokitola Ye mpe mosala na Ye, koyeba motuya na Ye, koya kososola Ye.

    “Bongengisi mpe mapamboli ya boye ezali mpo na moko moko na biso” (“Temples and Work Therein,” Ensign, Sanza ya Zomi na Moko 1990, 61).