Likita Linene
Kosangisa Mitindo Minene Mibale
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Kosangisa Mitindo Minene Mibale

Makoki na biso ya kolanda Yesu Klisto etalaka bokasi mpe nguya na biso ya kotosa mitindo ya yambo mpe ya mibale na bokatikati mpe komipesa ya lolenge moko na nyonso mibale.

Boyingisi

Ntango mwasi na ngai, Lesa mpe ngai tosalaki mobembo na mokili mobimba mpo na mosala na biso, tosepelaki na libaku malamu ya kokutana na bino na masanga minene mpe ya mike. Bomipesi na bino na mosala ya Nkolo elendisi biso mpe etelemi lokola litatoli ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Tozongaka ndako uta na mobembo moko na moko komitunaka soki mbala mosusu topesaki mingi lokola tozwaki.

Elilingi
Rainbow Bridge.
Elilingi
Tsing Ma Bridge.
Elilingi
Tower Bridge.

Ntango tozali kosala mobembo, ntango ya kotala bisika ezalaka moke. Nzokande, soki ekoki kosalama, nalekisaka mwa ntango na likambo moko boye esepelisaka ngai. Nasepelaka na makambo etali kotonga mpe kosala biloko, mpe mingimingi bagbagba. Bagbagba oyo bansinga ekamwisaka ngai. Ezala gbagba Arc-en-ciel na Tokyo, Gbagba Tsing Ma na Hong Kong, Gbagba Tower na Londre, to basusu oyo namona, nakamwaka mpenza na etongeli ya mayele etongama kati na bitonga ya mindongo oyo. Bagbagba ememaka biso bisika oyo soki te tokokaki kokende te. (Yambo nakoba, namoni ete banda nsango oyo elengelamaki, likama monene ya gbagba ekomaki na Baltimore. Tozali kolela liwa mpe kopesa mawa na mabota oyo ezwi likama.)

Gbagba Moko ya Bansinga ya Kitoko

Kala te, mokumba ya likita ememaki ngai na California, epayi wapi kala lisusu nakatisaki Gbagba ya Golden Gate, ezwami lokola etongeli ya kokamwa ya mokili. Etonga ya monima zali kosangisa lolenge kitoko, ntina ya mosala, mpe etongeli ya mayele. Ezali gbagba moko ya kala oyo ezali na manongi oyo ekangisami na nsinga, oyo esimbami na makonzi minene. Biloko ya liboso batongaki ezali manongi minene mibale ya mapasa ya komema bozito oyo etombwamaki likolo ya mbu. Elongo, nsinga yango ememaka kilo ya bansinga ya minene oyo esimbaka nzela mpe bansinga ya milai oyo esimbaka nzela ya nse. Nguya monene oyo—linongi yango ya molai—ezali na yango ya kokomisa yango petepete ezali mpenza likamwisi ya kotonga gbagba yango.

Elilingi
Golden Gate Bridge ezali kotongama.

Disitiliki ya Golden Gate Bridge.

Bililingi ya liboso ya botongi gbagba yango ezali litatoli ya etinda wana emonisi ete mayele yango ezalaki mpenza kosalelama. Eteni mokomoko ya gbagba ezwa lisungi ya komema kilo uta na boyokani ya manongi nyonso mibale ekangami moko na mosusu.

Elilingi
Golden Gate Bridge ezali kotongama.

Getty Images/Underwood Archives

Ntango gbagba esili, elongo na manongi ya nguya ekangami makasi na esika na yango, mpe makonzi oyo ekangami na moboko ya mabanga ya nse, ezali elilingi ya makasi mpe ya kitoko.

Elilingi
Golden Gate Bridge.

Lelo nabengisi bino botala gbagba oyo ya lokumu—na manongi mapasa na yango oyo etombwami likolo oyo etongami likolo ya moboko ya makasi—na nzela ya nsango malamu.

Penepe na nsuka ya mosala ya Yesu Klisto na mabele, na ntango oyo tobengi lelo Poso Esantu, Mofalisai oyo azalaki molakisi na mibeko1 atunaki Mobikisi motuna moko ayebaki ezalaki penepene ya kokoka koyanola te:2 “Molakisi, mobeko nini eleki monene kati na Mibeko yonso?” Mosali mibeko, “azalaki komeka ye”4mpe kolukaka eyano ya engebene na mibeko, na mokano ya nsoni, azwaki eyano ya solo, ya bule, ya bonzambe uta na Yesu Klisto.

“Yesu alobi na ye, Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo mobimba, mpe na makanisi na yo mobimba.

“Oyo ezali mobeko ya yambo mpe ya monene.” Tozwa ndakisa ya gbagba na biso, linongi ya liboso!

“Mpe ya mibale ezali lolenge moko na yango, Okolinga mozalani na yo lokola okomilingaka yo moko.” Oyo ezali linongi ya mibale!

“Likolo ya mitindo mibale oyo ekangisi mobeko nyonso mpe baprofeta.”3 Biteni bitikali ya gbagba!

Tika tososola moko na moko ya mitindo minene mibale, oyo emonisami mpe etangamaki na eyano ya Yesu Klisto. Ntango tozali kosala bongo, tika elilingi ya gbagba monene oyo etandami na nsinga , emonana polele na makanisi ya miso na yo.

Linga Nkolo

Ya yambo, kolinga Nkolo na motema na yo, molimo na yo, mpe makanisi na yo mobimba.

Na eyano oyo, Yesu Klisto azali kosala bokuse ya ntina ya mobeko oyo ezwami na mateya ya bule ya Kondimana na Kala. Mpo na Kolinga Nkolo etalaka liboso motema na yo—bomoto na yo mpenza. Nkolo asengi ete olinga na molimo na yo mobimba—bomipesi na yo mobimba4—mpe nsukansuka, mpo na kolinga na makanisi na yo nyonso—mayele na yo mpe bongo. Bolingo mpo na Nzambe ezali na ndelo te to esuki te. Ezali na nsuka te mpe ezali seko.

Mpo na ngai, kosalela etinda monene ya yambo ekoki ntango mosusu koyoka bozangi mayele, kutu kobangisa. Na botondi, ntango nazali kotalela maloba misusu ya Yesu, motindo oyo ekomi kosimbama mingi koleka: “Soki bolingi ngai, bobatela mitindo na ngai.”5 Nakoki kosala yango. Nakoki kolinga Tata ya Lola mpe Yesu Klisto, oyo nsima ememaka na losambo, boyekoli makomi, mpe bokumbameli na tempelo. Tolingi Tata mpe Mwana na nzela ya kofuta moko na zomi, kobatela mokolo ya Saba esantu, kozalaka na bomoi ya malamu mpe ya peto, mpe kozalaka na botosi.

Kolinga Nkolo emekamaka mbala mingi na misala mike ya mokolo na mokolo, matambe na nzela ya liyokani: mpo na bilenge, kosalela barésaux sociaux mpo na kosunga na esika ya kotyola; kozala na feti, filme, to mosala epai wapi mibeko ekoki kozala na ntembe; kolakisa limemya mpo na makambo masantu.

Tozwa ndakisa ya boboto oyo. Ezalaki Eyanga ya kokila ntango Vance6 mpe ngai tobetaki na ekuke ya ndako moko ya moke. Biso mpe badiakono mosusu na lisanga tozalaki kozela maloba, “Tosengi bokota,” agangaki na esengo na elobeli ya Allemand ya makasi mpenza ya koyoka na ekuke. Ndeko mwasi Muellar azalaki moko ya basi bapaya bakufela mibali na palwasi. Akokaki te koyanola na ekuke na pete, lokola akufaki miso. Ntango tokotaki na ndako oyo ezalaki na mwinda moke, ayambaki biso na mituna ya boboto: nkombo na bino ezali nini? Bozali malamu? Bolingi Nkolo? Toyanolaki mpe tokabolaki ete toyaki kozwa likabo na ye ya bokili. Ataka na bolenge na biso, mikakatano na ye ya mikemike ezalaki komonana mbala moko, mpe eyano na ye etonda bondimi esimbaki makasi na motema: “Natyaki mbongo ya ebende na mesa na ntongo ya lelo. Nazali na botondi ya kopesa likabo na ngai ya bokili. Esengeli bino kozala na boboto mpenza ya kotya yango na anvelopi mpe kokoma mokanda na ngai likabo ya bokili?” Bolingo na ye na Nkolo etombolaki bondmi na biso ntango nyonso tozalaki kotika ndako na ye.

Mokonzi Benyamina alakaki nguya ya kokamwa mpo na baoyo balandi motindo monene ya yambo. “Nazali na mposa ete bomaniola likolo ya bozali bopambolama mpe bwa bosepeli bwa bango baye babateli mitindo mya Nzambe. … Bapambolami na makambo nyonso, … mpe soko batikali bosembo kino na nsuka bayambami na lola … na bozali moko ya esengo ekosuka mokolo moko te.”11

Kolinga Nkolo ememaka na esengo ya seko!

Linga Mozalani na Yo

Nsima Yesu alobaki, “Mpe ya mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.”8 Oyo ezali linongi ya mibale ya gbagba yango.

Awa Yesu azali kosalngisa bomoni na biso ya likolo, mpo na kolinga Nkolo, na kotala na biso ya libanda ya mabele, mpo na kolinga baninga na biso mibali mpe basi. Moko na moko ezali na boyokani na mosusu. Bolingo mpo na Nkolo ekoki te soki tozali kotala bazalani na biso te. Bolingo oyo ya libanda esangisi bana nyonso ya Nzambe kozanga kotalela basi to mibali, kelasi ya bato, mposo, kosangisa nzoto, mosolo, mbula, to ekolo. Tolukaka baoyo bazokisami mpe babukani, baoyo balongolami pembeni, mpo “bato nyonso bazali ndenge moko liboso na Nzambe.”9 Tozali “kosunga bato oyo balembi, totombolaka maboko oyo ekangami na nse, mpe tolendisaka mabolongo oyo elembi.”10

Botala ndakisa oyo: Ndeko mobali Evans11 akamwaki ntango asengamaki kotelemisa motuka na ye mpe kobeta na ekuke ya libota ayebaki te. Ntango mama moko ya bana koleka 10 oyo akufela mobali ayanolaki na ekuke, makambo ya mpasi mpe bamposa na bango minene emonanaki mbala moko epai na ye. Ya yambo ezalaki pete, langi mpo na ndako na bango elandaki na mibu mingi ya mosala ya ntango mpe ya molimo na libota oyo.

Na nsima, mama wana azalaki na botondi akomaki mpo na moninga na ye oyo atindamaki na likolo ete: “Olekisi bomoi na yo mobimba mpo na kosalisa bato oyo baleki moke na kati na biso. Boniboni nakosepela koyoka makambo Nkolo azali na yango ya kolobela yo ntango azali kolakisa botondi na Ye mpo na bolamu osali na mosolo mpe molimo mpo na bato oyo kaka yo mpe Ye nde bokoyeba mokolo mosusu. Botondi mpo na kopambola biso na ndenge ebele, … mpo na bamisionele ozali kopesaki. … Mbala mingi namitunaka soki Nkolo aponaki yo kaka to soki ozalaki kaka moko oyo ayokaki.”

Kolinga mozalani na bino esangisi misala ya boboto mpe ya mosala lokola ya Klisto. Ekoki bino kotika nkanda, kolimbisa banguna, koyamba mpe kosalela bazalani na bino, mpe kosunga mibange? Moko na moko na bino bkofulama ntango bozali kotonga linongi na bino ya bolingo mpo na mozalani.

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “Kopesaka lisalisi na basusu—kosalaka bokasi ya makanisi mpo na kolengela basusu lokola mpe to mingi koleka tomilengelaka bisomei—ezali esengo na biso. Mingimingi …, ntango ezali malamu te mpe ntango ezali kosenga biso tobima na esika na biso ya libondi. Kotosaka motindo wana ya mibale ezali fungola mpo na kokoma moyekoli ya solo ya Yesu Klisto.”12

Kozala na Boyokani

Yesu ateyaki lisusu, “Mibekoo yonso mpe masakoli ikakemi na mibeko mibale.”13 Yango ezali mpenza koteya. Ezali na boyokani makasi kati na kolinga Nkolo mpe kolingana. Mpo ete Gbagba ya Porte d’Or esala mosala na yango oyo ebongiselamelaki, manongi milai nyonso mibale ezali makasi lolenge moko mpe na nguya ekokana mpo na komema kilo ya bansinga ya kokangama, nzela mpe mituka kokatisaka gbagba Soki bamasini yango ezali na boyokani te, gbagba yango ekoki kobeba, ata mpe kokweya. Mpo ete gbagba nyonso esala mosala oyo basalaki yango esala esengaka ete manongi na yango esala na boyokani mpenza. Lolenge moko mpe, makoki na biso ya kolanda Yesu Klisto etali makasi mpe nguya na biso ya kotosa mitindo ya yambo mpe ya mibale na bokatikati mpe komipesa ya lolenge moko na nyonso mibale.

Elilingi
Golden Gate Bridge.

Nzokande, matata oyo ezali se kobakisama na mokili ezali komonisa ete bantango mosusu tozangaka komona to komikundola likambo oyo. Basusu bamipesaka mingi na kobatela mitindo na boye ete bamonisaka bondimi moke na baye bamonaka lokola bayengebene mingi te. Basusu bamonaka mpasi mpo na kolinga baoyo bazali kopona kozala na bomoi na bango libanda ya kondimana to kutu mosika na bosangani nyonso ya lingomba.

Lolenge mosusu, ezali na baoyo bazali konyata ntina ya kolinga basusu kozanga kondima ete biso nyonso tosengeli kopesa biyano epai ya Nzambe. Basusu baboyaka mobimba likanisi oyo ezali na eloko moko lokola bosolo ya mobimba to malamu mpe mabe mpe eloko se moko oyo esengami epai na biso ezali kondima mobimba mpe kondima maponi ya basusu. Moko na bokeseni wana ekoki kosala etegbagba na yo ya molimo ebeba to mpe ekweya.

Mokambi Dallin H. Oaks alimbolaki likambo oyo ntango alobaki: “Totindami kolingana moko na moko, lokola lisese ya Yesu ya Mosamaliya malamu eteyi ete moto nyonso azali mozalani na biso. Kasi lolendo na biso ya kobatela motindo ya mibale esengeli te kosala ete tobosana ya yambo, ya kolinga Nzambe na motema na biso mobimba, na molimo mpe makanisi.”14

Mpo na Kosukisa

Bongo motuna mpo na moko na moko na biso ezali, Lolenge nini totongaka gbagba na biso ya bondimi mpe bomipesi—kotelemisaka bitonga ya gbagba ya nyonso mibale ya bolingo ya Nzambe mpe kolinga bazalani na biso? Touti kobanda. Milende na biso ya liboso ekoki komonana lokola mwango oyo bakomi na nsima ya elamba to mwango ya gbagba oyo tozali kolikya kotonga. Ekoki kozala na mwa bantina ya solo mpo na kososola nsango malamu ya Nkolo mingi to kolapa ndai ya kosambisa basusu moke. Moto moko te azali elenge mingi to mobange mingi mpo na kobanda.

Elilingi
Bridge design sketch.

Nsima ya mikolo, na mwango ya losambo mpe ya kokanisa malamu, makanisi ya mabe epetolami. Misala ya sika ekomaka mimesano. Misala ya liboso ekomaka miango oyo ebongisami malamu mpenza. Totongaka gbagba na biso ya molimo ya moto na moto na mitema mpe makanisi oyo epesameli na Tata ya Lola mpe Mwana na Ye Se Moko lokola mpe na bandeko na biso ya mibali mpe basi oyo tosalaka elongo na bango, tosakanaka, mpe tofandi.

Na mikolo oyo ezali koya, ntango bokoleka likolo ya gbagba ya bansinga ya lokumu to kutu ntango bomoni elilingi, na manongi milai na yango oyo emata, nabengisi bino bomikundola mitindo mibale minene, oyo Yesu Klisto alimbolaki na Kondimana ya Sika. Tika ete malako ya Nkolo efula biso. Tika ete mitema mpe makanisi na biso etombolama likolo, mpo na kolinga Nkolo mpe ebaluka libanda mpo na kolinga mozalani na biso.

Tika ete oyo elendisa bondimi na biso na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye, oyo natatoli, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Na Kondimana ya Sika, [liloba molakisi ya mibeko ekokanaki na mokomeli, moko oyo na mosala na ye azalaki moyekoli mpe molakisi ya mibeko, bakisa mpe mobeko oyo ekomami ya Pentateuque, mpe lisusu ‘mimeseno ya bampaka’ (Matai. 22:35; Malako 12:28; Luka 10:25)” (Bible Dictionary, “Lawyer”).

  2. Kala, bato ya mayele ya Bayuda batangaki mitindo 613 na Torah mpe bazalaki kotyana ntembe na molende mpo na ntina moke ya moko na mosusu. Mbala mosusu molakisi ya mibeko yango azalaki na mokano ya kosalela eyano ya Yesu mpo na kotemela Ye. Soki Alobaki ete motindo moko ezalaki na ntina mingi, ekoki kopesa nzela na bofungoli mpo na kofunda Yesu ete azali koboya likambo mosusu ya mobeko. Kasi eyano ya Mobikisi ekangaki monoko baoyo bayaki kokanga Ye na motambo na maloba ya moboko oyo lelo ezali libanga ya moboko mpo na nyonso tosalaka na Eklezia.

  3. Matai 22:36–40.

  4. Tala Malongi mpe Mayokani 88:5.

  5. Yoane 14:15.

  6. Nkombo nyonso mibale ebongwanaki na lisolo oyo mpo na kobatela nkuku.

  7. Moziya 2:41.

  8. Matai 22:39.

  9. 2 Nefi 26:33.

  10. Malongi mpe Mayokani 81:5.

  11. Nkombo ebongwanaki mpo na kobatela nkuku.

  12. Russell M. Nelson, “Motindo ya Monene ya Mibale,” LiahonaSanza ya zomi na moko 2019, 100.

  13. Matai 22:40.

  14. Dallin H. Oaks, “Mitindo Minene Mibale,” Liahona, Sanza ya Zomi na mibale. 2019, 73–74.