Likita Linene
Benga, Kozela te!
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Benga, Kozela te!

Soki tobeleli Nzambe, natatoli ete tokokweya te.

Nalingi kobanda lelo na litatoli ya kondimisama mobimba na kati ya motema na ngai ete Nzambe ayokaka nsambo mpe ayanolaka yango na lolenge ya moto na moto.

Na mokili oyo etondi na makambo ya kozanga elikya pasi, kolemba nzoto, mpe motema kobukana, tokoki kobendama na kotia elikya na makoki mpe bolingi na biso moko, lokola boyebi mpe bokengi oyo eyaka uta na mokili. Yango ekoki komema biso kotia na nsima liziba ya solo ya lisalisi mpe lisungi oyo ekoki kotelemela mimekano ya bomoi oyo ya nkufa.

Elilingi
Ndako ya Lopitalo.

Namikundoli na ntango moko nakokati lopitalo mpo na bokono moko, mpe ezalaki mpasi mpo na ngai kolala. Ntango nabomaki minda mpe kisuku ekomaki molili, namonaki elembo ya elilingi moko na plafo liboso na ngai elobaki, “Benga, kozela te.” Na bokamwi na ngai, mokolo elandi namonaki liloba kaka moko wana ebandelaki na bisika ebele ya kisuku.

Elilingi
Bobenga, bozela elembo te.

Mpo na nini liloba yango ezali ya motuya mpenza? Ntango natunaki lifulume na ntina na yango, alobaki, “ Ezali mpo na kopekisa mpasi oyo ekoki kobakisa mpasi oyo ozali koyoka.”

Bomoi oyo, na lolenge na yango, ememaka makambo ya pasi koleka, mingi kouta na banzoto na biso ya mosuni, misusu uta na bolembu to mikakatano, misusu uta na lolenge basusu basaleli nguya ya boponi, mpe misusu uta na esaleli na biso ya nguya ya boponi.

Ezali na elaka moko ya nguya mingi koleka oyo Mobikisi Yemoko asalaki ntango Alobaki, “Senga, mpe ekopesamela yo; luka, mpe okozwa; beta,” to benga “mpe bakofungolela yo”?1

Losambo ezali ndimbola ya lisolo katikati na Tata na biso ya Lola oyo epesi biso nzela ya “kobenga mpe kozela te.” Atako, ezali na mabaku na kati na yango tokoki kokanisa ete libiangi eyokamaki te mpo ete tozwaki eyano na lombango te to moko engebene na bilikya na biso.

Ememaka ntango mosusu na bobangi, mawa, to kolemba nzoto. Kasi bomikundola elembo ya bondimi ya Nefi epayi na Nkolo ntango alobaki, “Boniboni ezali ete akoka kolakisa ngai te, ete nakoka kotonga masuwa?”2 Sikawa, natuni bino, boniboni ezali ete Nkolo akoka kolakisa bino te, ete bokweya te?

Kolikya na biyano ya Nzambe elakisi kondima ete makanisi na Ye ezali makanisi na biso te3 mpe “nyonso esengeli kosalema na ntango na yango.”4

Na bosolo ya koyeba ete tozali bana ya Nzambe ya bolingo mpe ngolu ya Tata moko ya Lola esengeli ezala botindiki ya “kobenga” kosambelaka elongo na limemia ya “kosambela[ka] ntango nyonso, mpe bozangi kolemba[ka]; … ete [ya biso] likokisi ekoka kozala mpo na bolamu ya [biso] milo[mo].”5 bokanisa mayoki ya Tata ya Lola ntango na kati ya losambo moko na moko tosalaka na kobondelaka na nkombo ya mwana na Ye, Yesu-Klisto. Oyo nguya mpe bolingo, nandimi, ekomonana soki tosali bongo!

Makomi etondisami na ndakisa ya baye babelelaki epai na Nzambe mpe bango bakokaki kozela te. Helaman mpe mapinga na ye, ntango bakutanaki na mikakatano na bango, babelelaki Nzambe, kogumbaka milimo na bango na losambo. Bazwaki bokengi, kimia, bondimi, mpe elikya, kozwaka nkonzo mpe mokano kino bakokisaki litomba na bango.6

Kanisa boniboni Mose akokaki kobengas mpe kobelela epai na Nzambe ntango amimonaki kati na Mbu Motane mpe Baegipito kopusanaka mpo na kobunda, to Abalayama ntango atosaki motindo ya kopesa mbeka mwana na ye ya mobali Yisaka.

Nandimisami ete moko na moko na bino azalaki mpe akozala na mayele epayi wapi mbela ekozala eyano ya kozela te.

Mibu tuku misato eleki, ntango mwasi na ngai mpe ngai tozalaki komilengela mpo na libala na biso liboso ya leta mpe libala na biso na tempelo, tozwaki libiangi koyebisa biso ete mabala liboso ya leta ezalaki lisusu te mpo na botomboki ya basali. Tozwaki libiangi yango mikolo misato yambo ya mokolo ya molulu. Nsima ya komeka bambala ebele na babilo misusu mpe kozwaka bokutani ekokani te, tokomaki komiyoka ya kolemba nzoto mpe na ntembe makasi ete tokokaki kobalana lolenge ebongisamaki.

Mobanli na ngai mpe ngai “tobengaki,” kotiaka milimo na biso liboso ya Nzambe na losambo. Na nsuka, moto moko ayebisaki biso na ntina ya bilo moko na mboka moko moke pene ya libanda ya mboka oyo mokambi azalaki moto moko nayebaki. Longola se kokakatana, tokendaki kotala ye mpe totunaki soki ekoki kosalema abalisa biso. Na esengo na biso, andimaki. Sekeletele na ye alobelaki na biso na mokuse ete tokozwa mokanda kati ya engumba wana mpe kopesa mikanda nyonso liboso ya midi ya mokolo oyo elandi.

Mokolo elandi, tokendaki na mboka moke na biro ya bapolisi kosenga mokanda esengamaki. Na bokamwisi na biso, mokambi ya biro alobaki akopesa biso yango te mpo ete babalani ya bilenge ebele bazalaki kokima mabota na bango mpo na kobalana na kobatama na engumba wana, oyo ya solo ezalaki likambo na biso te. Lisusu, bobangi mpe mawa esimbaki biso lisusu.

Nakundolaki boniboni na kimya nyonso nabengaki Tata na ngai ya Lola mpo na kweya te. Nazwaki likanisi moko ya polele na makanisi na ngai, mpe na lombango nalobaki, i.”Mokanda mpo ya Tempelo, Mokanda mpo ya Tempelo.” Nazwaki mbala moko mokanda na ngai ya tempelo mpe napesaki yango na mokonzi ya bapolisi, mpe yango ekamwisaki fianse na ngai.

Oyo likamwisi tozwaki ntango toyokaki mosali koloba, “mpo na nini boyebisaki ngai te ete bozali ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka? Nayebi eklezia na bino malamu.” Abandaki mbala moko kolengela mokanda. Tokamwaki mingi koleka ntango mosali atikaki biro kolobaka eloko moko te.

Miniti tuku mitano elekaki, mpe azongaki lisusu te. Ezalaki bobele 11:55 na ntongo, mpe totikalaki bobele kino midi mpo na kopesa mikanda. Na mbalakaka amonanaki elongo na mbwa ya moke mpe ayebisaki biso ezalaki libonza ya libala mpe apesaki yango epai na biso elongo na mokanda.

Tokimaki epai ya biro ya mokambi elongo na mokanda mpe mbwa na biso ya sika. Nsima tomonaki motuka ya biro koya epai na biso. Natelemaki liboso na yango. Motuka etelemaki, mpe tomaki sekeletele na kati. Komonaka biso, alobaki, “nasengi bolimbisi; nayebisaki bino midi. Nasengeli kokende na likambo mosusu.

Namikitisaki na kimya, kobengaka na motema na ngai mobimba Tata na ngai ya Lola, kosengaka lisusu lisalisi mpo na “kolemba te.” Na mbalakaka, likamwisi esalemaki. Sekeletele alobelaki biso, “Oyo mbwa kitoko bozali na yango. Epai wapi nakoki kozwa ya lolenge boye mpo na mwana na ngai ya mobali?”

“Ezali mpo na yo,” tozongisaki na mbala moko.

Sekeletele atalaki biso na bokamwi mpe alobaki, “Ok, tokende na biro mpe tobongisa.”

Mikolo mibale nsima, Carol mpe ngai tobalanaki liboso ya leta, lokola tobongisaki, mpe tokangisamaki na Tempelo ya Lima na Peru.

Na bosolo, tosengeli kokundola ete kobenga ezali likambo ya bondimi mpe mosala—bondimi mpo koyeba ete tozali na Tata ya Lola oyo ayonalaka nsambo na biso engebene bwanya na Ye ezanga nsuka, mpe boye mosala ekokani na oyo tosengaki. Kosambelaka—kobelelaka—ekoki kozala elembo ya elikya na biso. Kasi kosala mosala nsima ya losambo ezali elembo ete bondimi na biso ezali ya solo—bondimi oyo emekami na ntango ya mpasi, bobangi, to bolembi nzoto.

Nasengi botala oyo elandi:

  1. Ntango nyonso bokanisa Nkolo ete azali nzela na bino ya liboso mpo na lisalisi.

  2. Bobenga, bozela te. Bobaluka epai ya Nzambe na losambo ya solo.

  3. Nsima ya kosambela, bosala nyonso bokoki kosala mpo na kozwa mapamboli bosambelaki mpo na yango.

  4. Bomikitisa bino moko na kondima eyano na ntango na Ye mpe lolenge na Ye.

  5. Botika te! Bokoba kokende liboso na nzela ya malongi ntango bozali kozela eyano.

Ntango mosusu ezali na moto moko sikawa, kolandisama na mabaku, amiyoki lokola alingi kozelakweya mpe alingaki kobenga lokola Joseph Smith asalaki ntango abelelaki: “O Nzambe, ozali wapi? … Ntango boni okokanga loboko na yo?”7

Atako na mabaku lokola oyo, sambela na “ bolingi ya molimo,” lokola Mokambi Russell M. Nelson ateyaki,8 mpo ete nsambo na bino eyokamaka kaka!

Bomikundola nzembo oyo:

Ntango otikaki kisuku na yo na ntongo ya lelo,

Okanisaki kosambela?

Na nkombo ya Yesu Klisto, Mobikisi na biso,

Omekaki kosala eloko moko ya sembo mpo botali ya bolingo

Mpo na kobatela yo lelo?

Oh, boniboni losambo epesaka kimya na balembi!

Losambo ekobongola butu ekoma mokolo.

Boye, ntango bomoi ekomaka molili mpe mawa, bobosana kosambela te.”

Kobosana kosambela te.9

Ntango tosambeli, tokoki koyoka boyambi ya Tata ya Lola, oyo atindaki Mwana se Moko kolembisa mikumba na biso, mpo ete soki biso tobeleli Nzambe, natatoli ete tokozela te. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.