Likita Linene
Litatoli ya Yesu
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Litatoli ya Yesu

Libiangi na ngai ezali ya kosala sikawa mpo na kobatela esika na yo lokola moto oyo azali molende na litatoli ya Yesu.

Na 1832, Joseph Smith mpe Sidney Rigdon bazwaki limoni moko ya kokamwa etali lobi ya seko ya bana ya Nzambe. Emoniseli oyo elobelaki bokonzi misato ya lola. Mokambi Dallin H. Oaks alobelaki “bokonzi ya nkembo” oyo na sanza ya Zomi eleki,1 kolakisaka ete “na nzela ya elonga mpe nkembo ya Mwana ya Mpate,”2 bato banso kasi moke basungami nsukansuka na moko ya makonzi oyo, “engebene na bamposa emonisami na nzela ya maponi na bango.”3 Mwango ya Nzambe ya bosikoli ezali libaku ya mokili mobimba mpo na bana na Ye nyonso, ntango nyonso mpe esika nyonso bakokaki kobika na mabele.

Nzokande nkembo ata ya moke na makonzi misato oyo, ya telesitiale, “eleki bososoli nyonso,”4 elikya ya Tata na biso ezali ete tokopona—mpe, na nzela ya ngolu ya Mwana na Ye—tomikokisa mpo na—moko ya likolo mpenza mpe ya nkembo mingi koleka ya makonzi oyo, ya celesitiale, esika tokoki kosepela bomoi ya seko lokola “basangoli ya libula elongo na Klisto.”5 Mokambi Russell M. Nelson alendisi biso “tokanisa na lolelenge ya lola,” kosalaka bokonzi ya selestiale ntina na biso ya seko mpe “na bokebi nyonso kotalaka wapi mikano na [biso] moko na moko ntango tozali awa na mabele ekotya [biso] na mokili ekoya.”6

Baoyo bazali na bokonzi ya selesitiale “ezali bato bazwi litatoli ya Yesu, … baye bazali kaka bato oyo bakomi ya kokoka na nzela ya Yesu moyokanisi ya boyokani ya sika.”7 Bafandi na bokonzi ya mibale, to ya terresitiale, balimbolami lokola bato ya malamu mpenza, kobakisa “bato ya lokumu na mabele, oyo bakufaki miso mpo na mayele mabe ya bato.” Ezaleli na bango ya ntina mingi oyo etyelaka bango ndelo ezali ete “bazalaka molende te na litatoli ya Yesu.”8 Na bokeseni, baye bazali na bokonzi ya nse, bokonzi ya telesitiale ezali baoyo “bazwi nsango malamu te, mpe litatoli ya Yesu te.”9

Tala ete ezaleli ekesenisaka ya bafandi ya bokonzi moko na moko ezali lolenge batalelaka “litatoli ya Yesu,” kobanda na (1) komipesa na motema mobimba na (2) kozalaka molende te na (3) koboya mpenza. Lobi ya seko ya moto mokomoko etalaka lolenge azali kosala.

I.

Litatoli ya Yesu ezali nini?

Yango ezali litatoli ya Molimo Mosantu ete Ye azali Mwana ya Nzambe, Masiya mpe Mosikoli. Ezali litatoli ya Yoane ete Yesu azalaki na ebandeli na Nzambe, ete azali Mokeli ya lola mpe mabele, mpe ete “nsango malamu ezalaki kati na ye, mpe nsango malamu ezalaki bomoi, mpe bomoi ezalaki pole ya bato.”10 Ezali “litatoli ya Bapostolo mpe Baprofeta, … ete Ye akufaki, akundamaki, mpe alamukaki lisusu mokolo ya misato, mpe amataki na lola.”11 Ezali boyebi ya ete “ezali nkombo esusu te epesami na yango lobiko lokoya.”12 Ezali “litatoli, ya nsuka na nyonso,” epesami na Profeta Joseph Smith, “ete azali na bomoi! … Ete azali Mwana se Moko ya Tata—ete na ye, mpe na nzela na ye, mpe uta na ye, mikili ezali mpe ekelamaki, mpe bafandi na yango bazali bana mibali mpe basi babotami na Nzambe .”13

II.

Koleka litatoli oyo motuna ezali, Nini tozali kosala etali yango?

Basangoli ya bokonzi ya selesitiale “bazwaka” litatoli ya Yesu na ndimbola mobimba na kobatisamaka, kozwaka Molimo Mosantu, mpe kolonga na bondimi.14 Mabongi mpe babosolo ya nsango malamu ya Yesu Klisto ekambaka makambo na bango ya ntina ya liboso mpe maponi na bango. Litatoli ya Yesu emonanaka na oyo bazali mpe oyo bazali kokoma. Makasi na bango ezali bolingani, “bolingo ya solo ya Klisto.”15 Ntina na bango ezali kolukaka “bomekoli ya lolenge ya litondi ya Klisto.”16

Mwa moke baoyo bakozwama na bokonzi ya terresitiale oyo bandimi lisusu litatoli ya Yesu, kasi bakesinisami na oyo bango bazali kosala te etali yango. Kozalaka molende te na litatoli ya Mobikisi emonisaka ndelo moko ya kozanga kotya likebi to komibanzabanza—kozala “malili te mpe moto te”17— lokola ya kokesena na bato ya Ammon kati na Buku ya Mormon, ndakisa, oyo “bakesenisamaki mpo na mpiko na bango na Nzambe.”18

Bafandi ya bokonzi ya telesitiale ezali baoyo basundoli litatoli ya Yesu elongo na nsango malamu na Ye, mayokani na Ye, mpe baprofeta na Ye. Balimbolami na Abinadi lokola “kokendeke engebene na bolingi mpe mposa ya mosuni ya bangomei; kobiangaka mokolo moko te likolo lya Nkolo ntango etandamaki maboko ma ngolu ona bango; mpo maboko ma ngolu matandamaki ona bango, mpe balingaki te.”19

III.

Elingi koloba nini kozala molende na litatoli ya Yesu?

Ezali na makoki mingi oyo ekoki kosalelama na koyanolaka motuna oyo. Nakopesa moke na yango. Kozala molende na litatoli ya Yesu ezwaka solo mpenza koleisa mpe kolendisa litatoli yango. Bayekoli ya solo babosanaka te biloko emonani ya mike oyo esungaka mpe elendisaka litatoli na bango ya Yesu, lokola losambo, koyekola makomi, kotosa Sabata, kolia elambo, koyambola, kosalela, mpe kokumbamela kati na ndako ya Nkolo. Mokambi Nelson akundolisi biso ete “na lombango ya bobangi, litatoli oyo eleisami mokolo na mokolo te ‘na liloba malamu ya Nzambe’ [Moroni 6:4] ekoki kokweya. Na yango, … tosengeli kokumbamela Nkolo mokolo na mokolo mpe koyekola nsango malamu na Ye. Nsima abakisaki: “nabondeli bino botika Nzambe alonga na bomoi na bino. Bopesa Ye mwa ndambo ya sembo ya ntango na bino. Ntango bokosala yango, tala malamu oyo ekosalema nsima na elonga malamu na bino ya molimo.”20

Kozala molende emonisaka lisusu kozala ya kofungwama mpe kozala polele na oyo etali litatoli ya moto. Na libatisi, tondimisaka bolingi na biso “ya kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe na ntango nyonso mpe na makambo nyonso, mpe bisika nyonso oyo [biso] tokoki kozala, kutu kino liwa.”21 Mingimingi na eleko ya Pasika oyo, na esengo nyonso, na polele, mpe na komipesa mobimba kosakola litatoli na biso ya Klisto asekwaki mpe oyo azali na bomoi.

Lolenge moko ya kozala molende na litatoli ya Yesu ezali ya kotosa bantoma na Ye. Nzambe atindika biso na makasi te na nzela ya malamu, nzela ya boyokani, kasi Ye ayebisaka baprofeta na Ye basalisa biso toyeba mpenza mbano ya maponi na biso. Mpe ezali kaka te bandimi ya Eklezia na Ye. Na nzela ya baprofeta mpe bapostolo na Ye, Azali kosenga na bolingo bato nyonso batosa solo oyo ekokangola bango,22 oyo ekobikisa bango na mpasi ezanga ntina, mpe komema bango bayika mpiko na esengo.

Kozala molende na litatoli ya Yesu elingi koloba kolendisa basusu, na maloba mpe ndakisa, bazala molende na lolenge moko, mingimingi baye ya mabota na biso moko. Mpaka Neal A. Maxwell mbala mosusu alobaki “mingi mpenza ‘bandimi ya lokumu’ [ya Eklezia] oyo bazali kopumbwapumbwa likolo na esika ya kokota na bozindo ya kiboyekoli na bango mpe baoyo bazali na boyokani ya ntango na esika ‘ya koyokana na motema moko’ [Malongi mpe Mayokani 76:75; 58:27].”23 Kolobaka ete bango nyonso bazali na bonsomi ya kopona, Mpaka Maxwell alelaki: “Nzokande, na mawa, ntango basusu baponaka bolembu, bazali kopona kaka te mpo na bango moko, kasi mpo na nkola elandi mpe oyo ekolanda. Makambo mike ya lokuta na baboti ekoki kobota bopengwi monene na bana na bango! Bankola ya liboso na libota elakisaki ntango mosusu bomipesi, ntango na nkola ya sikawa ezali kolakisa bilembeteli ya lokuta. Na mawa mingi, na oyo ekoya, basusu bakoki kopona bokabwani, lokola bobebi ya mabele ezali kobakisama.”24

Mibu eleki, Mpaka John H. Groberg abetaki lisolo ya libota moko ya sika oyo ezalaki kosambela na etape moko ya moke na Hawaii na ebandeli ya mibu ya 1900. Bazalaki bandimi ya Eklezia pene mibu mibale ntango mwana na bango ya mwasi moko akweyaki na maladi oyo eyebanaki te mpe akotaki lopitalo. Na Eklezia eyenga oyo elandaki, tata mpe mwana na ye ya mobali balengelaki elambo lokola bazalaki kosala baposo mingi mpenza, kasi ntango elenge tata afukamaki mpo na kopambola mampa, mokambi ya etape, amonaki na mbalakaka nani azalaki na mesa ya elambo, apumbwaki mpe agangaki, “Tika. Okoki kosimba elambo te. Mwana na yo ya mwasi azali na maladi eyebani te. Longwa sikawa ntango moto mosusu akobongisa mampa ya sika ya elambo. Tokoki kozala na yo awa te. Kende.” Tata yango akamwaki kotalaka mokambi ya etape koluka koyeba nini ezalaki koleka mpe nsima lisanga mpe koyokaka bozindo ya motungisi mpe nsoni uta bato nyonso, elakisamaki na libota na ye, mpe babimaki na kimya nyonso na ndakonzambe.

Ata liloba moko te elobamaki ntango, na mawa nyonso, libota yango etambolaki na nzela kino ndako na bango. Kuna bafandaki na zolongano, mpe tata alobaki, “Nasengi bozala kimya kino nakobelema mpo na koloba.” Mwana mobali ya elenge amitunaki nini basengelaki kosala mpo na kozongisa mabe mpo na nsoni oyo bayokisamaki: basengelaki koboma bangulu ya mokambi ya etape, to kotumba ndako na ye, to kokende na eklezia mosusu? Minuti mitano, zomi, zomi na mitano, ntuku mibale na mitano elekaki na kofanda nye.

Makofi ya tata oyo ekangamaki ebandaki kofungwama, mpe mayi ya miso ebandaki kobima. Mama abandaki kolela, mpe nokinoki na mokomoko ya bana azalaki kolela na kimya. Tata atalaki mwasi na ye mpe alobaki, “Nalingaka yo” mpe nsima azongelaki maloba oyo na moko na moko ya bana na bango. “Nalingaka bino nyonso mpe nalingi biso tozala elongo, mpo na libela, lokola libota. Mpe lolenge se moko yango ekoki kosalema ezali ete biso nyonso tozala bandimi malamu ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe tokangisama na bonganganzambe bosantu kati na tempelo. Oyo ezali eklezia ya mokambi ya etape te. Ezali Eklezia ya Yesu Klisto. Tokopesa nzela te na moto to na mabe to mitungisi to lolendo epekisa biso na kozala elongo mpo na libela. Eyenga ekoya tokozonga na eklezia. Tokofanda na esika na biso moko kino maladi ya mwana na biso ya mwasi ekoyebana, kasi tokozonga.”

Bazongaki, mwana na bango ya mwasi abikaki, mpe libota ekangamaki na Tempelo ya Laie Hawaii ntango esilaki. Lelo, milimo koleka 100 bazali kobenga tata na bango, nkonko, mpe nkonkololo ete apambolami mpo ete ye atyaki miso na ye na boseko.25

Lolenge moko ya nsuka oyo nakolobela ya kozala molende na litatoli ya Yesu ezali boluki na biso moko ya bosantu. Yesu azali Mosikoli na biso ya ntina mingi,26 mpe Ye azali kosenga, “Boyambola, bino banso nsuka ya mabele, mpe boya epayi na ngai mpe bobatisama na nkombo na ngai, ete bokoka kosantisama na bozwi ya Molimo Mosantu, ete bokoka koteleme na bozangi mbindo liboso na ngai na mokolo ya nsuka.”27

Profeta Mormon alobeli etuluku moko ya Basantu oyo bayikaki mpiko na lolenge oyo atako bazalaki “konyokwama na mpasi mingi”:28

“Nzokande bakilaki mpe basambelaki mbala nzike, mpe bakolaki na bokasi mingi o bosawa bwa bango, mpe o bondimi na Klisto, kino kotondisaka bozo bwa bango na bosepeli mpe libondisi, iyo, kutu kopetolaka mpe kosantisaka mitema mya bango, bosantisi boye boyaki na ntina ya botiki mitema mya bango epayi ya Nzambe.”29 Ezali mbongwana monene ya motema oyo—kopesa mitema na biso epayi na Nzambe mpe kozala ya kobotama lisusu na ngolu ya Mobikisi—oyo tozali koluka.30

Libiangi na ngai ezali ya kosala sikawa mpo na kobatela esika na yo lokola moto oyo azali molende na litatoli ya Yesu. Lokola boyamboli ekoki kosengama, “bozelisa te mokolo ya boyamboli na bino,”31 kino na nsuka “na ngonga oyo bozali kozela te eleko ya molunge ekoleka, mpe kobuka mbuma ekosila, mpe milimo na bino ekobikisama te.”32 Bozala na molende na kobombaka mayokani na bino na Nzambe. Bozala te ya “kotumolama [na] ntina ya sikisiki ya liloba.”33 “Bomikundola kokanga nkombo [ya Klisto] ekomama ntango inso na mitema na bino, ete [bakoki] koyoka mpe koyeba mongongo na yango bokobengama, mpe lisusu, nkombo na oyo akobianga bino.”34 Nsukansuka, “botya yango na mitema na bino, ete bokosala makambo oyo [Yesu] akoteya bino, mpe kotinda bino bosala.”35

Tata na biso alingi bana na Ye nyonso oyo bakosepela bomoi ya seko elongo na Ye na bokonzi na Ye ya selesitiale. Yesu anyokwamaki, akufaki, mpe asekwaki mpo na kokomisa yango solo. Ye “oyo amati na kati ya lola, mpe afandi na loboko ya mobali ya Nzambe, mpo na kosenga na Tata makoki na ye ya ngolu eye azwi likolo ya bana ba bato.”36 Nasambeli ete tokoka biso banso kopambolama na litatoli ya sikisiki ya Nkolo Yesu Klisto, bosepela mpe bozala na molende na litatoli yango, mpe bosepela mbuma ya ngolu na Ye na bomoi na biso ntango nyonso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.