Likita Linene
Bosepela na Likabo ya Bafungola ya Bonganganzambe.
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Bosepela na Likabo ya Bafungola ya Bonganganzambe.

Bafungola ya bonganganzambe eyangelaka lolenge bonganganzambe ya Nzambe esengeli kosalelama mpo na kokokisa bantina ya Nkolo mpe kopambola banso oyo bandimi nsango malamu ezongisama.

Bandeko na ngai, lelo ezali mokolo monene mpo na Mokambi Dallin H. Oaks mpe ngai. Ezalaki mibu 40 eleki, na Sanza ya minei 7, na 1984, ntango tosungamaki na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale.1 Uta mokolo wana tosepelaka na likita linene moko na moko, ata mpe oyo ya lelo. Topambolami lisusu na bosopi ya bule ya Molimo. Nabanzi bokoyekola bansango ya likita oyo mbala na mbala na basanza ezali koya liboso.

Ntango nabotamaki,2 ezalaki na batempelo motoba oyo ezalaki kosala na Eklezia—moko na St. George, Logan, Manti, mpe Salt Lake City, Utah; mpe na Cardston, Alberta, Canada; mpe Laie, Hawaii. Mibale ezalaki kosala liboso na Kirtland, Ohio, mpe Nauvoo, Illinois. Lokola bandimi ya Eklezia balongwaki Wesiti, Basantu batindamaki kolongwa na batempelo mibale oyo.

Tempelo ya Nauvoo ebebisamaki na moto ya batumbi biloko. Etongamaki lisusu mpe nsima ebulisamaki na Mokambi Gordon B. Hinckly.3 Tempelo ya Kirtland ebebisamaki na banguna ya Eklezia. Nsima Tempelo ya Kirtland ezwamaki na Lingomba ya Klisto, mpo ete ezali ya bango uta mibu ebele.

Sanza eleki tosakolaki ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka esombaki Tempelo ya Kirtland, elongo na bisika ya kala ya ntina na Nauvoo. Tosepeli makasi na masolo malamu mpe boyokani ya litomba oyo tosololaki na bakambi ya lingomba ya Klisto oyo ekambaki na boyokani wana.

Elilingi
Tempelo ya Kirtland.

Tempelo ya Kirtland ezwi ntina ya momesano te kati ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Milulu ebele oyo esalamaki kuna esakolamaki uta kala mpe ezalaki ntina mpo na Eklezia ezongisama ya Nkolo mpo na kokokisa etinda na yango na mikolo ya nsuka.

Moko ya milulu monene esalamaki na Eyenga ya Pasika, na mokolo ya 3, Sanza ya minei na 1836.4 Na mokolo wana, Joseph Smith mpe Oliver Cowdery bamonaki biteni ya babotali ya motuya. Yambo, Nkolo Yesu Klisto abimaki. Profeta akomaki ete miso ya Mobikisi ezalaki kongenga lokola moto; suki ya moto na ye ezalaki pembe lokola mvula ya pembe; mobimba na ye ezalaki kongenga koleka bongengi ya moyi; mpe mongongo na ye lokola mingongo ya bamai minene.”5

Na ntango ya botali oyo, Nkolo andimisaki bomoto na Ye. Alobaki, “Nazali ebandeli mpe nsuka; nazali oyo azalaki na bomoi, nazali oyo babomaki; nazali molobeli na bino epayi ya Tata.”6

Nsima Yesu Klisto alobaki ete Andimaki tempelo lokola ndako na Ye mpe akokisaki elaka oyo ya motuya: “Nakomimonisa ngaimei epayi ya bato na ngai na ngolu na kati ya ndako oyo.”7

Elaka oyo ya ntina ezali kokokisama na tempelo nyonso ebulisama na lelo. Nabengisi bino bomanyola nini elaka ya Nkolo elakisi mpo na binomei.

Kolandisama na botali ya Mobikisi, Mose abimaki. Mose apesaki likolo ya Joseph Smith bafungola mpo na bosangisi ya Yisalaele mpe bozongisi ya bikolo zomi.8

Ntango limoni oyo esukaki, “Eliasi abimaki, mpe apesaki eleko ya nsango malamu ya Abalayama epayi ” ya Joseph.9

Nsima Eliya profeta abimaki. Bobimi na ye ekokisaki elaka ya Malaki oyo ya yambo ya Boyei ya Mibale, Nkolo asengelaki kotinda Eliya mpo na “kobongola mitema ya batata epayi ya bana, mpe mitema ya bana epayi ya batata na bango.”10 Eliya apesaki bafungola ya nguya ya bokangisi likolo ya Joseph Smith.11

Ntina ya bafungola oyo ezongisama na mokili na batindami misato ya lola na nse ya bokambi ya Nkolo ezalaki motuya mingi koleka. Bafungola ya Bonganganzambe ezali likoki mpe nguya ya bokambi. Bafungola ya bonganganzambe eyangelaka lolenge bonganganzambe ya Nzambe esengeli kosalelama mpo na kokokisa ntina ya Nkolo mpe kopambola banso oyo bandimi nsango malamu ya Yesu Klisto.

Ezali ntina koyeba ete yambo Eklezia ebongisama, batindami misato bapesaki Babonganganzambe ya Alona mpe ya Melekisedeke likolo ya Profeta Joseph mpe bapesaki ye bafongola ya babonganganzambe mibale wana.12 Bafungola oyo epesaki Joseph Smith likoki ya kobongisa Eklezia na 1830.13

Nsima na Tempelo ya Kirtland na 1836, bopesi mosusu ya bafungola misato ya bonganganzambe—na nkombo ya bafungola ya bosangisi ya Yisalaele, bafungola ya nsango malamu ya Abalayama, mpe bafungola ya nguya ya bokangisi—ezali ntina mingi. Bafungola oyo epesaki likoki na Joseph Smith—mpe Bakambi oyo balandaki ya Eklezia ya Nkolo—basangisa Yisalaele na bangambo nyonso mibale ya elamba, bapambola bana nyonso ya boyokani elongo na mapamboli ya Abalayama, mpo na kotia mokoloto ya bondimami na makuli ya bonganganzambe mpe mayokani, mpe kokangisa mabota seko. Nguya ya bafungola ya bonganganzambe oyo ezanga nsuka mpe monene.

Banza lolenge nini bomoyi na yo ekokaki kozala soki bafungola ya bongangnzambe ezongisamaki te na mabele.14 Na bozangi bafungola ya bonganganzambe, okokaki kolatisama na nguya ya Nzambe te.15 Na bozangi bafungola ya bonganganzambe, Eklezia ekokaki kaka kosunga lokola liteya ya ntina mpe ya lingomba ya bato kasi ekokaki kopesa mingi te. Na bozangi bafungola ya bonganganzambe, moto moko te akokaki kosala makuli ya ntina mpe mayokani oyo ekangisaka biso na baye na biso mpo na seko mpe kopesa biso nsuka ya kofanda elongo na Nzambe.

Bafungola ya bonganganzambe ekesenisaka Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na mangomba misusu na mabele. Mangomba misusu ekoki mpe kosala ete bomoi na bino ezala malamu awa na bokufi. Kasi lingomba mosusu ata moko te ekoki mpe ekolongisa bomoi na bino nsima ya nkufa.16

Bafungola ya bonganganzambe epesaka biso likoki ya kokabola nyonso ya mapamboli elakama na Abalayama epayi ya moto nyonso oyo abatelaka boyokani. Mosala ya Tempelo esalaka ete mapamboli oyo ya motuya ekokisama epayi ya bana nyonso ya Nzambe, kotala te esika nini to ntango nini bazalaki kobika to bazali kobika sikawa. Tika tosepela na bafungola wana ya bonganganzambe mpo ezali lisusu na mabele!

Nabengisi bino bokanisa na bokebi masakoli misato oyo elandi.

  1. Bosangisi ya Yisalaele ezali solo ete Nzambe alingaka bana na Ye banso bisika nyonso.

  2. Nsango malamu ya Abalayama ezali bosolo mosusu ete Nzambe alingaka banso ya bana na Ye bisika nyonso. Ye abengisaka banso baya epayi na Ye—“bayindo mpe mindele, bakangami mpe bansomi, mobali mpe mwasi; … banso bazali lolenge moko epayi ya Nzambe.”17

  3. Nguya ya bokangisi ezali ndakisa ya bosolo ya lolenge nini Nzambe alingaka bana na Ye banso esika nyonso mpe alingaka ete moko na moko na bango apona kozonga epayi na Ye.

Bafungola ya bonganganzambe ezongisama na nzela ya Profeta Joseph Smith epesami mpo na nyonso oyo abatelaka boyokani mpo na kosepela na mabaku ya molimo ya kokamwa ya moto yemei. Awa lisusu, ezali na ebele oyo tokoki koyekola uta na lisitwale ya bule ya Tempelo ya Kirtland.

Losambo ya Joseph Smith ya bobulisi ya Tempelo ya Kirtland ezali ndakisa etali lolenge nini tempelo epesaka bino mpe ngai nguya ya molimo mpo na kolonga mimekano ya bomoi na mikolo ya nsuka oyo. Nalendisi bino boyekola losambo wana ekomami na kati ya Malongi mpe Mayokani eteni 109. Losambo wana ya bobulisi, oyo ezwamaki na emoniseli, eteyaka ete tempelo ezali “ndako ya losambo, ndako ya kokila bilei, ndako ya bondimi, ndako ya boyekoli, ndako ya nkembo, ndako ya alima, ndako ya Nzambe.”18

Bandakisa oyo etangami eleki mingi koleka ndimbola ya tempelo. Ezali elaka etali oyo ekosalama na baoyo basungaka mpe bakumbamelaka na kati ya ndako ya Nkolo. Bakoki kozela kozwa biyano ya losambo, na emoniseli ya moto yemei, bondimi makasi, bolendisi, libondi, komatisa boyebi, mpe komatisa nguya.

Ntango na kati ya tempelo ekosalisa bino mpo na kokanisa lola mpe kozwa limoni ya oyo bozali mpenza, oyo bokoki kokoma, mpe lolenge ya bomoi bokoki kozala na yango mpo na libela. Bokumbameli mbala na mbala na tempelo ekobongola lolenge na bino ya komimona mpe lolenge nini bomikotisaka na kati ya mwango monene ya Nzambe. Nalaki bino yango.

Tolakami lisusu ete kati ya tempelo tokoki “kozwa litondi ya Molimo Mosantu.”19 Kanisa nini elaka wana elakisi na ndenge ya kozala na balola efungwama mpo na moko na moko oyo azali koluka mpenza bosolo ya seko.

Toteyami ete baye nyonso bakumbamelaka kati ya tempelo bakozala na nguya ya Nzambe mpe banzelu kozalaka na mokumba na bango.”20 Lolenge nini ematisaka elikya na bino mpo na koyeba ete, lokola mwasi alatisama to mobali apesama nguya ya Nzambe, bokolonga mokili binomei te? Bokasi nini yango epesaka bino mpo na koyeba ete banzelu bakosalisa bino mpenza?

Na nsuka, tolakamaki ete “bosangisi moko te ya mabe” ekolonga likolo ya baoyo bakumbamelaka na kati ya ndako ya Nkolo.21

Kososolaka mabaku ya molimo oyo esalami na tempelo ezali ntina epayi ya moko na moko na biso lelo.

Bandeko na ngai balingami, oyo ezali elaka na ngai. Eloko moko te ekosalisa bino koleka kosimba makasi na libende25 koleka bokumbameli na kati ya tempelo mbala na mbala ntango bopesami libaku. Eloko moko te ekobatela bino koleka ntango bokokutana na mimekano ya mokili. Eloko moko te ekolendisa litatoli na bino ya Nkolo Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye to ekosunga bino bososola mwango monene ya Nzambe koleka. Eloko moko te ekobondisa mingi molimo na bino na ntango ya mpasi. Eloko moko te ekofungola balola koleka. Eloko moko te!

Tempelo ezali ekuke ya mapamboli minene Nzambe abombi mpo na moko na moko na biso, mpo ete tempelo ezali esika moko na mabele oyo tokoki kozwa mapamboli nyonso elakama epayi ya Abalayama.26 Yango ezali mpo na nini tosalaka nyonso na nguya na biso, na nse ya bokambi ya Nkolo, mpo na kosala mapamboli ya tempelo ekokisama na bandimi ya Eklezia. Na yango, tozali na esengo ya kosakola ete tozali komilengela mpo na kotonga tempelo ya sika na bisika moko na moko 15 oyo elandi:

  • Uturoa, Polynésie Française

  • Chihuahua, Mexique

  • Florianópolis, Brezil

  • Rosario, Argentine

  • Edinburgh, Écosse

  • Brisbane, etuka enene ya Australie ya sudi

  • Victoria, British Colombie

  • Yuma, Arizona

  • Houston, etuka enene ya Texas ya sudi

  • Des Moines, Iowa

  • Cincinnati, Ohio

  • Honolulu, Hawaii

  • West Jordan, Utah

  • Lehi, Utah

  • Maracaibo, Venezuela

Bandeko na ngai, natatoli ete oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Atelemi na moto na yango. Tozali bayekoli na Ye.

Tika tosepela na bozongisi ya bafungola ya bonganganzambe oyo epesi bino na ngai ndingisa ya kosepela na mapamboli nyonso ya molimo oyo tozali kolinga mpe oyo elongobani mpo na kozwa. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.