Likita Linene
Bokulisama Yambo ya Mbotama mpo na Kosala
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Bokulisama Yambo ya Mbotama mpo na Kosala

Tata na biso na Lola alingi komonisela bino bokulisami yambo na mbotama na bino moko, mpe Akosala bongo ntango bozali koluka koyekola mpe kolanda bolingi na Ye.

Na mpokwa ya lelo, nazali koloba na bilenge ya Eklezia, nkola ya mbuta ya bilenge mibali mpe basi oyo bazali bamemi bendele mpo na nkola ekoya.

Na sanza ya zomi 2013, profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson, asakolaki: “Tata na bino na Lola ayebi bino uta ntango molai mpenza. Yo, lokola mwana na Ye ya mobali to ya mwasi, oponamaki na Ye mpo na koya na mabele na ntango oyo mpenza, mpo na kozala mokambi na mosala na Ye monene na mabele.”1

Mibu mibale eleki, Mokambi Nelson akobaki:

“Lelo nazongeli lisusu makasi ete Nkolo asengi elenge mobali nyonso oyo alongobani, mpe akoki amilengela mpe asala misio. Mpo na bilenge mibali ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka, mosala ya bamisionele ezali mokumba ya bonganganzambe. Bino bilenge mibali bobombamaki mpo na ntango oyo bosangani ya elaka ya Yisalaele ezali kosalema. …

“Mpo na bino bilenge basi bokoka, misio ezali lisusu libaku ya nguya, kasi soki bolingi, . … Bosambela mpo na koyeba soki Nkolo akolinga ete bosala misio, mpe Molimo Mosantu akoyanola na motema mpe makanisi na bino.”2

Maloba ya profeta na biso na ntina ya Nkolo kobombaka bilenge ya mikolo na biso mpo na ntango oyo ya bosangani ya Yisalaele mpe libiangi na ye ya kosambela mpo na koyeba nini Nkolo akolinga bosala ezali, na ndambo, maloba ya bomoi oyo bozali na yango mpe mapamboli bozwaki epayi ya Nzambe liboso ete bobotama na mabele oyo.3 Biso nyonso oyo tobotama na mabele, tozalaki kofanda yambo na Tata na biso ya Lola lokola bana na Ye ya molimo.4 Nkolo asakolaki epayi ya Mose, “Ngai, Nkolo Nzambe, nakelaki biloko nyonso na molimo, yambo ete ezala na momeseno na etando ya mabele.”5

Ntango Akelaki bino na molimo, Alingaki bino lokola bana na Ye ya mibali mpe basi ya molimo mpe Akotisaki kati ya moko na moko na bino bomoto ya bonzambe mpe mokano ya seko.6

Na bomoi na bino yambo na mbotama, bino “bokolisaki bomoto [na bino] mpe bobakisaki makoki na bino ya molimo.”7 Bopambolamaki na likabo ya makoki ya kosala, likoki ya kopona mpo na bino moko, mpe bozwaki mpenza mikano ya ntina, lokola mokano ya kolanda mwango ya esengo ya Tata na Lola, oyo ezali ya “kozwa nzoto ya mosuni mpe kozwa boyebi ya mabele mpo na kokende liboso mpe na nsuka kososola nsuka [na bino] ya bonzambe lokola basangoli ya bomoi ya seko.”8 Ekateli oyo esimbaki bomoi na bino na ntango wana, na bomoi na bino yambo na mbotama, mpe ezali kokoba kosimba bomoi na bino sikawa.9 Lokola mwana ya Nzambe oyo abikaki na bomoi na bino yambo na mbotama, “okolaki na mayele mpe oyekolaki kolinga bosolo.”10

Yambo bobotama, Nzambe aponaki moko na moko na bino mpo na kokokisa bitinda ya sikisiki na ntango ya bomoi na bino ya kufa likolo ya mabele.11 Soki bolongobani, mapamboli ya mobeko wana yambo ya mbotama ekopesa bino makoki ya kozwa mabaku ya lolenge nyonso na bomoi oyo, bakisa mpe mabaku ya kosala na Eklezia mpe kosangana na mosala ya ntina mingi koleka oyo ezali kosalema na mabele lelo: bosangani ya Yisalaele.12 Bilaka mpe mapamboli wana yambo na mbotama ebengami bokulisami yambo na mbotama na bino. “Malongi ya bokulisami yambo na mbotama etali bandimi nyonso ya Eklezia.”13 Bokulisami yambo na mbotama ezali kopesa ndanga te ete bokozwa mabiangi to mikumba moko boye. Mapamboli mpe mabaku oyo eyaka na bomoi oyo lokola mbano ya bosaleli na bino ya makoki ya kosala, kaka lokola bokulisami yambo na bino na bomoi na bino ya yambo ya kufa eyaki lokola mbano ya bosembo.14 Ntango bomimonisi bolongobani mpe bokoli na nzela ya mayokani, bokozwa mabaku ya kosala na kelasi na bino ya Bilenge Basi to lisanga likoki ya bonganganzambe. Bokopambolama mpo na kosala na tempelo, mpo na kokoma ndeko mobali to mwasi ya kosalisa, mpe kosala misio lokola moyekoli ya Yesu Klisto.

Mpo na nini ezali ntina mpo koyeba mpe kososola bokulisami yambo na mbotama na bino? Na mokolo oyo ya mituna mingi, ntango bato mingi mpenza bazali koluka koyeba bomoto na bango ya solo, likambo oyo ete Nzambe ayebi mpe apambolaki moko na moko na biso yambo tobotama na mabele oyo na “[bi]zaleli ya ntina ya yambo ya kufa, ya kufa, mpe bomoto mpe ntina ya seko” ememaka kimya ya elengi mpe bondimisi na makanisi mpe motema na biso.15 Koyeba nani bozali ebandi na kososola mapamboli ya kokuliselama yambo ya mbotama ya Nzambe oyo abongisaki liboso likolo na bino yambo bobotama na mabele oyo. Tata na biso ya Lola alingi komonisela bino bokulisami yambo na mbotama na bino moko, mpe Akosala bongo ntango bozali koluka koyekola mpe kolanda bolingi na Ye.16

Nalingaka kotanga maloba ya Mokambi Nelson na Instagram. Moko na yango oyo nalingaki mingi ezalaki mokolo ya 20 sanza ya nsambo 2022. Akomaki:

“Nandimi ete soki Nkolo alobelaki bino mbala moko, eloko ya yambo Alingaki kosala ete bososola ezali bomoto na bino ya solo. Bandeko na ngai ba bolingo, bozali banso bana ya molimo ya Nzambe. …

“… Bomikosa te na oyo etali yango: Bokoki na bino ezali ya bonzambe. Na boluki na bino ya molende, Nzambe akopesa bino mwa ndambo ya nani bokoki kokoma.”17

Nakoki kokabola na bino lolenge nini tata na ngai ya mabele ateyaki ngai mpo na koyeba bomoto na ngai mpe mwango ya Nzambe na bomoi na ngai?

Mokolo moko ya poso na ntongo nazalaki na mibu 13, nazalaki kokata matiti lokola eteni ya misala na ngai ya poso na poso. Ntango nasilisaki, nayokaki ekuke kokangama na nsima ya ndako na biso mpe namonaki tata na ngai kobengaka ngai mpo kosangana na ye. Natambolaki tii na veranda ya nsima, mpe abengisaki ngai nafanda elongo na ye na eskalye. Ezalaki ntongo moko malamu. Namikundoli afandaki penepene na ngai na boye mapeka na biso ezalaki kotutana. Abandaki na koyebisa ngai ete alingaka ngai. Atunaki mikano na ngai ezali nini na bomoi. Nakanisaki, “Malamu, yango ezali pete.” Nayebaki makambo mibale na ntembe te: Nalingaki kozala molai, mpe nalingaki kokende kosala kaa mbala mingi. Nazalaki moto azanga mindondo. Asekaki, atelemaki mwa moke mpe alobaki: “Steve, nakosepela koyebisa yo likambo moko oyo ezali na ntina mingi mpo na ngai. Nasambelaki ete Tata na biso na Lola akokokisisa oyo nalobi sikawa ekomama makanisi na moto na yo mpe na molimo na yo mpo obosana te.”

Tata na ngai azwaki mobimba ya bokebi na ngai na ngonga wana. Abalukaki mpe atalaki ngai na miso mpe alobaki, “Mwana mobali, batela bantango ya nkuku ya bomoi na yo.” Ezalaki na bopemi molai ntango atikaki ndimbola ekangama makasi na motema na ngai.

Nsima akobaki, “Oyebi, bantango wana oyo ozali kaka yo moko zingazinga mpe moto mosusu ayebi te nini ozali kosala? Bangonga wana ntango ozali kokanisa, ‘Eloko nyonso nazali kosala sikoyo etali moto mususu te, kaka ngai’?”

Nsima alobaki, “Koleka ntango mosusu nyonso na bomoi na yo, oyo osalaka na ntango ya nkuku ya bomoi na yo ekotuta mpenza lolenge nini ozali kokutana na mikakatano mpe mpasi ya motema oyo okokutana na yango; mpe oyo ozali kosala na banngonga ya nkuku ya bomoi na yo ekotuta mingi koleka lolenge oyo okokutana na baelonga mpe esengo oyo okokutana na yango koleka ngonga mosusu nyonso na bomoi na yo.”

Tata na ngai azwaki mposa ya motema na ye. Makelele mpe lokito ya mongongo na ye, mpe bolingo oyo nayokaki na maloba na ye, ekotaki mpenza na makanisi mpe molimo na ngai mokolo wana.

Mibu mingi eleki nayekolaki ete likamwisi monene ya mokolo wana na ebandeli ya bomwana na ngai ezalaki ete, na bantango ya nkuku ya bomoi na ngai, nakokaki kokende epayi ya Nzambe na losambo mpo na kozwa emoniseli. Tata na ngai azalaki koteya ngai lolenge nini nakokaki koyekola mapamboli oyo Nzambe akanaki liboso. Na bantango wana ya nkuku, nayekolaki Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe. Nayekolaki ete Nzambe akulisaka ngai yambo ya mbotama mpo na kosala misio. Nayekolaki ete Nzambe ayebi ngai mpe ayokaka mpe ayanolaka nsambo na ngai. Nayekolaki ete Yesu azali Klisto, Mobikisi mpe Mosikoli na biso.

Atako nasalaki mabunga mingi uta mokolo wana ya kobosana te elongo na tata na ngai, kosalaka makasi mpo na kobatela bantango ya nkuku ya bomoi na ngai etikalaki longo na kati ya mipepe makasi ya bomoi mpe epesa ngai makoki ya koluka esika ya libateli mpe mapamboli ya kobikisa, ya kolendisa ya bolingo ya Mobikisi na biso mpe mbeka ya bomikabi.

Bandeko na ngai bilenge mibali mpe basi, wana bozali kobatela bangonga ya nkuku ya bomoi na bino na bopemi ya malamu; koyokaka miziki ya kolendisa; kotangaka makomi; kozalaka na losambo ya mbala na mbala, ya ntina; mpe kosalaka makasi mpo na kozwa mpe komanyola lipamboli na bino ya nkoko, bokozwa emoniseli. Na maloba ya Mokambi Nelson, miso na bino “ekofungwama makasi na bosolo ete bomoi oyo ya solo ezali ntango oyo bokozwa ekateli ya bomoi ya lolenge nini bino bolingi kobika libela na libela.”18

Tata na biso na Lola akoyanola nsambo na bino, mingimingi nsambo na bino oyo epesamaki na bangonga ya nkuku ya bomoi na bino. Akomonisa epayi na bino makabo mpe batalanta na bino oyo akulisaki bino na yango yambo ya mbotama na bino, mpe bokoyoka bolingo na Ye ezingi bino, soki bokosenga na bosembo mpe bokozala na mposa ya solo ya koyeba. Ndenge bobatelaka bangonga ya moto ye moko ya bomoi na bino, kosangana na bino na makuli mpe mayokani ya nsango malamu ekozala na ntina mingi. Bokomikanga mingi koleka na Nzambe na mayokani oyo bosali elongo na Ye, mpe bokotombolama mpo na kozala na elikya monene, bondimi, mpe bondimisi mingi koleka na bilaka oyo Apesi bino. Bolingi koyeba mwango ya Nzambe mpo na bino? Natatoli Alingi bino boyeba, mpe Afulaki profeta na Ye na mokili mpo na kobengisa moko na moko na biso kosambela mpe kozwa likambo oyo ya kofungola miso mpo na bisomei.19 Natatoli bosolo mpe nguya ya mbeka ya bomikabi ya Mobikisi na biso oyo epesaka likoki ya kozala na bomoi mpe kosepela na mapamboli nyonso ya Nzambe ya kokuliselama yambo ya mbotama, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Decisions for Eternity,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2013, 107.

  2. Russell M. Nelson, “Preaching the Gospel of Peace,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 6.

  3. Tala Russell M. Nelson, “Hope of Israel” (losambo ya mokili mobimba mpo na bilenge sanza ya motoba 3, 2018), Gospel Library: “Tata na biso ya Lola abombaki ebele ya milimo na Ye ya lokumu mingi—ntango mosusu, nakoki koloba, ekipi na Ye ya malamu koleka—mpo na eteni oyo ya nsuka. Milimo ya lokumu wana—baye basani ya elikya, bilombe wana—ezali you

  4. Tala Yilimia 1:5.

  5. Mose 3:5.

  6. Tala “Libota: Esakola na Mokili,” Gospel Library; “Young Women Theme,” Gospel Library; “Aaronic Priesthood Quorum Theme,” Gospel Library.

  7. Topics and Questions, “Premortal Life: Overview [Bomoi Yambo ya Mbotama: Na Mokuse Mpenza],” Gospel Library.

  8. Libota: Esakola na Mokili,” Gospel Library.

  9. Tala Alma 13:1–4.

  10. Topics and Questions, “Premortal Life: Overview [Bomoi Yambo ya Mbotama: Na Mokuse Mpenza],” Gospel Library; tala lisusu Malongi mpe Mayokani 138:55–56.

  11. Tala Topics and Questions, “Foreordination [Bokulisami Yambo ya Mbotama],” Gospel Library.

  12. Tala Russell M. Nelson, “Hope of Israel.”

  13. Topics and Questions, “Foreordination [Bokulisami Yambo ya Mbotama],” Gospel Library; tala lisusu Yilimia 1:5; “What Is the Relationship between Foreordination and Agency? [Boyokani Nini Ezali Kati na Bokulisami yambo ya mbotama mpe Makoki ya Kosala?],” Liahona, Sanza ya zomi 2023, 47; Bokambi na Makomi, “Foreordination [Bokulisami Yambo ya Mbotama],” Gospel Library.

  14. Tala Alma 13:1–4; Malongi mpe Mayokani 130:20–21.

  15. Libota: Esakola na Mokili,” Gospel Library.

  16. Tala Yilimia 1:5.

  17. Russell M. Nelson, Instagram, Sanza ya Nsambo 20, 2022, Instagram.com/russellmnelson.

  18. Russell M. Nelson, “Choices for Eternity [Maponi mpo na Seko]” (losambo ya mokili mobimba mpo na bilenge minzemba, Sanza ya mitano 15, 2022), Gospel Library.

  19. Tala Russell M. Nelson, “Revelation for the Church, Revelation for Our Lives [Emoniseli mpo na Eklezia, Emoniseli mpo na Bomoi na Biso],” Liahona, Sanza ya Mitano 2018, 93–96.