Likita Linene
Ezali Bwanya kati na Nkolo Ete Tosengeli Kozala na Buku ya Mormon
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Ezali Bwanya kati na Nkolo Ete Tosengeli Kozala na Buku ya Mormon

Ezali losambo na ngai ete kotanga Buku ya Mormon mobu oyo ekozala esengo mpe lipampoli mpo na moko na moko na biso.

Bandeko, tozali na botondi mingi mpo na makasi na bino na kotangaka makomi na Yaka, Landa Ngai. Matondi mpo na nyonso oyo bozali kosala. Bosangani na bino ya mokolo na mokolo na Nzambe mpe liloba na Ye ezali na mbano ya mozindo. “Bozali kotonga moboko ya mosala monene. Mpe makambo minene ewutaka na ya mike.”1

Kotanga mateya ya Mobikisi kati na makomi esalisaka biso tobongola bandako na biso na bisika ya bondimi mpe banganda ya boyekoli nsango malamu.2 Ebengisaka Molimo kati na bandako na biso. Molimo Mosantu etondindisaka milimo na biso na esengo3 mpe ebongwanisaka biso tokoma bayekoli ya bomoi mobimba ya Yesu Klisto.

Na mibu mingi oyo eleki, ntango tozalaki kotanga babuku ya makomi esantu, tozalaki na emoneli mobimba ya mateya ya Nzambe epayi ya bana na Ye kati na bileko ya nsango malamu ya ntina nyonso.4

Na bileko nyonso, tomonaka lolenge ya momesano moko. Nzambe azongisaka to amonisaka nsango malamu ya Yesu Klisto na nzela ya baprofeta na Ye. Bato balandaka baprofeta mpe bazali mpenza ya kopambolama. Nzokande, nsima ya ntango, bato mosusu batikaka koyoka maloba ya baprofeta mpe bamikomisaka mosika ya Nkolo mpe nsango malamu na Ye. Yango ezali oyo tobengaka bopengwi. Nsango malamu emonisamaki yambo na Adama , kasi bana mosusu ya Adama mpe Eva bapesaki mokongo na Nkolo kati na bopengwi.5 Tomonaka ndaki ya bozongisi mpe bopengwi kozongelamaka kati na bileko ya Enoka, Nowa, Abalahama, Mose, mpe basusu.

Sikawa, lelo, tozali kati na eleko ya litondi na bantango.6 Oyo ezali eleko esantu oyo ekosuka na bopengwi te.7 Ezali eleko oyo ekoyingisa Boyei ya Mibale ya Mobikisi Yesu Klisto mpe bokonzi ya nkoto ya mibu na Ye.

Boye, bokeseni etali eleko oyo ezali nini? Nkolo apesi biso nini lelo, mingimingi mpo na ntango na biso, oyo ekosalisa biso topusana pene ya Mobikisi mpe totika Ye te?

Eyano moko oyo eyei na moto na ngai ezali makomi—mpe mingimingi Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto.

Ntango nzambe alaki ete ekozala na bopengwi monene mosusu te, esengeli tozala na konsansa mpe tosala keba mpo na kokima bopengwi ya moto ye moko —komikundolaka, lokola Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “Tozali moko na moko na mokumba mpo na bokoli na biso ya molimo ya moto.”8 Koyekola Buku ya Mormon, lokola tozali kosala mobu oyo, ntango nyonso ememaka biso pene koleka na Mobikisi—mpe esalisaka biso totikala pene na Ye.

To bengaka yango “boyekoli,” mpe wana ezali malamu mpo ete esengaka bokasi. Kasi tosengeli te ntango nyonso koyekola makambo oyo ezali ya sika. Ntango mosusu kotanga Buku ya Mormon ezali kaka komiyoka kokangama na Nzambe lelo—koleisa molimo, kozala ya kolendisama na molimo liboso ya kobima mpo na kotelemela mokili, to kozwa libiki nsima ya mokolo moko ya mabe kati ya mokili.

Toyekolaka makomi mpo ete Molimo Mosantu, moteyi monene akoka kokolisa mbongwana na biso na Tata na biso ya Lola mpe na Yesu Klisto mpe kosunga biso kokoma mingi koleka lokola Bango.9

Na makanisi oyo na moto, tokoki kotala, “Nini Molimo Mosantu ateyaki biso na poso oyo na ntango ya boyekoli na biso ya Buku ya Mormon?” mpe “Lolenge nini oyo ememaka biso pene koleka epayi ya Mobikisi?”

Oyo ezali mituna malamu mpo na boyekoli na biso na ndako. Ezali lisusu na mituna malamu mpenza mpo na kobanda kelasi ya Eyenga na ndakonzambe. Tokolisaka liteya na biso na ndakonzambe na mokolo ya eyenga na kokolisaka boyekoli na biso na ndako na poso yango. Yango wana, na bakelasi na biso ya eyenga, “ye oyo azali koteya mpe ye oyo ayambi, bazali kososola moko mpe mosusu, mpe nyonso balendisami mpe bazali kosepela elongo.”10

Botala mwa milongo Molimo akotisaki na moto na ngai uta na boyekoli ya Buku ya Mormon ya poso oyo:

  • Nefi apesaki motindo na Yakobo “bomba bapalaki oyo mpe kitanisa yango … uta nkola na nkola. Mpe soki ezalaki na mateya oyo ezalaki ya bule, soki te emoniseli … soki te masakoli,” Yakobo asengeli “kokoma … yango likolo ya bapalaki oyo … mpo na ntina ya bato [na bango].”11

  • Nsima Yakobo atatolaki, “Tolukaka [makomi], … mpe lokola tozali na matatoli oyo nyonso tozwi elikya, mpe bondimi na biso ekomi ya koningana te.”12

Milongo oyo esalaki ngai kokundola maye Nefi alobelaki liboso oyo etali bapalaki ya motako:

“Tozwaka makundoli … mpe tomaniolaka mango mpe tososolaka ete … malongobani mpenza epayi ya biso, mpo ete tokokaki kobomba mitindo ya Nkolo mpo na bana na biso.

“Yango wana, ezalaki bwanya na Nkolo ete tokoka komeme mango elongo na biso, lokola esalaki biso mobembo na esobe kokendaka na mboka ya elaka.”13

Sikawa, soki ezalaki bwanya mpo na Leyi mpe libota na ye kozala na makomi, ezali kaka lokola bwanya mpo na biso. Motuya monene mpe nguya ya molimo ya makomi ekobi na kokita te na bomoi na biso lelo.

Ezalaki na bato moko te na mambi ya kala na Buku ya Mormon mpe makomi mosusu oyo tosepela na yango lelo.14 Iyo, Leyi mpe libota na ye bapambolamaki na komema bapalaki ya motako elongo na bango, kasi bazalaki na mokanda moko te mpo na baema nyonso! Mokanda ya motuya mpenza ya Buku ya Mormon ezali mokanda ya biso moko. Ezali mokanda oyo totangaka.

Na limoni ya Leyi ya nzete ya bomoi, Leyi ateyaki biso motuya ya boyebi ya moto ye moko elongo na bolingo ya Nzambe. Nsima ya kolia mbuma, Leyi amonaki mwasi na ye, Sariah, mpe bana na ye Nefi mpe Sam mwa mosika.

“Batelemaki lokola soki bayebaki te wapi basengelaki kokende.

“… Nabengaki bango,” elobaki Leyi, “mpe nalobaki lisusu epayi na bango na mongongo mokasi ete basengelaki koya epayi na ngai, mpe balia mbuma, oyo esengelama likolo ya mbuma nyonso mosusu.

“Mpe … bayaki epayi na ngai mpe baliaki mbuma yango.”15

Nalingaka ndakisa ya Leyi ya botata ya makanisi malamu. Sariah, Nefi, mpe Sam bazalaki na bomoi malamu, ya sembo. Kasi Nkolo azalaki na eloko malamu, eloko ya elengi koleka mpo na bango. Bayebaki te bakozwa yango wapi, kasi Leyi ayebaki. Yango wana abengaki bango, “na mongongo moko makasi,” baya na nzete ya bomoi mpe balia mbuma na bangomei. Bokambi na ye ezalaki polele. Ekokaki kozala bososoli mabe te.

Nazali mbuma ya lolenge ekokana ya botata ya makanisi malamu.16 Ntango nazalaki elenge mobali, nakanisi ya mibu 11 to 12, mama na ngai atunaki ngai, “Mark, oyebi yomei, na nzela ya Molimo mosantu, ete nsango malamu ezali solo?”

Motuna na ye ekamwisaki ngai. Nazalaka ntango nyonso komeka kozala “elenge mobali malamu,” mpe nakanisaki ete wana ekokaki. Kasi mama na ngai, lokola Leyi, ayebaki ete eloko moko koleka mingi esengelamaki. Nazali na mposa ya kosala mpe koyeba na ngaimei.

Nazongisaki ete nazalaki naino na boyebi wana te. Mpe amonanaki ya kokamwa te mpenza na eyano na ngai.

Nsima alobaki eloko moko natikala kobosana te. Nakundoli maloba na ye na mokolo oyo: “Tata na Lola alingi yo oyeba yomei. Kasi osengeli osala makasi. Osengeli kotanga Buku ya Mormon mpe kosambela mpo na koyeba na nzela ya Molimo Mosantu. Tata na Lola akoyanola losambo na yo.

Malamu, natanga naino Buku ya Mormon liboso te. Nakanisaki te ete nazalaki mokolo ekoka mpo na kosala yango. Kasi mama na ngai ayebaki malamu koleka.

Motuna na ye epelisaki kati na ngai mposa ya koyeba na ngaimei

Yango wana, mpokwa moko na moko, na kisuku ya kolala nakabolaki elongo na bandeko na ngai ya mibali mibale, napelisaki mwinda ya likolo ya mbeto na ngai mpe natangaki mokapo kati na Buku ya Mormon. Nsima, nabomaki mwinda, nalamukaki na malembe na mbeto na ngai mpe nafukamaki mpe nasambelaki. Nasambelaki na bosembo mingi koleka mpe na mposa makasi koleka nasala naino te liboso. Nasengaki Tata na Lola atika ngai nayeba bosolo ya Buku ya Mormon.

Uta na ntango nabandaki kotanga Buku ya Mormon, nayokaki ete Tata na Lola ayebaki makasi na ngai. Mpe nayokaki ete nazali ntina epayi na Ye. Ntango natangaki mpe nasambelaki, makanisi ya malamu, ya kimia efandaki likolo na ngai. Mokapo nsima ya mokapo, pole ya bondimi ezalaki kongenga makasi koleka kati na molimo na ngai. Nsima ya ngonga, nasosolaki ete mayoki wana ezalaki bondimami ya bosolo uta na Molimo Mosantu.17 Nayaki koyeba ngai moko ete Buku ya Mormon ezali solo, mpe ete Yesu Klisto azali Mobikisi ya mokili. Lolenge nini natondi libiangi efulama ya mama na ngai.

Boyebi oyo ya kotanga Buku ya Mormon lokola elenge mobali epelisaki ndakisa ya boyekoli makomi oyo ekobi kopambola ngai kino lelo oyo. Nakobaka kotanga Buku ya Mormon mpe nafukamaka kati na losambo. Mpe Molimo Mosantu andimisaka bosolo na yango mbala na mbala.

Nefi alobaki yango malamu. Ezalaki bwanya kati na Nkolo ete tosengeli komema makomi elongo na biso bomoi na biso mobimba. Buku ya Mormon ezali “libanga likonzi” oyo esalaka ete eleko oyo ekesena uta na bileko bilaka nyonso. Ntango tozali koyekola Buku ya Mormon mpe kolanda profeta na bomoi, ekozala na bopengwi ya moto ye moko kati na bomoi na biso te .18

Libengisi ya koya na nzete ya bomoi na kosimbaka makasi liloba ya Nzambe ezali kaka libengisi uta na Leyi mpo na libota na ye te, mpe ezali kaka libengisi uta na mama na ngai te mpo ete ngai natanga mpe nasambela na oyo etali Buku ya Mormon. Ezali lisusu lisusu libengisi uta na profeta na biso, Mokambi Russell M. Nelson, na moko na moko na biso.

“Nalaki,” alobaki “ete ntango bozali koyekola Buku ya Mormon na nzela ya losambo mikolo nyonso, bokozwa bikateli ya malamu koleka—mikolo nyonso. Nalaki ete ntango bomanyoli maye bozali koyekola, maninisa ya lola makofungwama, mpe bokozwa biyano na mituna na bino moko mpe bokambi ya bomoi na bino moko.”19

Ezali losambo na ngai ete kotanga Buku ya Mormon mobu oyo ekozala esengo mpe lipampoli mpo na moko na moko na biso mpe ekobenda biso pene koleka mpenza epayi ya Mobikisi.

Tata na Lola azali na bomoi Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Buku ya Mormon ezali na maloba na Ye mpe ememaka bolingo na Ye. Mokambi Russell M. Nelson azali profeta na bomoi ya Nkolo likolo ya mabele lelo. Nayebi ete makambo oyo ezali ya na nzela ya litatoli ya kondimisa ya Molimo Mosantu, litatoli oyo nazwaki yambo ntango nazalaki kotanga Buku Mormon lokola elenge mobali. Na nkombo ya Yesu Klisto, amen.

Matangi

  1. Malongi mpe Mayokani 64:33.

  2. “Mwango ya sika, ya kosunga Eklezia mobimba ezali na likoki ya kokangola nguya ya mabota, soki libota na libota elandi mobimba na bwania mpe na bokebi mpo na kobongola ndako na bango ekoma esika esantu ya bondimi. Nalaki ete soki bosali lisusu ndako na bino ekoma esika ya katikati ya koyekola nsango malamu, nsima ya ntango mokolo ya saba na bino ekozala esengo monene. Ya bino bana bakosepela mingi koyekola mpe kosalela mateya ya Mobikisi, mpe nguya ya monguna na ya bino bomoi mpe na ya bino ndako ekokita. Bambongwana na libota na bino ekozala makasi mpe ekowumela” (Russell M. Nelson, “Kokomaka Basantu ya Mikolo mya Nsuka ya Ndakisa,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 113).

  3. “Solo, solo, nalobi na bino, nakopesa bino Molimo na ngai, oyo akongengisa mayele na bino, oyo akotondisa molimo na bino na esengo” (Malongi mpe Mayokani 64:33 11:13).

  4. “Bileko ezali ngonga ya ntango kati na yango Nkolo azali na pene na mosali moko apesamindingisa likolo ya mabele oyo amemi bonganganzambe bosantu mpe bafungola, mpe oyo azali na likoki ya bonzambe ya kopesa nsango malamu epayi ya bafandi ya mabele” (Topics and Questions, “Dispensations,” Gospel Library).

  5. Tala Mose 5:12–16.

  6. Mosakoli Daniele amonaki mikolo na biso, eleko na biso, ntango alimbolaki ndoto ya Nebukadenzar. Eklezia ya Yezu Klisto ya Basantu ba Mikolo ya Nsuka ezali libanga kati na ndoto, ekabwanaki na ngomba na lisalisi ya maboko te, kobalukaka na liboso mpo na kotondisa mabele mobimba (tala Daniele 2:34–35, 44–45; Malongi mpe Mayokani 65:2).

  7. “Nzambe tata mpe Yesu Klisto babengaki Profeta Joseph Smith mpo ete azala profeta ya eleko oyo. Banguya nyonso ya bonzambe ya bileko oyo bileka esengelaki ezonga na nzela na ye. Eleko oyo ya litondi ya bantango ekokaki kosuka te na ntango to esika. Ekosuka na bopengwi te, mpe ekotondisa mokili” (Russell M. Nelson, “The Gathering of Scattered Israel,” [Bosangani ya Yisalaele epanzana]” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2006, 79–80).

  8. Russell M. Nelson, “Opening Remarks,” [Makebisi ya Bofungoli]” LiahonaSanza ya zomi na moko 2018, 8.

  9. Tala “Mbongwana Ezali Ntina na Biso,” Yaka Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024, v.

  10. Malongi mpe Mayokani 50:22; tala lisusu milongo 17–21.

  11. Yakobo 1:3–4.

  12. Yakobo 4:6.

  13. 1 Nefi 5:21–22.

  14. Esakolamaki kala te ete mikanda 200 milio ya Buku ya Mormon ekabolami kati na eleko oyo. Wana ezali solo kitoko. Sikawa Buku ya Mormon ebongolami na nkota 113, elongo na bobongoli ya sika 17 oyo ezali kosalema. Lipamboli nini ya kozala na Buku ya Mormon eniatama na masini, na mitango, audio, video, mpe ndenge misusu. (Tala Ryan Jensen, “Church Distributes 200 Millionth Copy of the Book of Mormon,” [Eklezia ekaboli Mikanda ya mbala 200 milio ya Buku ya Mormon],” Church News, Sanza ya zomi na mibale. 29, 2023, thechurchnews.com).

  15. 1 Nefi 8:14–16; nsete ebakisami.

  16. “Bopusi ya makasi mpenza ya molimo na bomoi ya mwana ezali ndakisa ya bosembo ya kolinga baboti mpe bankoko baoyo babombaki na sembo nyonso mayokani na bango esantu. Baboti ya makanisi malamu bateyaka bana na bango bondimi na Nkolo Yesu klisto, mpo ete bango mpe “bakoka koyeba o liziba kani bakoki koluka bolimbisi bwa masumu ma bango. ’ [2 Nefi 25:26]. Bobombi boyokani ya mwa ntango mpe ekoka te ememaka na bobungisi ya molimo. Bobebi ya molimo ezali mbala na mbala monene mpenza na bana mpe bankoko na biso” (Kevin W. Pearson, “Bozali Kaka na Bolingi?,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2022, 69).

  17. Tala Malongi mpe Mayokani 6:22–24.

  18. Profeta Joseph Smith alobaki, “Nayebisaki na bandeko na ngai mibali ete Buku ya Mormon ezalaki buku ya semba koleka buku nyonso na mabele, mpe ete ezali libanga likonzi ya eyamba na biso, mpe ete moto akoki kobeleme pene na Nzambe na kobikaka na misise na yango, koleka buku nyonso mosusu” (kati na Boyingisi ya Buku ya Mormon).

  19. Russell M. Nelson, “The Book of Mormon: What Would Your Life Be Like without It?,” Liahona, Nov. 2017, 62–63.