Makomi
Boyingisi


Boyingisi

Buku ya Molomoni ezali liboke lya makomi masantu likokani na Biblia. Ezali likundoli lyoko lya bosali bwa Nzambe elongo na bafandi ba kala ba Baamerika mpe ezali na litondi lya nsango elamu ya libela.

Buku eye ekomamaki na baprofeta mingi ba kala na molimo mwa bobikuli mpe bobimisi. Maloba ma bango, makomama likolo lya palaki ya wolo, matangemaki mpe makomamaki o bokuse na profeta-mokomi-bonkoko moko o nkombo ya Molomoni. Likundoli liye lipesi nsango yoko ya mampenza manene mabale. Moko moyaki uta o Yelusaleme o mobu 600 yambo ya Klisto, mpe nsima mokabwanaki o bikolo bibale, biyebani lokola Banefi mpe Balamani. Mosusu moyaki kala mpenza, ebulunganisaki Nkolo minoko o Linongi lya Babele. Lisanga liye liyebani lokola Bayelede. Nsima ya bankoto ya mibu, bango banso babebisamaki longola se Balamani, mpe bazali mpenza bankoko ba Baindia ba Amerika.

Likambo lya motole likomama o Buku ya Molomoni lizali mosala mwa yemei Nkolo Yesu Klisto o ntei ya Banefite mosika te nsima ya bosekwi bwa ye. Elakisi malongi ma nsango elamu, epesi bokuse bwa mwango mwa lobiko, mpe elobeli bato nini basengeli kosala mpo balonga kimia o bomoi boye mpe lobiko la seko o bomoi bokoya.

Esilisaki Molomoni kokokisa nkoma ya ye, apesaki nsango eye na mwana wa ye Moloni, oyo abakisaki ndambo yoko ya maloba ma yemei mpe abombaki palaki o ngomba Kumola. O mokolo mwa 21 Setembe, mobu mwa 1823, Moloni ye kaka, nde moto akembelama, asekwa, abimelaki Profeta Joseph Smith mpe alakisaki ye etali likundoli lya kala mpe bobongoli bosengelama bwa lyango o lokota la Angele.

O botamboli bosengeli palaki ipesamaki epai ya Joseph Smith, oyo abongolaki yango na likabo mpe nguya ya Nzambe. Likundoli liye libimisami sikawa o nkota mingi lokola litatoli lya sika mpe lya bobakisi ete Yesu Klisto azali Mwana wa Nzambe wa bomoi mpe ete baye banso bakoya epai ya ye mpe bakotosa mibeko mpe makuli ma nsango elamu ya ye bakoka kobikisama.

Etali likundoli liye Profeta Joseph Smith alobaki: “Nayebisaki bandeko babali ete Buku ya Molomoni ezalaki elamu koleka buku inso likolo lya mabele, mpe fungola ya likonzi lya eyamba ya biso, mpe moto moko akoki kokoma mingi penepene na Nzambe na kowumelaka na malako ma yango, koleka buku inso isusu.”

O bobakisi na Joseph Smith, Nkolo alengeleki bato basusu zomi na moko mpo ya komono palaki ya wolo na bangomei mpe mpo ya kozala banzeneneke ba kafukafu ba bosolo mpe bonzambe bwa Buku ya Molomoni. Matatoli ma bango bakomama makotisami awa elongo lokola “Litatoli lya Banzeneneke Basato” mpe “Litatoli lya Banzeneneke Mwambe.”

Tobiangi bato banso bisika binso mpo batanga Buku ya Molomoni, bamaniola o mitema mya bango maloba makwi, mpe nde batuna Nzambe, Tata wa Seko, o nkombo ya Klisto soko buku eye ezali ya solo. Bango baye bakolanda botamboli boye mpe bakotuna o bondimi bakolonga litatoli lya bosolo mpe bonzambe bwa yango na nguya ya Molimo Mosantu. (Tala Moloni 10:3–5.)

Bango baye bakolonga litatoli liye lya bonzambe na nguya uta na Molimo Mosantu bakoya lokola koyeba na nguya ena kaka ete Yesu Klisto azali Mobikisi wa mokili, ete Joseph Smith azali mobimisi mpe profeta wa ye o mikolo miye mya nsuka, mpe ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali bokonzi bwa Nkolo bosalemi mbala yoko lisusu o mabele, lokola bolengeli mpo ya boyei bwa ibale bwa Masiya.

Litatoli lya Banzeneneke Basato

Tika ete eyebana epai ya bikolo, mabota, minoko, mpe bato banso, epai ya bango mosala moye mokoya: Ete biso, na boboto bwa Nzambe Tata, mpe Nkolo wa biso Yesu Klisto, tomonoki palaki iye izali na likundoli liye, liye lizali likundoli lya bato ba Nefi, mpe lisusu lya Balamani, bandeko ba bango, mpe lisusu lya bato ba Yelede, baye bayaki uta o linongi liye lilobamaki. Mpe toyebi lisusu ete libongolamaki na likabo mpe nguya ya Nzambe, mpo mongongo mwa ye mosakolaki yango epai ya biso; yango wana toyebi na ntembe te ete mosala moye mozali mwa solo. Mpe totatoli lisusu ete tomonoki minkoma miye mizali likolo lya palaki; mpe milakisamaki epai ya biso na nguya ya Nzambe, kasi ya moto te. Mpe tosakoli na maloba ma limemia, ete anzelu wa Nzambe akitaki uta o lola, mpe amemeki mpe atiyaki liboso lya miso mya biso, ete totala mpe tomono palaki, mpe minkoma likolo lya yango; mpe toyebi ete ezali na boboto bwa Nzambe Tata, mpe Nkolo wa biso Yesu Klisto, ete tomonoki mpe topesi litatoli ete makambo maye mazali ma solo. Mpe ezali ya kokamwa o miso mya biso. Nzokande, mongongo mwa Nkolo motindaki biso ete topesa litatoli lya mango; yango wana, mpo ya kozala na botosi epai ya mitindo mya Nzambe, topesi litatoli lya makambo maye. Mpe toyebi ete soko tozali potongono na Klisto, tokopetola bilamba bya biso ya makila ma bato banso, mpe tokozwama na bozangi mbindo liboso lya kiti-ya-bosambisi ya Klisto, mpe tokofanda elongo na ye seko o lola. Mpe tika ete lokumu lozala na Tata, mpe na Mwana, mpe na Molimo Mosantu, oyo azali Nzambe moko. Amene.

Oliver Cowdery

David Whitmer

Martin Harris

Litatoli lya Banzeneneke Mwambe

Tika ete eyebana epai ya bikolo, mabota, minoko mpe bato banso, epai ya bango mosala moye mokokoma: Ete Joseph Smith, Jun., mobongoli mwa mosala moye, alakisaki epai ya biso palaki iye ilobamaki, iye izali na etalisi ya wolo; mpe lokola mingi ya nkasa iye Smith oyo alobamaki abongolaki tosimbaki na maboko ma biso; mpe lisusu tomonoki minkoma likolo lya yango, minso mya yango mizalaki na etalisi ya mosala mwa kala, mpe ya esaleli ya ntoki. Mpe eye topesi litatoli na maloba ma limemia, ete Smith oyo alobamaki alakisaki epai ya biso, mpo tomonoki mpe tobebeteki, mpe toyebi na ntembe te ete Smith oyo alobamaki azwaki palaki iye ilobamaki. Mpe topesi nkombo ya biso epai ya mokili, mpo ya kotatola epai ya mokili eye tomonoki. Mpe tobuki lokuta te, Nzambe kopesaka litatoli lya yango.

Christian Whitmer

Jacob Whitmer

Peter Whitmer, Jun.

John Whitmer

Hiram Page

Joseph Smith, Sen.

Hyrum Smith

Samuel H. Smith

Litatoli lya Profeta Joseph Smith

Maloba ma yemei Profeta Joseph Smith etali boyei bwa Buku ya Molomoni mazali boye:

“O mpokwa ya…mokolo mwa ntuku mibale na moko mwa sanza ya Setembe [1823]…Namipesaki o losambo mpe libondeli epai ya Nzambe wa Bokasi Bonso….

“Ntango ezalaki ngai kobelela boye epai ya Nzambe, namonoki mwinda moko mobimaki na kisuku ya ngai, mwango mokobaki koyikana kina kisuku epelaki koleka moi mwa nzanga, ntango sasaipi moto moko amononoki mpembeni ya mbeto ya ngai, atelemeki o mopepe, mpo makolo ma ye matutaki nse te.

“Azalaki likolo lya ye na monkoto monene mwa mpembe mwa kafukafu mingi koleka. Mozalaki mwa mpembe koleka eloko enso ya mabele naino namonoko; mpe nandimi te ete eloko yoko ya mabele ekokaki kosalema mpo ya komonomo mpembe mpenza boye. Biengindi bya ye bizalaki botaka, mpe maboko ma ye lokola, mwa likolo lya nkingo ya loboko; boye, lisusu, ezalaki matambe ma ye motaka, mwa likolo lya makaka. Moto mpe nkingo ya ye izalaki mpe bolumbu. Nakokaki komono ete alataki elamba esusu te bobele monkoto moye, lokola mozalaki polele, mpo ete nakokaki komono o kati ya ntolo ya ye.

“Bobele monkoto mwa ye te mozalaki mpembe mpenza, kasi bomoto bwa ye mobimba bozalaki bwa nkembo koleka mayele ma elobeli, mpe elongi ya ye solo lokola monkalali. Kisuku ezalaki kopela mwinda mpenza, kasi boye kongenge mingi te koleka mpenza zingazinga na bomoto bwa ye. Ntango natalaki ye mbala ya yambo, nabangaki; kasi bobangi mosika te botikaki ngai.

“Abiangaki ngai na nkombo, mpe alobaki epai ya ngai ete azalaki ntoma atindami uta o miso mya Nzambe epai ya ngai, mpe ete nkombo ya ye ezalaki Moloni; ete Nzambe azalaki na mosala mwa kosala mpo ya ngai; mpe ete nkombo ya ngai ekoyebana mpo ya bolamu mpe bobe o ntei ya bikolo, mabota, mpe minoko, to ete ekolobama na bolamu mpe bobe lokola o ntei ya bato banso.

“Alobaki ete buku yoko ebombisama, ekomama likolo lya palaki ya wolo, kopesaka nsango yoko ya bafandi ba kala ba mokili moye, mpe ekanga epai wapi bawutaki. Alobaki lisusu ete litondi lya nsango elamu ya libela lizalaki o kati ya yango, lokola lipesama na Mobikisi na bafandi ba kala;

“Lisusu, ete ezalaki mabanga mabale o kati ya matimbo ma mpauni—mpe mabanga maye, makangema o ebende ya ntolo, masali nini ebiangami Ulima mpe Tumima—mabombisama elongo na palaki; mpe bozwi mpe bosaleli mabanga maye bozalaki nini esalaka Bamoni o ntango ya kala to ya kalakala; mpe ete Nzambe alengeleki yango mpo ya mwango mwa bobongoli bwa buku.

· · · · · · ·

“Lisusu, alobaki epai ya ngai, ete ekozwa ngai palaki ina iye alobelaki—mpo ntango ete isengelaki kozwama ekokaki naino te—nakolakisa yango na moto te; mpe ebende ya ntolo oyo ezali o Ulima mpe Tumima te; bobele na baye ekotindama ngai nalakisa bango; soko nakosala yango nakobebisama. Ntango ezalaki ye kosolola elongo na ngai etali palaki, limoni lifungwanaki na ngai ete nakokaki komono esika wapi palaki ibombisamaki, mpe ete na polele mpe na bu boye ete nayebaki lisusu esika yango ekomaki ngai kuna.

“Nsima ya liyebisi liye, namonoki mwinda na kisuku mobandaki kosangana mpenza zingazinga na bomoto bwa ye oyo azalaka koloba elongo na ngai, mpe ekobaki kosala boye, kina kisuku etikalaki lisusu molili, longola se zingazinga enso na ye; ntango, na mbalakaka namonoki, lokola ezalaki, lidusu lyoko lifungwanaki semba likolo o kati ya lola, mpe amataki kina alimwaki mobimba, mpe lisuku litikalaki lokola lizalaki yambo mwinda moye mwa lola momononoko.

“Nalalaki kotambolisaka makanisi na likambo liye lya kafukafu, mpe kokamwaka mpenza o eye elobelamaka na ngai na ntoma oyo wa momeseno te; emonoki ngai, o katikati ya bomanioli bwa ngai, na mbalakaka ete kisuku ya ngai ebandaki lisusu kopela mwinda, mpe na mbala yoko, lokola ezalaki, ntoma ona kaka wa lola azalaki lisusu mpembeni ya mbeto ya ngai.

“Abandaki, mpe lisusu asangelaki mpenza makambo mango kaka maye asalaki o bobimeli bwa ye bwa yambo, na bokeseni ata moke te; yango esalaki ye, ayebisaki ngai etali masambisi manene maye mazalaki koya likolo lya mabele, elongo na mpasi ya nzala, mopanga, mpe bokono; mpe ete masambisi maye ma nsomo masengeli koya na mabele na nkola eye. Esakolaki ye makambo maye, amataki lisusu lokola esalaki ye yambo.

“Na ntango eye, ya bozindo mingi boye ezalaki mayoki masalemaki o bongo bwa ngai, ete mpongi ekimaka uta o miso mya ngai, mpe nalalaki makalekale o bokamwi mpo ya eye namonoko mpe nayokaka. Kasi bosutuki kani bozalaki bwa ngai, emonoki ngai lisusu ntoma ona kaka mpembeni ya mbeto ya ngai, mpe nayokaki ye abandelaki to azongelaki mpenza lisusu na ngai makambo mana kaka lokola yambo; mpe abakisaki likebisi lyoko na ngai, kolobelaka ngai ete Satana akomeka kosenginia ngai, (na bolandi bizaleli bya bokeleli bwa libota lya tata wa ngai), mpo nazwa palaki mpo ya mwango mwa kozwa mosolo. Yango apekisaki ngai, kolobaka ete nasengeli kozala na eloko esusu te o bomoni bwa ngai na kozwaka palaki kasi mpo ya kokembela Nzambe, mpe nasengelaki kosengisama na ntina esusu te bobele eye ya kotonga bokonzi bwa Ye; soko te nakokoka kozwa yango te.

“Nsima ya bobimeli boye bwa isato, amataki lisusu o lola lokola yambo, mpe natikalaki lisusu komaniola likolo lya lolenge losusu la eye namonoko kala te; ntango penepene na sasaipi esilaka ntoma wa lola komata uta o epai ya ngai mpo ya mbala ya isato, soso alelaki, mpe namonoki ete ntongo ezalaki kobeleme, boye ete masolo ma biso mazwaki mobimba mwa butu.

“Mosika te esilaki ngai kolamuka o mbeto ya ngai, mpe, lokola momeseno, nakendeki kosala misala misengelama mya mokolo mona; kasi, na komekaka kosala lokola o ntango esusu, namonoki bokasi bwa ngai bosilaki mingi boye lokola kokomisa ngai mpenza motau. Tata wa ngai, oyo azalaki kosalaka elongo na ngai, amonoki ete eloko yoko ezali ya mbeba na ngai, mpe alobelaki ngai nazonga o ndako. Nabandaki na mokano mwa kozonga o ndako; kasi, na komekaka kokatisa lobala libanda lya zamba epai wapi tozalaki, bokasi bwa ngai bosilaki nie, mpe nakweyiaki, makasi te, o mabele, mpe mpo ya mwa ntango nayebaki lisusu eloko te.

“Eloko ya yambo eye nakoki komikundola ezalaki mongongo mokolobaka epai ya ngai, kobiangaka ngai na nkombo. Natalaki, mpe namonoki ntoma ena kaka atelemeki likolo lya moto mwa ngai, azingamaki na mwinda lokola yambo. Nde lisusu asangelaki epai ya ngai enso eye asangelaki na ngai o butu elekaki, mpe atindaki ngai nakende na tata wa ngai mpe nalobela ye limoni mpe mitindo miye nazwaki.

“Natosaki; nazongaki na tata wa ngai o zamba, mpe nazongelaki likambo mobimba na ye. Ayanolaki na ngai ete ezalaki ya Nzambe, mpe alobelaki ngai nakende mpe nasala lokola etindamaki na ntoma. Natikaki zamba, mpe nakendeki o esika wapi ntoma alobelaki ngai palaki ibombisamaki; mpe engebene na polele ya limoni liye namonoko etali yango, nayebaki esika ena o ntango eye nakomaki kuna.

“Mpembeni ya mboka eke ya Manchester, o etuka ya Ontario, New York, etelemi ngomba yoko elai mingi, mpe ya likolo koleka isusu ya bisika bya mpembeni. O mopanzi mwa westi ya ngomba, mosika te o nsonge, o nse ya libanga lyoko linene, elalaki palaki, ibombisama na sanduku ya libanga. Libanga liye lizalaki linene mpe lokola libungutulu o ntaka ya mopanzi mwa likolo, mpe like mingi epai ya nsuka, boye ete eteni ya ntaka ya yango emononoki likolo lya mabele, kasi nsuka zingazinga mobimba ezipamaki na mabele.

“Elongolaki ngai mabele, nazwaki etombolele, eye nakotisaki o nse ya nsuka ya libanga, mpe na makasi mwa moke natombolaki lyango. Natalaki o kati, mpe kuna solo namonoki palaki, Ulima mpe Tumima, mpe ebende ya ntolo, lokola esakolamaki na ntoma. Sanduku o wapi itandemaki esalemaki na mabanga matandema elongo na yoko lolenge la sima. O nse ya sanduku, etandemaki mabanga mabale, makatisaki sanduku, mpe likolo lya mabanga maye palaki itandemaki mpe biloko bisusu elongo na yango.

“Namekaki kobimisa yango, kasi epekisamaki ngai na ntoma, mpe lisusu eyebisamaki ngai ete ntango mpo ya kobimisa yango ekokaki naino te, mpe ekokoka te, kina mibu minei uta o ntango ena; kasi alobelaki ngai ete nakoya o esika ena mingi mingi nsima ya mobu moko uta o ntango ena, mpe ete akokutana kuna elongo na ngai, mpe ete nakokoba kosala boye kina ntango ekokoka mpo ya kozwa palaki.

“Na engebene, lokola natindamaka, nakendeki o nsuka ya mobu na mobu, mpe o ntango inso nakutaki ntoma ona kaka kuna, mpe nazwaki mateya mpe mayele uta na ye o mbala inso ya masolo ma biso, etali nini Nkolo akosala, mpe boniboni mpe na lolenge kani bokonzi bwa Ye bokokambema o mikolo mya nsuka.

· · · · · · ·

“O bolandi, ntango ekokaki mpo ya bozwi palaki, Ulima mpe Tumima, mpe ebende ya ntolo. O mokolo mwa ntuku mibale na mibale mwa sanza ya Setembe, o mobu mwa nkoto yoko nkama mwambe ntuku mibale na nsambo, ekendeki ngai lokola momeseno o nsuka ya mobu mosusu o esika wapi ibombisamaki, ntoma ona kaka wa lola apesaki ngai yango na mokumba moye: Ete nakozala moyanoli mpo ya yango; ete soko nakotika yango ekende na bozangi bokebi, to na bopoto bwa ngai, nakokatama mosika; kasi soko nakosalela bokasi bwa ngai bonso mpo ya kobomba yango, kina ye, ntoma, akosenge yango, ikobatelama.

“Nasosolaki noki ntina nini nazwaki mikumba mya sikisiki boye mpo ya kobatela myango, mpe ntina nini ezalaki ete ntoma alobaka ete ekosala ngai nini esengelamaki na maboko ma ngai, akosenge yango. Mpo mosika mingi te eyebanaki ete nazalaka na yango, bokasi boike bwa kilikili bosalamaki mpo ya kobotolo yango epai ya ngai. Angele inso iye ikokaki kokanisama isalemaki mpo ya mwango mona. Moniokwami mokomaki mwa motema mobe mpe mokasi mingi koleka yambo, mpe ebele bazalaki na bokebi ntango inso mpo ya kobotolo yango epai ya ngai soko ekokaki. Kasi na bwania bwa Nzambe, ibatelamaki o maboko ma ngai, kina ekokisaki ngai na yango nini esengelamaki na maboko ma ngai. Ntango, engebene na mabongisami, ntoma asengeki yango, napesaki yango epai ya ye; mpe azali na yango na mokumba mwa ye kina mokolo moye, mozali mokolo mwa mibale mwa sanza ya mai, o mobu nkoto yoko nkama mwambe ntuku misato na mwambe.”

Mpo ya nsango mobimba, tala Joseph Smith—History o Pearl of Great Price, mpe History of the Church of Jesus Christ of Latter-day Saints (Mambi ma Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka), liboke 1, mokapo 1 kina 6.

Nsango ya kala ebimisama boye uta o mabele lokola mongongo mwa bato bakosakola uta o mputulu, mpe ebongolamaki o kati ya elobeli ya mikolo miye na likabo mpe nguya ya Nzambe lokola etatolamaki na Lisakoli lya bonzambe, ebimaki mbala ya yambo o mokili o Angele o mobu 1830 lokola The Book of Mormon.