Makomi
Lokasa ya nkombo ya Buku ya Molomoni


Buku ya Molomoni

Nsango Yoko Ekomama
na Loboko la Molomoni
likolo lya Palaki
Ekamatama uta o Palaki ya Nefi

Yango wana, ezali bokuse boko bwa likundoli lya bato ba Nefi, mpe lisusu lya Balamani— Bokomama mpo ya Balamani, baye bazali montika moko mwa ndako ya Yisalaele; mpe lisusu mpo ya Moyuda mpe Mopaganu—Bokomama na nzela ya motindo, mpe lisusu na molimo mwa bobikuli mpe bobimisi—Bokomama mpe bokangema, mpe bobombama epai ya Nkolo, ete bobebisama te—Mpo ya koya na likabo mpe nguya ya Nzambe mpo ya ndimbola ya bwango—Bokangema na loboko la Moloni, mpe bobombama epai ya Nkolo, mpo ya koya o ntango esengeli na nzela ya Mopaganu—Ndimbola ya bwango na likabo lya Nzambe.

Bokuse boko bokamatama uta o Buku ya Etele lokola, eye ezali likundoli lya bato ba Yelede, baye bapalanganisamaki o ntango Nkolo abulunganisaki lokota la bato, ezalaki bango kotonga linongi lyoko mpo ya kokoma o lola—Bwango bozali mpo ya kolakisa epai ya montika mwa ndako ya Yisalaele makambo manene kani Nkolo asalaki mpo ya batata ba bango; mpe ete bakoka koyeba mayokani ma Nkolo, ete babwakami mosika libela te—Mpe lisusu mpo ya kondimisa Moyuda mpe Mopaganu ete Yesu azali Klisto, Nzambe wa Seko, amimonisi epai ya bikolo binso—Mpe sikawa, soko ezali miko, ezali mabunga ma bato; yango wana, kokitisa makambo ma Nzambe te, ete okoka kozwama na bozangi mbindo o kiti-ya-bosambisi ya Klisto.

Bobongoli bwa ebandeli uta o palaki o lokota la Angele
na Joseph Smith, Jun.

Bobimisi bwa yambo o lokota la Angele o
Palmyra, New York, USA, o mobu 1830