Likita Linene
Mayokani mpe Mikumba
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Mayokani mpe Mikumba

Eklezia ya Yesu Klisto eyebani lokola eklezia oyo ebetaka nsete na kosalaka mayokani na Nzambe.

“Lolenge nini Eklezia na yo ekeseni na misusu?” Eyano na ngai na motuna oyo ya ntina ebutaki na ndelo moko oyo ekolisaki ngai mpe ntango Eklezia ekolaki. Ntango nabotamaki na Utah na 1932, bandimi na biso ya Eklezia bazalaki kaka pene ya 700.000, bakabolamaki na Utah mpe na bikolo mosusu ya nzinganzinga. Na ntango wana, tozalaki kaka na batempelo 7. Lelo Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba mikolo mya Nsuka ezali na bandimi koleka mituya 17 milio bakabolami na bikolo 170. Kobanda na mokolo ya 1, Sanza ya minei oyo, tozali na batempelo 189 oyo ebulisami na bikolo ebele mpe 146 misusu na oyo etali kosala plan mpe kotonga. Nasengeli kolobela ntina ya batempelo oyo mpe mambi mpe mosala ya mayokani kati na losambo na biso. Yango ekobakisa mateya ya motuya ya balobi ya liboso.

I.

Boyokani ezali ndanga mpo na kokokisa mikumba songolo. Bandanga ya moto ye moko ezali ntina na bolandeli ya bomoi na biso mokomoko mpe na botamboli ya lingomba ya bato. Likanisi oyo sikawa ezali kobongwana. Bato ndambo bazali kotelemela likoki endimama wana mpe bazali koloba ntango nyonso ete bato basengeli kozala na bonsomi uta na bopekisi nyonso oyo etiaka ndelo na bonsomi na bango ya bomoto. Kasi toyebi uta mibu ebele ya expelianse ete bato batikaka bonsomi ya bomoto mpo na kolonga matomba ya kobikaka na mangomba ya bato oyo ebongisama. Kotika bonsomi ya moto na moto ya ndenge wana eyekami mingimingi na bandanga to mayokani, oyo elobelami to esalelami.

Elilingi
Mapinga.
Elilingi
Minganga.
Elilingi
Bato oyo babomaka moto.
Elilingi
Bamisionele ya ntango Mobimba.

Oyo ezali mwa bandakisa ya mokumba ya boyokani na lingomba na biso ya bato: (1) Basambisi, (2) mapinga, (3) minganga mpe (4) babomi-moto. Bato nyonso oyo basalaka misala ekokana balapaka ndai—mbala mingi esalemaka na ndai to boyokani—mpo na kosala mikumba na bango oyo batindami. Lolenge moko ezali solo mpo na bamisionele na biso ya ntango mobimba. Bolati ya bilamba ekesena to nkombo likolo ya baje ezali elembo elimboli ete moto oyo alati yango azali na nse ya boyokani mpe ete azali na mokumba ya koteya mpe kosalisa mpe esengeli ba salisama na mosala wana. Ntina mosusu ezali ya kokundolisa balati mikumba ya boyokani na bango. Ezali na kindoki moko te na elateli to bilembo na bango, kaka likundoli moko ya bosenga ya mikumba ya sikisiki balati bandimaki. Oyo mpe ezali solo ya bilembo ya ndanga mpe lopete ya libala mpe mosala na yango na kopesaka likebisi na batali to kokundolisa balati mikumba ya mayokani.

Elilingi
Lopete ya libala.

II.

Oyo nalobi na ntina ya mayokani ezali moboko mpo na bolandeli ya bomoi ya bato etaleli mingimingi mayokani ya mangomba. Moboko mpe lisitwale ya mikangano ya bonzambe mpe masenga eyekami na mayokani. Ndakisa, boyokani ya Abalayama ezali moboko na mimesano minene ya bonzambe. Ezali kokotisa likanisi mosantu ya bilaka ya boyokani ya Nzambe na bana na Ye. Kondimana na Kala mbala mingi ekokanisaka boyokani kati ya Nzambe na Abalayama mpe nkona na ye.1

Eteni ya yambo ya Buku ya Mormon, oyo ekomamaki na ntango ya eleko ya Kondimana na Kala, elakisi polele mosala ya mayokani na kati ya lisitwale ya Yisalaele mpe bokumbameli. Nefi alobamaki ete makomi ya Bayisalaele ya eleko wana ezalaki “lisolo ya Bayuda, oyo ezali na mayokani ya Nkolo, oyo asalaki na kati ya ndako ya Yisalaele.”2 Mikanda ya Nefi elobeli mbala mingi boyokani ya Abalayama3 mpe na Yisalaele lokola “bato ya boyokani ya Nkolo.”4 Mosala ya boyokani na Nzambe to bakambi ya bonzambe ekomami lisusu na kati ya makomi ya Buku ya Mormon etali Nefi, Joseph na Ejipito, Mokonzi Benyamini, Alma, mpe Kapiteni Moroni.5

III.

Ntango ngonga ekokaki mpo na Bozongisi ya litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, Nzambe abengaki profeta, Joseph Smith. Toyebi te lisolo mobimba ya mateya ya ebandeli ya anzelu Moroni epai ya elenge profeta oyo akola na makanisi. Toyebi kaka ye ayebisaki Joseph ete “Nzambe azalaki na mosala mpo na [ye] ya kosala” mpe ete “litondi ya Nsango malamu ya libela” esengelaki koteyama, kobakisaka “bilaka oyo esalamaki na batata.”6 Toyebi lisusu ete makomi oyo elenge Joseph atangaki mpenza makasi—kutu yambo akambama mpo na kosala eklezia—ezalaki mateya ebele etali mayokani oyo azalaki kobongola na kati ya Buku ya Mormon. Buku wana ezali ebandeli monene ya Bozongisi ya litondi ya nsango malamu, kobakisa mwango ya Nzambe mpo na bana na Ye, mpe Buku ya Mormon etondisami na maloba etali mayokani.

Kozalaka na boyebi malamu ya Biblia, Joseph asengelaki koyeba buku ya Baebele’ ya likanisi ya Mobikisi ya “kosala boyokani ya sika na ndako ya Yisalaele mpe na ndako ya Yuda.”7 Ba-Ebre mpe elobelaka Yesu lokola “molobeli ya boyokani ya sika.”8 Elimbolami ete, lisolo ya biblia ya mosala ya nkufa ya Mobikisi ekomami “Kondimana naa Sika,” elembo ya kokokana mpo na “Boyokani ya Sika.”

Mayokani ezalaki na ntina mingi na Bozongisi ya nsango malamu. Yango ezali solo na ebandeli ete Nkolo akambaki Profeta azwa mpo na kobongisa Eklezia na Ye. Kala te ntango Buku ya Mormon ebimisamaki, Nkolo akambaki lingomba ya Eklezia na Ye ezongisama, kala te mpo na kobengama Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.9 Emoniseli oyo ekomamaki na Sanza ya minei 1830 elobi ete bato “bakoyambama na nzela ya libatisi na eklezia na ye” nsima “batatoli” (oyo elimboli kotatola na lokumu nyonso) “ete bayambolaki mpenza solo masumu na bango, mpe ete bazali na bolingi ya kozwa likolo na bango moko nkombo ya Yesu Klisto, mokano ya moko ya kosalela ye kino na nsuka.”10

Emoniseli kaka moko oyo ekambi ete Eklezia “esangana elongo mbala na mbala mpo na kolia limpa mpe vino [mayi] na bokundoli ya Nkolo Yesu.” Ntina ya bokuli oyo ezali solo na kati ya maloba ya mayokani elimbolami mpo na mpaka to nganganzambe oyo azali koyangela. Apambolaka bilembo ya limpa mpo na “milimo ya baoyo nyonso baliaka yango … , ete bango … batatola yo, O Nzambe, Tata ya Seko, ete bazala na bolingi ya kozwa likolo na bango nkombo ya Mwana na yo, mpe bamikundola ye ntango nyonso mpe babatela mitindo na ye oyo apesaki bango.”11

Mosala monene ya mayokani na Eklesia oyo ezongisami endimamaki na ebandeli ete Nkolo apesaki mpo na bobimisi ya yambo ya mabimisi na Ye. Kuna Nkolo asakoli ete abengaki Joseph Smith mpo ete bato ya mabele “bakeyi mosika ya mayokani na ngai, mpe babukaki boyokani na ngai ya libela.”12 Emoniseli oyo elimboli lisusu ete mitindo na Ye ezali kopesama “na ntina ete boyokani na ngai ya libela etiama.”13

Lelo tozali kososola mosala ya mayokani na kati ya Eklezia ezongisama mpe bokumbameli ya bandimi na yango. Mokambi Gordon B. Hinckley apesaki bokuse oyo ya mbano ya libatisi na biso mpe bolei na biso ya elambo ya mposo na mposo: “Mondimi nyonso ya eklezia oyo oyo akotaki na mayi ya libatisi akomi eteni moko na boyokani ya bule. Ntango nyonso toliaka elambo ya bilei ya Nkolo, tokomisaka sika boyokani wana.”14

Balobi mingi bakundoli biso na likita oyo ete Mokambi Russell M. Nelson mbala mingi alobelaka mwango ya lobiko lokola “nzela ya mayokani” oyo “ezongisaka biso epai ya [Nzambe]” mpe “ezali nyonso mpo na boyokani na biso na Nzambe.”15 Ateyi na ntina ya ntina ya boyokani na milulu na biso ya tempelo mpe alendisi biso tomona nsuka uta na ebandeli mpe to “kanisa lola.”16

IV.

Sikawa nazali kolobela lisusu mayokani ya tempelo. Mpo na kokokisa mokumba na ye ya kozongisa litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, Profeta Joseph Smith alekisaki mibu na ye ebele ya nsuka kokambaka botongi ya tempelo na Nauvoo, Illinois. Na nzela na ye Nkolo abimisaki mateya ya bule, malongi, mpe mayokani mpo na bakitani na ye basala na kati ya tempelo. Kuna bato oyo bazwaki dotasio esengelamaki koteyama mwango ya lobiko ya Nzambe mpe kobengisa bato basala mayokani ya bule. Baoyo bazalaki kobika na bosembo mayokani wana balakelamaki bomoyi ya seko, na kati ya oyo “biloko nyonso ezali ya bango” mpe bango “bakofanda liboso ya Nzambe mpe Klisto na Ye mpo na libela na libela.”17

Milulu ya dotasio na kati ya Tempelo ya Nauvoo esalamaki bobele yambo bapionie na biso ya ebendeli babenganama mpo na kobanda mobembo na bango ya lisitwale na bangomba na Wesiti. Tozali na matatoli ya bapionie ebele oyo ete nguya bazwaki uta na mokangano na Klisto na dotasio na bango na kati ya Tempelo ya Nauvoo epesaki bango makasi ya kosala mobembo na bango ya bilombe mpe komitia bango moko na Wesiti.18

Bato oyo bazwi dotasio na tempelo moko bazali na mokumba ya kolata garma ya tempelo, elamba oyo emonanaka te mpo elatamaka na kati ya bilamba. Ekundolisaka bandimi oyo bazwi dotasio ntina ya mayokani ya bule basalaki mpe mapamboli balakelamaki na kati ya tempelo esantu. Mpo na kokokisa bantina oyo esantu, toteyami kolata bagarma ya tempelo ntango nyonso, longola bobele bopekisi oyo ezali ya ntina. Lokola mayokani ezalaka na “mokolo ya bopemi te,” kolongola moko ya bagarma ezali lokola koboya mikumba ya mayokani mpe mapamboli oyo ezali na yango. Na ngambo mosusu, bato oyo balataka bagarma na bosembo mpe babatelaka mayokani na bango ya tempelo ntango nyonso bandimaka mokumba na bango lokola bayekoli ya Nkolo Yesu Klisto.

Elilingi
Karte ya batempelo.

Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali kotonga batempelo na mokili mobimba. Ntina yango ezali mpo na kopambola bana ya boyokani ya Nzambe na bokumbameli ya tempelo mpe na mikumba ya bule mpe banguya mpe mapamboli oyo ekokani na mosusu te ya kokangama na Klisto bazwaka na boyokani.

Elilingi
Tempelo ya São Paulo Brezil.

Eklezia ya Yesu Klisto eyebani lokola eklezia oyo ebetaka nsete na kosalaka mayokani na Nzambe. Mayokani mazali na kati ya moko na moko ya makuli ya lobiko mpe botomboli oyo Eklesia oyo ezongisami etambwisaka. Bokuli ya libatisi mpe mayokani na yango mazali mokumba ya ntina mpo na kokota na kati ya bokonzi ya lola. Makuli mpe mayokani ekangana ya tempelo mazali mikumba ya ntina mpo na bonetoli na kati ya bokonzi ya lola, oyo ezali bomoyi ya seko, “likabo monene ya makabo nyonso ya Nzambe.”19 Oyo ezali ntina ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Na tatoli na Yesu Klisto, oyo azali moto ya Eklesia wana, mpe azali kotinda mapamboli na Ye na bae banso oyo bazali koluka kobatela mayokani na bango ya bule. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.