Likita Linene
Kanisa Lola!
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Kanisa Lola!

Maponi na bino lelo ekolakisa: epai wapi bokofanda na boseko mobimba, lolenge ya nzoto oyo bokosekwa na yango, mpe baye oyo bokobika elongo na bango libela na libela.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, nazali na botondi mingi mpo na koloba na bino lelo. Na mvula na ngai, mokolo nyonso ya sika ememelaka ngai mabaku ya esengo mpe ya mimekano. Poso misato eleki, nazwaki likama na misuni na ngai ya mokongo. Bongo, uta nasala masukulu 100 na likita linene ya kotelema, lelo nabanzi nakosala yango ya kofanda. Nasambeli ete Molimo Mosantu akomema maloba na ngai na kati ya motema na bino lelo.

Kala te nawuti kosepela mbotama na ngai ya mbala 99 mpe sikawa nazali kobanda bomoi na ngai ya mibu 100. Natunamaki mbala mingi sekele ya kozala na bomoi ya ntango molai. Motuna malamu ekoki kozala “Nayekoli nini na bowumeli ya pene na ekeke moko ya bomoi?”

Ntango lelo ezali kopesa ngai ndingisa te ya koyanola motuna wana, kasi nakoki kokabola na bino moko ya mateya ya motuya oyo nayekoli.

Nayekoli ete mwango ya Tata na Lola mpo na biso ezali kitoko, ete oyo tosalaka na bomoi oyo ezali ntina mpenza, mpe ete Bomikabi ya Mobikisi ezali oyo ekokisaka mwango ya Tata na biso ya Lola.1

Komitungisaka na mpasi makasi oyo esalamaki na likama na ngai ya kala te, nayokaki kutu bosepeli makasi mpo na Yesu Klisto mpe likabo ezanga bososoli ya Bomikabi na Ye. Kanisa yango! Mobikisi anyokwamaki “mpasi mpe minyoko mpe masenginya ya ndenge na ndenge”2 mpo ete Akoka kolendisa biso, kobikisa biso, kosunga biso, na bantango ya bosenga.3 Yesu Klisto atalisaki boyebi na Ye na Getesemane mpe na Bolozi: “Mpasi nini esalaki ngai, kutu Nzambe, moto ya makasi koleka banso, kolenga mpo na mpasi, mpe kobimisa makila na lidusu nyonso ya loposo.”4 Likama na ngai etindi ngai nakanisa lisusu mpe lisusu “Moko ya monene koleka ya Mosantu ya Yisalaele.”5 Na ntango ya libiki na ngai, Nkolo alakisi nguya na Ye ya bonzambe na ndenge ya kimia mpe ya libunga te.

Na ntina ya Bomikabi ezanga nsuka ya Yesu, mwango ya Tata na biso ya Lola ezali mwango ebonga nie! Bososoli malamu ya mwango ya Nzambe elongolaka mabongisi ya bomoi mpe bozangi elikia ya lobi na biso ekoya. Epesaka moko na moko na biso likoki ya kopona lolenge nini tokoki kobika awa na mabele mpe epai wapi tokofanda mpo na libela. Likanisi ezanga ntina etali engebene lolenge tosengeli “kolia, komela, mpe kosepela, mpo lobi tokokufa; nyonso ekozala malamu mpo na biso”6 ezali moko ya lokuta monene na mokili.

Oyo ezali nsango monene ya mwango ya Nzambe: eloko ya motuya oyo ekosala bomoi na yo ya nkufa ezala malamu koleka ekoki kozala solo lolenge moko na makambo oyo ekosala ete bomoi na yo mobimba na boseko ezala malamu koleka oyo ekoki kozala! Lelo, mpo na kosunga bino bolongobana na mapamboli ya nkita oyo Tata na Lola azali na yango mpo na bino, nabengisi bino bozwa esalelo ya “kanisa lola”!7 Kokanisaka lola elingi koloba kozala na molimo na makanisi. Toyekolaka uta na Buku ya Mormon profeta Jacob alobi ete “kokanisa na lolenge ya molimo ezali bomoi ya seko.”8

Bokufi ezali eteyelo ya likolo na boyekoli kopona makambo minene ya motuya ya seko. Bato ebele babikaka na bomoi oyo lokola bomoi esuki kaka awa. Nzokande, maponi na bino lelo ekolakisa makambo misato: epai wapi bokofanda na boseko nyonso mobimba, lolenge ya nzoto oyo bokosekwa na yango, mpe baye oyo bokobika elongo na bango libela na libela. Na yango kanisa lola.

Na nsango na ngai ya yambo lokola Mokambi ya Eklezia, nalendisaki bino bobanda na nsuka na makanisi. Yango elingi koloba kosalaka bokonzi ya lola ntina na bino ya seko mpe nsima kobanza na bokebi epai wapi bikateli na bino moko na moko awa na mabele ekotia bino na mokili oyo ekoya lobi.9

Nkolo ateyi yango polele ete bobele mibali mpe basi oyo bakangisami lokola mobali mpe mwansi balongani kati na tempelo, mpe oyo babatelaka mayokani na bango, bakozala elongo na boseko mobimba. Ye alobaki, “Mayokani, boyokani, mikangano, mikumba, ndai, bilaka, misala, makangano, kimonginga, to bilikya nyonso, oyo esalemi te mpe ekotisami kati mpe ekangisami te na Molimo Mosantu ya elaka … ezali na nsuka ntango bato bakokufa.”10

Na yango, soki na bozangi bwanya toponi kobika mibeko ya mokili sikawa, toponi kosekwa na nzoto ya telesitiale. Tozali kopona te kobika na mabota na biso na seko.

Na yango, bandeko na ngai ya mibali mpe basi, lolenge nini mpe epai wapi na nani olingi kobika mpo na seko? Osengeli kopona.11

Ntango ozali kosala maponi, nabengisi yo otala na bonene—botali ya seko. Tia Yesu Klisto yambo, mpo ete bomoi na yo ya seko ezali na bondimi na yo epai na Ye mpe Bomikabi na Ye.12 Yango ezali mpe lisusu ntango otosi mibeko na Ye. Botosi elengelaka nzela mpo na bomoi ya esengo mpo na yo lelo mpe epesaka, lifuti ya seko lobi.

Ntango okutani na mikakatano, kanisa lola! Ntango omekami na lisenginya, kanisa lola! Ntango bomoi to balingami bayokisi yo mpasi, kanisa lola! Ntango moto songolo akufi na bolenge, kanisa lola. Ntango moto songolo atungisami na bokono makasi, kanisa lola! Ntango mbonge ya bomoi eyei likolo na yo, kanisa lola! Ntango ozali kobika uta na likama to mpasi, lokola nakutani na yango sikawa, kanisa lola!

Lokola ozali kotya likebi naoyo etali likanisi ya lola, milengela mpo na kokutana na bonguna.13 Bamibu eleki, moninga moko ya mosala atiolaki ngai mpo na kozalaka na “batempelo ebele” kati na ngai, mpe mokambi moko atiolaki bondimi na ngai. Nandimisami ete kokanisa lola elongisaki mosala na ngai mobimba.

Ntango ozali kokanisa lola, motema na yo ekobongwana malembe malembe. Okolinga kosambela mingi koleka mpe kozala sembo. Nasengi otika te nsambo na yo ezala lokola liste ya biloko ya kosomba. Bomoni ya Nkolo eleki bwanya na yo ya nkufa. Eyano na Ye na nsambo na yo ekoki kokamwisa yo mpe ekosunga yo okanisa lola.

Banza eyano ya Nkolo epai ya Joseph Smith ntango abondelaki mpo na lisungi ya Boloko ya Liberty. Nkolo ateyaki Profeta ete mpasi na ye ya bomoto ekopesa ye boyebi mpe ezali mpo na bolamu na ye.14 “Soki okangi motema malamu,” Nkolo alaki, “Nzambe akonetola yo likolo na yango.”15 Nkolo azalaki koteya Joseph akanisa lola mpe aluka lifuti ya seko koleka kotalela makambo ya bampasi ya mokolo. Nsambo na biso ekoki kozala—esengeli kozala—masolo ya bomoi elongo na Tata na Lola.

Ntango ozali kokanisa lola, okomimona yo moko ya komipekisa eloko nyonso oyo ekobebisa bonsomi na yo ya kopona. Bowumbu nyonso—ezala ya lisano, ya niongo, ya bimelamela, ya masanga, ya kanda, ya bilili ya mabe, ya bosangisi nzoto to ya bilei—etukaka Nzambe. Mpo na nini? Mpo ete bowumbu na yo ekomi nzambe na yo. Otalelaka yango koleka Ye mpo na kozwa bolendisi. Soki ozali komitungisa na bowumbu, luka lisungi ya basali mpe ya molimo oyo osengeli. Nasengi kotika te bowumbu songolo eyiba bonsomi na yo ya kopona kolanda mwango kitoko ya Nzambe.

Kokanisaka lola ekosunga yo lisusu otosa mobeko ya bopeto ya nzoto. Biloko moke ekotungisa bomoi na yo mingi na lombango koleka kozanga botosi na mobeko oyo ya bonzambe. Mpo na baoyo basila kosala mayokani na Nzambe, bozangi bopeto ezali moko ya ndenge oyo ekobungisa litatoli na bino.

Ebele ya masenginya makasi ya monguna ezali bozangi botosi ya bopeto ya bomoto. Nguya ya kokela bomoi ezali libaku moko ya bonzambe oyo Tata na Lola apesaka ndingisa na bana na Ye ya nkufa basalela. Na yango, Nzambe alakisaki miango ya bokambi na polele mpo na bosaleli ya nguya oyo ya bonzambe. Bosangisi nzoto esalemi bobele mpo na mobali mpe mwasi oyo babalani.

Bato ebele na mokili bandimelaka yango te, kasi likanisi ya bato ezali alebitele ya bosolo te. Nkolo asakolaki ete moto moko te azanga bopeto ya nzoto akokota na bokonzi ya lola. Na yango ntango ozwaka bikateli etali bopeto ya nzoto, nasengi okanisa lola. Soki ozalaka peto na nzoto te, nasengi yo oyambola. Yaka epai ya Klisto mpe ozwa elaka na Ye ya bolimbisi mobimba ntango oyamboli masumu na yo nyonso.16

Ntango ozali kokanisa lola, okomona mikakatano mpe bonguna na pole ya sika. Ntango moto moko olingaka atelemeli bosolo, kanisa lola, mpe kobungisa litatoli na yo te. Apostolo Paulo asakolaki ete “na bantango ya nsuka basusu bakosundola bondimi, bakomipesa na milimo ya bopengwisi, mpe malongi ya mabe.”17

Ezali na nsuka te na boyokisi mpasi ya monguna. Nasengi bozala ya komilengela. Bozwa ata mokolo moko te toli ya baye bandimelaka te. Boluka bokambi uta na mingongo oyo bokoki kondimela—uta na baprofeta, bamoni, mpe babimisi mpe na nungunungu ya Molimo Mosantu, oyo “ekolakisama epai na bino makambo nyonso oyo bokosala.”18 Nasengi bosala mosala ya molimo mpo na komatisa likoki na bino ya kozwa emoniseli na bino moko.19

Ntango ozali kokanisa lola, bondimi na yo ekomata. Ntango nazalaki elenge, lifuti na ngai ya mosala ezalaki 15 $ na sanza. Na mpokwa moko, mwasi na ngai Dantzel atunaki ngai soki nazalaki kofuta moko na zomi na lifuti moke wana. Nazalaki kofuta te. Nayambolaki mbala moko mpe nabandaki kofuta 1.50 $ na moko na zomi ya sanza.

Eklezia ezalaki ya kokesena mpo tomatisaki moko na zomi na biso? Ya solo te. Nzokande, kokoma mofuti ya moko na zomi mobimba ebongolaki ngai. Yango ezali ntango nayekolaki ete kofutaka moko na zomi etalaka bondimi, mosolo te. Lokola nakomaki mofuti ya moko na zomi mobimba, maninisa ya lola ebandaki kofungwamela ngai. Nakoki koloba mabaku mingi ya mosala na ngai ezalaki mpo na bondimi na biso ya bofuti moko na zomi.20

Kofutaka moko na zomi esengaka bondimi, mpe lisusu etongaka bondimi na Nzambe mpe Mwana na Ye ya Bolingo.

Kopona kobika bomoi ya malamu na mokili ya bato ya bosangisi nzoto, ya politiki etongaka bondimi.

Kolekisa ntango mingi na tempelo etongaka bondimi. Mpe mosala mpe bokumbameli na yo na tempelo ekosunga yo okanisa lola. Tempelo ezali esika ya limemia. Kuna olakisami lolenge nini okokoba kokende liboso na bomi ya lola. Kuna okopusana pene ya Mobikisi mpe okopesama ndingisa monene na nguya na Ye. Kuna okokambama na kosilisaka makambo na bomoi na yo, kutu ata makambo na yo ya makasi.

Makuli mpe mayokani ya tempelo ezali mpo na ntina ya seko. Tozali kokoba kotonga batempelo ebele mpo na kokokisa mabaku oyo ya bule ekoma solo na babomoi na bino. Tozali na esengo ya kosakola miango na biso ya kotonga tempelo na bisika 20 moko na moko oyo elandi.

  • Savai’i, Samoa

  • Cancún, Mexico

  • Piura, Peru

  • Huancayo, Peru

  • Viña del Mar, Chili

  • Goiânia, Brezil

  • João Pessoa, Brezil

  • Calabar, Nigeria

  • Cape Coast, Ghana

  • Luanda, Angola

  • Mbuji-Mayi, Republique Democratique ya Congo

  • Laoag, Philippines

  • Osaka, Japon

  • Kahului, Maui, Hawaii

  • Fairbanks, Alaska

  • Vancouver, Washington

  • Colorado Springs, Colorado

  • Tulsa, Oklahoma

  • Roanoke, Virginie

  • Ulaanbaatar, Mongolie

Nzambe azali kokamba biso mpo na kotonga batempelo oyo ete esunga biso tokanisa lola. Nzambe azali na bomoi. Yesu azali Klisto. Eklezia na Ye ezongisamaki mpo na kopambola bana nyonso ya Nzambe. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Yoane 6:38.

  2. Alma 7:11.

  3. Tala Alma 7:12.

  4. Malongi mpe Mayokani 19:18.

  5. 2 Nefi 9:40.

  6. 2 Nefi 28:7.

  7. Ekoki komonisama kozala pete mpo na koyambola mpe kokoba kokende liboso na molimo awa, ntango molimo na biso ezali na bomoko na nzoto na biso, na esika ya mokili oyo ekoya lobi na ntango tokokufa mpe tokosekwa. Lokola Amuleke ateyaki bapostolo ya Bazoramite, “Bomoyi oyo ezali ntango … komilengela mpo ya kokutana na Nzambe” (tala Alma 34:32–35).

  8. 2 Nefi 9:39.

  9. Tala Moziya 4:30, epai wapi Mokonzi Benyamina azali kokebisa bato na ye, “soko bokokengele te binomei, mpe makanisi ma bino, mpe maloba ma bino, mpe misala mya bino, mpe bokobatela te mitindo mya Nzambe, mpe kokoba te o bondimi … , bosengeli kowa.”

  10. Malongi mpe Mayokani 132:7; nsete ebakisamaki.

  11. Ya solo, bonsomi na bino ya kopona ekoki te kokonza bonsomi ya kopona ya basusu mpe makama nyonso ekolanda. Nazalaki mpenza na mposa ya kokangisama na baboti na ngai. Nzokande, nasengelaki kozela kino bango baponaki kozwa dotasio ntango bazalaki na mibu koleka 80. Nsima, bakangisamaki lokola mobali mpe mwasi, mpe biso bana tokangisamaki epai na bango.

  12. Makomi etatoli mbala na mbala ete likabo ya bomoi ya seko elongobani bobele na nzela ya bolongi, ngolu, mpe mawa ya Mobikisi Yesu Klisto (tala, ndakisa, Moroni 7:41; tala lisusu 2 Nefi 2:6–8, 27

  13. Tala 2 Nefi 2:11.

  14. See Malongi mpe Mayokani 122:7.

  15. Malongi mpe Mayokani 121:18.

  16. Tala Yisaya 1:16–18; Malongi mpe Mayokani 58:42–43.

  17. 1 Timote 4:1. Molongo oyo elandi ekobi, “Speaking lies in hypocrisy; having their conscience seared with a hot iron” (molongo 2). Paulo asakolaki lisusu ete oyo nyonso “azali na bomoi ya boyengebene na Klisto Yesu akonyokwama na nkufa” (2 Timote 3:12).

  18. 2 Nefi 32:5; nsete ebakisamaki. Soki bokosenga,” Nkolo alakaki, “bokozwa emoniseli likolo ya emoniseli, boyebi likolo ya boyebi” (Malongi mpe Mayokani 42:61).

  19. Tala Russell M. Nelson, “Revelation for the Church, Revelation for Our Lives,” Liahona, May 2018, 96.

  20. Yango elingi koloba te ete ezali na kimoninga ya ntina. Basusu oyo bafutaka te moko na zomi bazwaka mabaku ya misala, ntango basusu oyo bafutaka moko na zomi bazwaka yango te. Elaka ezali ete maninisa ya lola ekofungwama na bafuti ya moko na zomi. Ndenge ya mapamboli ekobanda kobongwana.