Likita Linene
Yesu Klisto Azali Bomengo
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Yesu Klisto Azali Bomengo

Kangama na Klisto. Azali Mobikiisi mpe Mosikoli na biso, “elembo” epai ya oyo tosengeli kotalela, mpe bomengo na biso monene.

Na mobu 1907, moto ya bozwi moko ya ekolo Angletere na nkombo ya George Herbert, nkumu ya mitano Carnarvon,1 akendaki kofanda na Ejipito mpe alingaki arkeloji lisitwale ya biloko ya kala. Akutanaki na moko ya ekolo Ejipito oyo alandelaka lisitwale ayebana malamu, Howard Carter, mpe ayebisaki ye basala elongo. Carter asengelaki kolandela arkeloji, (lisitwale ya biloko ya kala), mpe Carnarvon asengelaki kopesa mosolo.

Elongo balandelaki na elonga bisika ndenge na ndenge. Nsima bazwaki ndingisa ya koluka na Libulu ya Bakonzi, oyo ezali pene ya Luxor ya lelo, epai eye malita ya bafalo ebele ezwamaki. Bazwaki mokano ya koluka lilita ya Mokonzi Tutankhamun. Tutankhamun amataki na nbgende ya Ejipito mibu koleka 3000 kala te mpe akonzaki mibu 10 yambo ya nkufa na ye ya mbalakaka.2 Ayebaki ete bakundakis ye na Libulu ya Bakonzi,3 kasi esika ya lilita na ye eyebanaki te.

Carter mpe Carnarvon balekisaki mibu mitano elonga ezalaki te mpo na kolukaka lilita ya Tutankhamun. Na nsuka Carnavron ayebisaki Carter ete asilisaki mosala ya boluki. Carter abondelaki ye abakisa ata eleko moko ya boluki, mpe Carnarvron andimaki mpe apesaki ndingisa ya mosolo.

Carter amonaki ete mabele mobimba ya Libulu ya Bakonzi etalamaki na boluki—longola se esika na bango bafandaki. Na mwa mikolo ya botimoli kuna, bamonaki matambe ya yambo oyo ekambi na nse ya lilita.4

Ntango Carter na nsuka atalaki na kisuku ya lilita ya Tutankhamun, amonaki wolo bisika nyonso. Nsima basanza misato ya bolandeli oyo ezalaki na kati ya kisuku, bafungolaki kisuku ekangama ya lilita na Sanza ya mibale 1923—mibu 100 eleki. Oyo ezalaki bozwi ya arkeloji moko ya elonga ya ekeke ya mbala ya20.

Na ntango ya mibu oyo ya boluki ezanga elonga, Carter mpe Carnarvron bamonaki mpamba oyo ezalaki na nse ya makolo na bango. Bikeke mitano yambo ya mbotama ya Mobikisi, Yakobo profeta ya Buku ya Mormon alobaki na maye etali kozwa boyebi to kolandela oyo ezali penepene lokola “tala likolo ya oyo ezali ntina.” Yakobo amonaki ete bato ya Yelusaleme bakokaki te koyeba Masiya ya elaka ntango Ye ayaki. Yakobo asakolaki ete bakozala “bato [oyo] bakotiola maloba ya polele … mpe [bakoluka] mpo ya makambo maye bakokaki te kososola. Yango wana, na ntina ya lolanda la bango, loye lolanda loyaki na kotalaka o ngambo esusu ya elembo, basengeli mpenza kokweya.”5 Na maloba mosusu, bakotatabana.

Esakola ya Yakobo ezalaki solo. Na ntango ya mosala ya nkufa ya Yesu, bato ebele batalaki likolo ya elembo, koleka Ye. Batalaki koleka Mobikisi ya mokili. Na esika ya koyebaka etinda na Ye na bokokisi mwango ya Tata na Lola, bafundaki mpe babakaki Ye na ekulusu. Balukaki mpe bazelaki moto mosusu mpo na komemela bango lobiki.

Lokola bato oyo na Yeslusaleme, mpe Carter mpe Carnarvron, biso mpe lisusu tokoki koluka kotala likolo ya elembo. Tosengeli komibatela na ezalela oyo na bobangi ete tozanga Yesu Klisto na bomoi na biso mpe kozanga kozwa mapamboli oyo Ye apesaka biso. Tozali na mposa na Ye Toteyami kotalela “oyo azali na banguya mpo na kobikisa.”6

Azali elembo na biso Soki tozangi koyeba ete ezali na bosenga mpo na eloko songolo koleka maye Ye apesaka, towanganaka mpe tokitisaka ntina mpe nguya oyo Akoki kozala na yango na bomoi na biso. Asengaki lotomo ya ngolu mpe alakisi ngolu yango epai na biso.7 Azali ebandeli ya “nsuka [epai oyo tosengeli] koluka bolimbisi ya masumu na [biso].”8 Azali Molobeli na biso epai ya Tata mpe alobelaka biso maye Tata alingaka, mpo tozonga epai na Ye lokola basangoli kati ya bokonzi na Ye. Tozali na mposa, na maloba ya profeta Alma, “bwakani miso [mya bino] zingazinga mpe bandani kondima na Mwana Mobali wa Nzambe, ete akoya kosikola bato ba ye, mpe ete akoyoka mpasi mpe akokufa mpo ya kotumbolama mpo ya masumu ma [biso]; mpe ete akolamuka lisusu uta o bakufi, eye ekomeme esalema bosekwi.”9 Yesu Klisto azali bomengo na biso.

Mobikisi apesaki biso nzela mingi mpo na kolanda Ye mpenza, lisusu libaku ya koyambola mokolo na mokolo. Ntango mosusu tozali kotyola motuya boniboni lipamboli oyo epesami ezali monene. Ntango nazalaki na mibu mwambe, nabatisamaki na Tata na ngai. Na nsima, nasimbaki ye na loboko ntango tozalaki kokende mpo na kokatisa balabala moko oyo bato bazalaki mingi. Nazalaki kotia bokebi te mpe nabimaki na nzela bobele ntango motuka monene elekaki. Tata na ngai atindikaki ngai nsima, libanda ya nzela mpe na nzela monene. Soki asalaki yango te mbele, motuka ya monene etutaki ngai. Koyebaka lolenge na ngai ya likanisi ya mabe te, nakanisaki, “ntango mosusu elingaki kozala malamu nakufa na motuka monene mpo ete nakozala lisusu peto te lokola nawuti kozwa libatisi na ngai.”

Ntango nazalaki na mibu mwambe, na kozanga koyeba, nazalaki kokanisa mayi ya libatisi esokolaki masumu na ngai. Boye te! Mibu eleki uta nabatisamaki, nayekolaki ete masumu epetolamaka na nguya ya Yesu Klisto na nzela ya libonza ya bomikabi na Ye ntango tosalaka mpe tobatelaka liyokani ya libatisi.10 Nsima, na nzela ya libonza ya boyamboli, tokoki kotikala peto. Nayekolaki lisusu ete elambo ememaka nguya monene kati ya bomoi na biso, epesaka biso ndingisa ya kozwa bolimbisi ya masumu na biso.11

Kaka lokola bomengo oyo ezalaki na nse ya makolo ya Carter mpe Carnarvron, mapamboli ya bomengo ya elambo elongobani epai na biso ntango nyonso toyaka na liyangani ya elambo. Tolakamaki ete Molimo Mosantu akozala moninga na biso monene soki topusani na elambo lolenge moko na mobongwani ya sika apusanaka na libatisi mpe nkotisa, na motema ebukana mpe molimo ya mawa mpe mokano ya kobika bomoi ya liyokani ya libatisi wana. Molimo Mosantu apambolaka biso na nguya na Ye ya bosantisi na ntina ete tokoka kozwa bolimbisi ya masumu na biso, baposo na baposo.12

Moboko na biso ya molimo elendisamaka na nzela ya boyamboli mpe na bolengeli ya motema mobimba mpe kolia elambo na lolenge elongobana. Bobele na moboko elenda ya molimo nde tokoki kokamba mvula, mopepe, mpe mbonge oyo etungisaka bomoi na biso.13 Na ngambo mosusu, moboko ya molimo na biso elembaka ntango tokimaka liyangani ya elambo to ntango tomipesaka te na Mobikisi na ntango ya elambo. Tokoki na bozangi koyeba “komilongola [biso moko] na Molimo ya Nkolo, ete esika ekoki kozala lisusu te kati na [biso] mpo na kokamba [biso] na banzela ya bwanya oyo [biso] tokoki kopambolama, kozwa bozwi, mpe koyika mpiko.”14

Ntango tozali na Molimo Mosantu kati na biso, tokofulama mpe kokambama mpo na kosala mpe kobatela mayokani, lokola oyo tosalaka kati ya tempelo. Kosala yango bongo elendisaka boyokani na biso na Nzambe.15 Bokoki komona bino moko ete ezali na batempelo ya sika esakolamaki na mibu kala te, komema batempelo kutu pene ya bandimi.16 Na ngambo mosusu, batempelo ekomaki mingi pene na biso, ekoki kozala mpasi te mpo na biso likambo ya kokende ntango nyonso na tempelo. Ntango batempelo ezali mosika, tolengelaka ntango na biso mpe misolo mpo na kokende mobembo na tempelo mpe kokumbamela kuna. Topesaka ntina mingi na mobembo oyo.

Na tempelo pene na biso, ekoki kozala mpasi te kotika biloko ya mike epesa biso nzela ya kokende, komilobelaka biso moko, “malamu, nakokende ntango mosusu.” Kofandaka pene ya tempelo ememeka ndingisa monene ya kosala pologalami ya kokende tempelo, kasi ndingisa oyo ekoki kosala pete ete tempelo ezala nzela malamu. Ntango tosali, “tozangaka elembo,” koboyaka libaku ya kopusana pene ya Mobikisi kati na ndako na Ye esantu. Bomipesi na biso ya kokende esengeli kozala makasi ntango tempelo ezali pene lokola ezali mosika.

Nsima Carter mpe Carnarvron balukaki mosika ya Libulu ya Bakonzi kolukaka lilita ya Tutankhamun, basosolaki libunga na bango. Tosengeli te kosala na bozangi elonga, lokola basalaki na ntango moko, mpo na kozwa bomengo. Tozali te na mposa ya koluka toli libanda epai ya bapaya, mpo na kopesa ntina na oyo ezali sika ya ebandeli mpe kokanisaka lokola toli oyo ekozala ntina koleka oyo tokoki kozwa kowuta na profeta na biso ya komikitisa ya Nzambe.

Lokola ekomami kati ya Boyokani na Kala, ntango Naamani alukaki nkisi oyo ekobikisa maba na ye, ayokaki botioli ya kosengama komizindisa kati ya ebale mbala nsambo. Kasi andimaki kolanda toli ya profeta Elize koleka kotalela komipesa na toli na bango elengelama na lolenge bikamwa esengelaki kosalama. Lokola mbano, Naaman abikisamaki.17 Ntango tondimelaka profeta ya Nzambe na mabele lelo mpe tosaleli toli na ye, tokozwa esengo, mpe biso mpe tokoki kobikisama. Tosengeli koluka mosika te.

Bandeko mibali mpe basi, nalendisi bino bomikundola ntango nyonso kotalela Jesu Klisto. Azali Mobikiisi mpe Mosikoli na biso, “elembo” epai ya oyo tosengeli kotalela, mpe bomengo na biso monene. Ntango boyei epai na Ye, bokozwa lifuti ya bolendisi mpo na kolonga mimekano ya mokili, bokasi mpo na kosala oyo ezali malamu, mpe likoki ya kokokisa etinda na bino na bokufi. Bolengela libaku ya koyambola, libaku ya kolia elambo, lipamboli ya kosala mpe kobatelaka mayokani ya tempelo, esengo ya kokumbamela kati ya tempelo, mpe kosepela kozala na profeta ya bomoi.

Napesi litatoli na ngai mpe ya solo ete Nzambe, Tata na Lola, azali Tata na biso ya Lola ete Azali na bomoi; Yesu azali Klisto; azali ndakisa na biso, Moninga moko ya bwanya ya lola,18 mpe oyo ezali Eklezia na Ye ezongisama. Botondi na bondimi mpe boyengebene na bino. Nasambeli ete bokopambolama, kozwa bozwi, mpe koyika mpiko na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Nkombo mobimba ya Nkumu ya Mitano ya Carnarvron ya mitano ezali George Edward Stanhope Molyneux Herbert.

  2. Boluki boyebi (CT) esalami na mobu 2005 elakisi ete Mokonzi Tutankhamun ekoki kozala anyokwamaki na mpota ya bobukani ya mikuwa na ye, ntango mosusu ememaki ye na liwa.

  3. Bakonzi ebele ya Sika ya Bokonzi ya bafalo ya Ejipito bakundamaki na Libulu ya Bakonzi. Mingi ya malita oyo emonisamaki mpe eyibamaki na kala.

  4. Lisolo oyo ya boluki ya lilita ya Tutankhamun elobamaki na Eric H. Cline, “King Tut’s Tomb,” Archaeology: An Introduction to the World’s Greatest Sites (2016), 60–66.

    Makambo ebele esungaki na maponi ya Caerter mpe Carnarvron na oyo etali esika ya boluki—mpe esika nini ya koluka te—na kati ya Libulu ya Bakonzi. Ka ya esika ya bofandi ezazlaki malamu te mpo na boluki. Bisika nzinganzinga ezalaki mpo na bapaya batala lilita ya Ramses ya mbala ya sambo, na yango esika ezalaki ya motungisi. Esika ezipamaki na, maloba ya Carter, bandako ebele etongamaki, mingimingi mpo na basali ya Rameses[,] … matambe misato na mabele ezalaki nse na bango.” It did not seem likely that huts would have been built on top of the entrance to a tomb (see Howard Carter and A. C. Mace, The Tomb of Tut-ankh-Amen: Discovered by the Late Earl of Carnarvon and Howard Carter, vol. 1 [1923], 124–28, 132).

    Mpo na masolo ya bomoni lilita ya Tutankhamun’s tomb, tala Zahi Hawass, Tutankhamun and the Golden Age of the Pharaohs (2005); Nicholas Reeves, The Complete Tutankhamun: The King, the Tomb, the Royal Treasure (1990), 80–83; and Nicholas Reeves and Richard H. Wilkinson, The Complete Valley of the Kings: Tombs and Treasures of Egypt’s Greatest Pharaohs (1996), 81–82.

  5. Yakobo 4:14.

  6. 2 Nefi 31:19.

  7. Tala Moroni 7:27–28.

  8. 2 Nefi 25:26.

  9. Alma 32:22.

  10. Tala Malongi mpe Mayokani 76:52.

  11. Tala David A. Bednar, “Teya mpo na Kotonga, Bondimi na Yesu Klisto” (nsango epesamaki na seminele mpo na bakambi ya misio ya sika, Sanza ya motoba 23, 2023); Rachel Sterzer Gibson, “Teya mpo na Kotonga, Bondimi na Yesu Klisto, Mpaka Bednar Instructs,” Church News, Sanza ya motoba 23, 2023, thechurchnews.com.

  12. Elambo, nzokande, etiamaki te lokola ntina ya bolimbisi esengelami ya masumu (tala James E. Talmage, The Articles of Faith, 12th ed. [1924], 175). Moto moko te akoki kosala masumu na mokolo ya Sambo na mpokwa mpe kozela ete oyo asengeli kosala ezala kolia eteni ya lipa mpe komela kopo ya mayi na mokolo ya nsambo mpe apetolama na lolenge ya soloka. Kasi likambo ya bosantisi ya Molimo Mosantu ekoki kopetola oyo nyonso ayambolaka na motema na ye mobimba mpe likanisi ya solo.

  13. Tala 3 Nefi 18:12–13.

  14. Mosiya 2:36.

  15. Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Nzambe azalaka na bolingo ya sikisiki mpo na moto moko na moko oyo asalaka liyokani na Ye na mayi ya libatisi. Mpe bolingo wana ya bonzambe elendisamaka ntango mayokani misusu esalemi mpe ebatelami na bondimi” (“Choices for Eternityworldwide devotional for young adults, May 15, 2022], Gospel Library). Mayokani ebele na nzela ya liyokani ezali kaka likama te kasi mabakisami mpe kutu likambo ya motuya. Mokangano ya pete mpe makasi na Nzambe. Mokangano ya lolenge oyo epesaka biso nzela tobongwama na lolenge ete elilingi na Ye ezali likolo ya bilongi na biso mpe ete mitema na biso ebongwanaki mpenza makasi (tala Alma 5:14).

  16. Mokambi Nelson alimbolaki ete Nkolo “azali kosala ete batempelo ekoma pene ya bandimi. Azali komemaka na lombango lolenge ya kotonga batempelo. Azali kotombolaka makoki na biso ya kosalisa bosangisi Yisalaele. Azali lisusu kosala yango pete mpo na moko na moko na biso mpo na kokoma mingimingi na molimo” (“Focus on the Temple,” Liahona, Nov. 2022, 121).

  17. Tala 2 Bakonzi 5:9–14.

  18. Tala “I Know That My Redeemer Lives; Hymns, no. 136.