Likita Linene
Bozala Balandi ya Kimia ya Klisto
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Bozala Balandi ya Kimia ya Klisto

Natatoli ete “balandi ya kimia ya Klisto” bakozwa kimia ya moto ye moko na bomoi oyo mpe bokutani ya lola ya nkembo.

Tozali kobika na eleko oyo “balandi ya kimia ya Klisto”1 bakutanaka na mikakatano ya ndenge. Baoyo bandimaka na, bokumbameli na komikitisa nyonso, mpe batatolaka Yesu Klisto bakutanaka ntango nyonso na mimekano, monioko, mpe mikakatano.2 Ngai na mwasi na ngai Malia tokeseni te. Na mibu moke mileki, tomoni mingi ya baninga na biso ya penepene ya eteyelo ya likolo mpe baninga na biso bamisionele, boko basi na bango ya motuya, mpe baninga ya mosala ya kala kokufa, to, lokola Mokambi Russell M. Nelson alobaki, kozwa lipolomi na ngambo mosusu ya elamba. Tomoni boko oyo bakolaki na bondimi mpe bondimi elongwaki na nzela ya liyokani.

Na mawa, tobungisaki nkoko moko ya mibu 23 oyo akufaki na likama ya mawa ya motuka. Baninga misusu ya bolingo, bandeko ya libota, mpe baninga ya mosala bakutanaki na mikakatano ya makasi ya kolongonu ya nzoto.

Ntango nyonso oyo mimekano ekomeli biso, tolelaka mpe tosalaka makasi mpo na komema mikumba ya moko na mosusu.3 Tolelaka makambo oyo ekokokisama te mpe nzembo oyo ekoyembama te.4 Makambo mabe ekomelaka bato malamu na mobembo oyo ya kufa. Moto ya mabe oyo epeli na Maui na Hawaii, na sudi ya Chili, mpe Canada ezali bandakisa ya makambo ya nsomo oyo bato malamu bakutanaka na yango ntango mosusu.

Totangi na Liyaka ya Ntalo Monene ete Nkolo amonisaki na Abalayama bozali ya seko ya milimo. Abalayama ayekolaki bomoi na biso yambo ya mabele, bokulisi yambo ya mbotama, Bokeli, boponi ya Mosikoli, mpe bomoi oyo ya kufa, oyo ezali ezalela ya mibale ya moto.5 Mosikoli asakolaki:

“Tokosala mabele oyo bato oyo bakoki kofanda;

“Mpe tokomeka bango awa na yango, mpo na kotala soki bakosala makambo manso oyo Nkolo Nzambe na bango akotinda bango.”6

Sikawa biso banso tozali awa na ezalela ya mibale ya mobembo na biso ya bokoli epai ya bokonzi ya nkembo lokola eteni ya mwango monene ya lobiko ya Nzambe mpe bonetoli. Topambolami na bonsomi mpe tozali na nse ya mimekano ya bokufi. Oyo ezali ntango epesameli biso mpo na komilengela mpo na kokutana na Nzambe.7 Topambolami na koyeba Yesu Klisto mpe mokumba na Ye na mwango. Tozali na libaku malamu ya kokoma bandimi ya Eklezia ezongisamaki, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Lokola balandi ya kimia ya Klisto tosalaka makasi mpo na kotosa mitindo na Ye. Ezalaka naino pete te mpo na balandi na Ye. Ezalaki mpe pete te mpo na Mobikisi kokokisa na bosembo etinda na Ye ya kufa.

Makomi ezali polele; mingi bakotikala na lolenge ya “kolia, komela, mpe kosepela, mpo lobi tokokufa.8 Bato mosusu oyo bazali bandimi te bazongaka nsima na bisika ya molili ya bato oyo bazali na makanisi ndenge moko oyo bazali kotombola “eloko ya sika oyo ekolanda”9 mpe bafilozofi ya bato.10 Bayebi te epai wapi bakoki kozwa solo.11

Balandi ya kimia ya Klisto balandaka nzela moko to mosusu te. Tozali bato ya esengo, ya komipesa na mangomba esika tofandi. Tolingaka, tokabolaka, mpe tobengisaka bana nyonso ya Nzambe na kolanda mateya ya Klisto.12 Tolandaka toli ya profeta na biso ya bolingo, Mokambi Nelson: toponaka mokumba ya “mopesi kimia, sikawa mpe ntango nyonso.”13 Lolenge oyo epemami eyokani na makomi mpe bokambami ya lisakoli.

Na 1829 Eklezia oyo ezongisamaki ebongisamaki naino te, mpe Buku ya Mormon ebimisamaki te. Liboke moke ya bato oyo bazalaki kobunda, batindamaki na Molimo ya Nzambe, balandaki Profeta Joseph Smith. Nkolo amonisaki na Joseph toli mpo na bantango ya mpasi: “Bobanga te, etonga moke; bosala malamu; botika mabele mpe lifelo esangana mpo na kokweisa bino, mpo soki botongami likolo ya libanga na ngai, bakoki kolonga te.”14 Apesaki bango lisusu toli:

“Tala epai na ngai na makanisi nyonso; ntembe te, kobanga te.

“… Bozala sembo, bobatela mitindo na ngai, mpe bokozwa libula ya bokonzi ya lola.”15

Emonani polele ete, nsuka na biso ya likolo ebongwanaka te ntango tozali konyokwama na mikakatano. Na Baebele, topesami toli ya “koya na mpiko na kiti ya bokonzi ya ngolu, ete tokoka kozwa boboto, mpe tozwa ngolu mpo na kosalisa na ntango ya bosenga.”16 Yesu Klisto azali, “mobandisi ya lobiko ya seko.”17

Nalingaka maloba ya Mormon, oyo etangami na mwana na ye Moroni, kokumisaka “balandi ya kimia ya Klisto … mpo na botamboli bwa kimia bwa bino elongo na bana ba bato.”18

Mpo na baoyo kati na biso na Eklezia tozali kosala makasi mpo na kozala balandi ya kimia ya Klisto mokolo moko kitoko ezali kozela biso ntango tozali kotia makanisi na Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Mimekano ezali eteni ya bokufi mpe esalemaka na bomoi ya moto nyonso na mokili mobimba. Yango esangisi matata minene kati na bikolo mpe bato.

Mbala mingi batunaka bakambi ya Eklezia, “Mpo na nini Nzambe ya sembo atikaka makambo mabe esalema, mingimingi epai ya bato malamu?” mpe “Mpo na nini baoyo bazali sembo mpe bazali na mosala ya Nkolo bakokaka kokutana na makama ya ndenge wana?”

Toyebi biyano nyonso te; nzokande, toyebi mitinda ya ntina oyo epesi biso nzela ya kokutana na mimekano, monioko, mpe mikakatano na kondima mpe na elikya na lobi ya kitoko ekoya nsima oyo ezali kozela moko na moko na biso. Ndakisa moko te ya malamu koleka ezali na makomi na oyo etali koleka na monioko koleka liloba ya Nkolo epai ya Joseph Smith, Profeta, ntango azalaki mokangami na boloko ya Liberty.

Na maloba mosusu, Nkolo asakolaki boye:

“Soki bambanga mpenza ya lifelo ekofungola monoko monene nsima na yo, yeba yo, mwana na ngai, ete makambo maye manso makopesa yo mayele, mpe makozala mpo na bolamu na yo.

“Mwana Mobali na Moto akitaki na nse ya nyonso na yango. Ezali yo monene koleka ye?”

“… Kobanga te oyo moto akoki kosala, mpo Nzambe akozala elongo na yo libela na libela.”19

Ezali polele tozali na Tata moko na Lola oyo ayebi mpe alingaka biso moko mpe asosolaka mpasi na biso na lolenge ya kokoka. Mwana na Ye, Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso.

Mokambi Russell M. Nelson mpe Mokambi M. Russell Ballard babetaki nsete makasi bango mibale na ntina ya bobimisi ya sika ya mibale ya Teya Nsango Malamu na Ngai.20 Nakaboli motema nsai na bango. Bobimisi oyo ya sika, oyo ezali kotombola makomi ya bule, esakoli na nguya nyonso ete:

“Na libonza na Ye ya bomikabi, Yesu Klisto azwaki likolo na Ye moko bampasi, minyoko, mpe botau na biso. Na ntina ya likambo oyo, Ayebi ‘engebene na mosuni lolenge nini kosunga bato na ye engebene na botau na bango’ (Alma 7:12; tala lisusu molongo 11). Abengisi, ‘Yaka epai na ngai,’ mpe ntango tozali kosala yango, Akopesa biso bopemi, elikya, bokasi, botali, mpe bobikisami. (Matai 11:28; tala lisusu milongo 29–30).

“Ntango totie motema na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye, Ye akoki kosalisa biso koyika mpiko na mimekano, bokono, mpe mpasi na biso. Tokoki kotondisama na esengo, kimia, mpe libondisi. Nyonso oyo ezangi boyengebene na bomoi ekoki kokoma malamu na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.”21

Tokoki na esengo kozala balandi ya kimia ya Klisto.

Mwango ya esengo ya Tata na biso mpo na bana na Ye esangisi kaka te bomoi ya yambo ya kufa mpe ya kufa kasi lisusu likoki ya bomoi ya seko, esangisi bokutani monene mpe ya nkembo elongo na baye tobungisi. Mabe nyonso ekosembolama, mpe tokomona na polele ya kokoka mpe na makanisi mpe bososoli oyo ezangi mbeba.

Bakambi ya eklezia bakokanisi lolenge oyo ya kotala na moto moko oyo azali kotambola na katikati ya lisano ya makambo misato.22 Baoyo bayebi te mwango ya Tata basosolaka te nini esalemaki na mosala ya yambo (to bozali yambo ya kufa) mpe mikano mitiamaki kuna; mpe basosolaka te bososoli mpe mokano oyo eyaka na mosala ya misato, oyo ezali kokokisama ya nkembo ya mwango ya Tata.

Mingi basepelaka te ete na nse ya mwango na Ye ya bolingo mpe ya bososoli, baoyo bamonani lokola bazali na bozangi, na nzela ya mbeba moko te ya bango moko, na nsuka bazali na bopusi te.23

Makomi ezali polele: balandi ya kimia ya Klisto baoyo bazali sembo, balandaka Mobikisi, mpe babatelaka mitindo na Ye bakopambolama. Moko ya makomi ya ntina mingi mpo na baoyo bazali sembo, ata soki bazali na ezalela nini na bomoi, ezali eteni ya maloba oyo Mokonzi Benyamina alobelaki bato na ye. Alaki ete baoyo na bosembo babatelaka mitindo, bapambolami na makambo nyonso mpe “bayambami na likolo, … [mpe] bofandi elongo na Nzambe na bozali moko ya esengo ekosuka mokolo moko te.”24

Toyebi ete pene na biso banso tokutanaka na mipepe makasi ya mosuni mpe ya molimo na bomoi na biso, boko ya kobebisa. Tata moko ya bolingo na Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, oyo azali mokonzi ya Eklezia na Ye oyo ezongisamaki, bapesi biso makomi mpe baprofeta mpo na kolengela biso, kokebisa biso na ntina ya makama, mpe kopesa biso bokambi mpo na kolengela mpe kobatela biso. Boko mabongisi esengaka kosala nokinoki, mpe boko ebatelaka na bowumeli ya bambula mingi na mikolo ezali koya. Maloba ya ebandeli ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani, eteni 1, ekebisi biso ete “totya likebi na maloba ya baprofeta.”25

Eteni 1 ekebisi biso lisusu, “Bomilengela, bomilengela mpo na oyo ekoya.”26 Nkolo apesaka bato na Ye libaku ya komilengela mpo na mikakatano bakokutana na yango.

Nkolo apesaki emoniseli moko ya nguya na Mokambi Brigham Young na mokolo ya 14 ya Sanza ya yambo 1847, na Winter Quarters.27 Emoniseli oyo ezali ndakisa ya kala ya Nkolo kolengelaka bato mpo na oyo ekoya. Basantu ya sembo babandaki kokende na esika esantu ya ngomba ya Salt Lake Valley. Batongaki na elonga Tempelo ya Nauvoo mpe bazwaki makuli ya bule ya kobikisa. Babenganaka bango na Missouri, mpe banyokoli nabango babenganaka bango na Nauvoo na eleko ya malili ya nsomo. Emoniseli epai ya Brigham epesaki toli ya malamu na ntina ya lolenge nini komilengela mpo na kobima. Nkolo atyaki likebi mingi na kobatela babola, basi bakufela mibali, bitike, mpe mabota ya baye bazalaki kosala na etuluku ya basoda ya Lingomba ya Mormon lokola nzoto monene ya Basantu ekobaki na mobembo na bango ya likama.

Na bobakisi na toli mosusu mpo na kozala na bomoi ya bosembo, Nkolo atyaki likebi na mabongisi mibale mosusu oyo ezali kokoba kosalelama lelo.

Ya yambo, alendisaki bango “bakumisa Nkolo na koyemba, na miziki, na kobina, mpe na losambo ya masanzoli mpe ya botondi.”38

Ya mibale, Nkolo apesaki toli soki bazali “na mawa, babenga Nkolo Nzambe na bango na libondeli, ete milimo na bango ezala na esengo.”29

Makebisi mibale oyo ezali toli monene mpo na mikolo na biso moko. Bomoi oyo etondi na masanzoli, miziki, mpe botondi epambolami na lolenge ya kokamwa. Kozala na esengo mpe kotya motema na lisalisi ya lola na nzela ya losambo ezali nzela ya nguya mpo na kozala balandi ya kimia ya Klisto. Kosala makasi ntango nyonso mpo kozala na esengo esalisaka mpo na koboya kobwakama na molimo.

Molongo ya nsuka ya loyembo ya bososoli epesi eyano ya nsuka na lolenge kitoko: “Mabele ezali na mawa moko te oyo lola ekoki kobikisa te.”30

Lokola Apostolo ya Nkolo Yesu Klisto, Natatoli ete “balandi ya kimia ya Klisto bakozwa kimia ya moto ye moko na bomoi oyo mpe bokutani ya lola ya nkembo. Napesi litatoli ya solo ya bonzambe ya Mobikisi mpe bosolo ya Bomikabi na Ye. Ye azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Na nkombo na Yesu Klisto, amene.