Likita Linene
Lokumu na Moto
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Lokumu na Moto

Boniboni topambolami mingi mpo na koyeba nyonso oyo toyebi mpo tozali na Joseph Smith, profeta ya eleko oyo ya nsuka ya ntango.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, nazali na esengo ya kozala elongo na bino na ntongo ya lelo. Nasambeli ete Nkolo akopambola ngai.

Miso na ngai ezali te lolenge emesanaki kozala. Nakendaki kkokutana na monganga ya miso, mpe nalobaki, “Nakoki te kozwa apareyi oyo esalisaka mpo na kotanga makambo na mosika.”

Mpe alobaki, “Malamu, miso na yo ekomi ya bobange. Mikobongwana te.”

Yango wana nakosala nyonso oyo nakoki.

Nalingi kokabola na bino boko makambo oyo ezalaki na makanisi na ngai. Namonanaki lokola nazalaki na Profeta Joseph na makanisi na ngai mwa basanza eleki. Nafandi mpe nakanisaki mokumba na ye ya nkembo na kokoma profeta ya oyo, eleko ya likoki ya ntango.

Nakanisi lolenge tozali na botondi lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ete Joseph Smith, mwana mobali oyo azalaki na mposa ya koyeba nini asengelaki kosala mpo masumu na ye elimbisama, azwaki mpiko ya kokende na zamba ya banzete penepene na ndako na ye na Palmyra, New York, mpe kuna afukamaki na losambo, mpe—na maloba na ye moko—asambelaki na mongongo makasi mpo na mbala ya yambo (tala Joseph Smith—History 1:14).

Na libaku wana, ntango Joseph afukamaki na esika oyo tobengi Zamba ya Bule, lola efungwamaki. Bato mibale, oyo bazalaki kongenga koleka moi ya midi, babimelaki ye. Moko atalisaki ye mpe alobaki: “[Joseph,] oyo azali Mwana na Ngai ya Bolingo. Yokela Ye!” (Joseph Smith—History 1:17). Bongo ebandaki Bozongisi ya litondi ya nsango malamu ya seko ya Yesu Klisto.

Mpo ete Yesu, Mobikisi na biso mpe Mosikoli na biso, alobaki na mwana mobali Joseph mpe afungolaki eleko oyo ya ntango oyo tozali kobika na yango sikawa, toyembi, “Lokumu na moto oyo asololaki na Yehova!” (“Praise to the Man (Lokumu na Moto),” Hymns, no. 27). Totondi Nkolo mpo na Joseph Smith mpe mpo na mpiko na ye ya kokende na kati ya zamba wana ya banzete na 1820, penepene na ndako na ye na Palmyra, New York.

Nazalaki kokanisa na ntina na makambo nyonso ya kokamwa oyo toyebi mpe makambo nyonso oyo tozali na yango. Bandeko na ngai mibali mpe basi ya bolingo, litatoli na ngai epai na bino na ntongo ya lelo ezali lolenge nini topambolami mingi mpo na koyeba nyonso oyo toyebi mpo ete tozali na Joseph Smith, profeta ya eleko oyo ya nsuka ya ntango.

Tozali na bososoli ya ntina ya bomoi, tozali banani.

Toyebi nani Nzambe azali; toyebi nani Mobikisi azali, mpo tozali na Joseph, oyo akendaki na kati ya zamba ya banzete lokola mwana mobali, kolukaka, solo, bolimbisi mpo ya masumu na ye.

Nakanisi ezali moko ya makambo ya nkembo mpe ya kokamwa mingi oyo moto nyonso na mokili oyo akoki koyeba, ete Tata na biso ya Lola mpe Nkolo Yesu Klisto Bamimonisaki na mokolo oyo ya nsuka mpe ete Joseph atelemisamaki mpo na kozongisa litondi ya nsango malamu ya seko ya Yesu Klisto.

Tozali na Buku ya Mormon. Oyo nde likabo ya kitoko mpe ya kokamwa Buku ya Mormon ezali mpo na bandimi ya Eklezia. Ezali litatoli mosusu, litatoli mosusu ete Yesu azali Klisto. Tozali na yango mpo ete Joseph abongaki kokende kozwa bapalaki, afulamaki na lola mpo na kobongola yango na likabo mpe nguya ya Nzambe mpe kopesa buku na mokili.

Atako nsango na ngai na ntongo ya lelo ezali pete, ezali mozindo, mpe etondi na bolingo mpo na Profeta Joseph Smith mpe mpo na bango banso, bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, oyo basungaki ye mpe balingaki kosunga ye na bolenge na ye.

Nalingi kopesa lokumu na ntongo ya lelo na mama na ye. Nakanisaka ntango nyonso lolenge nini ezalaki malamu ntango Joseph awutaki na likambo wana na Zamba ya Bule mpe ayebisaki mama na ye nini esalemaki, Lucy Mack Smith andimelaki ye.

Nazali na botondi mpo na tata na ye mpe bandeko na ye ya mibali mpe ya basi mpe libota na ye, oyo basungaki ye na mokumba monene oyo Nkolo atiaki likolo na ye mpo na kokoma profeta mpo na kozongisa litondi ya nsango malamu ya seko ya Yesu Klisto lisusu mbala moko likolo ya mabele.

Bongo litatoli na ngai na ntongo ya lelo ezali ete nayebi ete Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili. Nayebi lisusu ete Tata na biso ya Lola mpe Nkolo Yesu Klisto babimelaki mpe balobaki na Joseph mpe balengelaki ye mpo kokoma profeta.

Nakamwaka, mpe nandimi mingi kati na bino mpe bokamwaka, na lolenge topambolami mpo na koyeba nini tosengeli koyeba na ntina na biso na bomoi, mpo na nini tozali awa, nini tosengeli komeka kosala mpe kokokisa na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Tozali na nzela ya komeka komilengela, mokolo moko na mbala moko, mpo na kozala mwa malamu koleka, kozala mwa boboto, kozala mwa komilengela mingi mpo na mokolo wana, oyo ekoya mpenza, ntango tokoleka lisusu na kati ya bozali ya Tata na biso ya Lola mpe Nkolo Yesu Klisto.

Yango ezali kopusana mwa moke mpo na ngai. Mosika te nakozala na mbula 95. Bana na ngai bayebisi ngai bakanisaka ete nazali mokolo mingi koleka yango mikolo mosusu, kasi yango ezali Malamu. Nazali kosala nyonso oyo nakoki.

Kasi uta mibu 50, bandeko mibali mpe basi, nazwaki libaku malamu ya kotambola mokili mobimba na mokumba na ngai ya Mokonzi Monene ya Eklezia. Ezali lipamboli moko ya kokamwa. Nakanisi ete nakomaki pene na bisika nyonso ya mokili. Nakutanaki na bandimi ya Eklezia na mokili mobimba.

Oh, lolenge nini nalingaka bino. Oyo nde likambo ya nkembo oyo ezalaki—kotala na bilongi na bino, kozala liboso na bino, mpe koyoka bolingo na bino oyo bozali na yango mpo na Nkolo mpe mpo na Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Tika Tata na biso na Lola akengela biso sikawa mpe apambola misala nyonso ya likita. Mpe tika ete tozala na Molimo ya Nkolo atonda na mitema na biso, mpe tika ete bolingo na biso mpo ya nsango malamu ya Yesu Klisto—Mobikisi na biso ya bolingo, Nkolo Yesu Klisto—ebakisama ntango tozali kosala makasi mpo na kosalela Ye mpe kobatela mitindo na Ye mpe kozala mingi lokola Ye lokola mbano na biso ya kokende na likita linene. Bipayi nyonso bozali na mokili oyo, tika ete Nzambe apambola bino. Tika ete Molimo ya Nkolo azala na biso. Tika ete toyoka nguya ya lola ntango tozali kosambela elongo na liyangani oyo ya likita linene.

Natikeli bino litatoli mpe litatoli na ngai ete nayebi ete Yesu azali Klisto. Azali Mobikisi na biso, Mosikoli na biso. Azali moninga na biso ya malamu koleka. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.