Likita Linene
Kopesa Litatoli ya Yesu Klisto na Maloba mpe Misala
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Kopesa Litatoli ya Yesu Klisto na Maloba mpe Misala

Ndenge tozali kobunda mpo na kobika bomoi na biso engebene na nsango malamu ya Yesu Klisto, etamboli na biso ekozala litatoli ya bomoi ya Mosikoli.

Na libatisi, moko ya bilaka oyo tosalaka ezali ete tozali na bolingi ya kozwa likolo na biso nkombo ya Yesu Klisto. Ntina na ngai lelo ezali kokundola biso ete tokoki kolakisa Nzambe ete tozwi nkombo ya Mwana na Ye likolo na biso na kokabolaka litatoli na maloba mpe misala, mpe mbala mingi tokoki, ete Yesu azali Klisto.

Ntango azalaki kosalela mpe koteya bato ba Bamerika sima ya Lisekwa na Ye, Mobikisi alobaki:

“Batangaki makomi te, maye malobi bosengeli kozwa likolo na bino nkombo ya Klisto, eye ezali nkombo na ngai? Mpo na nkombo eye ekobiangema bino o mokolo mwa nsuka;

“Mpe onso oyo akokamata likolo na ye nkombo ya ngai, mpe akotia molende kino na nsuka, ye kaka akobikisama o mokolo mwa nsuka.”1

Mokambi Russel M. Nelson ateyaki biso ete “Kozwaka nkombo ya Mobikisi likolo na biso esangisi kolobaka mpe kotatolaka epai ya basusu—na nzela ya misala mpe maloba na biso—ete Yesu azali Klisto.”2

Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tozali na lipamboli mpe libaku ya kotelema lokola banzeneneke ya Nkolo mpe ya nkombo na Ye esika nyonso tozali.3 Ndenge tozali kobunda mpo na kobika bomoi na biso engebene na nsango malamu ya Yesu Klisto, etamboli na biso ekozala litatoli ya bomoi ya Mosikoli mpe nkombo na Ye. Mingi koleka, totatoli na ntina na Klisto na maloba na kokabolaka na basusu oyo tondimelaki, toyokaki, to toyebi na ntina ya Klisto.

Ntango na komikitisa tokabolaka litatoli na biso ya Nkolo na nzela ya maloba mpe misala na biso, Molimo Mosantu andimisaka yango4 na baye bazali na mposa ya solo, mitema mifungwama, mpe bolingi ya kokanisa ete Yesu azali Klisto.5

Nalingi kokabola bandakisa mibale ya sika mpe ya kofula ya bandimi oyo balakisi Nzambe ete bazwaka nkombo ya Yesu Klisto likolo na bangomei na kolobelaka na ntina na Ye mpe kopesaka litatoli ya peto ya Nkolo na makita ya Eklezia.

Ndakisa ya yambo: Ntango mwasi na ngai, Elaine, mpe ngai tokendaki na Espagne na 2022, tosanganaki na likita ya eyenga kati na etonga moko ya moke ya Eklezia. Ntango na fandaki na liboso mpe mwasi na ngai kati na lisanga, na monaki ete afandaki pene ya mwasi moko ya mobange. Ntango liyangani ya elambo esilaki, nakendaki epayi ya Elaine mpe na sengaki ye alakisa ngai epayi ya moninga na ye ya sika. Ye asalaki yango mpe alakisaki ete mwasi yango, oyo azalaki te mondimi ya Eklezia, azali koya na Eklezia uta pene na mibu mibale. Ntango nayokaki bongo, natunaki mwasi oyo alingi Nzambe nini esalaki ye azonga mpe asangana na biso na mayangani uta ntango molayi. Mwasi yango ayanolaki na bolingo nyonso ete: “Nasepelaka koya awa pamba te bolobelaka na ntina ya Yesu Klisto na mayangani na bino.”

Na polele, bandimi ya Eklezia na etonga oyo kati na Espagne balobaki, bateyaki, mpe batatolaki na ntina ya Klisto kati na mayangani na bango.

Ndakisa ya mibale: Nsima ya kosala na Etuka ya Bresil, etinda ya sika eyaki ya kosala na Bilo Monene ya Eklezia. Ntango tokendaki na Salt Lake City, na suka ya sanza ya sambo ya mobu oyo, toyanganaki na mayangani ya elambo ya palwasi na biso ya sika mpe ya kitoko. Moko ya mayangani yango ezalaki likita ya kokila bilei mpe litatoli. Nsima ya bokaboli elambo na limemia, bandimi batelemaki mpe bapesaki matatoli uta na motema moko nsima ya mosusu. Liyangani elobelaki mingi Yesu Klisto, mpe tokokaki koyoka Molimo na ndenge ya kosimbama. Tolendisamaki mpe kondima na biso ekembisamaki. Soki baninga ya Eklezia, na bosembo kolukaka bosolo, bazalaki na likita wana, balingaki koyeba ete oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto.

Lipamboli nini ya komona ete makita ya Eklezia ezali mabaku ya kopona mpo na biso kotatola na ntina ya Klisto mpe kolakisa Nzambe ete tosepelaka kozwa nkombo ya Mwana na Ye likolo na biso.

Sikoyo, tika ngai na lobela ndakisa ya nguya ya kozwa likolo na biso nkombo ya Yesu Klisto na kokabolaka litatoli na ntina na Ye na nzela ya misala.

Sanza ya Mwambe eleki, nakendaki kotika Mpaka Jonathan Schmitt na bofungoli ndaku ya tempelo ya Feather River na Californie na engumba ya Yuba. Kuna, nazwaki lipamboli ya kokamba masanga ya bato bayaki kotala tempelo. Moko ya masanga esangisaki mondimi moko ya Eklezia, Virgil Atkinson, mpe baninga nsambo ya biyamba misusu. Pene suka ya kotala , kati na ndako ya bokangami ya tempelo, Ndeko mobali Atkinson azalaki na mayoki ntango amonisaki bolingo na ye mpo na baninga na ye oyo bayaki na tempelo mokolo wana. Kaka sima ntango asali bongo, mwasi moko na lisanga atelemaki mpe alobaki, “Biso banso tolingaka Virgil. Ye apesaka biso te kondima na ye na makasi. Kasi azalaka mpe te na soni na yango. Abikaka engebene na oyo andimelaka.

Nsima ya bambula, bomoi lokola ya Klisto ya Ndeko mobali Atkinson esungaki lokola litatoli ya nguya epai ya baninga na ye. Ndakisa na ye ezali elembeteli ya makasi ete azwaki likolo na yemei nkombo ya Klisto.

Mpo na kosukisa, tika nakabola liteya nayekolaki na ntina ya lolenge nini kozwa likolo na biso nkombo ya Klisto mpe kotatola Ye na kosalelaka nkombo ya Eklezia ya malamu.

Mokambi Nelson, profeta ya bomoi ya Nzambe, kati na lisikulu na likita linene ya 2018 ya moto ya likambo “Nkombo Malamu ya Eklezia,” alobaki:: “Yango ezali kosembola. Yango ezali mobeko ya Nkolo. Joseph Smith apesaka te nkombo ya Eklezia ezongisami ye moko; ata kutu Mormon te. Ezalaki Mobikisi Ye moko oyo alobaki, ‘Mpo ete yango nkombo eklezia ekobengama na mikolo ya nsuka, kutu Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka’ (Malongi mpe Mayokani 115:4].”6

Totikaki banso likita linene mokolo wana na ekateli mpe mokano ya kolanda profeta mpe kosalela nkombo ya Eklezia emonisami uta ntango wana. Namitalaki mpenza ngaimei koyeba solo nasalelaki nkombo malamu ya Eklezia. Na ebandeli nasengelaki kozala na bososoli mingi mpe komitika te ngaimei kozonga na banzela ya kala. Nsima ya bomeki ya yambo, namiyokaki malamu mingi na ntina ya kosalela nkombo emonisami ya Eklezia. Nandimi ete mbala mingi, nalingaka koloba nkombo ya Eklezia na lombango. Nayokaki komitungisa ete bato bakotya likebi te na nkombo mobimba ya Eklezia mpe ete bakokaki kokanisa ete ezali mwa molai.

Nzokande, nasosolaki nsima ete kolobaka nkombo mobimba ya Eklezia na mokano epesaki ngai mabaku ya motuya ya koloba nkombo ya Eklezia mpe bongo kokabola litatoli ya Mobikisi na kotangaka nkombo na Ye kati na nkombo ya Eklezia na Ye. Namonaki lisusu ete ntango nalobaki nkombo malamu ya Eklezia elongo na basusu, namikundolaki Yesu Klisto mbala mingi koleka mpe nayokaki bopusi na Ye na bomoi na ngai.

Na kolandaka profeta, tokoki banso kotatola mingi na ntina na Yesu Klisto na kosalelaka nkombo malamu ya Eklezia, na bongo kozwaka likolo na biso mingi koleka nkombo ya Nkolo.

Na ntongo ya sabata oyo, natatoli na esengo ete Mokambi Nelson azali profeta ya bomoi ya Nzambe mpe ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali Eklezia ezongisami ya Klisto. Na komikitisa natatoli na ntina ya Mwana na Nzambe mpe bonzambe na Ye. Azali Mwana ya yambo ya Nzambe mpe ya Likinda, Mobikisi na biso mpe Mosikoli, emmanuel.7 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.