Likita Linene
Bolingo Elobelami Awa
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Bolingo Elobelami Awa

Tika moko na moko toyekola koloba mpe koyoka bolingo na Ye awa, na mitema mpe bandako na biso, mpe na mabiangi na biso ya nsango malamu, misala, mosala ya lisalisi, mpe mosala.

Bana na biso ya Kelasi ya Bana bayembaka, “Love Is Spoken Here.”1

Mokolo moko napesaki Ndeko mwasi Gong mwa medayi moko ya muke. Ezalaki na makomi oyo dot-dot, dot-dot, dot-dot-dash. Baoyo bayebi malamu code Morse bakoyeba baletele I, I, U. Kasi nakotisaki code ya mibale. Na lokota Mandarin ya ba Chinois, “ai” elimboli “bolingo.” Na yango, na decode mibale, nsango ezalaki “Nalingaka yo.” Susan bolingo ya motema, “I, ai (爱), U.”

Tolobaka bolingo na minoko mingi. Bayebisaki ngai ete libota ya bato elobaka minoko 7 168 ya ntina.2 Na Eklezia tolobaka minoko ya liboso 575 oyo ekomami na mikanda, na badialekiti ebele. Toyebisaka lisusu mokano, mongongo, mpe mayoki na nzela ya ntoki, miziki, mabina, bilembo ya mayele, mayoki kati na bato.3

Lelo, tika tolobela lokota misato ya bolingo ya nsango malamu: lokota ya esengo mpe ya limemya, lokota ya mosala mpe ya libonza, mpe lokota ya bozali ya boyokani.

Ya yambo, monoko ya nsango malamu ya esengo mpe ya limemya.

Na esengo mpe limemya, Ndeko mwasi Gong atuni bana mpe bilenge, “Ndenge nini boyebi ete baboti mpe mabota na bino balingaka bino?”

Na Guatemala, bana balobaka ete, “Baboti na ngai basalaka makasi mpo na koleisa libota na biso.” Na Amerika ya Nordi, bana balobaka ete, “Baboti na ngai batangelaka ngai masolo mpe batyaka ngai na mbeto na butu.” Na Mokili Esantu, bana balobaka, “Baboti na ngai babatelaka ngai.” Na Ghana, na Afrika ya Westi, bana balobaka ete, “Baboti na ngai basalisaka ngai na mikano na ngai ya Bana mpe Bilenge.”

Mwana moko alobaki, “Atako alembi mingi nsima ya kosala mokolo mobimba, mama na ngai abimaka libanda mpo na kosakana na ngai.” Mama na ye alelaki ntango ayokaki mabonza na ye ya mokolo na mokolo ezali na ntina. Elenge mwasi moko alobaki ete, “Atako ngai na mama na ngai toyokanaka ntango mosusu te, natielaka mama na ngai motema.” Mama na ye mpe alelaki.

Tango mosusu tosengeli koyeba bolingo oyo elobelami awa eyokamaka mpe esepelisamaka awa.

Na esengo mpe limemya, makita na biso ya elambo mpe misusu elobelaka mingi Yesu Klisto. Tolobelaka na limemya Bomikabi ya Yesu Klisto, ya moto ye moko mpe ya solo, bobele bomikabi te na likololikolo. Tobengi Eklezia ya Yesu Klisto oyo ezongisamaki na nkombo na Ye, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Tosalelaka monoko ya losambo ya limemya ntango tozali koloba na Tata na Lola mpe limemya ya esengo ntango tozali kosolola moko na mosusu. Ntango toyebi Yesu Klisto na motema ya mayokani ya tempelo, tozali kolobela mingi te “kokende na tempelo” mpe mingi na “koya epai ya Yesu Klisto na ndako ya Nkolo.” Liyokani moko na moko ezali koloba na mongongo ya nse, “Bolingo elobelami awa.”

Bandimi ya sika balobaka mbala mingi maloba ya Eklezia esengaka kolimbola yango. Tosekaka na likanisi ete “ndako ya etuka” ekoki kolimbola bilei ya mpokwa ya malamu ya nyama ya ngombe; “ndako ya palwasi” ekokaki komonisa lopitalo; “bangalasisi ya kofungola” ekokaki kobengisa biso tosala mutu, mapeka, mabolongo, mpe misapi ya makolo na esika ya kotelemisa mituka ya Eklezia. Kasi, nabondeli yo, tika tozala na bososoli mpe boboto ntango tozali koyekola minoko ya sika ya bolingo elongo. Ya sika na eklezia, bayebisaki mobongwani moko ete bilamba na ye ezalaki mikuse mingi. Na esika ya kosilika, ayanolaki, na maloba mosusu, “Motema na ngai ebongwani; nabondeli yo ete, ozala na motema molai wana bilamba na ngai ezali kobakisama.”4

Maloba oyo tosalelaka ekoki kopusa biso penepene to kolongola biso mosika na baklisto mosusu mpe baninga. Ntango mosusu tolobelaka mosala ya misio, mosala ya tempelo, mosala na ndenge oyo ekoki kosala basusu bandimela tokanisaka tosalaka mpo na biso moko. Tika biso toloba ntango nyonso na botondi ya esengo mpe ya limemya mpo na mosala mpe nkembo ya Nzambe mpe mituya, ngolu, mpe boboto ya Yesu Klisto mpe libonza na Ye ya bomikabi.5

Ya mibale, monoko ya nsango malamu ya mosala mpe libonza.

Ntango tozali kosangana lisusu na eklezia poso na poso mpo na kopesa longonya mpe esengo na mokolo ya saba, tokoki kolakisa bomipesi na biso ya liyokani ya elambo epai ya Yesu Klisto mpe moko na mosusu na nzela ya mabiangi na biso ya Eklezia, bosangani, boyokani, mpe mosala.

Ntango natuni bakambi ya Eklezia ya mboka nini etali bango, bandeko mibali mpe basi balobi, “Boko ya bandimi na biso bazali kondima mabiangi ya Eklezia te.” Mabiangi ya kosalela Nkolo mpe moko na mosusu na Eklezia na Ye epesaka libaku ya kobakisa mawa, makoki, mpe bomikitisi. Lokola totiami pembeni, tokoki kozwa bofuli ya Nkolo mpo na kotombola mpe kolendisa basusu mpe bisomei. Ya solo, mbongwana ya makambo mpe bileko ya bomoi na biso ekoki kozala na bopusi na makoki na biso ya kosalela, kasi na elikya ata moke te mposa na biso. Elongo na Mokonzi Benyamina, tolobi, “Soki nazalaki na yango nalingaki kopesa”6 mpe kopesa nyonso oyo tokoki.

Bakambi ya etuka mpe ya palwasi, botika tosala eteni na biso. Ntango tobiangi (mpe tolongoli) bandeko mibali mpe basi mpo na kosalela na Eklezia ya Nkolo, tosengaka tosala yango na lokumu mpe bofuli. Tosalisaka moto na moto amona ete basepeli na ye mpe ete akoki kolonga. Nabondeli bino bosolola elongo mpe boyoka bandeko basi bakambi. Tika tomikundola, ntango Mokambi J. Reuben Clark ateyaki, na Eklezia ya Nkolo tosalelaka na esika tobiangami, “esika oyo moto alukaka te mpe aboyaka te.”7

Ntango Ndeko mwasi Gong mpe ngai tobalanaki, Mpaka David B. Haight apesaki toli: “Ntango nyonso bozala na libiangi na Eklezia. Mingimingi ntango bomoi ezali na mosala mingi,” alobaki, “bosengeli koyoka bolingo ya Nkolo mpo na baoyo bozali kosalela mpe mpo na bino ntango bozali kosalela.” Nalaki ete bolingo elobelami awa, kuna, mpe bisika nyonso wana tozali koyanola iyo na bakambi ya Eklezia mpo na kosalela Nkolo na Eklezia na Ye na nzela ya Molimo na Ye mpe mayokani na biso.

Eklezia oyo ezongisamaki ya Nkolo ekoki kozala ndako ya kobota mpo na lisanga ya Siona. Ntango tozali kokumbamela, kosalela, kosepela, mpe koyekola bolingo na Ye elongo, tozali kolendisana moko na mosusu na nsango malamu na Ye. Tokoki koyokana te na makambo ya politiki to na makambo ya bomoi kasi tozwaka boyokani ntango tozali koyemba elongo na lisanga ya bayembi ya palwasi. Toleisaka boyokani mpe tobundisaka bozangi bato lokola tozali mbala na mbala kosala mosala na mitema na biso na bandako ya moko na mosusu.

Na ntango ya botali ya bandimi elongo na bakambi ya bituka, nayokaka bolingo na bango ya mozindo mpo na bandimi na libaku nyonso. Ntango tozalaki koleka na motuka liboso ya bandako ya bandimi na etuka na ye, mokambi moko ya etuka amonisaki ete ezala tofandi na ndako oyo ezali na pisini to ndako oyo esalami na mabele, mosala ya Eklezia ezali libaku malamu oyo mbala mingi esengi libonza. Nzokande, amonaki na mayele, ntango tozali kosalela mpe libonza kati na nsango malamu elongo, tozwaka mabunga moke mpe kimya monene. Ntango totiki Ye, Yesu Klisto asalisaka biso tolobela bolingo na Ye awa.

Na eleko ya molunge oyo, libota na biso ekutanaki na bandimi ya Eklezia mpe baninga ya kokamwa na Loughborough mpe Oxford, Angleterre. Mayangani oyo ya ntina ekundolisaki ngai lolenge nini misala ya bokutani mpe mosala ya palwasi ekoki kotonga bokangami ya sika mpe ya kowumela ya nsango malamu. Mpo na mwa ntango nayokaki ete, na bisika mingi na Eklezia, mwa misala mosusu ya palwasi, ya solo ebongisamaki mpe esalelamaki na ntina ya nsango malamu, ekokaki kosangisa biso elongo na bozali mpe bomoko monene koleka.

Mokambi moko ya komite ya misala ya palwasi oyo afulami asalisaka bato moko moko mpe lisanga ya Basantu. Misala na bango oyo ebongisami malamu esalisaka moto nyonso amiyoka ete azali na motuya, azali na kati, mpe abengisami mpo na kosala mokumba oyo asengeli na yango. Misala ya ndenge wana esangisaka bambula mpe makambo ya kala, ebimisaka makanisi oyo ewumelaka, mpe ekoki kosalema na ntalo moke to ata moke te. Misala ya nsango malamu ya kosepelisa ebengisaka lisusu bazalani mpe baninga.

Mbala mingi, boyokani na bato mpe mosala ekendaka esika moko. Bilenge mikolo bayebi soki olingi mpenza koyeba moto moko nsima pembenipembeni na eskalye mpe pakola langi elongo na mwango ya mosala ya ntina.

Elilingi
Bilenge mikolo bazali kopakola langi na esika moko ya mosala.

Ya solo, moto moko te abonga nie mpe libota moko te ebonga nie. Biso banso tozali na mposa ya lisalisi malamu koleka mpo na koloba bolingo awa. “Bolingo ebonga nie elongolaka bobangi.”8 Bondimi, mosala, mpe libonza ebendaka biso koleka bisomei penepene na Mobikisi na biso. Soki mosala mpe libonza na biso ya mawa, ya sembo, mpe ya moyimi te ezali kati na Ye, mingi tokoki kobanda kososola mawa mpe ngolu ya bomikabi ya Yesu Klisto oyo ezangi mpo na biso.

Mpe yango ememi biso na monoko ya nsango malamu ya boyokani.

Tozali kobika na mokili oyo bato bamibanzabanzaka mpo na biso moko. Yango wana mingi ezalaka “Naponi ngai.” Ezali lokola nde tondimi ete toyebi malamu matomba na biso moko mpe lolenge nini kolanda yango.

Kasi na nsuka ezali solo te. Yesu Klisto azali komonisa solo oyo ya nguya, oyo ewumelaka te:

“Moto nyonso oyo akobikisa bomoi na ye akobungisa yango: mpe moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ntina na ngai akobikisa yango.

“Mpo ntina nini moto alonga nyonso ya mokili, mpe abungisa molimo na ye moko? to nini moto akopesa mpo na kobongola molimo na ye?”9

Yesu Klisto apesi nzela ya malamu koleka—boyokani oyo etongami likolo na kondimana ya bonzambe, makasi koleka bansinga ya kufa. Boyokani ya kozala ya Nzambe mpe moko na mosusu ekoki kobikisa mpe kosantisa boyokani na biso oyo elingami mingi. Na bosolo, Ye ayebi biso malamu mpe alingi biso mingi koleka oyo toyebi to tolingaka biso moko. Na bosolo, ntango tosali liyokani biso nyonso tozali, tokoki kokoma mingi koleka ndenge tozali. Nguya mpe mayele ya Nzambe ekoki kopambola biso na likabo nyonso ya malamu, na ntango mpe nzela na Ye.

Apareyi ya masini ya mayele (AI) esali makambo minene na nkota ya bobongoli. Mikolo oyo ordinatere ekokoka kobongola maloba ya masese “Molimo elingi, kasi mosuni ezali na bolembu” esili koleka kala lokola “Vinyo ezali malamu, kasi mosuni ebebi.” Likambo ya kokamwa, kozongela bandakisa mingi ya monoko moko eteyaka ordinatere monoko moko malamu koleka koteya ordinatere mibeko ya gramere.

Ndenge moko, makambo na biso moko ya semba, ya mbala na mbala ekoki kozala lolenge na biso ya malamu koleka ya molimo mpo na koyekola minoko ya nsango malamu ya esengo mpe limemya, mosala mpe libonza, mpe bozali ya liyokani.

Bongo, wapi mpe lolenge nini Yesu Klisto azali koloba na yo na bolingo?

Epai wapi mpe lolenge nini boyoki bolingo na Ye elobelami awa?

Tika moko na moko toyekola koloba mpe koyoka bolingo na Ye awa, na mitema mpe bandako na biso, mpe na mabiangi na biso ya nsango malamu, misala, mosala ya lisalisi, mpe mosala.

Na mwango ya Nzambe, moko na moko akobongwana mokolo moko uta na bomoi oyo kino na bomoi oyo ekolanda. Ntango tokutani na Nkolo, nakanisi Ye koloba, na maloba ya liteya mpe elaka, “Bolingo na ngai elobelami awa.” Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.