Likita Linene
Mobungi mpe Nzela Oyo Ekambi na Ndako
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Mobungi mpe Nzela Oyo Ekambi na Ndako

Ata soki maponi oyo ozwaki ekoki komema yo mosika na Mobikisi mpe Eklezia na Ye, Molakisi Mokangoli atelemi na nzela oyo ekambi na ndako, koyambaka yo.

Moto moko Azalaki na Bana Mibali Mibale

Basusu babengi yango lisolo mokuse makasi oyo ebetama.1 Uta yango ebongolamaki na nkonta nkoto na mokili, ezali solo ete na ntango ya bankoto mibale oyo eleki, moyi naino ekota te soki lisolo oyo ebetami esika moko te na mokili.

Elobamaki na Yesu Klisto, Mobikisi mpe Mosikoli na biso, oyo ayaki na nse ya mabele “mpo na kobikisa oyo abungaki.”2 Abandi na maloba ya pete oyo: “Moto moko azalaki na bana mibali mibale.”3

Mbala moko toyekoli oyo etali bowelani ya mpasi. Mwana moko ya mobali4 ayebisi tata na ye alembi kofanda na ndako. Alingi bonsomi na ye. Alingi alongwa na bonkoko mpe mateya ya baboti na ye. Asengi eteni na ye ya bomengo—sikawa.5

Okoki kokanisa ndenge nini tata na ye ayokaki ntango ayokaki yango? Ntango amonaki ete oyo mwana na ye ya mobali alingaki mingi koleka eloko mosusu ezalaki ya kolongwa na libota mpe ntango mosusu kozonga lisusu te?

Lisano Monene

Mwana mobali ayokaki ntango mosusu mposa ya lisano mpe elengi. Na nsuka, akomaki ye moko. Nsomi uta na mibeko mpe mitindo ya bonkoko ya bolenge na ye, akokaki sikawa kosala maponi na ye moko na bozangi botindiki ya baboti na ye. Motungisi lisusu te. Akokaki kosepela na bondimami ya lingomba oyo bazalaki kokabola makanisi moko mpe kobika bomoi na ye engebene lolenge alingaki.

Ntango akomi na mboka moko mosika, azwaki baninga ya sika mpe azwaki bomoi oyo azalaki kolota ntango nyonso. Moto nyonso kuna alingaki ye mingi, mpo ete azalaki kobebisa mosolo na bonsomi nyonso. Baninga na ye ya sika—oyo bazalaki kolia mosolo na ye—basambisaki ye te. Basepelaki, babetelaki ye maboko, mpe bakumisaki maponi na ye.6

Soki rezososio ezalaki na ntango wana, mbele alingaki kotondisa yango na bafoto ya baninga batioli: #Nazobika bomoi na ngai! #nazali na esengo makasi! #Nasengelaki kosala yango uta kala!

Nzala Makasi

Kasi feti ewumelaki te—ezali momesano te. Makambo mibale esalamaki: ya yambo, azangaki mosolo, mpe ya mibale, nzala makasi eyaki na mboka.7

Lokola likambo ekomaki ndongo, abangaki. Mosano moko ya monene oyo bakangaka te, mpe asopa na tembe sikawa akokaki te kolia ata moke mpe esika ya kolala. Ndenge nini akokaki kobika?

Azalaki sembo na baninga na ye—bakosunga ye sikawa? Nakoki komona ye kosengaka lisungi moke—kaka mpo na ntango moke—kino akozonga na bososoli.

Makomi eyebisi biso, “Moto moko te apesaki ye yango.”8

Kolukaka kozala na bomoi, akutanaki na mobokoli bibwele moko apesaki ye mosala mpo na koleisa bangulu.9

Na nzala makasi, asundolamaki mpe akomaki ye moko, elenge mobali ntango mosusu amitunaki mpo na nini likambo ya mpasi ekomeli ngai boye, mpasi koleka.

Ezalaki kaka te libumu etonda nzala eloko ezalaki kotungisa ye. Ezalaki kozala na molimo ezanga eloko na kati. Akanisaki solo ete komipesa na bamposa ya makambo ya mokili ekokaki kopesa ye esengo, ete mibeko ya bizaleli malamu ezalaki motungisi epai na esengo wana. Sikawa ayebakii malamu koleka. Mpe o, motuya nini asengelaki kofuta mpo na likambo wana!10

Lokola nzala na ye ya nzoto mpe molimo ezalaki komata, makanisi na ye ezongaki epai ya tata na ye. Akosunga ye nsima ya oyo nyonso esalamaki? Kutu basali ya bomikitisi makasi ya tata na ye bazalakii na bilei mpe bisika ya kolala.

Kasi ye azonga epai ya tata na ye?

Ata moke te.

Kotubela na mboka na ye ete abebisaki bomengo na ye?

Ekosalama te.

Akotala bazalani ya pembeni oyo balakaki ye ete akozanga botosi na libota na ye mpe akopesa mpasi na mitema ya baboti na ye? Kozongela lisusu baninga na ye ya kala nsima ya kolakisa bango ete akomaki nsomi?

Ezali mpasi.

Kasi nzala, kotikala ye moko, mpe mpasi na motema elingaki kosila te—kino “azongaki na makanisi na ye.”11

Ayebaki nini asengelaki kosala.

Bozongi

Sikawa tika tozonga epai ya tata, molakisi ya motema ebukana ya ndako. Sikawa bankama boni, ntango mosusu bankoto, ya bantango oyo ye alekisaki komitungisaka mpo na mwana na ye ya mobali?

Mbala boni azalaki kotala nzela oyo mwana na ye azwaki mpe ayoki mpasi ya bobungisi oyo ayokaki ntago mwana na ye ya mobali akendaki? Sikawa nsambo boni asalaki na bozindo ya butu, kobondelaka na Nzambe ete mwana na ye azala malamu, akokaki koyeba bosolo, ete akokoka kozonga?

Mpe sima mokolo moko, tata atali libanda na nzela wana—nzela oyo ekambaka na ndakompe amoni na mosika elilingi ezali koya epai na ye.

Ekoki kosalema?

Atako moto azali mosika mpenza, tata ayebaka solo ete ezali mwana na ye ya mobali.

Akimi epai na ye, amibwaki epai na ye, mpe ayambi ye.12

“Tata,” mwana mobali agangi, na maloba oyo azalaki kobandela mbala na mbala, “nasumukeli lola mpe yo. Alongobani kobengama mwana na yo ya mobali. Nyonso nalingi ezali ozwa ngai lokola mosali na yo.”13

Kasi tata atiki ye te asilisa. Mpinzoli na misu na ye, atindi basali na ye: “Bomema nzambala oyo eleki kitoko na ndako mpe bolatisaye yango. Botia ye pete na mosapi mpe bolatisa ye sapatu. Bosala feti mpo na kosepela. Mwana na ngai ya mobali azongi!”14

Bosepeli

Na kati ya bilo na ngai nadiembisi elili moko ya langi ya moto ya ntoki ya ekolo Allemagne, Richard Burde. Harriet mpe ngai tolingaka liyemi oyo ya langi. Elimbolaka lisolo moko uta na lisese ya Mobikisi na limoni ya bozindo.

Elilingi
Bozongi ya mwana mobali oyo abungaki, na Richard Burde.

Ntango moto nyonso azali kosepela na bozongi ya mwana mobali, moko asepeli te—kulutu na ye ya mobali.15

Azali komema liboke ya mitungisio.

Azalaki wana ntango ndeko na ye ya mobali asengaki eteni ya bomengo na ye. Atatolaki bozito ya mawa oyo tata na bango azalaki komema.

Kutu uta ndeko na ye atikaki bango, azalaki komeka kotombola mokumba ya tata na bango. Mikolo nyonso, azalaki kosala mpo na kozongisa motema ebukana ya tata na ye.

Mpe sikawa mwana azanga bokebi azongi, mpe bato bakokaki te kotia bokebi na ndeko mobali motomboki.

“Mibu nyonso oyo,” azalaki koyebisa tata na ye, “natikala ata mokolo moko te koboya kosala eloko ozalaki kotinda ngai. Kasi ata mokolo moko te, osalela ngai feti.”16

Tata ya bolingo ayanolaki, “Molingami mwana na ngai ya mobali, nyonso nazali na yango ezali ya bino! Oyo etali bokokanisi ya matomba to ya bosepeli te. Yango ezali mpo na libiki. Oyo ezali ntango tozalaki kolikia uta mibu nyonso oyo. Ndeko na yo akufaki kasi azongi na bomoi! Abungaki kasi sikawa amonani lisusu!”17

Lisese mpo na Ntango na Biso

Bandeko na ngai ya basi mpe mibali, baninga balingami, lokola masese nyonso ya Mobikisi, lisese oyo ezali te bobele na ntina ya bato ya kala. Ezali mpo na yo mpe ngai, lelo.

Nani kati na biso alongwa te na nzela ya bosantu, kokanisaka na buzoba ete tokozwa esengo koleka na nzela na biso moko?

Nani kati na biso naino ayoka te botiolami, motema ebukana, mpe koluka bolimbisi mpe ngolu?

Mbala mosusu ekomela biso tomituna kutu, “Ezali kutu pete kozonga sima? Nakosekama, kobwakisama, mpe koboyama na baninga na ngai ya kala? Ezali ntango mosusu malamu kotikala ya kobunga? Lolenge nini Nzambe akoyoka soki nameki kozonga?”

Lisese oyo epesi biso eyano.

Tata na biso ya Lola akokima epai na biso, motema na Ye etondisami na bolingo mpe mawa. Akoyamba biso; akolatisa biso nzambala, lopete na mosapi na biso, mpe sapatu na makolo na biso; mpe akoloba, Tosepela lelo! Mpo na mwana na ngai, oyo akufaki, azongi lisusu na bomoi!”

Lola ekosepela na bozongi na biso.

Esengo Monene mpe Nkembo mingi Koleka

Nakoki kozwa mwa ntango sikawa mpe koloba na bino mokomoko?

Botala te oyo ekoki kokomela bino na bomoi na bino, nalobi mpe nasokoli maloba ya moninga na ngai moko ya bolingo mpe monginga Apostolo Mpaka Jeffrey R. Holland: “Ezali mpasi te mpo na bino bozindisama na molili koleka pole ya bongengi ya [libonza ya bomikabi] Klisto.”18

Atako maponi ekoki komema bino mosika ya Mobikisi mpe Eklezia na Ye, Molakisi Mokangoli atelemi na nzela oyo ekambaka na ndako, koyambaka bino. Mpe biso lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto tolukaka kolanda bandakisa na Ye mpe koyamba bino lokola bandeko mibali mpe bandeko basi, lokola baninga na biso. Tosepelaka mpe tosalaka feti elongo na bino.

Bozongi na yo ekokitisa mapamboli ya basusu te. Mpo ete bolamu ya Tata ezanga nsuka, mpe oyo epesameli moto songolo ekitisaka te kibokulutu ya basusu.19

Nakoki koloba te ete kozonga ezali eloko moko ya pete mpo na kosala. Nakoki kotatola na ntina na yango. Ekoki, bongo, kozala mokano eleki na motuya okoki kozwa.

Kasi natatoli ete ntango ozwi mokano ya kozonga mpe kotambola na nzela ya Mobikisi mpe Mosikoli na yo, nguya na Ye ekokota na bomoi na yo mpe kobongola yango.20

Banjelu na lola bakosepela.

Mpe bongo tokozala, libota na yo kati na Klisto. Nsima ya nyonso, toyebi nini ezali lokola kozala mobungi. Biso nyonso totalelaka mokolo na mokolo nguya ya bomikabi ya Klisto. Toyebi nzela oyo, mpe tokotambola elongo na yo.

Te, nzela na biso ekozanga mpasi te, mawa, mpe nkele te. Kasi tokomi kino awa “na liloba ya Klisto na bondimi bwa sikisiki na ye, mpe koyekeme mobimba likolo ya matomba ma ye oyo azali na nguya ya kobikisa.” Mpe elongo toko “kende liboso na mpiko kati na Klisto, kozalaka na bongengi ya elikia ebonga nie, mpe bolingo ya Nzambe mpe [bato] nyonso.”21 Elongo toko “sepela na esengo ezanga bososoli mpe nkembo makasi,”22 mpo Yesu Klisto azali bokasi na biso!23

Ezali losambo na ngai ete moko na moko na biso akoka koyoka, na lisese ya bozindo oyo, mongongo ya Tata kobengaka biso mpo na kokota na nzela oyo ekambaka na ndako—ete tokoka kozala na mpiko ya koyambola, kozwa bolimbisi, mpe kolanda nzela oyo ekambaka na bozongi epai ya Nzambe ya mawa mpe ngolu. Na oyo natatoli mpe natikeli bino lipamboli na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala na kati ya Luka 15lisese ezali moko ya misato (mpate ebunga, mosolo ebunga, mpe mana mobali oyo abunga) oyo elimboli ntina ya biloko ebunga mpe bosepeli oyo esalamaka ntango oyo ebungaki emonani.

  2. Luka 19:10.

  3. Luka 15:11.

  4. Mwana mobali oyo azalaki ntango mosusu elenge Abala naino te, ntango mosusu ezalaki ndimbola ya bolenge na ye, kasi elenge makasi te ete azangaki makoki ya kosenga bomengo na ye mpe kolongwa libota ntango azwaki yango.

  5. Na mobeko ya Bayuda mpe bonkoko, kulutu ya bana mibale ya mibali azalaki na makoki ya kozwa bomengo ya tata koleka. Mwana mobali ya elenge, azalaki na makoki ya kozwa eteni. (Tala Dutelonome 21:17.)

  6. Tala Luka 15:13.

  7. Tala Luka 15:14.

  8. Luka 15:16.

  9. Epai ya Bayuda, ngulu ezalaki lokola “mbindo” (tala Dutelonome 14:8) mpe ezalaki botutu. Bayuda ya boyengebene bazalaki kobokola bangulu te, oyo elimboli ete senzeli azalaki Mopagano. Elingaki kolakisa lisusu lolenge nini elenge mobali akendaki mobembo mpo na kozala mosika ya mibeko ya Bayuda.

  10. Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki: “Ya solo, ezali malamu soki totiolami ‘mpo na liloba’ koleka [kotiolama] na mabaku, kasi yango ekoki kozala malamu! (tala Alma 32:13–14). Nzala ya libumu ekoki kobota nzala ya molimo” (“The Tugs and Pulls of the World,” Liahona, Jan. 2001, 45).

  11. Tala Luka 15:17

  12. Tala Luka 15:20

  13. Tala Luka 15:18–19, 21.

  14. Tala Luka 15:22–24.

  15. Mikundola, elenge mobali asilaki kozwa bomengo na ye. Mpo na muana ya mokolo, yango elimboli ete biloko mosusu ezalaki ya ye. Kopesaka eloko songolo na elenge mobali elingaki koloba kozwa yango uta mwana mobali oyo atikalaki.

  16. Tala Luka 15:29.

  17. Tala Luka 15:31–32.

  18. Jeffrey R. Holland, “The Laborers in the Vineyard,” Liahona, May 2012, 33.

  19. Oyo epesami na moto moko ekitisaka te lotomo ya kimokolo ya basusu. Mobikisi ateyaki malongi oyo ntango Apesaki lisese ya basali kati ya Matai 20:1–16.

  20. Tala Alma 34:31.

  21. 2 Nefi 31:19–20.

  22. 1 Petelo 1:8.

  23. Tala Nzembo 28:7.