Likita Linene
Mateya ya Bonzambe Mauti na Baboti
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Mateya ya Bonzambe Mauti na Baboti

Baboti bakotaka na boyokani na Tata na bango ya Lola mpo na kokamba bana na bango ya motuya mingi kozonga na lola.

Osi omema mwana abotami sika na maboko na yo? Ezali na pole oyo eutaka na mwana nyonso abotami sika, komemaka bolingo ya solosolo oyo ekoki kotondisa mitema ya baboti na bango na esengo.1 Mokomi moko ya mboka ya Mexique akomaki, “Nayekoli ete ntango mwana oyo abotami sika azali kofina mpo na mbala liboso mosapi ya tata na ye na loboko na ye ya moke, akangi ye mpo na libela.”2

Boboti ezali moko ya makambo ya motuya makasi na bomoi. Baboti bakotaka na boyokani na Tata na bango ya Lola mpo na kokamba bana na bango ya motuya mingi kozonga na lola.3 Lelo nakosepela ete nakabola mateya mauti na baboti ezwami na makomi mpe etangisami na baprofeta ya bomoi mpo na kosalisa biso kotika libula ya baboti na biso.

Komata na Ngomba ya Momesano ya Nsango Malamu

Tosengeli komata na ngomba ya momesano ya nsango malamu elongo na mabota na biso. Mokambi Russell M. Nelson alobi: “Mabota mazali na mposa ya litambwisi euti na lola. Baboti bakoki kopesa toli ya malamu te na bana na nzela ya boyebi na bango moko, bobangi, to mawa.”4

Atako bikolo na biso, lolenge ya baboti, mpe boyebi ya moto ye moko ekoki kozala na motuya mpo na boboti, makoki oyo ekoki te mpo na kosalisa bana na biso kozonga na lola. Tozali na mposa ya kozwa mingi “liboke ya mituya mpe … mimeseno” ya likolo,5 momesano moko ya bolingo mpe bozeli, esika tozali kosolola na bana na biso “na ndenge ya malamu koleka, ndenge ya bosantu.”6 Mokambi Dallin H. Oaks alimbolaki momesano ya nsango malamu lokola “lolenge moko ekesena ya bomoi, liboke ya mituya, bozeli mpe esaleli. … Momesano ya nsango malamu oyo euti na mwango ya lobiko, mibeko ya Nzambe, mpe mateya ya … baprofeta ya bomoi. Ezali kokamba biso na nzela oyo tozali kotambwisa mabota na biso mpe kobika babomoi na biso moko.”7

Yesu Klisto azali na katikati ya momesano ya nsango malamu oyo. Kozwaka momesano ya nsango malamu na mabota na biso ezali kopesa nzela na bokeli ya esika ya malamu oyo nkona ya bondimi ekoki kokola. Mpo na komata ngomba, Mokambi Oaks abengisaki biso “totika mimeseno to misala ya moto ye moko to ya mabota oyo ezali na nzela ya mateya ya Eklezia ya Yesu Klisto te.”8 Baboti, kozala nsoni na mosala na biso ya kotonga momesano ya nsango malamu ekoki kopesa munguna makasi ya kotonga esika ya kotelema kati ya bandako na biso to, mabe makasi, na mitema ya bana na biso.

Ndenge tozali kopona kosala ete momesano ya nsango malamu ezala momesano ya motuya mingi na libota na biso, sikawa na lisalisi ya nguya ya Molimo Mosantu,9 mitindo na biso ya boboti ya lelo, mimeseno, mpe bizaleli ekopikolama, ekokanisama, ekopetolama, mpe ekolendisama.

Komisa Ndako na yo Esika ya Boyekoli Nsango Malamu

Mokambi Russell M. Nelson atangisi ete ndako esengeli ezala “esika ya koyekola nsango malamu.”10 Ntina ya koyekola nsango malamu ezali mpo na “kokolisa mbongwana na biso na Tata na biso ya Lola mpe na Yesu Klisto mpe kosunga biso kokoma mingi koleka lokola Bango.”11 Tika tozwa mikumba misatu ya motuya ya baboti elimbolami na baprofeta mpe bapostolo oyo ekoki kosunga biso kotonga momesano ya nsango malamu ya makasi kati ya bandako na biso.

Ya yambo: Kotangisa na motema moko

Tata ya Lola atangisaki Adama na ntina ya Yesu Klisto mpe malongi na Ye. Atangisaki ye mpo na “koteya makambo wana na motema moko na [ya ye] bana.”12 Na maloba mosusu, Tata na biso ya Lola atangisaki Adama alakisa biloko wana na bonsomi, na motema malamu, mpe kozanga epekiseli.13 Makomi eyebisi biso ete “Adama na Eva bapambolaki nkombo ya Nzambe, mpe basalaki makambo nyonso bayebaki na bana na bango mibali mpe basi.”14

Tozali koteya bana na biso na motema malamu ntango tozali kolekisa ngonga ya motuya na kofandaka na bango. Tozali koteya na bozangi epekiseli ntango tosololaka makambu ya motuya lokola ntango ya kotala televizio, kosalela biloko ya kotanga oyo Eklezia apesi.15 Tozali koteya na bonsomi nyonso ntango tozali kotanga makomi elongo na bana na biso na kosalelaka Yaka, Landa Ngai mpe topesi nzela na Molimo Mosantu azala molakisi.

Ya mibale: Ndakisa ya Moyekoli

Na buku ya Yoane, totangi ete ntango Bayuda ebele batunaki Mobikisi na ntina ya etamboli na Ye, Yesu atindaki likebi na ndakisa na Ye, Tata na Ye. Ateyaki, “Mwana akoki kosala eloko moko te na makasi na Ye moko, kasi azali kosala kaka makambo oyo azali komana Tata na Ye kosala: pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, Mwana mpe asalaka yango.”16 Baboti, ndakisa nini tosengeli kopesa bana na biso? Kimoyekoli.

Lokola baboti, tokoki koteya motuya ya kotia Nzambe liboso ntango tozali kosolola na ntina ya mobeko ya liboso, kasi tozo pesa nzela na yango ntango totyaka mosika na biso makambo mosusu oyo ebendaka likebi mpe tobolusi Mokolo ya Saba poso nyonso. Tokoki koteya motuya ya mayokani ya tempelo ntango tozali koloba na ntina ya malongi ya libala ya selisitiale, kasi topesaka ndakisa na yango ntango tobombaka mayokani na biso, kosalela molongani na biso na lokumu.

Ya misato: Libyangi ya Kosala

Bondimi kati na Yesu Klisto esengeli ezala likambo ya liboso ya matatoli ya bana na biso, mpe matatoli oyo esengeli eya na mwana nyonso na nzela ya emoniseli ya moto na moto.17 Mpo na kosunga bana na biso na botongi ya matatoli na bango, tozali ko kolendisa bango basalela bonsomi na bango mpo na kopona oyo eza malamu18 mpe kolengela bango mpo na bomoi mobimba na nzela ya boyokani na Nzambe.19

Ekozala malamu kolendisa moko na moko ya bana na biso bandima libiangi ya Mokambi Nelson ya kozwa mokumba ya litatoli na ye moko na ntina ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye—mpo na kosala na ntina na yango, koleisa yango mpo ete ekola, koleisa bosolo na yango, mpe kobebisa yango te na bafilozofi ya mabe ya mibali mpe basi bazanga bondimi.20

Bosembo, Moboti ya Bokebi

Makanisi ya bonzambe ya Tata na biso ya Lola lokola moboti eyebanaki na emoniseli epesama na Mose: “Mosala na ngai mpe nkembo na ngai—kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.”21 Mokambi Nelson abakisi, “Nzambe akosala nyonso Ye akoki, kozanga kobebisa bonsomi na yo, mpo na kosunga yo ozanga te mapamboli minene koleka na boseko mobimba.”22

Lokola baboti, tozali basali ya Nzambe na kokengela bana na biso.23 Tosengli kosala nyonso tokoki kosala mpo na kokela esika oyo bana na biso bakoki koyoka bopusi na Ye ya bonzambe.

Tata na Lola atikala kolinga te mpo na biso lokola baboti tofandaka pembeni lokola batali, kotala ndenge bomoi ya molimo ya bana na biso ezali kofungwama. Tika ete napesa ndakisa ya likanisi oyo ya moboti ya bokebi uta na boyebi na ngai moko. Ntango nazalaki kokota na Eteyelo ya Bana na etape moko ya moke na mboka ya Guatemala, baboti na ngai babandaki koteya ngai na ntina ya motuya ya mapamboli ya bankoko. Mama na ngai azwaki ntango ya kokabola ndakisa na ye ya kozwa lipamboli na ye ya bankoko ya motuya mingi. Ateyaki ngai malongi oyo etali mapamboli ya bankoko, mpe atatolaki na ntina ya mapamboli elakama. Boboti na ye ya bokebi efulaki ngai kozala na mposa ya kozwa lipamboli na ngai ya bankoko.

Ntango nazalaki na mibu 12, baboti na ngai basungaki ngai mpo na koluka mopamboli na interneti. Ezalaki na motuya mpo ete na disitiliki tozalaki mopamboli azalaki te. Nasalaki mobembo kokutana na mopamboli oyo azalaki na likonzi mosika ya 156 kilometele ( Na ntaka ya kilometele 97). Namikundoli solo mpenza ntango mopamboli atiaki maboko likolo ya moto na ngai mpo na kopambola ngai. Nayebaki na nzela ya bondimisi ya molimo, ata ntembe te, ete Tata na ngai ya Lola ayebaki ngai.

Mpo na mwana mobali ya mibu 12 awuti na mboka moke, wana elobaki eloko nyonso mpo na ngai. Motema na ngai etalaki epai ya Tata na ngai na Lola mokolo wana mpo na kimoboti ya bokebi ya mama mpe tata na ngai, mpe nakozala na botondi mingi mpo na bango libela.

Ndeko mwasi Joy D. Jones, Mokambi Monene ya kala ya Eteyelo Bana, ateyi: “Tokoki te kozela mbongwana eya na pete na bana na biso. Mbongwana ya ndenge ya likama ezali te motindo ya nsango malamu ya Yesu Klisto.”24 Bolingo na biso mpe mabiangi efulama ekoki kopesa bokeseni na lolenge bana na biso bazali kosalela bonsomi na bango. Mokambi Nelson abeti nsete, “Mosala moko te eleki oyo ya moboti ya bosembo, moboti ya bokebi!”25

Mpo na Kosukisa

Baboti, mokili oyo etondisami na bafilozofi ebele, bikolo, mpe makanisi ya kobundisa likebi ya bana na biso. Ndako enene mpe ya etando ezali kokweyisa bondimi na bango mokolo nyonso na kosalelaka barezo ya nsango ya lelo. “Kasi na likabo ya Mwana na ye,” profeta Moroni ateyi, “elengeli Nzambe nzela eluti malamu mingi.”26

Ndenge tozali kosala elongo na Nzambe na nzela ya mayokani na biso mpe kokoma basali na ye na kobatela bana na biso, Akopetola makanisi na biso, akofula mateya na biso, mpe akokitisa mabiangi na biso na yango “bana ba biso bakoka koyeba o liziba kani bakoki koluka bolimbisi bwa masumu ma bango.”27 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Bazembo 127:3.

  2. Johnny Welch, “The Puppet,” ebimisami lisusu na inspire21.com/thepuppet; tala lisusu Johnny Welch, Lo que me ha enseñado la vida (1996).

  3. Yango ekoki kozala lokola mosala monene mpenza, kasi lokola Mpaka Jeffrey R. Holland alobaki, “Uta na lisungi ya Tata na biso ya Lola tokoki kotika mingi ya libula ya baboti koleka oyo tozali kokanisa” (“The Hands of the Fathers,” Liahona, Sanza ya nsambo 1999, 18).

  4. Russell M. Nelson, “Thou Shalt Have No Other Gods,” Ensign, May 1996, 15.

  5. Dallin H. Oaks, “Momesano ya Nsango Malamu,” Liahona, Sanza ya isato. 2012, 22.

  6. Russell M. Nelson, “Tozali na Mposa ya Bapesi Kimia,” Liahona, Sanza ya Mitano 2023, 99.

  7. Dallin H. Oaks, “Momesano ya Nsango Malamu,” 22.

  8. Dallin H. Oaks, “Momesano ya Nsango Malamu,” 22.

  9. Tala Moloni 10:5.

  10. Russell M. Nelson, “Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 113.

  11. Conversion Is Our Goal,” kati ya Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana ya Sikat 2023, v.

  12. Mose 6:58.

  13. Tala American Dictionary of the English Language, “na polele,” webstersdictionary1828.com/Dictionary/freely.

  14. Mose 5:12.

  15. Tala “Taking Charge of Technology” mpe Mpo ya Bokasi bwa Bilenge: Mokambi mpo na Kosala Maponi (2022), Gospel Library.

  16. Yoane 5:19.

  17. Tala “Matai 16:17–18. Individual Revelation Needed for a Testimony of Jesus Christ,” kati ya Mokanda ya Moyekoli ya Kondimana ya Sika (2018), 52.

  18. Tala Dale G. Renlund, “Choose You This Day,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 104: “Ntina ya Tata na biso ya Lola na boboti ezali te komona bana na Ye kosala oyo ezali bosembo; kasi ezali komona bana na Ye kopona kosala oyo ezali bosembo mpe na nsuka kokoma lokola Ye.”

  19. Tala “Appendix: Preparing Your Children for a Lifetime on God’s Covenant Path,” kati ya Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana ya Sika 2023, Gospel Library.

  20. Tala Russell M. Nelson, “Bolonga Mokili mpe Bozwa Bopemi,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2022, 97.

  21. Moses 1:39. Na molongo oyo, Yesus Klisto azali koloba na nkombo ya Tata na Lola.

  22. Russell M. Nelson, “Choices for Eternityworldwide devotional for young adults, May 15, 2022), Gospel Library.

  23. Tala Russell M. Nelson, “Lobiko mpe Bonetoli,” Liahona, Sanza ya mitano 2008, 10: “Bomeka kolandela bana na bino te. Na esika na yango, Boyoka bango, bosunga bango koyekola nsango malamu, bofula bango, mpe botambwisa bango kino na bomoi ya seko. Bozali basali ya Nzambe na kobatela bana andimi kopesa bino. Botika ete bopusi na ye ya bonzambe ezala na mitema na bino ndenge bozali koteya mpe kondimisa.”

  24. Joy D. Jones, “Essential Conversations,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 12.

  25. Russell M. Nelson, “Sabata Ezali Mokolo ya Esengot,” Liahona, May 2015, 131.

  26. Etele 12:11.

  27. 2 Nefi 25:26.