Likita Linene
Kotambola kati na Mokangano ya Boyokani elongo na Klisto
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Kotambola kati na Mokangano ya Boyokani elongo na Klisto

Moto oyo anyokwamaki mpe abukanaki mpo na biso akopesa nzela na bokufi mpo na kosala mosala na yango kati na biso, kasi Ye asengaka biso te tokutana na mikakatano wana biso moko.

Moninga na ngai malamu Ilan nde alakisaki ngai nzela moko na Yisalaele. “Ebengami Nzela ya Yesu,” alobaki, “mpo ete ezali kokamba longwa Nasalete tii na Kapalanauma oyo mingi bandimaka Yesu atambolaki.” Nazwaki mokano mbalamoko mpe kuna nalingaki kotambola na nzela yango, yango wana nabandaki kosala mwango ya mobembo ya kokende na Yisalaele.

Poso motoba liboso ya mobembo, nabukanaki lokolo na ngai. Mobali na ngai amitungisaki na oyo etali mpota yango, motungisi na ngai ya monene mpenza ezalaki lolenge nini nakotambola na nzela ya Yesu nsima ya sanza moko. Nazali moto makasi na bozalisi, yango wana nabomaki batike na ngai ya mpepo te.

Namikundoli kokutana na mokambi na biso ya Yisalaele na ntongo wana kitoko ya sanza ya motoba. Napumbwaki libanda ya motuka na lokolo moko mpe nsima nabimisaki banzete mpe tukutuku ya libolongo. Mya, mokambi na biso, apesaki ngai mbote, atalaki ebende na ngai, mpe alobaki, “Uh, nakanisi te okokoka kotambola nzela oyo na ezalela wana.”

“Ntango mosusu te,” nayanolaki. “Kasi ezali na eloko moko te epekisi ngai.” Asalaki elembo moke ya kondima na moto, mpe tobandaki. Nalingaka ye mpo na yango, mpo na kondima ete nakokaki kotambola nzela moke atako nazalaki ya kobukana.

Natambolaki nzela ya ngomba makasi mpe mabanga epanzana na nzela mobimba na ngonga mokuse na ngai moko. Nsima, kotutamaka na bosolo ya komipesa na ngai, Mya abendaki nsinga moke, akangisaki yango na mabende ya maboko ya tukutuku na ngai, mpe abandaki kobenda. Abendaki ngai likolo ya bangomba, kati na bilanga ya malala, mpe na zelo ya pene ya Mbu ya Galilai. Na nsuka ya mobembo, nazongisaki matondi mingi mpo na mokambi na ngai ya malamu, oyo asalisaki ngai nakokisa likambo moko nakokaki mokolo moko te kokokisa na ngaimei.

Ntango Nzambe abiangaki Enoka atambola kati na mabele yango mpe atatola na ntina na Ye, Enoka atatabanaki.1 Azalaki kaka elenge, kokukuma na maloba. Boniboni ekokaki ye kotambola nzela wana kati na ezalela na ye? Ye akangamaki miso na oyo ezalaki ya kobukana kati na ye. Eyano ya Nkolo na oyo ekamwisaki ye ezalaki pete mpe mbala moko: “Tambola elongo na ngai.”2 Lokola Enoka, tosengeli komikundola ete Moto oyo anyokwamaki mpe abukanaki mpo na biso3 akopesa nzela na bokufi mpo na kosala mosala na yango kati na biso, kasi Ye asengaka biso te tokutana na mikakatano wana biso moko.4 Likambo te bozito ya lisolo na biso, to, etamboleli ya sikoyo ya nzela na biso, Ye akobianga biso totambola elongo na Ye.5

Kanisa na ntina ya elenge mobali kati na mikakatano oyo akutanaki na Nkolo na esika ya esobe. Yakobo atambolaka mosika ya ndako. Kati na molili ya butu, alotaki ndoto oyo ezalaki na ebuteli moko kaka te kasi lisusu ezalaki na bilaka ya boyokani ya ntina, kobakisa oyo nalingaka kobenga elaka ya misapi mitano.6 Na butu wana, Nkolo atelemaki pembeni ya Yakobo, amiyingisaki lokola Nzambe ya tata ya Yakobo, mpe nsima alakaki:

  • Nazali elongo na yo.

  • Nakobatelo yo.

  • Nakozongisa yo na ndako lisusu.

  • Nakotika yo te.

  • Kino nakokokisa makambo nyonso oyo nalakaki yo.7

Yakobo azalaki na liponi ya kosala. Akokaki kopona kobika bomoi na ye na pete ya koyebana na Nzambe ya tata na ye, to Akokaki kopona kobika bomoi kati na mokangano ya boyokani ya komipesa elongo na Ye. Ezalaki mibu mingi nsima, oyo Yakobo atatolaki mpo na bomoi moko abikaki kati na bilaka ya liyokani ya Nkolo: “Nzambe … ayanolaki ngai na mokolo oyo nazalaki na mpasi, mpe azalaki elongo na ngai bisika nyonso oyo nazalaki kokende.”8 Kaka lokola Ye asalaki mpo na Yakobo, Nkolo akozongisela moko na moko na biso kati na mokolo ya mawa na biso soki toponi kokanga bomoi na biso elongo na oyo ya Ye. Alaki kotambola elongo na biso na nzela.

Ezali nzela moko oyo ebandaka na boyokani ya libatisi mpe ekambaka epayi ya mayokani ya mozindo koleka oyo tosalaka kati na tempelo. Ntango mosusu oyokaka maloba wana mpe okanisaka bingongolo ya kotiela bilembo. Ntango mosusu nyonso oyo omonaka ezali nzela ya masengeli. Botali moko malamu koleka emonisaka likambo moko ya kondimisa mingi koleka. Boyokani ezali kaka oyo etali libala te, atako yango ezali motuya. Ezali kotala boyokani. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “Nzela ya boyokani etali mingimingi mokangano na biso elongo na Nzambe.”9

Tala boyokani ya libala. Mokolo ya libala ezali motuya, kasi mokangano oyo esalami kati na bomoi na lisanga nsima ezali mpe motuya lisusu. Lolenge moko ezali solo na mokangano moko ya boyokani elongo na Nzambe. Makambo etiamaki, mpe ekozala na baelikya na nzela. Mpe nsima Abengisi moko na moko na biso aya lokola tokoki, na mokano mobimba ya motema, mpe “kokende liboso”10 elongo na Ye pembeni na biso, kotiaka motema ete mapamboli na Ye oyo elakamaki ekoya. Makomi makundolisi biso ete mbala mingi mapamboli eyaka na ngonga na Yemei mpe na lolenge na Yemei: mibu 38 ,11 mibu 12 ,12 mbala moko.13 Lokola nzela na yo ekosenga, ndenge moko mpe lisungi na Ye ekozala.14

Mokumba na ye ezali ya komonisa bopolo. Yesu Klisto akokutana na biso bipayi wapi tozali lokola tozali. Oyo ezali ntina ya elanga, ekulusu, mpe nkunda. Mobikisi atindamaki mpo na kosalisa biso tolonga.15 Kasi kotikalaka epayi wapi tozali ekomema te bokangoli tozali koluka. Kaka lokola Ye atikaka Yakobo kuna na mbindo te, Nkolo akanaka te kotika moko na biso epayi wapi tozali.

Ye mpe azali na mokumba ya komata na likolo. Akosala kati na biso16 mpo na kotombola biso epayi wapi Ye azali mpe, kati na lolenge yango, akopesa biso makoki ya tokoma lokola Ye azali. Yesu Klisto ayaki mpo na kotombola biso.17 Alingi kosalisa biso tokoma. Oyo ezali ntina ya tempelo.

Tosengeli tomikundola: ezali nzela yango moko te nde ekonetola biso: ezali moninga––Mobikisi na biso. Mpe oyo ezali ntina ya mokangano ya boyokani.

Ntango nazalaki na Yisalaele, nakendaki kotala Western Wall. Mpo na Bayuda, oyo ezali esika esantu mpenza kati na Yisalaele. Ezali nyonso oyo etikali ya tempelo na bango. Mingi balataka bilamba na bango ya kitoko mpenza ntango bakendaka kotala esika ya bule oyo; Boponi na bango ya garma ezali elembo ya libondeli na bango––liloba moko ya libanda ya bomipesi na bango epayi ya mokangano na bango elongo na Nzambe. Bakendaka kotala efelo yango mpo na kotanga makomi, kokumbamela, mpe mpo na kosopa nsambo na bango. Bosenga mpo na tempelo moko kati na bango eliaka mikolo nyonso, nsambo na bango ya mokolo na mokolo, mposa oyo ya makasi mpo na ndako moko ya boyokani. Nasepelaka na libondeli na bango.

Ntango nazongaki ndako uta na Yisalaele, nayokaki na bokebi mingi koleka na masolo oyo ezalaki nzinganzinga na ngai etali mayokani. Namonaki bato kotunaka, Mpo na nini esengeli ngai kotambola na nzela ya boyokani? Nasengeli kokota na ndako mpo na kosala mayokani? Mpo na nini nalataka garma esantu? Nasengeli kolona kati na mokangano ya boyokani elongo na Nkolo? Eyano na mituna malamu mpe ya motuya oyo ezali pete: eyekami likolo ya ndelo nini ya mokangano olingi kokutana na yango elongo na Yesu Klisto.18 Moko na moko na biso asengeli koyeba eyano na biso moko mpo na mituna ya mozindo ya moto ye moko.

Oyo ezali ya ngai: Natamboli na nzela oyo lokola “mwana mwasi ya bolingo ya baboti ya lola,”19 ayebani na bonzambe20 mpe mpenza batielaka motema.21 Lokola mwana ya boyokani, nazali ya kolongobana mpo na kozwa mapamboli22 elakama. Ngai naponi23 kotambola elongo na Nkolo. Ngai nabiangami24 kotelema lokola nzeneneke ya Klisto. Ntango nzela eyokani ya mpasi, ngai nalendisami25 na ngolu. Ngonga moko na moko oyo nakotaka na ndako na Ye, nakutanaka na mokangano ya boyokani elongo na Nzambe ya mozindo mingi koleka. Ngai nasantisami26 na Molimo na Ye, nazwi dotasio27 elongo na nguya na Ye, mpe natiami pembeni28 mpo na kotonga bokonzi na Ye. Kati na lolenge moko ya boyamboli mokolo na mokolo mpe bolie elambo poso na poso, nazali koyekola kokoma sikisiki29 mpe kokoba kosala malamu.30 Mpo ete nazali kotambola na nzela oyo elongo na Yesu Klisto , natalaka liboso epai ya mokolo elakama ntango Ye akoya lisusu. Nsima ngai nakokangisama ya Ye31 mpe nakotombolama lokola mwana mwasi mosantu32 ya Nzambe.

Oyo ezali ntina natambolaka na nzela ya boyokani.

Oyo ezali ntina nakangamaka na bilaka ya boyokani.

Oyo ezali ntina nakotaka na ndako na Ye ya mayokani.

Oyo ezali ntina nalataka garma esantu lokola likundoli ya ntango nyonso.

Mpo ete nalingaka kobika kati na bomipesi ya mokangano ya boyokani elongo na Ye.

Ntango mosusu osalaka mpe. Banda epai wapi yo ozali.33 Kotika te ezalela na yo epekisa yo. Omikundola, lobango to esika na nzela ezali motuya te koleka kokoba.34 Tuna moto moko ondimaka oyo azali na nzela ya boyokani mpo na koyingisa yo epai ya Mobikisi oyo basili koyeba. Yekola mingi na ntina na Ye. Lona kati na mokangano yango na kokotaka na boyokani elongo na Ye. Ezali na ntina te mbula na yo to ezalela na yo. Okoki kotambola elongo na Ye.

Nsima ya kosilisa kotambola na Nzela ya Yesu, Mya azwaki nsinga na ye te. Atikaki yango ekangami na tukutuku na ngai. Na boumeli ya mwa mikolo oyo elandaki, bana ya ndeko na ngai ya bilenge mpe baninga na bango kosalaka moko nsima ya mosusu bazongisaki ngai na babalabala ya Yelusaleme.35 Basalaki nyonso mpo nazanga te masolo ya Yesu. Nakundolisamaki bokasi ya nkola ya bobuti. Tokoki koyekola uta na yo. Ozali na mposa ya solo ya koyeba mokambi, Yesu Klisto. Otie motema na bokasi ya nsinga oyo ekangisaka biso na Ye. Ozali na likabo na kosangisaka basusu epai na Ye.36

Na matondi, totambolaka na nzela oyo elongo, kongangaka maloba ya bolendisi nzelanzela.37 Lokola tozali kokabola boyebi na biso moko na Klisto, tokolendisa bomipesi na biso. Nazalikotatola yango na nkombo ya Yezu Klisto, amene.

Matangi

  1. Bato ya Enoka bapengwaki, bawanganaka Klisto, mpe balukaki toli na bango moko kati na molili” (tala Moses 6:27–28). Na ngonga ntango abungisaki bondimi kati na bato, Enoka atalelaki Nkolo mpo na bokambi. Libiangi oyo epai ya Enoka ezali kaka se libiangi moko Nkolo asembolaka epai ya banso na biso: “Tambola na ngai” (Moses 6:34; tala lisusu Matai 11:28). Kasi ntango mosusu, lokola Enoka, ozali na ntembe soki okoki kotambola na nzela oyo kati na ezalela na yo. Ntango mosusu ozali komiyoka ya kopekisama na lolenge moko. Ntango mosusu ntina mpenza oyo tosengeli kotambolela na nzela ya boyokani ezali mpo na ezalela na biso, mpo ete topekisami na lolenge moko mpe tozali na mposa ya lisalisi na Ye.

  2. Tala Mose 6:23–34.

  3. Tala “Jesus de Nazareth, Sauveur et Roi,” Cantiques, no. 181.

  4. Tala Etele 12:27.

  5. Tala Matai 11:28–30.

  6. Bana na ngai ya basi balingi koloba na mongongo ya nse elaka oyo ya misapi mitano epai ya bana na bango (bankoko na ngai bana) ntongo nyonso—bokundoli ya Tata moko na Lola oyo ayebi na bonzambe moko na moko ya bana na Ye.

  7. Tala Genese 28:10–22. Boyokani ya Abalahama ezalaki lisusu na ebeteli nsete ya ntina ya butu wana. Biloko oyo ya boyokani ya Abalahama ezali na mosala ya motuya kati na bomoi na biso mpe kati na nsango malamu ya Yesu Klisto: 1. elaka ya lisango ya seko (molongo 13); (2) bokitani ya seko (molongo 14); mpe (3) lipamboli mpe mokumba ya kopambola bikolo ya mabele (molongo 14).

  8. Genese 35:3; nsete ebetami. Baboti ya Yakobo bayangelaki ye atika ndako mpo na kokende mosika ya Ezau, oyo abangisaki mpo na koboma ye, mpe kozala na libaku ya kokutana na moto moko oyo akokaki kobala kati na boyokani (tala Genese 27:41–45; 28:1–2, 5).

  9. Russell M. Nelson, “The Everlasting Covenant,” Liahona, Sanza ya zomi. 2022, 11.

  10. 2 Nefi 31:20.

  11. Tala Yoane 5:5, lisolo ya liziba ya Betesaida.

  12. Tala Malako 5:25, lisolo ya mwasi oyo asimbaki lobe ya Klisto.

  13. Tala Matai 14:31, lisolo ya Petelo kotambolaka likolo ya mai.

  14. Tala “Quels fondements Fermes,” Cantiques, no. 85.

  15. Tala 1 Nefi 11:16–33.

  16. Tala Bafilipi 1:6; 2:13; Maloba ya Mormon 1:7.

  17. Tala Yoane 12:32.

  18. Nzela elimbolami mbala mingi na bandakisa ya motuya lokola makonzi ya bokambi to bilembo ya ntaka. Ezali lolenge ya koyeba solo ozali na nzela malamu to ozali kokoba na nzela malamu. Mokangano ekoki lisusu kolimbolema na bandakisa ya motuya. Mosusu ya oyo ezwi bozeli (tala Yelemiya 29:11; Malongi mpe Mayokani 132:7; botosi (tala Mosiya 3:19; Alma 7:23; 13:28);bomikitisi; botosi; motema molayi; bopete; elikya (tala Masese 3:5); mpe bolingo (tala Baloma 8:31–39).

  19. Mama ya likambo ya Bilenge Basi,,” Gospel Library, nsete ebetamaki; tala lisusu Bonnie H. Cordon, “Beloved Daughters,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 67.

  20. Tala Yoane 4:1–29, lisolo ya mwasi na libulu ya mai.

  21. Tala Alma 38:1–3.

  22. Tala Mituya 6:23–27.

  23. Tala Yosua 24:22.

  24. Tala Malongi mpe Mayokani 25:3, lisolo ya Emma Smith.

  25. Tala 1 Bakolinti 15:9–10.

  26. Tala 2 Mosakoli 20:1–17, mingimingi molongo 14.

  27. Tala Malongi mpe Mayokani 109:1–46.

  28. Tala 1 Samwele 16:11–13.

  29. Tala Esetele 4:16, lisolo ya Esetele.

  30. Tala Misala 10:38.

  31. Tala Yisaya 43:1–5.

  32. Tala Dutelonome 28:1–9.

  33. Moninga moko ya malamu akundwelaki ngai ete libiangi ya kosala ezali na ntina na boyokani nyonso.

  34. Lisolo elongo na Kristen Olsen, Sanza ya Libwa 2023.

  35. Mpo na Mack Oswald, Camden Oswald, Ashton Matheny, mpe Jack Butler, matondi mpo na kobendaka ngai nzelanzela.

  36. “Bokomikundola ete nabiangisaki bilenge ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bakomisa bankombo na lisanga ya bilenge ya Nkolo mpo na kosala elongo na mosala monene mpenza ya mabele lelo––bosangisi ya Yisalaele. Nabimisi libengisi oyo na bilenge na biso mpo ete bazali bapesami likabo na momesano te na kossembolaka loboko epayi ya basusu mpe kokabolaka maye bandimelaka na lolenge ya bondimi” (Russell M. Nelson, “Witnesses, Aaronic Priesthood Quorums, and Young Women,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2019, 39).

  37. “Bokonzi ya Nzambe … ezali lokola engumba ekozami na basoda ezingami na bangambo nyonso na liwa. Moto moko na moko azali na esika na ye na efelo mpo na kobatela mpe moto moko te akoki kotelema bepayi wapi mosusu atelemi, kasi ‘eloko moko te epekisi biso uta na kolendisa moko na mosusu’” (Martin Luther, na Lewis William Spitz, The Renaissance and Reformation Movements [1987], 335).