Likita Linene
Moninga na Biso ya Ntango Nyonso
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Moninga na Biso ya Ntango Nyonso

Yo na ngai tozali na libaku ya kozala na Molimo Mosantu lokola moninga na biso ya ntango nyonso.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi ya bolingo, kati na likita oyo topambolami na bosopani ya bobimisi. Basali ya Nkolo Yesu Klisto balobi mpe bakoloba maloba ya bosolo, bolendisi mpe ya bokambi.

Natutisamaki na matatoli oyo eteyami na likita oyo ete Nkolo alobelaka biso moko na nzela ya Molimo Mosantu. Ntango tosambeli mpe nsima toyoki matindiki ya Molimo, tozwaka bomoni monene mpe mapamboli oyo ekokamba biso na nzela ya mikakatano ya mokolo na mokolo oyo ezali koya liboso.

Toyokaki lisusu Mokambi Russell M. Nelson ateyi, “Na mikolo ekoya, ekokoka kosalama te kotikala na bomoi na molimo kozangaka nguya ekambaka, eyangelaka, elendisaka, mpe nguya ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu.”1

Mateya wana ya profeta ekambaki ngai namanyola nini nasengeli koteya bana na ngai, bankoko na ngai, mpe bankokololo na ngai na ntina ya lolenge nini kozwa bokambi wana ya motuya na mikolo na bango ya mikakatano oyo ekoya liboso.

Na yango, oyo ezali mokanda ya mokuse mpo na bakitani na ngai oyo ekoki kosunga bango ntango nakozala na bango te na mikolo ya mpasi oyo ekoya liboso. Nalingi bango bayeba oyo nayei koyeba nsima oyo ekosunga bango.

Naye kososola mingi nini ekosengela bango mpo na kozala na bopusi ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu na mikolo oyo bakobika. Mpe namiyoki kotindikama koloba lelo na ntina ya likambo na ngai moko ya kobengisa Molimo Mosantu, penepene lokola nakokaki, mpo na kozala moninga na ngai ya ntango nyonso. Losambo na ngai ezali ete nakoka kolendisa bango.

Nakolinga bakanisa mpe basambela na ntina ya bana mibali ya Elamani, Nefi mpe Lehi, mpe basali misusu ya Nkolo kosalaka elongo na bango. Bakutanaki na botelemeli makasi. Bazalaki kosalela na esika moko ya mabe mpe bakutanaki na lokuta ya nsomo. Nazwi mpiko, mpe bokoki uta na molongo moko oyo uta na mokanda ya Elamani:

“Mpe o mobu mwa tuku sambo na libwa ebandaki kozala boswani boike. Kasi esalemaki ete Nefi mpe Lehi, mpe mingi ya bandeko ba bango oyo bayebaki biteni ya solo ya malongi, kozalaka na mabimisi mokolo na mokolo, yango wana bateyaki epai ya bato, mpenza ete batiaki nsuka yoko o boswani bwa bango o mobu mona kaka.”2

Lisolo oyo epesi ngai mpiko, mpe ekoki kopesa bino mpiko. Bana ya Elamani bateyamaki mpe bakambamaki na mingi ya makambo babikaki elongo na Molimo Mosantu. Yango endimisi ngai ete tokoki koteyama na mpe koyekola uta na molimo uta na molongo na molongo ya Molimo, kozwaka oyo tozali na yango mposa, mpe nsima ntango tokozala ya komilengela, tokozwa mingi.

Nalendisamaki lolenge moko na lisolo ya Nefi asengamaki kozonga na Yelusaleme mpo na bapalaki ya Labana. Bozali komikundola boponi oyo asalaki. Esika na yango alobaki, “nakokende mpe nakosala makambo oyo Nkolo atindi.”3

Makambo Nefi abikaki elongo na Molimo Mosantu na mosala yango epesi ngai mpiko mbala mingi ntango nabandaki misala nayebaki ete ezalaki misala uta na Nkolo kasi oyo emonanaki mosika koleka mayele na ngai ya kala mpe koleka oyo namonaki lokola makoki na ngai.

Okundoli ete Nefi alobaki na ntina ya makambo na ye: “Mpe yango ezalaki o butu; mpe nasalaki ete [bandeko na ngai ya mibali] bamibomba bangomei o libanda lya bifelo. Mpe nsima esilaki bango komibomba, ngai, Nefi, nayingelaki na bonkutu o kati ya engumba mpe nabelemeki ona ndako ya Labana.

Akobaki na koloba, “Mpe nakambemaki na Molimo, emiyebelaka ngai yambo te makambo maye nasengelaki kosala.”4

Nalendisamaki na koyebaka ete Nefi akambamaki na Molimo miniti na miniti kati na butu na mosala ya Nkolo.

Tosengeli, mpe bokosengela, na kimoninga ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu. Sikoyo, tozali na mposa na yango, nzokande toyebi uta na boyebi makambo ete ezali pete te kokokisa. Moko na moko na biso tokanisaka mpe tolobaka, mpe tosalaka makambo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo oyo ekoki kotuka Molimo.

Ntango yango ekomaka, ndenge ekokoma, tokoki koyoka kozanga kondimama epai ya Nkolo. Mpe tokoki komekama na komiyoka biso moko. Ezali bongo ntina komikundola elaka ya solo tozwaka poso na poso ntango tozali koyambola mpe kolia elambo: “Ete bakoka ntango nyonso kozala na Molimo na ye mpo na kozala elongo na bango.”5

Soki oyoki botindiki ya Molimo Mosantu lelo, okoki kozwa yango lokola bosolo ete Bomikabi ezali kosalama na bomoi na yo.

Ndenge Mpaka Jeffrey R. Holland alobaki: “Ntango nyonso oyo mikakatano ekokoma, tosengeli te kokweya na bobangi ete Nzambe asundoli biso to ete azali koyoka te mabondeli na biso. Ye azali koyoka biso. Ye azali komona biso. Ye azali kolinga biso.”6

Elikya wana esalisi ngai. Ntango namiyoki mosika na Nkolo, ntango biyano na nsambo na ngai emonani kowumela, nayekolaki kolanda toli ya Mokambi Nelson ya kotala bomoi na ngai na mabaku ya koyambola. Akundoli biso, “Boyamboli ya mokolo na mokolo ezali nzela ya bopeto, mpe bopeto ememaka nguya.”7

Soki omimoni yomei na mikakatano ya koyoka Molimo Mosantu, okoki komanyola soki ezali na eloko moko oyo osengeli koyambola mpe kozwa bolimbisi.8 Okoki kosambela na bondimi mpo na koyeba nini kosala mpona kopetolama mpe penepene mingi kolongobana mpo na kozwa kimoninga ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu.

Soki olingi kozwa kimoninga ya Molimo Mosantu, osengeli kolinga yango mpo na bantina ya nsembo. Bantina na yo esengeli ezala bantina ya Nkolo. Soki bantina yo ezali ya moimi mingi, okomona yango mpasi mpo na kozwa botindiki ya Molimo.

Mama ya likambo mpo na ngai mpe mpo na yo ezali kolinga nini Mobikisi alingi. Bantina na biso esengeli etambolisama na bolingo ya peto ya Klisto. Ba nsambo na biso esengeli ezala “Nyonso ngai nalingi ezali oyo yo olingi. Mokano na Ye ekosalema.”

Namekaka komikundola mbeka ya Mobilisi mpe bolingo na Ye mpo na ngai. Nsima, ntango na sambelaka Tata na Lola mpo na kopesa matondo, nayokaka bolingo mpe kondimisama ete bansambo na ngai eyokami mpe ete nakozwa oyo ezali malamu koleka mpo na ngai mpe oyo nakolinga. Elendisaka litatoli na ngai.

Na makambo nyonso oyo Molimo Mosantu atatoli, ya motuya koleka mpo na biso ezali ete Yesu azali Klisto, Mwana ya Nzambe na bomoi. Mobikisi alaki, Ntango Molendisi akoya, oyo nakotinda kati na bino uta na Tata, Ye Molimo na solo, oyo euti na Tata, akotatola mpo na ngai.”9

Bambula eleki, nazwaki libiangi na telefone uta na mama moko atungisamaki. Ayebisaki ngai ete mwana na ye ya mwasi akendaki mosika ya ndako. Ayokaki uta na mwa nsango moke oyo azalaki na yango ya mwana na ye ya mwasi ete likambo moko ezalaki mabe mpenza. Asengaki ngai nasalisa.

Nayebaki nani azalaki moteyi na libota ya mwana na ye ya mwasi. Okoki koloba na kombo wana ete ezalaki kala mingi. Nabengaki ye. Azalaki elenge. Kasi ayebisaki ngai ete ye na moninga na ye bango mibale balamukaki na butu na motungisi kaka te mpo na mwana ya mwasi kasi na bofuli ete ye alingi kozwa bikateli oyo ekomemela ye mawa mpe mpasi. Kaka na bofuli ya Molimo wana, bakendaki kotala ye.

Na ebandeli, alingaki te koyebisa bango na ntina ya likambo na ye. Babondelaki ye ayambola mpe apona nzela Nkolo azalaki na yango mpo na ye. Ye amonaki nsima, nakanisi na nzela ya Molimo, ete nzela se moko bakokaki koyeba oyo bayebaki na ntina na ye ezalaki uta na Nzambe. Mama moko apesaki mitungisi na ye ya bolingo epai ya Tata ya Lola mpe Mobikisi. Molimo Mosantu atindamaki na bateyi ya libota oyo pamba te bazalaki na bolingi ya kosalela Nkolo. Balandaki toli mpe elaka ezwami kati na Malongi mpe Mayokani:

“Tika nsopo na yo nionso etonda na bolingani epai ya bango banso, mpe epai ndako ya bondimi, mpe bolamu ekembisa makanisi na ye ntango inso, nde bondimami na yo ekokoma makasi na miso ya Nzambe; mpe malongi ya bonganganzambe ekosopana likolo na molimo na bino lokola matanga uta na lola.

“Molimo Mosantu akozala moninga na yo ya ntango nyonso, mpe lingenda na yo lingenda ya bokonzi oyo ebongwanaka te ya bosembo mpe ya bosolo; mpe bokonzi na yo ekozala bokonzi ya seko, mpe kozanga nzela ya makasi ekosopana epai na yo libela na libela.”10

Natatoli ete Nkolo abatelaka elaka na Ye. Molimo Mosantu ezali kotindama na bandimi ya mayokani ya sembo ya Eklezia ya Yesu Klisto. SIkoyo, makambo oyo okutanaki na yango ekozala ya kokesana, mpe Molimo akokamba na nzela oyo malamu mingi na bondimi mpe makoki na yo ya kozwa emoniseli mpo na yo mpe mpo na baoyo olingaka mpe osalelaka. Nasambeli na motema na ngai mobimba ete elikya na bino ekokola.

Napesi litatoli na ngai ete Nzambe Tata azali na bomoi. Ye alingi biso. Ayokaka nsambo na yo mokomoko. Yesu Klisto asambelaki epai ya Tata atinda Molimo Mosantu kokamba, kobondisa, mpe kotatola bosolo epai na biso. Tata mpe Mwana na Ye ya Bolingo babimelaki Joseph Smith na zamba ya banzete. Profeta Joseph Smith abongolaki Buku ya Mormon na likabo mpe nguya ya Nzambe.

Bamemi nsango ya lola bazongisaki bafungola ya bonganganzambe. Mokambi Russell M. Nelson azali profeta ya Nzambe mpo na mokili mobimba.

Lokola nzeneneke ya Yesu Klisto, nayebi ete Ye azali na bomoi mpe akambaka Eklezia na Ye. Bino na ngai tozali na libaku ya kozwa Molimo Mosantu lokola moninga na biso ya ntango nyonso mpe kozala na babosolo oyo endimisami ntango tomikundoli mpe tolingi Mobikisi, toyamboli, mpe tosengi bolingo na Ye ezala na kati ya mitema na biso. Nasambeli ete tokoka kozwa lipamboli oyo mpe kimoninga ya Molimo Mosantu lelo mpe mokolo nyonso ya bomoi na biso. Nalingi bino. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.