Likita Linene
Komona Libota na Nzambe na Nzela ya Kitalatala na Bomoni ya Lisanga
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2023


Komona Libota na Nzambe na Nzela ya Kitalatala na Bomoni ya Lisanga

Nandimi ete tokoki, na nzela ya miso ya bondimi, kobenda sima mpe kotala bisomoko mpe mabota na biso na elikya mpe esengo.

Ntango mwana na biso ya mwasi ya suka, Berkeley, azalaki moke mpenza, nabandaki kosalela ba―lunettes ya kotangela ya lolenge ya koyeisa monene mpe kokomisa nyonso polele makasi. Mokolo moko, ntango tofandaki elongo kotangaka buku moko, natalaki ye na bolingo kasi na lisusu na mawa mpo ete, na mbala moko, amonanaki lokola akolaki makasi. Nakanisaki, “Epai wapi ntango elekaki? Akoli makasi!”

Na kolongolaka ba lunettes na ngai mpo na kopangusa mua mayi ya miso, Nayaki komona, “O zela—akoli makasi koleka te; ezali kaka ba lunettes! Komitungisa te.”

Mingimingi nyonso tokoki komona, ezali bomoni oyo ya pembeni mpe ya monene ya baoyo biso tolingaka. Na pokwa ya lelo, nabengisi bino bobenda bilili ya sima na bino na balunettes ekeseni—kitalatala ya libela oyo esangisi bomoni nyonso, lisituale na bino mobimba.

Na ebandeli ya bokei bato na likolo, ba fize oyo ezangi bato ezalaki na ezibeli te. Kasi ntango ya misio ya Apollo 8 na sanza, ba astronote bazalaki na moko. Ntango bazalaki kotepatepa na likolo, bango basimbamaki na bomoni ya makasi ya mabele na biso mpe bazuaki bilili oyo ya kokamuisa, oyo esimbaki makanisi ya mokili mobimba! Ba astronote yango bayokaki liyoki moko ya makasi oyo ezuaki nkombo na yango moko: bomoni ya nyonso.

Elilingi
Mabele lolenge emonani uta likolo.

NASA

Lolenge ya koyamba bomoni ya sika ebongoli nyonso. Mobembuki moko ya likolo alobaki yango “ekitisi biloko na molayi oyo okanisi ezali malamu. … Tokoki kosala oyo. Kimia na mabele—likambo ezali te. Epesaka na bato lolenge oyo ya bokasi … lolenge oyo ya nguya.”1

Lokola bato, tozalaka na makanisi ya mokili, kasi Nzambe amonaka na lolenge ya emoneli monene ya mokili. Amonaka bikelamo nyonso, biso nyonso, mpe atondisami na elikya.

Ekoki na biso kobanda komona lokola Nzambe azali komona kutu ntango tofandi na likolo ya mokili yango—koyoka liyoki ya bomoni yango? Nandimi ete tokoki, na nzela ya miso ya bondimi, kobenda sima mpe kotala bisomoko mpe mabota na biso na elikya mpe esengo.

Makomi endimi. Moroni alobi na ntina ya baye oyo bondimi ezalaki “makasi koleka” ete bango “na bosolo koleka bamonaki … na miso ya bondimi, mpe bazalaki na bosepeli.”2

Elongo na miso etalisami epai ya Mobikisi, bango bayokaki esengo mpe bayebaki bosolo oyo: Mpo na ntina na Klisto, nyonso ezali malamu. Makambo nyonso yo mpe bino mpe bino bozali komitungisa na oyo etali yango—nyonso ekobonga Malamu! Mpe baye nyonso baluki na liso ya bondimi bakoki koyoka ete nyonso ekobonga malamu sikawa

Nalekaki eleko moko ya pasi na mobu ya suka ya eteyelo ya bilenge, ntango nazalaki kopona malamu te. Namikundoli komonaka mama na ngai kolelaka mpe komitungisaka soki nayokisi ye pasi. Na ntango, namitungisaki ete mayi ya miso na ye elakisaki ye abungisaki elikya mpo na ngai, mpe soki ayokaki te elikya mpo na ngai, ntango mosusu bozongi sima emonani ezalaki te.

Kasi tata na ngai azalaki mingi kotala na sima na bobendi mpe asalaki na bomoni ya mosika. Ayekolaki uta na mayele ete komitungisa eyokanaka mingi lokola bolingo, kasi ezali lolenge moko te.3 Asalelaki liso ya bondimi mpo na komona makambo nyonso ekotambola malamu, mpe bomoni na ye ya elikya ebongolaki ngai.

Ntango nazuaki diplome ya sekondere mpe nakendaki na BYU, tata na ngai atindaki mikanda, kokundolisa ngai na oyo nazalaki. Akomaki mokambi na ngai ya malamu, mpe moto nyonso asengeli na mokambi ya malamu—moto oyo azali koyebisa yo, “Ozali kokima mbangu mpenza te; oyo azali na bolingo nyonso kokundolisa yo ete yo okoki.

Tata azalaki ndakisa ya ndoto ya Lehi. Lokola Lehi ye ayebaki ete yo esengelaki te kolanda balingami na yo oyo bamiyokaki ya kobunga. “Otikali esika ozali mpe obengi bango. Okeyi na nzete , otikali na nzete, obandi kolia mbuma mpe, elongo na koseka na elongi na yo, okobi kobenga baoyo yo olingaka mpe olakisi bango na ndakisa ete koliaka mbuma ezali eloko ya esengo!”4

Elilingi oyo ya bomoni esungaki ngai ntango nazalaki na bantango ya mpasi ntango nazalaki ngai moko na nzete, koliaka mbuma mpe kolelaka mpo ete nazalaki komitungisa; mpe solo, lolenge nini yango ekoki kosunga? Na esika na yango, tika opona elikya—elikya na Mokeli na biso mpe na moko mosusu, oyo atondisi makoki na biso ya kozala malamu mingi koleka oyo tozali sikawa.

Moke sima ya liwa ya Mpaka Neal A. Maxwell, mopanzi nsango moko atunaki mwana na ye ya mobali nini ezalaki kozanga ye mingi koleka. Ye alobaki kolia na ndako ya baboti na ye, mpo ete azalaki ntango nyonso kokende na liyoki lokola tata na ye andimelaka ye.

Yango ezalaki ntango bana na biso bakoli babandaki koya na ndako mpo na kolia mokolo ya Eyenga na balongani na bango. Katikati ya poso nalukaki ngai moko kosala molongo na makanisi na ngai ya biloko nakokaki kokundolisa bango na Eyenga, lokola “Ntango mosusu komeka kosunga mingi na bana ntango ozali na ndako” to “Kobosana te kozala moyoki moko ya malamu.”

Ntango natangaki maloba ya ndeko Mobali Maxwell, nabuakaki milongo mpe nafandisaki kimia mongongo ya kotiola, boye ntango namonaki bana na ngai bakoli mpo na mua ntango mokuse ya poso nyonso, natiaki makanisi na makambo ebele ya malamu oyo bango basalaki yambo. Ntango mwana na biso ya mokolo makasi, Ryan, akufaki mibu mike sima, nakundolaki kozala na botondi mpo na ntango na biso elongo ezalaki esengo mpe malamu mingi koleka.

Yambo ya kosolola na moto olingaka, tokoki komituna biso moko motuna “Oyo nalingi kosala to koloba ekosunga to ekoyokisa pasi?” Maloba na biso ezali moko ya banguya na biso ya makasi, mpe mabota na biso ezali lokola etando ya mosuni, kotelemaka liboso na biso kolobaka, “Koma oyo okanisi mpo na ngai!” Bansango oyo, atako ezali na ntina to na ntina te, esengelaki ezala ya elikya mpenza mpe bolendisi makasi.5

Mosala na biso ezali te ya koteya bato moko oyo bazali kolekisa ntango ya mpasi ete bazali mabe to kolembisa nzoto. Na mua mabaku emonani mingi te tokoki komiyoka kobendama na kobongisa, kasi mingimingi tika toyebisa balingami na biso na ndenge elobami mpe elobami te maloba bakoyoka ntango molayi: “Libota na biso emiyokaka ya mobimba mpe ya kokoka mpo ete yo ozali na kati na yango.” “Okolingama libela na libela—atako oyo ekoya.”

Bantango mosusu oyo tosengeli na yango ezali koyokela mawa koleka kopesa toli; koyokaka mingi na esika ya kotanga; moto oyo ayoki mpe amitungisi, “Lolenge nini nakoki komiyoka mpo na koloba oyo bauti koloba sikawa?”

Kundola ete, mabota ezali labo moko epesami na Nzambe epai wapi tokoyeba makambo, na lolenge ete libaku mabe mpe bambeba ya bomoni ezali kaka kosalema te kasi ekosalemaka mingimingi. Mpe ekokaki kozala ntina ete na nsuka ya bomoi na biso, tokoka komona ete kiboninga wana, kutu bangonga wana ya bampasi, ezalaki biloko oyo esungaki biso kokoma mingi lokola Mobikisi? Bokutani moko na moko ya pasi ezali libaku ya koyekola lolenge nini kolinga na bozindopenza—na lolenge ya Nzambe.6

Tika totalela bokangani na biso ya mabota mpo na komona yango lokola nguya malamu mpo na koteya biso mateya oyo toyei koyekola awa ntango tozongaka epai ya Mobikisi.

Tika tondima, na mokili oyo ebebi, nzela ezali te ya kozala molongani, moboti, mwana ya mobali to ya mwasi, koko moko, motambuisi, to moninga malamu—kasi ezali na ndenge ebele ya kozala moko malamu.7 Tika totikala pembeni ya nzete tozua bolingo ya Nzambe mpe tokabola yango. Na kotombolaka bato bazali nzinganzinga na biso, tozali komitombola elongo.

Na mawa mingi mpenza, likanisi ya kolia mbuma ezali ya kokoka te; tosengeli kozua lisusu mpe lisusu na lolenge tokoka kotia na nzela ntina mpe limoni na biso ya oyo ekoya mpe kokangisa biso na bomoni ya lola na kofungolaka makomi, oyo etondi na pole, kobengana mosika molili; kotikalaka ya kofukama kino libondeli na biso ya pete ekoma ya nguya mpenza. Na ntango yango nde mitema elembaka, mpe tobandi komona lokola Nzambe amonaka.

Na mikolo oyo ya suka, ntango mosusu mosala na biso monene koleka ekozala elongo na balingani na biso—bato malamu oyo bafandi na mokili ya botau. Elikia na biso ebongoli lolenge bango basalaka bangomoko mpe nani bango bazali mpenza. Mpe na nzela ya kitalatala wana ya bolingo bakomona nani bango bakokoma.

Kasi ezali na monguna moko oyo alingi te ete biso to balingami na biso tozonga na ndako elongo. Mpe mpo ete tozali na mokili ekatami ndelo ya ntango mpe motango ya mibu,7 ameki kondimisa liyoki moko ya bobangi mpenza kati na biso. Ezali mpasi komona, ntango tosali bobendi ya liboso, ete nzela na biso ezalaka na ntina koleka lombango.

Kundola , “Soki olingi kokende mbango, kende yomoko. Kasi soki olingi okende mosika, kende na bato.”9 Na botondi monene, Nzambe oyo tosanjolaka akangami te na ntango. Ye amoni banani balingami na biso bazali mpenza mpe banani biso tozali mpenza.10 Na bongo azali na motema kokita mpo na biso, kolikyaka ete tokozala motema kokita bamoko na basusu.

Nakondimaka ete ezali na ngonga ntango mabele, ndako na biso ya ntango, ekozala lokola mabele kati na mbu ya mawa—bangonga ntango nazali na liso moko ya bondimi mpe lisusu mosusu ezali kolela.11 Oyebi liyoki wana?”

Nayokaki yango Mokolo ya mibale.

Ekoki biso na esika na yango kopona etelemeli ya boyengebene ya profeta na biso ntango alaki bikamua kati na mabota na biso? Soki tosali bongo, bosepeli na biso ekobakisama atako mobulu ebakisami. Ye alaki ete bomoni ya lisanga ekoki koyokama sikawa, atako mabaku nini.12

Kozalaka na liso wana ya bondimi sikawa ezali kozua, to kosala makelele, ya bondimi tozalaki na yango yambo toya na mokili oyo. Yango emonan koleka bobangi ya mua ntango, oyo epesi biso nzela ya “kosala na esengo nyonso oyo ezali na nguya na biso; mpe boye … totikali kimia.”13

Ezali na eloko moko ya pasi na bomoi na yo na ngonga oyo, eloko moko ozali kobanga okoka kosilisama te? Na bozangi liso ya bondimi, tokoki komona ete Nzambe abungisi botambuisi ya makambo, mpe yango ezali ya solo?

To ntango mosusu bobangi na yo monene ezali kolekisa eleko oyo ya pasi yo moko, kasi yango elakisi ete Nzambe asundoli yo, mpe yango ezali ya solo?

Yango ezali litatoli na ngai ete, Mobikisi azali na likoki, na nzela ya Bomikabi na Ye, kobongola ndoto mabe na yo nyonso ozali kolekisa ekoma lipamboli. Ye apesi biso elaka “na nzela ya liyokani oyo ebukani te” ete soki tobundi kolinga Ye mpe kolanda Ye, “makambo nyoso oyo [biso] toniokuamaki esengeli esala elongo mpo na [ya biso] bolamu.”14 Makambo nyonso.

Mpe mpo ete tozali bana ya mayokani, tokoki kosenga liyoki oyo ya elikya mpenza sikawa!

Ntango tozali na mabota moko ebongie nie, tokoki kobongisa bolingo na biso na basusu kino ekokoma bolingo ya ntango nyonso, ebonguanaka te, atako-nini eyei, lolenge ya bolingo—lolenge ya bolingo oyo endimaka mbonguana mpe epesi nzela ya bokoli mpe bozongi.

Yango ezali mosala ya Mobikisi ya komema balingami na biso kozonga. Oyo ezali ya Ye mosala mpe ya Ye ntango. Yango ezali ya bisomosala kopesa elikya mpe motema mpo ete bango bakoka kozonga na ndako na bango. “Tozali na nguya te [ya Nzambe] ya kokatela etumbu to nguya na Ye ya kosikola, kasi topesamaki nguya ya kosalela bolingo na Ye.”15 Mokambi Nelson ateyaki lisusu ete basusu basengeli na bolingo na biso mingi koleka bosambisi na biso. “Bazali na mposa ya koyoka bolingo ya solo ya Yesu Klisto oyo elakisami kati na [ya biso] maloba mpe misala na biso.”16

Bolingo ezali eloko oyo ebongoli mitema. Yango ezali ntina na petwa ekoki kozala, mpe basusu bakoki koyoka yango. Tika tokangama na maloba oyo ya profeta epesamaki mibu 50 eleki: “Ndako moko te ezali ya kokueya soki basundoli bomeki na bango te.”17 Ezali ya solo, ete baye balingi mingi mpe molai balongaka!

Na mabota ya mabele, tosalaka oyo Nzambe asalaki na biso—na kolakisa nzela mpe kolikyaka ete balingami na biso bakokende na nzela yango, na koyebaka ete ezali bango nde bakopona nzela nini bakolanda.

Mpe ntango bakoleka na ngambo mosusu ya elemba mpe bapusani na bobendi ya bolingo ya libota moko ya lola,18 Nandimi yango ekozala lokola eyebama mpo na lolenge bango balingamaki awa.

Tika biso tosalela emoneli wana ya mosika mpe tomona bato oyo tolingaka mpe na baoyo tobikaka elongo lokola baninga na mokili na biso ya kitoko.

Yo na ngai? Tokoki kosala oyo! Tokoki kosimba mpe kolikya! Tokoki kokende na nzete mpe kozua mbuma na koseka na elongi na biso, mpe kotika Pole ya Klisto na miso na biso ekoma eloko moko bango bakoki kotiela motema na bangonga na bango ya molili koleka. Ntango bakomona pole kobima na bilongi na biso, bango bakobendama na yango. Tokoki kosunga bango bazongisa makanisi na bango likolo ya liziba ya solo ya bolingo mpe ya pole, “monzoto na ntongo,” Yesu Klisto.19

Napesi litatoli na ngai ete oyo—nyonso ya oyo—ekoleka malamu mingi koleka oyo yo na ngai tokokaki kokanisa! Elongo na liso ya bondimi na Yesu Klisto, tokoka komona ete nyonso ekozala malamu na nsuka, mpe koyoka ete yango ekozala malamu sikawa Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Anousheh Ansari, in “The Overview Effect and Other Musings on Earth and Humanity, According to Space Travelers,” cocre.co.

  2. Etele 12:19; nsete ebetami.

  3. Tala Jody Moore, “How to Say Hard Things,” Better than Happy (podcast), Sept. 18, 2020, episode 270.

  4. Ronald E. Bartholomew, used with permission; tala lisusu 1 Nefi 8:10; 11:21–22.

  5. Tala James D. MacArthur, “The Functional Family,” Marriage and Families, vol. 16 (2005), 14.

  6. Yango ekokisami ntango biso “tosambeli Tata na bokasi bonso ya motema, ete [biso] tokoka kotondisama na bolingo oyo” (Moroni 7:48).

  7. Maloba ya nsango epesami na Jill Churchill.

  8. Tala Richard Eyre, Life Before Life: Origins of the Soul … Knowing Where You Came From and Who You Really Are (2000), 107.

  9. Lisese ya Bonkoko.

  10. Tala Malongi mpe Mayokani 93:24, 26

  11. Tala Robert Frost, “Birches,” in Mountain Interval (1916), 39.

  12. Tala Russell M. Nelson, “Joy and Spiritual Survival,” LiahonaNov. 2016, 81–84; tala lisusu Russell M. Nelson, “Let God Prevail,” Liahona, Nov. 2020, 92–95.

  13. Malongi mpe Mayokani 123:17.

  14. Malongi mpe Mayokani 98:3; nsete ebetamaki.

  15. Wayne E. Brickey, Inviting Him In: How the Atonement Can Change Your Family (2003), 144.

  16. Tala Russell M. Nelson, “Peacemakers Needed,” Liahona, May 2023, 100.

  17. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Harold B. Lee (2000), 134.

  18. Tala Paul E. Koelliker, “He Truly Loves Us,” Liahona, Sanza ya mitano 2012, 18.

  19. Emoniseli 22:16.