Likita Linene
Tozali na Mposa ya Bapesi Kimia
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Tozali na Mposa ya Bapesi Kimia

Ozali na bonsomi na yo ya kosala mpo na kopona boweli to boyokani . Nasengi yo na lombangu opona kozala mopesi kimia, sikawa mpe ntango nyonso.

Bandeko balingami, ezali esengo kozala na bino. Na basanza motoba oyo eleki, bozalaki na makanisi na ngai mpe kati ya nsambo na ngai. Nasambeli ete Molimo Mosantu akoyebisa maye Nkolo alingi bino boyoka ntango nazali kolobela bino sikawa.

Na eleko ya stage na ngai mpo na lipaso mibu mingi kala, nasungaki monganga ya lipaso oyo azalaki kokata lokolo moko etonda na pota etonda mikolobe. Lipaso ezalaki mpasi. Nsima, mpo na kobakisa tansio, moko ya ekipi asalaki mosala na lolenge ya mabe mpe monganga ya lipaso azwaki nkanda na mbalakaka. Na katikati ya nkanda na ye, abwakaki mbeli na ye ya lipaso etonda mikolobe. Ekweyaki na ya ngai eteni ya loboko ya likolo!

Moto nyonso kati na kisuku ya lopaso—longola se monganga ya lipaso oyo abungaki moto—abangisamaki na lolenge ya likama ya esaleli lipaso. Matondi, nazwaki mikolobe te. Kasi likambo oyo etikaki makanisi ya kobosana te epai na ngai. Na ngonga wana mpenza, namilakaki ete atako nini esalamaki kati na ya ngai kisuku ya lipaso, ngai mokolo moko te nakobungisa moto ya mayoki na ngai. Nalapaki ndai lisusu ete mokolo moko te nakobwaka eloko moko na nkanda—ezala mbeli ya lipaso to maloba.

Kutu sikawa, bazomi ya mibu nsima namitunaka soki mbeli ya lipaso ya mikolobe ekweyaki na loboko na ngai ezalaki na ngenge mingi koleka boweli ya ngenge oyo oyingelaka lisolo na biso ya bomoto na biso mpe bondeko ya moto se moko mingi mpenza lelo. Bomoto mpe boboto emonanaka lokola ebunga na eleko oyo ya bozangi boyokani ya bokabwani mpe makasi.

Motabano, koluka mabungi, mpe koloba mabe ya basusu ezali nyonso ya momesano mpenza. Banganga mayele, bato ya politiki, bato ya ntoki, mpe bayebani mosusu bazali kobwaka mafinga mbala na mbala. Nazali komitungisa mingi ete bato mingi mpenza bazali komonana lokola kokanisa ete ezali malamu mpenza kokweisa, kotonga, mpe koyina moko kani oyo azali kondima bango te. Mingi bazali komonana lokola motema moto moto kobebisa lokumu ya moto mosusu na mafinga ya mawa mpe mabe!

Nkanda endimisaka te. Koyinana etongaka moko te. koswana mokolo moko te ekambaka na nsuka efulama. Na mawa, ntango mususu tomonaka ezaleli ya koswana kutu kati na milongo na biso. Toyokaka baoyo bakitisaka balongani mpe basi na bango, oyo basalelaka nkanda makasi mpo na kokonza basusu,mpe baoyo bapesaka etumbu na bato ya libota na “koboya kolobisa.” Toyokaka bilenge mpe bana oyo banyokolaka mpe bato ya mosala oyo babebisaka lokumu ya baninga ya mosala.

Bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, oyo esengeli kozala te. Lokola bayekoli ya Yesu Klistu, tosengeli kozala ndakisa ya lolenge nini kosolola na basusu—mingimingi ntango tozali na bokeseni ya makanisi. Moko ya ndenge ya pete mpo na komona molandi ya solo ya Yesu Klisto ezali lolenge nini moto wana azali koyokela mawa ya bato mosusu.

Mobikisi alobaki yango polele na esakola na Ye likolo ya ngomba epayi ya balandi na bangambo nyonso mibale. “Bapambolami ezali baoyo batiaka kimia,” Elobaki Ye.1 “Moto nyonso oyo akobete yo na litama lya mobali, balula na ye litama lisusu.”2 Mpe nsima, ya solo, Apesaki liteya oyo etali moko na biso na biso, “Bolinga banguna na bino, bopambola bango oyo batuki bino, bosalela bango bolamu baoyo bayini bino, mpe bosambela mpo na bango baoyo bazali kosala bino mabe, mpe banyokoli bino.”3

Liboso ya liwa na Ye, Mobikisi atindaki Bapostolo na Ye Zomi na mibale balingana bango na bango lokola ngai nalingi bino.”4 Nsima Abakisaki, “Na eye nde bato banso bakoyeba ete bozali bayekoli ba ngai, soki bolingani moko mpe mosusu.”5

Etinda ya Mobikisi ezali polele: Bayekoli ya solo ya Ye batokaka, batombolaka, bapesaka makasi, bandimisaka, mpe bafulaka—likambo te lolenge nini mpasi likambo ezali. Bayekoli ya solo ya Yesu Klisto bazali bapesi kimia.6

Lelo Ezali Eyenga ya Mandalala. Tozali komilengela mpo na komikundola likambo eluti makambo minene manso mpeza naino esalama na mabele te, oyo ezali Bomikabi mpe Bosikoli ya Nkolo Yesu Klisto. Moko ya banzela malamu koleka mpenza tokoki kopesela lokumu na Mobikisi ezali kokoma bapesi kimia.7

Bosikoli ya Mobikisi epesaki biso ndingisa tolonga mabe nyonso—mpe na boweli. Kosala libunga moko te etali yango: boweli ezali mabe! Yesu Klisto alobaki ete baoyo bazali na “molimo ya boweli” bazali ya Ye te, kasi bazali “ya zabulu, oyo azali tata ya boweli, mpe [zabulu] alamusaka mitema ya bato na boweli na nkanda, bango na bango.”8 Baoyo baleisaka boweli bazali kosala likambo se moko Satana asalaki, ata soki bazali kososola yango to te. “Moto moko te akoki kosalela balakisi mibale.”9 Tokoki te kosunga Satana na bitumba na biso ya maloba mpe kokanisa ete tokoki kokoba kosalela Nzambe.

Bandeko balingami na ngai mibali mpe basi, lolenge tosalanaka moko na mosusu ezali solo motuya. Lolenge oyo tolobelanaka mpe etali bassusu na ndako, na eklezia, na mosala, mpe na nzela ya singa ezali solo motuya. Lelo, nazali kosenga biso tosolola na basusu na lolenge moko ya likolo, esantu. Tosengi boyoka na bokebi. “Soki ezali na eloko ya malamu, to ya kitoko to ya lisolo malamu to ya lokumu,.”10 oyo tokoki koloba etali moto mosusu—ata soki liboso na ye na nsima ya mokongo na ye—yango esengeli kozala yabiso mibeko ya kosolula.

Soki babalani na palwasi na bino bakabwani, to elenge misionele azongi ndako noki, to elenge na mibu bazomi ezali kotia ntembe na litatoli na ye, bazali na mposa ya bosambisi na bino te. Bazali na mposa ya koyoka bolingo ya Yesu Klisto oyo elakisami kati na maloba mpe misala na bino.

Soki moninga moko ya media ya bato nyonso azali na emoneli ya politiki to ya bato makasi oyo ezali kobuka makambo nyonso bondimelaka, eyano ya nkanda ya mbeli mbeli na yo ekosalisa te. Kotonga bagwagwa ya kososola ekosenga yo mingi mpenza, kasi wana ezali mpenza maye baninga na bino basengeli na yango.

Boweli ebenganaka Molimo—ngonga nyonso. Boweli elendisaka lisusu likanisi ya lokuta ete kondongwana ezali nzela ya kosilisa babokeseni; kasi ezali mokolo moko te. Boweli ezali liponi. Kopesa kimia ezali liponi. Ozali na bonsomi na yo ya kosala mpo na kopona boweli to boyokani . Nasengi yo opona kozala mopesi kimia, sikawa mpe ntango nyonso.11

Bandeko, tokoki mpenza kobongwanisa mokili—moto moko mpe lisolo moko na ngonga moko. Lolenge nini? Na kolakisaka lolenge nini kosala bokeseni ya bosembo ya likanisi na limemia ya kimoninga mpe lisolo ya kolongobana.

Bokeseni ya likanisi ezali eteni ya bomoi. Nasalaka mikolo nyonso na basali ya komipesa ya Nkolo oyo bamonaka te ntango nyonso likambo lolenge moko. Bayebi nalingaka koyoka makanisi mpe mayoki ya bosembo na bango etali makambo nyonso tosololaka—mingi mingi makambo ya mpasi.

Elilingi
Mokambi Dallin H. Oaks mpe Mokambi Henry B. Eyring

Bapesi toli na ya lokumu mibale, Mokambi Dallin H. Oaks mpe Mokambi Henry B.Eyring, bazali ndakisa na lolenge balobaka mayoki na bango—mingi mingi ntango ekoki kokesana. Basalaka yango na bolingo ya peto mpo na moko mpe mosusu. Moko te na bango akanisaka ete ayebi malamu mpenza kasi asengeli na bokasi kobatela likanisi na ye. Moko te alakisaka ete alingi kotelemela mosusu. Mpo ete moko na moko atondisami na bolingani, “bolingo ya peto ya Klisto,”12 boyokani na biso ekoki kokambama na Molimo ya Nkolo. Boniboni nalingaka mpe nakumisaka bato minene mibale oyo.

Bolingani ezali ngenge ya boweli. Bolingani ezali likabo ya molimo oyo esalisaka biso tobwaka moto ya nyama, oyo azali moyimi, komibatela, lofundo, mpe zuwa. Bolingani ezali ezaleli ya liboso ya molandi ya solo ya Yesu Klisto13 Bolingani elimbolaka mopesi kimia.

Ntango tomikitsi libso ya Nzambe mpe tosambeli na bokasi nyonso ya mitema na biso, Nzambe akopesa biso bolingani.14

Baye bapambolami na likabo ya lola oyo bazali motema molayi mpe boboto. Balulaka basusu te mpe bakangami kati na motuya ya bango moko te. Batumbolami na pete te mpe bakanisaka mabe ya basusu te.15

Bandeko, bolingo peto ya Klisto ezali eyano na boweli oyo etungisaka biso lelo. Bolingani etindikaka biso “tomema mikumba ya moko na mosusu”16 esika ete bokomisa mpasi mikumba likolo ya moko na mosusu. Bolingo ya peto ya Klisto epesaka biso nzela “totelema lokola banzeneneke ya Nzambe na ntango nyonso mpe na makambo nyonso mpe na bisika nyonso”17mingi mingi na makambo ya mawa. Bolingani epesaka biso nzela ya kolakisa lolenge nini mibali mpe basi ya Klisto balobaka mpe basalaka—mingimingi ntango bazali kobundisama.

Sikawa, nazali te kolobela etali “kimia ata na talo nini.”18 Nazali kolobela etali kosalela basusu na ndenge oyo ekokani na kobatelaka mayokani osalaka ntango oliaka elambo. Tosalaki boyokoni ya ntango nyonso komikundola Mobikisi. Na makambo oyo ozingami mpe etondisami makasi na boweli, nabengisi bino bomikundola Yesu Klisto. bosambela mpo na kozala na makasi mpe bwanya ya koloba to kosala maye Ye alingaki kosala. Ntango tolandi Nkumu ya Kimia, tokokoma bapesi kimia na Ye.

Na esika oyo bokoki kokanisa ete etinda oyo ekosalisa solo moto moko boyebi. Ntango mosusu bozali kolikya ete ekosalisa ye azala malamu koleka epai na bino. Nalikii ekosalema! Kasi nalikii lisusu ete bokotala na mozindo kati na ya bino motema mpo na komona soki ezali na biteni ya lofundo to zuwa oyo ezali kopekisa bino uta na kokoma mopesi kimia.19

Soki ozali lokengo na oyo etali kosalisa kosangisa Yisalaele mpe kotonga bondeko oyo ekowumela kati na boseko, sikawa ezali ngonga ya kotia pembeni bololo. Sikawa ezali ngonga ya kotika kobeta nsete ete ezali nzela na yo to te. Sikawa ezali ngonga ya kotika kosala makambo oyo esalaka basusu baloba to basala makambo na bokebi mpo na kobanga kotombokisa yo. Sikawa ezali ngonga ya kokunda manduki na yo ya bitumba.20 Soki bibundeli na yo ya maloba etondisami na mafinga mpe bofundi, sikawa ezali ngonga ya kotia yango pembeni.21 Okotelema lokola mobali to mwasi ya makasi ya Klisto na molimo.

Templo ekoki kosalisa biso kati na boluki na biso. Kuna tolatisami na nguya ya Nzambe, kopesaka biso makoki ya kolonga Satana, mobandisi ya nyonso boweli.22 Bimisa ye libanda ya bondeko na bino. Boyeba ete togangelaka monguna ngonga nyonso tobongisaka bozangi boyokani to toboyaka kotuka. Na esika wana, tokoki kolakisa boboto ya mawa oyo ezali ezaleli ya bayekoli ya solo ya yesu Klisto. Bapesi kimia batelemelaka monguna.

Tika biso lokola bato moko tokoma pole ya solo etiami likolo ya ngomba—pole oyo “ekoki kobombama te.”23 Tika biso tolakisa ete ezali nzela ya kimia, ya limemia mpo na kosilisa makambo ya mindondo mpe nzela engengisama mpo na kosilasa bozangi koyokana. Ntango bozali kolakisa bolingani oyo balandi ya solo ya Yesu Klisto balakisaka, nkolo akokomisa monene makasi na bino koleka makanisi na bino ya likolo mpenza.

Moniama ya nsango malamu ezali monyama eleki monene mpenza kati na mokili. Nzambe abengisi banso baya epai na Ye, “moindo mpe mpembe, mokangemi mpe monsomi, mobali mpe mwasi.”24 Ezali na esika mpo na moto nyonso Nzokande, ezali na esika moko te mpo na bobe, bokweyisi, to boweli ya lolenge kani.

Bandeko balingami, ya malamu mpenza etikali mpo na koya mpo baoyo balekisa bomoi na bango kotongaka ya basusu. Lelo nabengisi bino bososola kimoyekoli na bino kati na makambo ya lolenge bozwaka bobatelaka basusu. Napamboli bino mpo na kosala mbongwana kani oyo ekoki kosengelama mpo ete ezaleli na bino ezala ya kopesa lokumu, ya limemia, mpe ya bantoma ya balandi ya solo ya Yesu Klisto.

Napamboli bino botia bitumba na kobondela, boyinani na boyokani, mpe boweli na kimia.

Nzambe azali na bomoi! Yesu azali Klisto. Ye atelemi na moto ya Eklezia oyo. Tozali basali na Ye. Akosalisa biso tokoma bapesi kimia na Ye. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.