Likita Linene
Ntango Okozwa Lipamboli na Yo ya Bonkoko
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Ntango Okozwa Lipamboli na Yo ya Bonkoko

Ntango ozwi lipamboli na yo ya bonkoko, okomona mpe koyoka lolenge nini Tata na Lola mpe Yesu Klisto Balingaka yo mpe lolenge nini Batalelaka yo yo moko.

Lobi moninga na ngai Mpaka Randall K. Bennett alobelaki maye matali mapamboli ya bonkoko. Ezalaki nsango monene mpe efulaki biso nyonso. Bandeko balingami na ngai, nakoki kolobela maye matali mapamboli ya bonkoko? Bankoko, lokola bonsenga ya mapamboli ya bonkoko ekoki kobakisama, nabondeli ete Nkolo apambola bino wana ezali bino kokoba kokumisa mabiangi na bino.

Ntango nakendaka na makita ya likonzi, natalaka mbala mingi nkoko ya likonzi mpe mwasi na ye. Bankoko bazalaka boboto, botosi mpe bakambi ya mpiko babiangami na Nzambe. Bayebisaka ngai makambo ya molimo mingi ya kitoko bakutana na yango na bomoi. Natunaka bango mibu ya bilenge mpenza mpe mibange mpenza oyo basila kopesa bango lipamboli. Kino lelo, elenge mpenza azalaki na mibu 11 mpe hya mokolo mpenza azalaki na mibu 93.

Nazwaki lipamboli na ngai ya bonkoko lokola mondimi ya sika ya Eklezia, na mibu 19 nsima ya mibu mibale ya libatisi na ngai. Nkoko na ngai azalaki mobange ya kokamwa. Akotaki na Eklezia na 1916 mpe azalaki pionie ya Eklezia na Japon. Ezalaki lokumu na ngai ya monene mpo na kozwa lipamboli ya nkoko uta na moyekoli wana ya kokamwa ya Nkolo. Lokota na ye ya kijapone ezalaki mpasi epai na ngai mpo na kososola, kasi ezalaki na nguya.

Bankoko oyo nakutanaki na bango bayebisaki ngai ete bato mingi bazwaka mapamboli na bango ya bonkoko bobele yambo ya kosala misio. Balingami na ngai ya bilenge mibali, bilenge basi, baboti mpe baepisikopo, mapamboli ya bonkoko ezalaka bobele mpo na komilengela te mpo na kosala misio. Bandimi balongobani babatisama bakoki kozwa lipamboli na bango ya bonkoko ntango ngonga ebongi mpo na bango.1

Bandeko balingami ya mikolo, basussu kati na bino naino bazwa mapamboli ya bonkoko te. Bomikundola, yango etalaka mibu ya moto te.

Mama bokilo na ngai azalaki mondimi ya molende makasi na Eklezia, kosalaka lokola moteyi na Lingomba ya Bamama Basungi kino akufaki na mibu 90. Nayokaki mawa ya koyeba ete atikalaki kozwa lipamboli na ye ya bonkoko te. Akutanaki na makambo ya mpasi mingi na bomoi na ye, mpe lokola azalaki na nganganzambe te na ndako, azwaki mapamboli ya bonganganzambe mingi te. Lipamboli ya bonkoko ekokaki kopesa ye bolendisi ntango asengelaki na yango mpenza.

Mikolo, soki naino bosila kozwa lipamboli ya bonkoko te, nasengi bino bomitungisa te! Ntango ya molimo ya moto moko na moko ekeseni. Soki ozali na mibu 35 to 85 mpe ozali na mposa, solola na episikopo na yo maye matali kozwa lipamboli na yo.

Bandimi ya sika ya Eklezia, bosila koyoka ntina ya mapamboli ya bonkoko? Nayebaki te oyo etali libaku ya kozwa moko ntango nakotaki na Eklezia, kasi episikopo na ngai ya bolingo ayebisaki ngai oyo etali mapamboli ya bonkoko mpe alendisaki ngai namilengela mpo na kozwa ya ngai nsima ya libatisi na ngai. Bandeko na ngai bandimi ya sika, bino mpe bokoki kozwa lipamboli ya bonkoko. Nkolo akosalisa bino bomilengela mpo na libaku oyo ya bule.

Tika tokanisa bantina mibale etali lipamboli ya bonkoko.

  1. Lipamboli ya bonkoko ezalaka na toli ya moto ye moko uta na Nkolo epai na yo.2

  2. Lipamboli ya bonkoko esakolaka molongo na bino na ndako ya Yisalaele.

Lipamboli na yo ya bonkoko ezali lisusu nsango uta na Tata na yo ya Lola mpe ekozala na bilaka mpe toli efulama mpo na kokamba yo na bomoi na yo mobimba. Lipamboli ya bonkoko ekosakola te mambi manso ya bomoi na yo to koyanola mituna na yo nyonso. Soki etalisi te likambo ya motuya ya bomoi na yo, kokanisa te ete okozwa libaku wana te. Na yango, ezali na bondimisi moko te elimboli ete makambo nyonso kati ya lipamboli na yo ekosalama na bomoi oyo. Lipamboli ya bonkoko ezali ya seko, mpe soki ozali kotambola kati na bolongobani, bilaka oyo ekokisami na bomoi oyo te ekokokisama na oyo ezali koya.3

Ntango ozwi esakola ya molongo, okoya koyeba ete ozali moko ya ndako ya Yisalaele mpe nkona ya Abalayama.4 Mpo na kososola ndimbola oyo, talela bilaka Nkolo asalaki na ndako ya Yisalaele na nzela ya Abalayama.

Bilaka oyo ebakisi:

  • “Nkola na Ye ekobakisama mingi (tala Genese 17:5–6; Abraham 2:9; 3:14).

  • “Nkona na ye, to bakitani, bakozwa nsango malamu mpe bakomema bonganganzambe (tala Abraham 2:9).

  • “Na nzela ya mosala ya nkona na ye, ‘mabota nyonso ya mabele [eko] pambolama, kutu na mapamboli ya Nsango malamu, oyo ezali mapamboli ya lobiko, kutu ya bomoi ya seko’ (Abraham 2:115

Lokola bandimi ya Eklezia, tozali bana ya boyokani.6 Tozwaka mapamboli ya boyokani ya Abalayama ntango totosi mibeko mpe makuli ya nsango malamu.

Bomilengeli mpo ete lipamboli na yo ya bonkoko ekosalisa yo omatisa bondimi na yo na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto. Mpe ntango ozwi lipamboli na yo mpe otangi mpe omanyoli yango, okoki kotalelaka yango mbala na mbala.

Mokambi Thomas S. Monson alimbolaki, “Kaka Nkolo oyo apesaki Liahona mpo na Lehi akopesa yo mpe ngai lelo likabo ya momesano te mpe ya motuya mpo na kopesa boyangelii na bomoi na biso, mpo na kotia bilembo na bobateli na biso, mpe kolengela nzela, kutu esika ya bobateli—na mabele ya elaka te, kasi na ndako na biso ya lola.”7

Balingami na ngai baepisikopo, baboti, bampaka ya lisanga likoki mpe bakambi ya Mangomba ya Bamama Basungi, bakambi ya misio ya palwasi, bandeko mibali mpe basi basalisi, tosengi bolendisa bilenge mibali mpe bilenge basi wana, bandeko mikolo, mpe bandeko ya sika oyo naino bazwi lipamboli na bango ya bonkoko te mpo na koluka bokambi ya Nkolo mpe kosalisa na bolengeli bango moko basala yango.

Nasambelaka mbala mingi mpe natangaka lipamboli na ngai ya bonkoko; epesaka ngai ntango nyonso bolendisi. Nayebaka maye Nkolo azelaka mpo na ngai, mpe esungaki ngai nayambola mpe nazala na komikitisa. Ntango natangaka mpe namanyolaka yango, nalingaka kobika na bolongobani ya kozwa mapamboli elakama na yango.

Kaka lokola makomi totangaka mbala na mbala ezalaka na ndimbola ya sika epai na biso nsima, lipamboli na biso ya bonkoko ekozala na ndimbola ya kokesena epai na biso na bantango ekeseni. Ya ngai ezali na ndimbola ekeseni sikawa koleka lolenge ezalaki ntango nazalaki na mibu 30 mpe ntango nazalaki na mibu 50. Ezali te ete maloba ebongwani, kasi tomonaka yango na lolenge ekeseni.

Mokambi Dallin H. Oaks asakolaki ete lipamboli ya bonkoko “epesamaka na nse ya bofuli ya Molimo Mosantu mpe esengeli kotangama mpe kososolama na nse ya nguya Molimo se moko wana. Ndimbola mpe bososoli ya lipamboli ya bonkoko ekoteyama molongo moko nsima ya mosusu nsima ya ntango na nguya ya Molimo se moko wana efulaki [yango].”8

Bandeko mibali mpe basi, natatoli ete Tata na Lola mpe Mwana na Ye se moko ya Bolingo, Nkolo Yesu Klisto, azali na bomoi. Balingaka biso. Mapamboli ya bonkoko ezali makabo ya bule uta na Bango. Ntango ozwi lipamboli na yo ya bonkoko, okomona mpe koyoka lolenge nini Balingaka yo mpe lolenge nini Batalelaka yo bango moko.

Buku ya Mormon ezali litatoli mosusu ya Yesu Klisto. Mpe nazali na botondi ya kokambama na profeta ya bomoyi, Mokambi Russell M. Nelson.

Nazali na botondi makasi mpo na Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Eyenga oyo ya Pasika nakotalela Ye mpe Lisekwa na Ye, mpe kokumbamela Ye mpe kopesa Ye matondi mpo na libonza na Ye. Nayebi Anyokwamaki makasi mpenza mpo ete Alingaka biso koleka. Nayebi Asekwaki mpo na ntina ya bolingo na Ye mpo na biso. Azali solo. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints (Mokanda Monene: Kosalaka na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, 1.2, ChurchofJesusChrist.org.

  2. Tala “Patriarchal Blessings,” kati na True to the Faith (2004), 112.

  3. Tala “Patriarchal Blessings,” kati na True to the Faith, 113.

  4. Tala Abraham 2:10.

  5. Boyokani ya Abalayama,” kati na True to the Faith, 5.

  6. Tala 3 Nefi 20:25–26.

  7. Thomas S. Monson, “Your Patriarchal Blessing: A Liahona of Light,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1986, 65.

  8. Dallin H. Oaks, “Patriarchal Blessings,” Worldwide Leadership Training Meeting: The Patriarch, Sanza ya yambo 8, 2005, 10.