Likita Linene
Nkolo Yesu Klisto Atei Biso Tosalisa
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Nkolo Yesu Klisto Atei Biso Tosalisa

Na lisalisi ya Mobikisi na biso, tokoki kolinga bampate na Ye ya motuya mpe kosalela bango lokola Ye alingaki kosala.

Nkolo Yesu Klisto alobaki:

“Nazali mobateli mpate malamu: mobateli mpate malamu abonzaka bomoi na ye mpo na bampate. …

“Lokola Tata ayebi ngai, ngai mpe nayebi Tata: napesaka bomoi na ngai mpo na bampate.”1

Na ndimbola ya Bamwela na oyo etali likomi eye, liloba mpo na bolamu elakisi lisusu “kitoko, bonene.” Na yango, nalingi kolobela Mobateli mpate Malamu, Kitoko, Mobateli mpate Monene, kutu Yesu Klisto.

Na Boyokani na Sika, Abengami “mobateli mpate monene,”2 Mobateli mpate mokonzi,”3 mpe “Mobateli mpate mpe Episikopo ya milimo na [biso].4

Kati na Boyokani na Kala, Yisaya akomaki ete “Akoleisa bibwele na Ye lokola mobateli mpate.”5

Kati ya Buku ya Mormon, abengami “mobateli mpate malamu”6 mpe “mobateli mpate monene mpe ya solo.”7

Kati ya Malongi mpe Mayokani, Ye asakoli, “Epai nyonso, nazali kati na bino, mpe nazali mobateli mpate malamu.”8

Na eleko na biso, Mokambi Russell M. Nelson asakolaki: “Mobateli mpate Malamu alengelaka na bolingo mpate nyonso ya lisanga na Ye, mpe tozali babateli mpate na Ye ya solo. Libaku na biso ya malamu ezali ya kotatola bolingo na Ye mpe kobakisa bolingo na biso moko na baninga mpe bazalani—koleisaka, kokangolaka, mpe koleisaka bango—lokola Mobateli asengi biso tosala.”9

Kala mingi te koleka awa, Mokambi Nelson alobaki: “Elembo monene ya Eklezia ya Nkolo ya solo mpe ya bomoi ekozala ntango nyonso makasi moko ebongisaka, ekambama mpo na kosalisa bana moko na moko ya Nzambe mpe mabota na bango. Mpamba te ezali Eklezia na Ye, biso lokola basali na Ye tokosalisa moto, kaka lokola Nkolo asalaki. Tokosalisa na nkombo na Ye, na nguya mpe likoki na Ye, mpe na boboto na Ye ya bolingo.”10

Ntango Bafalizeo mpe basali mibeko bayimakiyimaki na Nkolo, “kolobaka, Moto oyo ayambaki basumuki mpe aliaki na bango,”11 Ayanolaki na kobetaka balisitwale misato ya kitoko oyo toyei koyeba lokola lisese ya mpate ebunga, lisese ya likuta ebunga, mpe lisese ya mwana mobali abunga.

Ezali malamu koyeba ete ntango Luka, mokomi ya Nsango malamu, ayingisi masolo misato, asalelaki liloba lisese na bomoko, kasi na boyike te.12 Emonani lokola ete Nkolo azali koteya bobele liteya moko ya masolo misato, masolo oyo etalisi bamitango ekeseni, mpate 100, makuta 10, mpe bana mibale 2.

Mosisa ya motango na masolo moko na moko ya masolo oyo, na yango ezali motango moko. Mpe liteya tosengeli kozwa uta na motango yango ezali ete osengeli kozala mobateli mpate mpo na bampaka 100 mpe bampaka balongobani kati na lisanga likoki na yo ya bampaka, to mopesi toli kati na bilenge bamama 10, to motei na Eteyelo ya bana 2, kasi yo ntango nyonso, salisaka bango ntango nyonso, lengelaka bango mpe lingaka bango moko na moko. Koloba ata moke te, “Mpate nini ya zoba,” to “Nsima ya nyonso, nazali mpenza na mposa te ya makuta wana,” to “Mwana mobali nini ya motomboki ye azali.” Soki yo na ngai tozali na “bolingi ya peto ya Klisto,”13 biso, lokola mobali na lisolo ya mpate oyo ebungaki, toko “tika ntuku libwa na libwa … mpe tokei koluka oyo ebungaki, kino, [kino, kino tozwi yango] yango.”14 To lokola mwasi na lisolo ya likuta oyo ebungaki, biso “tokopelisa mwinda, mpe tokopangusa ndako, mpe tokoluka na etingia, [… na etingia] kino, [… kino … kino biso] tokozwa yango.”15 Soki tozali na “bolingo ya peto ya Klisto,” tokolanda ndakisa ya Tata na lisolo ya mwana mobali oyo abungaki, oyo ntango mwana mobali “azalaki na nzela monene, … amonaki ye, mpe ayokaki mawa, mpe akimaki, mpe asimbaki ye na nkingo, mpe ayambaki ye.”16

Tokoki koyoka lisungi ya lombango na motema ya moto oyo abungisaki bobele mpate moko? To lisungi ya lombango na motema ya mama oyo abungisaki bobele likuta moko? To bolingo makasi mpe mawa na motema ya tata oyo abungisaki mwana mobali?

Mwasi na ngai, Maria Isabel, mpe ngai tosalaki na Amerique Centrale, na mboka Guatemala City. Kuna nazalaki na libaku malamu ya kokutana na Julia, mondimi monene ya Eklezia. Nazalaki na likanisi ya kotuna ye na ntina ya libota na ye. Mama na ye akufaki na kansere na 2011. Tata na ye azali mokambi monene na etuka, kosalaka lokola episikopo mpe lokola mopesi toli mokambi ya etuka na ye uta mibu ebele. Azalaki mobateli mpate ya solo ya Nkolo. Julia ayebisaki ngai na ntina ya bokasi ezanga kolemba ya kotalaka, kosalisaka, mpe kosalaka. Ya solo ye asepelaki koleisaka mpe kosalisaka mpate malamu ya Nkolo. Ye abalaki mbala ya mibale mpe atikalaki makasi na Eklezia.

Nsima ya mwa mibu, asalaki bokabwani, mpe sikawa akendaka eklezia ye moko. Amiyokaki kozala libanda mpe lisusu ayokaki ete bato mosusu bazalaki motuya epai na ye mpo na bokabwani na ye. Atikaki koya eklezia lokola molimo mabe etondaki na motema na ye.

Julia alobelaki makasi na ntina ya bobateli mpate oyo malamu, oyo azalaki mosali monene, kolingaka mpe koyokaka mawa. Namikundoli makasi ete liyoki ya lisungi ya lombango eyaki epai na ngai ntango azalaki kolimbola ye. Nalingaki kosala eloko moko mpo na moto wana, moto oyo asalaki ebele mpo na mibu mingi oyo.

Apesaki ngai nimelo ya telefone mpe nabandaki kobenga ye, kolikyaka kozala na libaku malamu ya kokutana na ye ngai moko. Nsima ya baposo mingi mpe mingi, nabengi ye ebele na telefone kasi azali koyamba te, mokolo moko suka suka ayambaki telefone.

Nayebisaki ye nakutanaki na Julia, mwana na ye ya mwasi, mpe ete natutisamaki na lolenge asungaki, asalisaki, mpe alingaki mpate malamu ya Nkolo uta mibu ebele. Azalaki kozela maloba ya lolenge wana te. Nayebisaki ye ete nalingaki kokutana na ye misu na misu, elongi na elongi. Atunaki ngai ntina nini ya bokutani wana. Nayanolaki, “nalingi mpenza kokutana na tata malamu ya mwana mwasi ya lolenge oyo.” Nsima ya mwa basekondi moke kimya ekotaki na telefone—mwa sekondi moke oyo emonisamaki epai na ngai lokola boseko. Alobaki na pete, “Mokolo nini mpe wapi?”

Mokolo nakutanaki na ye, nabengisaki akabola na ngai mwa makambo akutanaki na yango na botali, kosalisa, mpe kosalelaka mpate malamu ya Nkolo. Ntango azalaki kobeta masolo mosusu, namonaki ete mongongo na ye ebongwanaki mpe molimo moko wana ayokaki mbala ebele lokola mobateli mpate ezongaki. Mpe misu na ye etondisamaki na mpinzoli. Nayebaki oyo ezalaki ntango malamu mpo na ngai, kasi namonaki ete nayebaki te nini ya koloba. Nasambelaki na makanisi, “Tata, salisa ngai.”

Na mbalakaka, nayokaki ngai moko kolobaka, “Ndeko mobali Florian, lokola mosali ya Nkolo nasengi bolimbisi mpo na bozali na biso te epai na yo. Nasengi, olimbisa biso. Pesa biso libaku malamu mosusu ya kolakisa yo ete tolingaka yo. Ete tosengeli na yo. Ete ozali motuya epai na biso.

Eyenga elandi azongaki. Asololaki ebele na episikopo na ye mpe atikalaki makasi. Mwa basanza nsima akufaki—kasi azongaki. Ye ayaki kozonga. Natatoli ete na lisalisi ya Mobikisi na biso, toki kolinga mpate na Ye ya malamu mpe kosalela bango lokola Ye asengi. Mpe boye, kuna na Engumba ya Guatemala NkoloYesu Klisto azongisaki mpate moko ya motuya moko ya kobakisa na etonga na Ye. Mpe ateyaki ngai liteya moko ya kosalisa oyo nakoki kobosana te. Na nkombo ya Mobateli mpate Malamu, Mobateli mpate Kitoko, Mobateli mpate Monene, kutu Nkolo Yesu Klisto, amene.