Likita Linene
Bobuki Mbuma Oyo Ekoki Te
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Bobuki Mbuma Oyo Ekoki Te

Nkolo atelemi kozelaka koyamba makabo na biso ya bomikitisi mpe kopetola yango na nzela ya ngolu na Ye. Elongo na Klisto, bobuki milona ebonga te ezali te.

Lokola elenge mobali, nayekolaki kolinga bambongwana na bokamwi ya bileko ya mobu na Southwest Montana, epai wapi nakolaki. Eleko nalingaki makasi ezalaki ya boteli ya makasa—ntango ya kobuka milona. Libota na biso ezalaki kolikya mpe kosambela ete basanza na ya mosala makasi ekoka kozwa lifuti na bobuki milona bebo. Baboti na ngai bamitungisaki mpo na ntango, mpo na bokolongono ya banyama mpe milona, mpe makambo ebele mosusu oyo bango bakokaki kokamba te.

Ntango nakolaki, nayaki komona na bokebi nyonso lombango ya likambo. Kobika na biso ezalaki kotalela milona. Tata na ngai ateyaki ngai na ntina ya bisaleli tozalaki kosalela mpo na kobuka bambuma mike. Nazalaki kotala ye ntango azalaki kotambwisa masini na kati ya bilanga, kokata mopiku moke ya loso mpe sima kotalaka sima ya masini ya kobuka milona mpo na kotala soki loso ebele ekoti na ebombelo ete ebwakama te uta na matiti. Ye azalaki kosala bongo mbala na mbala, kobongisaka masini ntango nyonso. Nakimaki mbangu pembeni na ye mpe nazalaki kolukaluka na katikati ya matiti elongo na ye kosalaka lokola nayebaki nini nazalaki kosala.

Sima na ye kosepela na bibongisi nyonso ya masini, namonaki mwa loso moke na mabele mpe nalakisaki ye yango na etaleli moko ya bokebi. Nakobosana te nini tata na ngai alobelaki ngai: “Ezali malamu mingi koleka nyonso mpe ekoki maye masini oyo ekoki kosala.” Na bozangi mpenza bosepeli na ndimbola na ye, natiaki makanisi mingi na babozangi bobongi ya milona yango.

Ntango moke nsima, ntango eleko ekomaki malili na bapokwa, namonaki ebele ya ba cygnes, na oies mpe mabata oyo bavandaka esika moko te kokita na bilanga mpo na kolia katikati na mobembo na bango molai mpo na sudi. Bango baliaki loso etikalaki na milona na biso ebonga te. Nzambe abongisaki yango. Ata mbuma moko te ya loso ebungaki.

Yango ezali mingimingi komekama moko na mokili na biso mpe kutu na ezalela ya Eklezia kotingama na ntina ya bobongi nie. Interneti, babozeli oyo ekokisamaka te, mpe kutu bomitali na biso moko ezalaka ba mayoki ya bozangi makoki—ete tozali malamu mpenza te mpe tokotikala ata mokolo moko te kokoma. Mingi kutu basosolaka malamu te libengisi ya Mobikisi ya “yango wana bozala bato ya kobonga nie.”1

Kundola ete kibobongi nie yango ezali ndenge moko te na kozala ya kolongobana na Klisto.2 Kibobongi nie esengaka mosala ekoki kosalema te, ya komitia biso moko oyo elingi kokokanisa biso na basusu. Yango ememaka komiyoka na ngambo, bobangi, mpe ekoki kontinda biso to mibenda mpe totikala biso moko.

Kokomaka mobongi nie na Klisto ezali likambo mosusu. Yango ezali mosala moko—ekambami na bolingo nyonso na nzela ya Molimo Mosantu—ya kokomaka mingi koleka lokola Mobikisi. Mibeko etiamaki na Tata ya Lola ya boboto mpe ayebi nyonso mpe elimbolami polele na mayokani tobengisami mpo na koyamba. Yango esungi biso na mikumba ya ngambo mpe bozangi bokoki, ntango nyonso ebetaka nsete na oyo biso tozali na miso ya Nzambe. Atako mosala yango etomboli biso mpe etindiki biso tokoma malamu koleka, biso totangemi na bomipesi na biso ya moto yemoko na Nzambe oyo tolakisi na babokasi na biso ya kolanda Ye na bondimi. Ntango tondimi mbela ya Mobikisi ya koya epai na Ye, tososolaka na mbala moko ete ya biso koleka ekoki mpe ete ngolu ya Mobikisi moko ya bolingo ekotondisa bokeseni na balolenge moko tokoki kokanisa te.

Tokoki komona mobeko na mosala ntango Mobikisi aleisaki bato mokama mitano.

“Wana etombolaki Yesu miso na ye, mpe emonaki ebele ya bato bazali koya epai na ye, alobaki na Filipo ete, tokosomba mapa wapi, ete bato oyo balia? …

“Filipo azongiselaki ye ete, mapa na denali nkama mibale ekokoka mpo na bango te, ete moto na moto azwa mwa ndambo moke.

“Moko ya bayekoli na ye, Andele, ndeko mobali ya Simona Petelo, alobaki na ye ete,

“Mwana mobali moko azali awa, oyo azali na bamapa mitano ya loso, mpe bambisi mike mibale: kasi yango ezali nini kati na baoyo mingi boye?”3

Omitungisaki ata mokolo moko lolenge nini Mobikisi asengelaki koyoka na ntina ya elenge mobali yango, oyo na bondimi lokola ya mwana moke apesaki oyo ye amonaki ekokaki kokoka ata moke te liboso ya mosala esengelaki kosala?

“Mpe Yesu akamataki mapa; mpe apesaki matondo, akabolaki na bayekoli, mpe bayekoli bakabolaki na bango bafandaki na nse; mpe bobele bongo na mbisi yango lokola ezalaki bango na mposa.

“Ntango bango batondaki, alobaki na bayekoli na ye, bosangisa ndambo etikali, ete eloko moko ebunga te.”4

Mobikisi abongisaki libonza esokemi.

Ntango moke sima ya likambo yango, Yesu atindaki bayekoli na Ye liboso na masuwa. Mwa ntango moke bakutanaki na mbonge na ebale na katikati ya butu. Bango babangaki ntango bamonaki elilingi moko lokola elimo kotambolaka liboso na bango likolo ya mayi.

“Kasi Yesu ayebisaki bango, na kolobaka, Bozala na motema nsai; ezali Ngai; bobanga te.

“Mpe Petelo ayanolaki ye mpe alobaki, Nkolo, soki ezali yo, pesa ndingisa naya epai ozali likolo ya mayi.

“Mpe alobaki, Yaka. Mpe ntango Petelo abimaki libanda ya masuwa, atambolaki likolo ya mayi, mpo na kokende epai ya Yesu.

“Kasi ntango amonaki mopepe makasi, abangaki; mpe abandaki kodinda, mpe agangaki, kolobaka; Nkolo, bikisa ngai.

“Mpe na mbala moko Yesu atandelaki ye loboko, mpe asimbaki ye, mpe alobaki na ye, O yo oyo ozali na bondimi moke, mpo na nini ozali na ntembe?”5

Bandeko mibali mpe basi, ntango mosusu lisolo esukaki kaka wana te. Nandimisami ete ntango Petelo mpe Mobikisi bazalaki kotambola mpo na kozonga na masuwa loboko na loboko, Petelo apolaki na mayi mpe ntango mosusu amiyokaki soni, Mobikisi akokaki koloba na ye eloko moko lokola oyo: “Oh, Petelo, kobanga te mpe komitungisa te. Soki okokaki komitala yomoko lokola nazali kotala yo, ntembe na yo ekokweya mpe bondimi na yo ekokola. Nalingi yo, Petelo ya talo; obimaki libanda ya masuwa. Libonza na yo endimami, mpe ata kutu okweyaki, nakozala bobele wana mpo na kobimisa yo uta na bozindo, mpe libonza na yo ekokomisama ya kobonga nie.

Mapaka Dieter F. Uchtdorf ateyaki:

“Nandimi ete Mobikisi Yesu Klisto akolinga yo komona, koyoka, mpe koyeba ete Ye azali makasi na yo. Ete elongo na lisalisi na Ye, bandelo ezali te na oyo okoki kokokisa. Ete makoki na yo ezali na ndelo te. Ye akolinga yo omimona yomoko lolenge Ye amonaka yo. Mpe yango ekeseni mpenza uta lolenge mokili emonaka yo. …

“Ye apesaka makasi na baye balembi; mpe na baye bamiyoki kozanga makasi, Ye akolisaka makasi.”6

Tosengeli komikundola ete atako likabo na biso ezali malamu koleka kasi na bozangi kobonga, mobikisi akokomisa yango kobonga nie. Ata lolenge nini milende na biso ekoki komonana ezanga ntina, tosengeli ata mokolo moko te kokitisa nguya ya Mobikisi na nse. Liloba moko ya pete ya esengo, botali ya mosala ya mokuse kasi ya sembo, liteya moko ya Kelasi ya bana eteyami na bolingo ekoki, elongo na lisalisi ya Mobikisi, kopesa libondisi, kolembisa mitema, mpe kobongola bomoi ya seko. Milende na biso ya kotengama ekoki komema na bikamwisi, mpe na bokobi, tokoki kosangana na bobuki milona ya malamu.

Mbala mingi, totiamaka na makambo oyo esalaka ete biso tokola na molimo. Ntango mosusu tokoki koyoka lokola ete ntango inso tokoki te kolonga etumba. Tokoki kotala baye tozali kosala elongo na bango mpe komiyoka ete tokokoma ndenge moko na bango ata mokolo moko te. Bandeko basi mpe mibali, soki bomiyoki lolenge oyo, botala mibali mpe basi sima na ngai elongo na baye nazali kosala.

Nayoki pasi mingi.

Nzokande, nayekolaki ete, lokola bobele bobongi ezali eloko moko na kobonga nie na Klisto, komikokanisa na basusu ezali ndenge moko te koluka kokokana to koleka basusu. Ntango tomikokanisaka biso moko na basusu, ekoki kozala na bambano bobele mibale. To tominoni lokola tozali malamu koleka basusu tosambisi bango mpe totuki bango, to tomimoni malamu moke koleka basusu mpe tokomi ya kolemba, komitiola biso moko, mpe kolemba nzoto. Komikokanisaka na basusu efutaka mpenza mpenza te, elendisaka te, mpe mingimingi ezalaka nsoni. Nzokande, komikokanisa yango ekoki kobebisa molimo, kozangisa biso koyamba lisalisi ya molimo oyo tosengeli na yango. Na ngambo mosusu kolandaka baye totosaka mpe bazalaka na bizalela ya Boklisto ekoki kopesa mayele, kolendisa, mpe ekoki kosalisa biso tokoma bayekoli malamu koleka ya Yesu Klisto.

Mobikisi apesaki biso lolenge moko ya kolanda nde Ye emokalaki Tata. “Nazali na bino nde yo Filipo, oyebi naino ngai te? ye oyo amoni ngai asili komona Tata, mpe po na nini olobi ete, monisa biso Tata?”7

Mpe sima ateyaki, “Solo, solo, solo, nazali koloba na bino, Ye oyo akondimaka ngai, misala ezali ngai kosala akosala yango mpe lokola.”8

Atako boniboni milende na biso ezali komanana moke, soki tozali sembo, Mobikisi akosalela biso mpo tokokisa mosala na Ye. Soki tosali bobele malamu na lolenge tokokeli mpe toliki epai na Ye mpo na kosala bokeseni, tokoki kokoma eteni ya bikamwisi oyo ezingi biso.

Mpaka Dale G. Renlund alobaki, “Tosengeli kozala kobonga nie te, kasi tosengeli na bino, mpo ete moto nyonso oyo azali na bolingi akoki kosala eloko moko.”9

Mpe lokola Mokambi Nelson ateyi biso, “Nkolo alingaka makasi”10

Nkolo atelemi kozelaka koyamba makabo na biso ya bomikitisi mpe kopetola yango na nzela ya ngolu na Ye. Elongo na Klisto, bobuki milona ebonga te ezali te. Tosengeli kozala na mpiko ya kondima ete ngolu na Ye ezali mpo na biso—ete Ye akoki kosalisa biso, kosunga biso uta na bozindo ntango tolembi, mpe kobongisa milende na biso oyo ya kobonga te.

Na lisese ya moloni, Mobikisi alimboli milona oyo elonamaki na mabele malamu. Misusu ebotaki bamokama, misusu batuku motoba mpe misusu batuku misato. Nyonso ezali eteni ya bobuki milona malanu ya Ye.11

Moroni abengaki bato nionso, “Iyo, boya epai na Klisto, mpe bolobgobana na ye, … mpe soki boboyi mabe nionso, mpe bolingi Nzambe na nguya na bino nionso, na makanisi na bino nionso mpe na makasi na bino nionso, boye ngolu na ye ekoki mpo na bino, mpo ete na ngolu na ye bosala malamu kati na Klisto.”12

Bandeko mibali mpe basi, natatoli Klisto, oyo azali na nguya ya kobongisa atako libonza na biso ya komikita penza. Tika biso tosala lolenge tokoki, tomema oyo tokoki, elongo na bondimi, tokitisa libonza na biso ebonga te na makolo na Ye. Na nkombo ya Ye oyo azali Mokonzi ya bobuki milona ebonga nie, kutu Yesu Klisto, amene.