Likita Linene
Eyano Ezali Ntango nyonso Yesu Klisto
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Eyano Ezali Ntango nyonso Yesu Klisto

Atako mituna to makambo nini bozali na yango, eyano ezwami ntango nyonso kati na bomoi mpe mateya ya Yesu Klisto.

Bandeko balingami mibali mpe mdibali, toleisami na molimo na mikolo mibale oyo eleki. Miziki ya bayembi ezalaki kitoko mpenza. Baoyo balobi bazalaki bisalelo mpo na Nkolo. Nasambeli ete bokoluka Molimo Mosantu mpo na kokamba bino kati na boyekoli na bino ntango bokotala bosolo eteyami uta na elobeli oyo. Etindami solo uta na lola.

Poso moko uta lelo ezali Eyenga ya Pasika. Ezali moko ya feti ya boyambi ya motuya mpenza mpo na balandi ya Yesu Klisto. Ntina monene tokembelaka Noele ezali mpo na Pasika. Liteya ya Yaka, Landa ngai poso oyo ekotindika yo oyekola bokoti ya elonga ya Mobikisi kati na Yelusaleme, bopetoli na Ye ya tempelo, monyoko na Ye kati na Elanga ya Getesemane, Bobakami na Ye, Lisekwa na Ye ya nkembo, mpe bobimeli na Ye nsima epai ya balandi na Ye.1

Meka milongo ya bule oyo mpe mona nzela nyonso okoki kotonda Tata na biso na Lola na kotindelaka biso Mwana na Ye mobotami se Moko.2 Na ntina na Yesu Klisto, tokoki koyambola mpe kolimbisama na masumu na biso. Mpo na Ye; moko na moko na biso akosekwa.

Nabengisi bino lisusu boyekola lisusu lisolo ya bobimeli ya Mobikisi epayi ya Banefi kati na Amerika, lokola ekomami na 3 Nefi. Kala mingi te liboso ya bobimeli oyo, mongongo na Ye eyokanaki kati ya bato, kobakisa maloba oyo ya libondeli:

“Ekoya bino te sikawa epai na ngai, mpe koyambola masumu na bino, mpe kobongwana, ete nakoka kobikisa bino?

“… Tala, loboko la ngai la ngolu lotandolami ona bino, mpe onso oyo akoya, nakoyamba ye;”3

Bandeko balingami mibali mpe basi, Yesu Klisto asemboli libengisi kaka wana epayi na bino lelo. Nabondeli na bino boya epayi na Ye mpo ete Ye akoka kobikisa bino! Akobikisa bino na lisumu ntango boyamboli. Akobikisa bino na mawa mpe bobangi. Akobikisa bino na bampota ya mokili oyo.

Atako mituna to makambo nini bozali na yango, eyano ezwami ntango nyonso kati na bomoi mpe mateya ya Yesu Klisto. Boyekola mingi etali Bomikabi na Ye, bolingo na Ye, boboto na Ye, malongi na Ye, mpe nsango malamu na Ye ezongisami ya kobikisa mpe kokoba liboso. Botalela Ye! Bolanda Ye!

Yesu Klisto azali ntina totongelaka batempelo. Moko na moko ezali Ndako na Ye Esantu. Kosala mayokani mpe kozwa makuli ya ntina kati na tempelo, lokola mpe koluka kobelama pembeni epayi na Ye kuna, ekopambola bomoi na bino na ndenge mosusu ya boboto te ya kogumbamela ekoki kopambola. Mpo na ntina oyo, tozali kosala nyonso kati na nguya na biso mpo na kozwisa mapamboli ya tempelo na bandimi na mokili mobimba. Lelo, nazali na matondi ya kosakola miango na biso ya kotonga tempelo ya sika na moko na moko ya bisika elandii:

  • Retalhuleu, Guatemala

  • Iquitos, Perou

  • Teresina, Brazilia

  • Natalia, Brazilia

  • Tuguegarao City, Philippines

  • Iloilo, Philippines

  • Jakarta, Indonesia

  • Hamburg, Allemani

  • Lethbridge, Alberta, Canada

  • San Jose, California

  • Bakersfield, California

  • Springfield, Missouri

  • Charlotte, North Carolina

  • Winchester, Virginia

  • Harrisburg, Pennsylvania

Bandeko na ngai, natatoli ete Yesu Klisto azali koyangela makambo ya Eklezia na Ye. Natatoli ete kolanda Ye ezali nzela se moko ememaka esengo ewumelaka. Nayebi ete nguya na Ye ezali kokita likolo ya bato babatelaki mayokani na Ye, “balatami bibundeli ya boyengebene mpe na nguya ya Nzambe ya nguya nyonso”4 Natatoli bongo, na bolingo mpe lipamboli na ngai mpo na moko na moko na bino, na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.