Likita Linene
Mongongo ya Esengo!
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Mongongo ya Esengo!

Kotonga batempelo ezali moko ya likambo ya yambo ya baprofeta banso kobanda Joseph Smith.

“Sikawa, nini toyoki na nsango malamu oyo tozwi? Mongongo ya esengo! Mongongo ya mawa uta na lola; mpe mongongo moko ya bosolo uta na mabele; … mongongo ya nsango malamu mpo na bato na bomoi mpe mpo na bakufi, nsango malamu ya esengo makasi.”1

Bandeko mibali mpe bandeko basi, ezali mpasi koyoka maloba oyo kowuta na Profeta Joseph Smith mpe kozanga kokatana na koseka makasi.

Maloba ya kosepela ya Joseph emonisi mpenza esengo nyonso mpe ya monene azwaki epayi na Nzambe na ntina ya Moango monene ya esengo ya Tata na biso ya Lola, mpamba te tondimisami, “Bato bazali, mpo ete bazala na esengo.”2

Tongangaki biso nyonso na esengo3 kati na bomoi na biso ya yambo ya kufa ntango toyokaki moango ya Nzambe ya esengo, mpe tokokoba konganga na esengo ntango tozali kobika engebene na moango na Ye. Kasi nini ezalaki mpenza mama ya likambo mpo na maloba ya esengo kowuta na profeta? Nini epusaki koyokisa mayoki wana ya motema mpe ya mozindo?

Profeta Joseph abandaki koteya na ntina ya libatisi mpo na bakufi. Ezalaki solo emoniseli ya nkembo ezwamaki na mitema ya botondi. Ntango bandimi ya Eklezia basosolaki ete bakokaki kobatisama mpo na bakufi na bango ya bolingo, basepelaki. Wilford Woodruff alobaki, “Na ngonga nayokaki yango, molimo na ngai epumbwaki [mpo] na esengo!”4

Libatisi mpo na bakufi ezalaki bosolo se moko te oyo Nkolo alingaki komonisa mpe kozongisa. Ezalaki na liboke ya makabo, to badotasio, oyo Nzambe alingaki kopesa bana na Ye ya mibali mpe basi.

Makabo oyo esangisi likoki ya bonganganzambe, mayokani mpe makuli, mabala oyo ewumelaka libela na libela, bokangami to bokangisi ya bana na baboti na bango kati na libota ya Nzambe, mpe ya makasi koleka lipamboli ya bozongi ndako na bozali ya Nzambe Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Mapamboli oyo nyonso ekoki kosalema na nzela ya bomikabi ya Yesu Klisto.

Lokola Nzambe azwaki yango kozala kati na mapamboli na Ye ya likolo mpe bule makasi,5 Ateyaki ete bandako ya bule etongama esika wapi Ye akokaki kopesa makabo ya motuya makasi likolo ya bana na Ye.6 Bandako oyo ekozala ndako na Ye na mabele. Bandako oyo ekokaki kozala batempelo wapi oyo asili kokangisama na mabele na nkombo na Ye mpe na liloba na Ye mpe na likoki na Ye bakokaki kokangisama na lola.7

Lokola mondimi ya Eklezia lelo, ekoki kokoma pete mpo na biso kozwa bosolo ya libela ya nkembo lokola ndanga. Yango ekomi bomoto ya mibale mpo na biso. Ntango mosusu ezalaka na litomba ntango tozali komona bango na miso ya baoyo bayekolaka na ntina na bango mpo na bantango ya yambo mpenza. Yango ekomaki ya solo epayi na ngai na nzela ya boyebi ya kala mingi te.

Mbula eleki, kaka yambo ya bobulisami ya tempelo ya Tokyo Japon mpo na mbala ya mibale, bapaya ebele ya bondimi na biso te bayaki kotala tempelo oyo. Lokola moko ya mbala esangisaki mokambi moko ya mayele ya eyamba mosusu. Totangisaki mopaya na biso na ntina ya moango ya esengo ya Tata na biso ya Lola, mosala monene ya Yesu Klisto kati na mango oyo, mpe malongi oyo libota ekoki kozala esangisami libela na libela na nzela ya bokuli bokangisami.

Na nsuka ya mobembo na biso, nabengisaki moninga na biso akabola mayoki na ye. Na kotalaka bomoko ya mabota—ezala na ntango ya kala, mpe na mikolo mikoya nsima—moto malamu oyo atunaki na bosolo bonso, “Bandimi ya boyambi na bino basosolaka solo mpenza boni boni mozindo mpenza malongi maye ezali?” Ye abakisaki, “Yango ekoki malamu kozala kaka moko ya mateya makoki kosangisa mokili oyo ekabwana makasi.”

Oyo ezali likanisi moko ya nguya mpeza! Mobali oyo amemamaki kaka te na botongi malamu ya tempelo kasi lisusu na malongi ya mozindo mpe kokamwa na ntina ya nini mabota ezali na bomoko mpe ekangisami na Tata na biso ya Lola mpe Yesu Klisto mpo na libela.8

Tosengeli te kozala ya kokamwa, sima, ata ntango moto moko azali na bondimi na biso te andimi bonzambe ya maye masalemaka kati na tempelo. Oyo ekoki kokoma mpamba to ya momesano emonanaka mbala mosusu na bongengi na yango mpe bokonzi na yango epayi ya baoyo bayoki yango mbala ya yambo.

Ndenge elobami, uta Bozongisi ya nsango malamu, botongi ya batempelo ezalaka moko ya makambo ya kotia na esika ya yambo mpo na baprofeta banso uta Profeta joseph Smith. Mpe ezali pete kososola mpo na nini.

Ntango Profeta Joseph Smith azalaki kotangisa na ntina ya libatisi mpo na bakufi, amonisaki bosolo mosusu ya monene. Ye ateyaki: “Tika nandimisa bino ete oyo ezali mabongisi engebene na bakufi mpe bato na bomoi oyo ekoki te koleka mpamba, lokola likambo ya motuya mpo na libiki na biso. Mpo libiki na bango esengelami mpe ezali ntina mpo na libiki na biso, … bakoki te kobonga nie na baozangi biso—biso mpe tokoki te kobonga nie na bozangi bakufi na biso.”9

Lokola tokoki komona, mposa ya batempelo mpe mosala esalemi mpo na nyonso mibale bato na bomoi mpe bakufi ekomi mpeza polele.

Monguna azali na bokebi Nguya na ye ezali kobebisama na makuli mpe mayokani esalemi kati na batempelo, mpe azali kosala nyonso akoki komeka kotelemisa mosala oyo. Mpo na nini? Mpo ete ayebi nguya oyo ewutaka na mosala oyo. Ntango nyonso tempelo ya sika ekulismi, nguya ya kobikisa ya Yesu Klisto epanzanaka na mokili mpo na kotelemela nguya ya monguna mpo na kosikola biso wana ezali biso koya epai na Ye. Ntango batempelo mpe babateli mayokani ya tempelo bazali kokoma mingi, monguna azali kosila makasi.

Na mikolo ya ebandeli ya Eklezia, basusu bazalaki komitungisa ntango nini tempelo ya sika ekolobama, mpamba te bakoloba, “Tobandaki te kotonga tempelo longola se bangonga ya lifelo ebanda kobeta.” Kasi Brigham Young na mpiko mpenza ayanolaki, “nalingi koyoka yango kobeta lisusu.”10

Kati na bomoi oyo ya kufa, tokoki te kokima etumba, kasi tokoki kozwa nguya ya kolonga monguna. Nguya oyo mpe bokasi ekowuta na Yesu Klisto ntango tozali kosala mpe kobatela mayokani ya tempelo.

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “Ngonga ekobelema ntango baye bazali te kotosa mibeko ya Nkolo bakokabwana na baye bazali kotosa. Libateli na biso eleki malamu ezali ete tokoba kozala kolongobana mpo na kokota na ndako na Ye ya bule.”11

Awa ezali mwa mapamboli Nzambe alakaki biso na nzela ya profeta na Ye:

Ozali na mposa ya makamwisi? “Nalaki bino ete Nkolo akomema makamwisi Ye ayebi bosengeli soki bosali mabonza mpo na kosala mpe kokumbamela na batempelo na Ye.”12

Ozali na mposa ya nguya ya kobikisa mpe ya kolendisa ya Mobikisi Yesu Klisto? Maokambi Nelso andimisi biso ete “makambo nyonso eteyami na tempelo … ebakisaka bososoli na biso ya Yesu Klisto. … Ntango tobatelaka mayokani na biso, Apesaka biso nguya to dotasiona ya Ye nguya ya kobikisa ya kolendisa. Mpe, o, lolenge nini tokozala na mposa ya Nguya na Ye na mikolo ekoya.”13

Na Eyenga ya Mandalala ya yambo, ntango Yesu Klisto akotaki na elonga na Yelusaleme, ebele ya bayekoli ya Yesu Klisto basepelaki mpe bakumisaki Nzambe na mongongo makasi … kolobaka, Apambolama Mokonzi oyo akoya na nkombo ya Nkolo.”14

Boni boni likambo yango ekokani ete na Eyeyanga ya Mandalala ya mobu 1836, Tempelo ya Kirtland ezalaki kobulisama. Na libaku wana bayekoli ya Yesu Klisto bazalaki mpe kosepela. Na losambo wana ya bobulisi, Profeta Joseph Smith asakolaki makambo maye ya masanzoli:

“O Nkolo Nzambe ya Nguya nyonso yokela biso … mpe yanolela biso uta na lola, … wapi ofandi na nbgende na yo, na nkembo, lokumu, nguya, bonene, [mpe] nguya. …

“… Sunga biso na nguya ya Molimo na yo, mpo na ete tosangisa mingongo na biso oyo ya baselafa bazali kongenga zingazinga ya kiti na yo ya bokonzi na milolo ya nkembo, koyembaka ozana na Nzambe mpe na Mwana na Mpate!

“Mpe tika ete baye … basantu ba yo baganga makasi mpo na esengo.”15

Bandeko mibali mpe basi, lelo na Eyenga oyo ya Mandalala, tika ete klokola bayekoliya Yesu Klisto tosanzola Nzambe na biso mosantumpe tosepela na bolamu na Ye mpo na biso. “Nini toyoki na nsango malamu oyo tozwi? Solo “mongongo ya esengo!”16

Naatoli ete bokoyoka esengo oyo mingi mpe mingi koleka ntango bozali kokota na bandako ya bule ya Nkolo, mpe ete bokoyoka esengo oyo Ye azali na yango mpo na bino. Natatoli ete bokozala na esengo oyo ye na ngambo na ye azali na yango mpo na bino, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.