Likita Linene
Mateya ya Yesu Klisto
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Mateya ya Yesu Klisto

Topesami makomi mpo na kokamba bomoi na biso. Nsango na ngai lelo ezali ya eteni ya maloba ya Mobikisi na biso—oyo Ye alobaki.

Tondimelaka Klisto. Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tosanjolaka Ye mpe tolanda mateya na Ye kati ya makomi.

Yambo ya Bokwei, Tata na biso na Lola alobelaki Adama mpe Eva mbala moko. Nsima ya nyonso wana, Tata alakisaki Mwana na Ye Se Moko, Yesu Klisto, lokola Mobikisi mpe Mosikoli na biso mpe apesaki biso motindo ya “koyoka Ye.”1 Uta na bokambi oyo tosukisi ete makundoli ya makomi ya maloba elobami na “Nzambe” to “Nkolo” ezali ntango nyonso maloba ya Yeova, Nkolo na biso asekwa, Yesu Klisto.2

Topesami makomi mpo na kokamba bomoi na biso. Nephi abengi moko na moko na biso: “kokila bilei mpo na maloba ya Klisto mpo ete tala maloba ya Klisto ekoyebisa bino makambo nionso nini bino bosengeli kosala.”3 Makomi mingi oyo elobelaka misala ya bokufi ya Yesu ezali bandimbola ya maye Ye asalaki. Nsango na ngai lelo ezali ya eteni ya maloba ya Mobikisi na biso—oyo Ye alobaki. Oyo ezali maloba ekomami na kati ya Boyokani na Sika (kobakisaka mafuli mosusu ya Joseph Smith) mpe kati ya Buku ya Mormon. Mingi ya biteni oyo ezali na kati ya mokapo oyo Mobikisi na biso alobelaki yango.

“Ya solo, ya solo, nalobi na yo, Longola se soki moto abotami lisusu na mai mpe na Molimo akoki te kokota na kati ya bokonzi ya Nzambe.”4

“Bapambolami ezali … bango [baoyo] bazali na nzala mpe mposa ya mai nsima ya boyengebene, mpo bakotondisama na Molimo Mosantu5

“Bapambolami bazali basali kimia: mpo bakobiangema bana ba Nzambe.”6

“Bosilaki koyoka ete elobamaki epayi na bango na ntango ya kala. Bokosala ekobo te.

“Kasi nalobi epayi ya bino ete, onso oyo atali mwasi moko, mpo ya kolula ye nsima, asili asali ekobo o motema mwa ye.”7

“Bosili koyoka ete elobamaki, okolinga moto wa penepene na yo mpe okoyina moyini wa yo.

“Kasi nalobi epai na bino Bolinga bayini na bino, bopambola baoyo bazali batuki botuki bino, bosalela bango malamu baoyo bazali koyina bino, mpe bosambela mpo na bango baoyo bazali kosala bino mabe, mpe banyokoli bino;

“Ete bokoka kozala bana ya Tata na bino oyo azali na lola: mpo ete ye asalaka moyi na ye mpo ebima likolo ya mabe mpe malamu, mpe atindaka mbula likolo ya oyo eza sembo mpe ezangi sembo.”8

“Soko bolimbisi bato mabe na bango Tata wa bino wa lola akolimbisa bino lokola:

“Kasi soko bolimbisi te bato mabe ma bango mpe Tata wa bino akolimbisa te mabe ma bino.”9

Soki bozalaki ya mokili, mokili ekolinga oyo ya yemei: kasi lokola bozali ya mokili te, kasi ngai naponaki bino libanda ya mokili, na yango mokili ekoyina bino.”10

“Na yango, boluka biloko ya mokili te kasi boluka yambo bokonzi bwa Nzambe, mpe bolakisa bosembo bwa ye mpe biloko biye binso bikobakisama epai ya bino.”11

“Yango wana, makambo manso kani bolingi ete bato basala na bino yango, salani lokola na bango, mpo eye ezali mobeko mpe baprofeta.”12

“Kebani na baprofeta ya lokuta, baye bayei na bino na elamba ya mpate, kasi o kati bazali mbwa ya zamba ya nkanda.

“Bokoyeba bango na mbuma na bango. Ekosangisaka bato mbuma ya vino na nzube, to mbuma ya misuke na mibwe?

“Kutu boye nzete elamu enso ekomemeke mbuma elamu, kasi nzete yoko ebeba ekomemeke mbuma ebe.”132

“Moto nyonso te oyo alobaka na ngai, Nkolo, Nkolo, asengeli kokota na bokonzi ya lola; kasi ye oyo asali bolingi ya Tata na ngai oyo azali na lola.”14

“Boya liboso na ngai, bino banso bozali ya kolemba na mosala mpe bokumbi bozito, mpe nakopesa bino bopemi.

“Bozwa nkanga na ngai likolo na bino, mpe boyekola epai na ngai; mpo nazali moto ya boboto mpe motema kokita: mpe bokozwa bopemi ya milimo na bino.

“Mpo ete ekanganeli na ngai ezali botau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”15

“Soki moto akolanda ngai, amiwangana, mpe amema ekulusu na ye mpe alanda ngai.

“Mpe sikawa mpo na moto komema ekulusu na ye, asengeli koboya makambo manso ya mabe, mpe makambo nyonso ya mokili, mpe abatela mitindo na ngai.”16

“Yango wana, botika makambo ya mokili, mpe bobikisa milimo na bino; nini ezali litomba ya moto, soki akozwa nyonso ya mokili, mpe kobungisa molimo na ye? To moto akopesa nini mpo na kobongola na molimo na ye?”17

“Soki moto akosala bolingi na ye, akoyeba ete mateya na nga ezali ya Nzambe to maloba na nga moko.”18

“Mpe nalobi na bino, senga mpe ekopesamela yo; luka, mpe okozwa; beta, mpe ekofungolelama yo.

“Mpo na baoyo nyoso basengaki bazwaki; mpe balukaki bamonaki; mpe na baoyo babetaki ete ekofungwamaki.”19

“Ete nazali na mpate misusu oyo ezali te ya etonga oyo, bango lokola nasengeli komeme mpe bakoyoka mongongo mwa ngai; mpe ekozala etonga yoko, mpe mobateli moko.”20

“Yesu alobaki na ye, nazali lisekwa, mpe bomoi: oyo andimeli ngai, atako akufaki, nsima akozala na bomoi:

“Mpe oyo nyonso abikaki mpe andimelaki ngai akokufa ata moke te.”21

“[Motindo monene na kati ya mobeko ezali:] okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso.

“Oyo ezali mobeko ya yambo mpe ya monene.

“Mosusu na mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.

“Likolo ya mitindo mibale oyo makangisi mobeko mpe baprofeta.”22

“Ye oyo azwi mitindo mya ngai, mpe abateli yango, azali ye oyo alingaka ngai: mpe ye oyo alingaka ngai bakolinga ye na Tata wa ngai, mpe nakolinga ye, mpe nakomimonisa epayi na ye.”23

“Kimia Ngai natiki na bino, ya ngai kimia natikeli bino: te lokola mokili epesaka, kimia na ngai napesi epai na bino. Tika ete mitema na bino etungisama te, to ebanga mpe te.”24

“Oyo ezali motindo na ngai, Ete bolingana, lokola nalingi bino.”25

“Botala maboko na ngai mpe makolo na ngai, ete ezali ya ngai moko: bosimba ngai, mpe botala; mpo ete molimo ezalaka na mosuni mpe mikuwa te, lokola bomoni ngai kozala na yango.”26

“Na yango bokende, mpe boteya bamboka nyonso, bobatisa bango na nkombo ya Tata, mpe Mwana, mpe ya Molimo Mosantu:

“Koteyaka bango ete batosa nyonso esili ngai kotinda bino: mpe tala, ngai nazali na bino elongo ntango nyonso kino nsuka ya mokili.”27

Nsima ya mosala na Ye na Mabele ya Bule, abimelaki bayengebene na ekolo ya Amelika. Oyo ezali mwa maloba oyo Ye alobelaki bango kuna:

“Tala, nazali Yesu Klisto Mwana Mobali wa Nzambe. Nakelaki lola mpe mabele, mpe biloko binso biye bizali o kati ya yango. Nazalaki elongo na Tata uta o ebandeli. Nazali kati na Tata, mpe Tata azali kati na ngai; mpe kati na ngai Tata akumisi nkombo ya ye.”28

“Nazali mwinda mpe bomoi bwa mokili. Nazali Alifa mpe Omega, ebandeli mpe nsuka.

“Mpe bokobonza epayi ya ngai lisusu te bosopi makila; iyo, mbeka ya bino mpe mabonza matumbama makolongwa, mpo nakondima yoko te ya mbeka ya bino mpe mabonza ma bino matumbama.

“Mpe bokobonza mpo ya mbeka yoko epai ya ngai motema moko mobukana mpe molimo moko mwa mawa. Mpe oyo nyonso akoya epayi na ngai na motema ya kobukana mpe molimo oyo motutami, ye nde na kobatisa na moto mpe na Molimo Mosantu. …

“Tala, nayei epai ya mokili mpo ya komeme bosikoli bwa mokili, mpo ya kobikisa mokili uta o masumu.”29

“Mpe lisusu nalobi epayi ya bino, bosengeli koyambola mpe kobatisama o nkombo ya ngai, mpe kokoma lokola mwana moko moke, to bokoki ata moke te kosangola bokonzi bwa Nzambe.”30

“Yango wana nalingi ete bozala bobongi nie kutu lokola ngai, to Tata wa bino oyo azali o lola azali abonga nie.”31

“Solo, solo, nalobi epayi ya bino, bosengeli bokenge mpe kosambela ntango inso, mbele bosenginiama na zabulu, mpe bokambema mosika bakangemi ba ye.”32

“Yango wana bosengeli ntango inso kosambela epayi ya Tata o nkombo ya ngai.”33

“Na yango, oyo nionso bino bokosala, bokosala yango na nkombo na nga; na yango bokobenga eklezia na nkombo na ngai.”34

“Tala napesi bino nsango malamu na ngai, mpe oyo ezali nsango malamu oyo napesi bino—ete nayaki na mokili mpo na kosala bolingi ya Tata na ngai, mpamba te Tata atindaki ngai.

“Mpe Tata na ngai atindaki ngai ete nakoka kotombolama likolo lya ekulusu; mpe nsima ete etombolamaki ngai likolo lya ekulusu, ete nakoka kobenda bato banso epayi ya ngai … mpo ya kosambisama na misala mya bango, soko ezali malamu to soko ezali mabe.”35

“Sikawa eye ezali motindo: Boyambola, bino banso nsuka ya mabele, mpe boya epayi ya ngai, mpe bobatisama o nkombo ya ngai, ete bokoka kosantisama na bozwi bwa Molimo Mosantu, ete bokoka koteleme na bozangi mbindo liboso lya ngai o mokolo mwa nsuka.”36

Tondimelaka Klisto. Nasukisi na oyo Ye alobaki etali lolenge nini tosengeli koyeba mpe kolanda mateya na Ye:

“Kasi Molendisi, oyo azali Molimo Mosantu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, akoteya bino makambo manso, mpe akomema makambo manso mpo na bokundoli bwa bino, ezali nini nalobelaki bino.”37

Nandimi bosolo ya mateya na Ye na nkombo ya Yesu Klisto, amene.