Likita Linene
Bomikundola Maye Mazali Motuya Mpenza
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Bomikundola Maye Mazali Motuya Mpenza

Makambo maleki motuya koleka manso mpenza ezali mokangano na biso na tata ya lola mpe Mwana na Ye ya Bolingo, mabota na biso, mpe bato ya nzinga nzinga na biso, mpe kopesaka nzela na Molimo ya Nkolo ekamba biso.

Ntango tozali komikundola nsuka ya poso oyo bokoti ya nkembo ya Mobikisi kati na yelusaleme kala te liboso ya mbeka ya bomikabi na Ye, namikundoli maloba na Ye ya elikya mpe bolendisi, “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika .”1.

Nalingaka Ye. Nandimelaka ye. Natatoli ete Azali Lisekwa mpe Bomoi.

Litatoli oyo elendisi mpe epesi ngai makasi na mibu minei na ndambu eleki uta mwasi na ngai, Barbara, akufaki. Nazali kozanga ye.

Mbala mingi, nazalaki kokanisa libala na biso ya seko mpe bomoi na biso elongo.

Liboso nakabolaki lolenge nini nakutanaki mbala ya yambo na Barbara mpe lolenge nini bokutani wana eteyaki ngai kosalela boyebi ya “kolandela” oyo nayekolaki na misio. Nasengelaki kolandela nokinoki elongo na ye nsima ya kokutana na biso ya yambo mpo ete azalaki kitoko, ayebanaki, mpe azalaki na manaka ya bokutani na bato etonda mpenza. Natutisamaki motema nokinoki mpampa te ezalaki pete mpo na kopusana pembeni na ye mpe azalaki moto ya kolinga baninga. Nasepelaki na bolamu na ye. Nayokaki ete ye mpe ngai tozalaki lisanga. Emonanaki pete mpenza na makanisi na ngaii.

Barbara mpe ngai tozalaki kobima, mpe bozalani na biso ebandaki kokola, kasi azalaki na kondima te ete libala na ngai ezalaki malamu te mpo na ye.

Ezalaki ya kokoka te mpo na ngai nayeba; Barbara azalaki na mposa ya koyeba yemei. Nayebaki soki tozwaki ntango ya kokila mpe kosambela etali likambo yango, Barbara akoki kozwa bondimisami uta na lola.

Tolekisaki nsuka ya poso ezanga kobima mpo ete tokoka kokila bilei mpe kosambela moto na moto mpo na koyeba na bisomei. Libaku malamu mpo na ngai, azwaki bondimisami kaka se moko oyo nazwaki. Oyo etikali , lokola nalobaka, ezali lisolo.

Ntango Barbara akufaki, bana na biso batiaki likolo ya lilita na ye mateya ebele oyo Barbara alingaki bango bamikundola. Moko ya mateya yango ezali “maye mazali motuya mawumelaka ntango molayi mpenza.”

Lelo, nakokabola uta na motema na ngai mwa mayoki mpe makanisi na ntina ya makambo maye mazali ya motuya koleka mpenza.

Yambo, bozalani na Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, ezali motuya mpenza. Bozalani oyo ezali motuya mpenza sikawa mpe na boseko.

Ya mibale, bozalani ya libota ezali kati na makambo oyo ezali motuya mpenza.

Na nzela ya mosala na ngai mobimba, nakendaka kotala bato mpe mamabota oyo basimbami na makama ya mokili ya bobomibomi. Mingi batikaki bisika na bango, bato na nzala,, mpe babangisami. Bazalaki na bosenga ya lisungi ya kisi, bilei, mpe bisika ya kofanda.

Bazalaki na bosenga ya mabota na bango.

Nayebi lisusu basusu bakoki te kozala na mapamboli ya libota ya pembeni, yango wana nabakisaki libota ya monene, baninga, mpe kutu mabota ya palwasi lokola “libota.” Bozalani oyo ezali motuya mpo na bokolongono ya mayoki ya motema mpe ya nzoto.

Bozalani oyo ekoki lisusu kopesa bolingo, bosepeli, esengo, mpe liyoki ya kozala ya.

Koleisa bozalani ya motuya oyo ezali boponi. Boponi ya kozala eteni ya libota esengaka bomipesi, bolingo, motema molai, lisolo, mpe bolimbisi.2 Ezali na bangonga ntango toyokanaka te na moto songolo, kasi tokoki kosala bongo na bozangi boyokani te. Na kimakango mpe libala, tokweyaka na bolingo te to kokweyaka libanda ya bolingo te lokoli soki tozali biloko oyo ezali kotindikama likolo yaa etando ya lisano ya dami. Toponaka kolingana mpe kosungana. Tosalaka eloko moko kaka na bozalani mosusu ya libota mpe na baninga oyo bazali lokola libota epayi na biso.

Esakola mpo na libota elobi ete “mwango ya bonzambe ya esengo esalaka ete bozalani ya libota ekoba kokangama nsima ya liwa. Makuli mpe mayokani ya bule oyo ezwami kati na batempelo esantu ekomisaka yango ekoka kozala mpo na bato bazonga liboso na Nzambe mpe mpo na mabota esangisama mpo ya seko”3

Likambo mosusu oyo ezali motuya mpenza ezali kolanda botindiki ya Molimo kati na bozalani na biso ya motuya mpenza mpe kati na makasi na biso ya kolinga baninga na biso ya pembeni lokola bisomei, kobakisaka kati na misala na biso ya bonkutu mpe na miso ya bato. Nayekolaki liteya oyo na ebandeli kati na bomoi na ngai ntango nazalaki kosala lokola episikopo.

Na nsuka ya mpokwa ya mvula ya pembe ya eleko ya malili, nazalaki kobima na bilo na ngai ya episikopo ntango nazwaki likanisi makasi ya kokende kotala mokufeli mobali moko ya mokolo kati na palwasi. Nabwakaki miso na montele na ngai—ezalaki 10:00 ya butu Nakanisaki ete ntango elekaki mabe mpo na kokende kotala ya boye. Mpe na ngambo mosusu, mvula ya pembe ezalaki kobeta. Nazwaki mokano ya kokende kotala ndeko mwasi oyo ya bolingo liboso ya likambo nyonso na ntongo esika ya kotungisa ye na ngonga eleka ya boye. Nakumbaki na ndako mpe nakendaki kolala kasi nazwaki pongi te butu mobimba mpamba te Molimo ezalaki kolobela ngai.

Na ntongo mpenza elandaki, nakumbaki kino na ndako ya mokufeli mobali yango. Mwana na Ye ayanolaki na ekuke mpe na mayi na miso alobaki, “O, Episikopo botondi mpo ete oye. Mama akufaki eleki bangonga mibale”—nayokaki mpasi makasi. Nakobosana ata moke te mayoki ya motema na ngai. Nalelaki. Nani koleka mokufeli mobali oyo azalaki na litomba ya kozwa episikopo na asimba loboko na ye, alendisa ye, mpe ntango mosusu kopesa ye lipamboli ya nsuka? Nazangaki libaku wana mpamba te nakanisaki mosika ya botindiki makasi oyo uta na Molimo.4

Bandeko mibali mpe basi, bilenge mibali mpe bilenge basi, bana ya Eteyelo ya bana, natatoli ete kolanda bitinda ya Molimo ezali moko ya makambo maye mazali ya motuya mpenza kati na bozalani na biso nyonso.

Nsukansuka, na nsuka ya poso oyo ya Eyenga ya Mandalala, natatoli ete kozala ya kobongwana na Nkolo, kotatolaka na ntina na Ye, mpe kosalelaka Ye ezali lisusu kati na makambo maye mazali motuya mpenza.

Bondimi na Yesu Klisto ezali moboko ya matatoli na biso. Litatoli ezali elembo to bondimisami ya bosolo ya seko ekomami na mitema ya moto na moto mpe milimo na nzela ya Molimo Mosantu. Litatoli ya Yesu Klisto, abotamaki na mpe elendisami na Molimo, ebongolaka bomoi—ebongolaka lolenge tokanisaka mpe lolenge tobikaka. Litatoli, ebalusaka biso epayi ya Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye ya bonzambe.

Alama ateyaki:

“Tala, natatoli epai ya bino ete nayebi ete makambo wapi nalobi mazali ma solo. Mpe boniboni bobanzi ete nayebi bosolo bwa mango mpenza?

“Tala, nalobi epai na bino mayebisami epai ya ngai na Molimo Mosantu ya Nzambe. Tala, nakilaki bilei mpe nasambelaki mikolo mingi ete nakoka koyeba makambo maye ngaimei. Mpe sikawa nayebi ngaimei ete mazali solo; mpo Nkolo Nzambe asali mango mamonisama epai ya ngai na Molimo Mosantu mwa ye.”5

Kozala na litatoli yango moko ekoki te. Ntango mbongwana na biso na Yesu Klisto ekoli, tolingaka solo kotatola na ntina na Ye—bolamu, bolingo, mpe boboto na Ye.

Mbala mingi kati na mayangani na biso ya matatoli na Baeyenga ya kokila bilei, toyokaka maloba “Nazali na botondil” mpe “Nalingaka” mingi koleka toyokaka maloba “Nayebi” mpe “Nandimi.”

Nabengisi bino bopesa litatoli na bino ya Yesu Klisto mbala mingi koleka. Bopesa litatoli ya maye bino boyebi mpe bondimeli mpe maye bino boyokaka, kaka te na ntina ya maye bozaleli na botondi. Botatola na ntina ya makambo na binomei ya koya koyeba mpe kolinga Mobikisi, kosalelaka mateya na Ye, mpe nguya ya kosikola mpe ya kokokisa na Ye kati na bomoi na bino. Ntango botatolaka ya maye boyebi, bondimelaka, mpe boyokaka, Molimo Mosantu akondimisa bosolo na baye bayokaka mpenza litatoli na bino. Bakosala bongo mpamba te batalaki bino kokoma molandi ya kimia ya Yesu Klisto. Bakomona maye elimboli kozala moyekoli na Ye. bakoyoka lisusu eloko moko bakokaki te koyoka liboso. Litatoli ya solo eyaka uta na motema ya kobongwana mpe ekoki komemama na nguya ya Molimo Mosantu kati na mitema ya basusu oyo bazali ya kofungwama mpo na koyamba yango.

Baoyo bayokaka eloko moko lokola mbano ya litatoli bakoki bongo kosenga Nkolo kati na losambo mpo na kondima bosolo ya litatoli na bino. Nsima bakoki koyeba na bangomei.

Bandeko mibali mpe basi, natatoli mpe nazali nzeneneke epayi na bino ete nayebi ete Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili. Azali na bomoi. Azali mosekwi Mwana ya Nzambe, mpe oyo ezali Eklezia na Ye ekambami na profeta mpe bapostolo na Ye. Nasambeli ete mokolo mosusu ntango nakoleka na mokili oyo ya nsima, nasala bongo na litatoli na ngai kopelaka makasi.

Na mosala na ngai, nayekoli maye mazali motuya mpenza ezali bozalani na tata ya lola mpe Mwana na Ye ya Bolingo, mabota na biso, mpe bato na biso ya pembeni, mpe kopesaka nzela na Molimo ya Nkolo ekamba biso kati na bozalani wana mpo ete tokoka kotatola makambo maye mazali Motuya mpe mawumelaka ntango molayi Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Yoane 11:25.

  2. Tala biteni ya bondimi “Family,” “Unity,” mpe “Love” na Gospel Topics kati na Gospel Library kati na ChurchofJesusChrist.org mpona kotanga makomi mpe masolo ya baprofeta, mpe bakambi mosusu ya Eklezia etali mama ya likambo oyo.

  3. The Family: A Proclamation to the World,” ChurchofJesusChrist.org.

  4. Lisolo ya makambo oyo ezali kati na M. Russell Ballard, Anxiously Engaged: A Biography of M. Russell Ballard (2021), 90–91.

  5. Alma 5:45–46.