Likita Linene
Nsima ya Mokolo ya Minei
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Nsima ya Mokolo ya Minei

Lokola tozali kokende liboso na bondimi elongo na Yesu Klisto, mokolo ya minei ekoya ntango nyonso. Akoya ntango nyonso mpo na kosalisa biso.

Lokola bakundolisaki biso na ntongo, lelo ezali Eyenga ya Mandalala, kokembisaka bokoti ya Mobikisi kati ya Yelusaleme mpe ebandeli ya poso wana ya bule yambo ya Bomikabi na Ye monene, oyo ezali na bonyokwami na Ye, Bobakami mpe Lisekwa.

Kala te liboso Ye asakolaki bokoti na Ye kati ya engumba, Yesu Klisto amipesaki mobimba na etinda na Ye ntango Azwaki liloba kowuta na baninga na Ye ya bolingo Maliya mpe Malata ete ndeko na bango Lazalo azalaki maladi.1

Atako bokono ya Lazalo ezalaki makasi, Nkolo “atikalaki kaka wana mikolo mibale na esika moko oyo azalaki. Nsima na yango ayebisaki bayekoli na ye, Tozonga lisusu na Yudea.”2 Yambo ya kobanda mobembo na ndako ya baninga na ye’ na Betani, “Yesu ayebisaki bango polele ete, Lazalo azali ya kokufa.”3

Ntango Yesu akomaki na Betani mpe yambo Akutanaki na Malata, ntango mosusu na kozangaka kotala bosisoi ya boyei na Ye nsima ntango molai, bango nyonso bapesaki Ye mbote kolobaka, “Nkolo, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai alingaki kokufa te.”4 Malata alobaki, “Mpo, ntango oyo azali kolumba solo: mpo asi akufi uta mikolo minei.”5

Mikolo minei oyo ezalaki na ndimbola mpo na Maliya mpe Malata. Engebene na makanisi ya bakelasi basusu ya rabiniki, bazalaki kokanisa ete milimo ya bato bakufa ezalaki kotikala kati ya nzoto mikolo misato, kolikiaka ete bomoi ezalaki kaka na kati. Na yango, na mokolo ya minei wana elikya esilaki, ntango mosusu mpo nzoto ebandaki kopola mpe “kolumba.”6

Malia na Malata bazalaki na ezalela ya kozanga elikya. “Ntango Yesu amonaki [Malia] kolela, … ye ayokaki mawa mingi na nse ya motema, mpe abulunganaki,

“Mpe alobaki, Botiaki ye wapi? Bayebisaki ye, Nkolo, yaka mpe omona.”7

Ezali nde na ntango oyo wapi tomoni moko ya makamwisi minene na ntango ya mosala na Ye na bomoi. Yambo Nkolo alobaki, “Bolongola libanga.”8 Nsima ya kotonda Tata na Ye, “agangaki na mongongo makasi, Lazalo, bima.

“Mpe ye oyo azalaki mokufi alamukaki, maboko mpe makolo elingama na bilamba ya nkunda: mpe elongi na ye elingama na elamba.” Yesu alobaki na bango, Bofungola ye basinga mpe botika ye akende.”9

Lokola Maliya mpe Malata, tozali na libaku ya kokutana na makambu nyonso ya bokufi, atako bwale10 mpe botau.11 Moko na moko kati na biso akoyokisama motema mpasi oyo etambolaka na bobungisi ya moto songolo oyo tolingaka. Mobembo na biso ya bokufi ekoki kozala na bokono ya nzoto to bokono ya molingami mosusu; makanisi, bwale, to mikakatano mosusu ya bokono ya moto; mpasi ya mosolo, bozangi bosembo; lisumu. Ntango mosusu yango etambolaka na mayoki ya bozangi elikya. Nazali ya kokesena te. Lokola yo, nasila kokutana na funda ya fund ya mikakatano oyo tokoki kokutana na yango na bomoi oyo. Natutisami na lisakoli oyo etali Mobikisi mpe maye ezali koteya ngai na ntina ya mokangano na biso na Ye.

Na ntango ya mitungisi na biso ya makasi, biso, lokola Maliya mpe Malata, tolukaka Mobikisi to tosengaka Tata mpo na bokoteli na Ye ya bonzambe. Lisolo ya Lazalo eteyi biso mabongisi oyo ekoki koyela biso moko na bomoi ntango tokutani na mimekano na biso moko.

Ntango Mobikisi akomaki na Betani, bato nyonso babungisaki elikya ete Lazalo akokaki kobikisama—esalaki mikolo minei, mpe asi akendaki. Ntango mosusu mimekano na biso moko, tokoki koyoka lokola ete Klisto ayei nsima koleka, mpe elikya mpe bondimi ekoki kutu komekama. Litatoli mpe bonzeneneke na ngai ezali ete lokola tozali kokende liboso na bondimi na Yesu Klisto, mokolo ya minei ekoya ntango nyonso. Ye akoya ntango nyonso mpo na kosalisa biso to kolamusa elikya na biso ezonga na bomoi. Ye alakaki:

Y“Tika ete mitema na bino mitungisama te.”12

“Nakotika bino lokola bana etike te: nakoya epayi na bino.”13

Ntango mosusu ekoki komonana lokola ete Ye akoya epayi na biso te kino na mokolo ya minei, nsima ya kobungisa elikya nyonso. Kasi mpo na nini ngonga esilaki koleka? Mokambi Thomas S. Monson ateyaki, “Tata na biso ya Lola, oyo apesaka biso mingi boye mpo na kosepela na yango, lisusu ayebi ete tokoyekola mpe tokokola mpe tokokoma makasi mingi koleka ntango tokutani mpe totelemeli mimekano na kati na yango tosengeli koleka.”14

Kutu Profeta Joseph Smith akutanaki na mokolo ya minei ya ndenge ebele. Bomikundoli libondeli na ye? “O Nzambe, ozali wapi?” Mpe wapi kisuku oyo ezipaka ebombelo na yo?”15 Ntango tondimelaka Ye, tokoki kozela eyano: “Mwana na ngai ya mobali [to mwana mwasi], kimia ezala na kati ya molimo na yo; mikakatano na yo mpe mitungisi na yo ekozala kaka na ngonga moke.”16

Nsango mosusu tokoki koyekola uta na lisolo ya Lazalo ezali maye mosala na biso moko ekoki kozala na bokoteli ya bonzambe oyo tolukaka. Ntango Yesu apusanaki na lilita, Ye yambo alobaki epayi na baoyo bazalaki wana, “Bolongola libanga.”17 Na nguya oyo Mobikisi azalaki na yango, akokaki te Ye kongola na lolenge ya kokamwa libanga na bozangi bokasi? Yango ezalaki likambo ya kokamwa na bomoni mpe boyebi moko ya kobosana te, nsima Ye alobaki na basusu, “Bolongola libanga.”

Ya mibale, Nkolo, “agangaki na mongongo makasi, Lazalo, bima libanda.”18 Elingaki yanngo te kokamwisa soki Nkolo, Ye moko, na lolenge ya kokamwa atiaki Lazalo na bofungwami mpo ete akoka mbala moko komonana na miso ya bato ntango libanga elongolamaki?

Ya misato, ntango Lazalo abimaki libanda, ye “alingamaki na maboko mpe makolo na bilamba ya bokundeli: mpe elongi na ye elingamaki na elamba. Yesu alobaki na bango, Bofungola ye, mpe botika ye akende.”19 Nakanisi solo ete Nkolo azalaki na makoki ya kolamusa Lazalo na bofungwami, peto mpe na bilamba na ye ya bokundeli ya kogumbama malamu.

Mpo na nini natangi makambo nyonso oyo? Moko na moko ya makambo misato oyo ezali na ndimbola na yango—moko te esengaki nguya ya bonzambe ya Klisto. Oyo bayekoli na Ye bakokaki kosala, Ateyaki bango basala. Bayekoli bazali ya solo na makoki ya kolongola libanga bango moko; Lazalo, nsima ya kolamusama, azalaki na makoki ya kotelema mpe komilakisa ye moko na bofungwami ya nkunda; mpe baye balingaki Lazalo bakoki kosunga mpenza ye alongola bilamba ya bokundeli.

Na yango, ezalaki bobele Klisto oyo azalaki nguya mpe likoki ya kolamusa Lazalo uta na bawei. Mayoki na ngai ezali ete Mobikisi azelaka biso tosala manso tokoki kosala, mpe Ye akosala oyo Ye moko akoki kosala.20

Toyebi ete “bondimi [na Nkolo Yesu Klisto] ezali mobeko ya mosala”21 mpe “makamwisi epesaka bondimi, kasi bondimi makasi emataka na botosi ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Na maloba mosusu, bondimi eyaka na boyengebene.”22 Ntango tozali kosala makasi mpo na kosala na boyengebene na kosalaka mpe kobatelaka mayokani na biso ya bule mpe kosalela malongi ya Klisto na bomoi na biso, bondimi na biso ekozala kaka te ya kokoka mpo na komema biso na mokolo ya minei, kasi elongo na lisungi ya Nkolo tokozala na makoki ya kolongola mabanga oyo ezali na nzela na biso, oyo etiami na boyokisi mpasi, mpe komilongola nyonso oyo ezali kokanga biso. Ntango Nkolo azali kozela biso “tosala makambo nyonso oyo tokoki na nguya na biso moko,”23 bomikundola ete Ye akopesa lisungi oyo esengeli na makambo nyonso ntango tondimeli Ye.

Lolenge nini tokoki kolongola mabanga mpe kotonga likolo ya libanga na Ye?24 Tokoki kokangama na toli ya baprofeta.

Ndakisa, na likita eleki ya Sanza ya zomi Mokambi Russell M. Nelson asengaki biso tomema matatoli na biso moko ya Mobikisi mpe nsango malamu na Ye, kosala mpo na yango mpe kokolisa yango, koleisa yango na bosolo, mpe koboya kobebisa yango na malongi ya lokuta ya bapagano. Alakaki moko na moko na biso, “Ntango bozali kokoba kolendisa litatoli na bino ya yesu Klisto mpo ezala likambo ya liboso ya likolo mpenza, tala makamwisi esalama na bomoi na bino.25

Tokoki kosala oyo!

Lolenge nini tokoki kolamuka mpe kobima libanda? Tokoki na esengo koyambola mpe kopona kotosa mitindo. Nkolo alobaki, “Ye oyo azwi mitindo mya ngai, mpe abombi yango, azali ye oyo alingaka ngai: mpe ye oyo alingaka ngai bakolinga ye na Tata wa ngai, mpe nakolinga ye, mpe nakomimonisa epayi na ye.”26 Tokoki koluka koyambola mokolo na mokolo mpe na esengo kokende liboso na motema ya bolingi etondisama na bolingo mpo na Nkolo.

Tokoki kosala oyo!

Lolenge nini tokoki, na lisungi ya Nkolo, komilongola biso moko maye manso ekangaka biso? Tokoki na likanisi malamu komikangisa biso moko yambo mpe yambo ya nyonso na Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, na nzela ya mayokani. Mpaka D. Todd Christofferson ateyaki: “Nini ezali liziba ya nguya [na biso] ya bomoto mpe ya molimo, mpe lolenge nini tozwaka yango? Liziba ezali Nzambe. Nzela na biso na kokoma na nguya wana ezali na nzela ya mayokani na biso na Ye. … Na mayokani wana ya bonzambe, Nzambe amikangisaka Ye moko mpo na kosunga, kosantisa, mpe konetola biso na bozongisi mpo na bomipesi na biso ya kosalisa Ye mpe kobatela mitindo na Ye.”27 Tokoki kosala mpe kobatela mayokani ya bule.

Tokoki kosala oyo!

“Bolongola libanga.” “Bima libanda.” “Bofungola ye bsinga mpe botika ye akende.”

Toli, mitindo, mpe mayokani. Tokoki kosala oyo!

Mpaka Jeffrey R. Holland alakaki, “Mapamboli misusu eyaka na lombangu, misusu eyaka nsima, mpe misusu eyaka mpe te kino likolo; kasi mpo na baoyo bandimelaka nsango malamu ya Yesu Klisto, eyaka.”28

Mpe na nsuka, “Na yango, bozala malamu, mpe bobanga te, mpo ngai Nkolo nazali elongo na bino, mpe nakotelema pene na bino.”29

Oyo ezali litatoli mpe bonzeneneke na ngai, na kombo ya bule ya Ye oyo akozonga kaka, kutu Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Yoane 11:3.

  2. Yoane 11:6–7.

  3. Yoane 11:14.

  4. Yoane 11:21, 32.

  5. Yoane 11:39.

  6. “Molimo, engebene na boyambi ya Bayuda, efandaka na kati ya nzoto mikolo misato nsima ya bokufi. Engebene na makanisi ya Bayuda, elingi koloba, matanga ya moto oyo akufi esengelaki kosalama te na mokolo ya minei, mpo ete molimo ezali lisusu te na kati ya nzoto oyo ebongwani. Ezalaki kokamwa mpenza na banzeneneke ya bikamwisi oyo Yesu Klisto alamusaki Lazalo na mokolo ya minei. Mokolo ya minei bongo ezali na ndimbola ya sikisiki awa mpe ezwami na mbalakaka na molobeli mpo na kosalela na mokangano na moko ya makamwisi ya lisekwa” (Ernst Haenchen, John 2: Liloba na Nsango malamu ya Yoane, Mikapo 7–21ed. Robert W. Funk mpe Ulrich Busse, trans. Robert W. Funk [1984], 60–61).

  7. Yoane 11:33–34.

  8. Yoane 11:39.

  9. Yoane 11:43–44.

  10. Tala Moses 4:22–25.

  11. Tala Etele 12:27

  12. Yoane 14:1.

  13. Yoane 14:18

  14. Thomas S. Monson, “I Will Not Fail Thee, nor Forsake Thee,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 87. Mokambi Monson alimbolaki lisusu ete: “Toyebi ete ezali bantango oyo tokomona mawa ya mpasi na motema, ntango tokozwa kpokoso, mpe ntango tokoki komekama kino na bandelo na biso. Nzokande, kpokoso ya boye ekopesa biso nzela tobongwana mpo na bolamu mingi koleka, mpo na kotonga lisusu bomoi na biso na lolenge Tata na biso ya lola akoteya biso, mpe mpo na kokoma eloko moko ya bokeseni na nini tozalaki—malamu mingi koleka ndenge tozalaki, na bososoli mingi koleka ndenge tozalaki, na mawa mingi koleka ndenge tozalaki, na matatoli ya bokasi mingi koleka ndenge tozalaki na yango liboso” (“I Will Not Fail Thee, Nor Forsake Thee,” 87). Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 84:119: “Mpo Ngai, Nkolo nasembolaki loboko na ngai mpo na komonisa banguya ya lola; bokoki komona yango sikawa te, kasi na ntango moke mpe bokomona yango, mpe bokoyeba ete Nazali, mpe Nakoya.”

    Tala lisusu Moziya 23:21–24:

    “Nzokande Nkolo amoni elongobani kotumbola bato ba ye; iyo, ameki bompikiliki bwa bango mpe bondimi bwa bango.

    “Nzokande---onso oyo akotia elikia ya ye na ye, ye kaka akotombolama likolo o mokolo mwa nsuka. Iyo, mpe boye ezalaki na bato baye.

    “Mpo tala, nakolakisa epai ya bino ete bamemeki bango o kati ya bowumbu, mpe moko te akokaki kobikisa bango kaka Nkolo Nzambe wa bango, iyo, kutu Nzambe wa Abalayama mpe wa Yisaka mpe wa Yakobo.

    “Mpe esalemaki ete abikisaki bango, mpe alakisaki nguya ya ye monene epai ya bango, mpe enene ezalaki bosepeli bwa bango.”

  15. Malongi mpe Mayokani 121:1.

  16. Malongi mpe Mayokani 121:7.

  17. Yoane 11:39.

  18. Yoane 11:43.

  19. Yoane 11:44.

  20. Mokambi Nelson M. Nelson amonaki: “Mbala mingi, bapesi toli na ngai mpe ngai totalaki na misu etondisama na mpinzoli ntango Ye azalaki kobondisa na mabaku ya mpasi mpenza nsima tosalaki makoki na biso mpe tokokaki kosala ya koleka te Totelemaka mpenza banso ya kokamwa” (“Welcome Message,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 6).

  21. Bible Dictionary, “Faith.”

  22. Mokambi na Makomi, “Faith,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org.

  23. Malongi mpe Mayokani 123:17.

  24. Tala 3 Nefi 11:32–39.

  25. Russell M. Nelson, “Overcome the World and Find Rest,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2022, 97.

  26. Yoane 14:21.

  27. D. Todd Christofferson, “The Power of Covenants,” Liahona, Sanza ya mitano 2009, 20.

  28. Jeffrey R. Holland, “An High Priest of Good Things to Come,” Liahona, Sanza ya yambo. 2000, 45.

  29. Malongi mpe Mayokani 68:6.