Likita Linene
Esimbelo ya Kimoklisto
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Esimbelo ya Kimoklisto

“Mpe atelemaki, mpe agangelaki mopepe, mpe alobaki na mbu, Kimya, ezala. Mpe mopepe esilaki, mpe kimya makasi ekotaki” (Malako 4:39).

Mbala ya nsuka oyo nalobaki na kati ya likita linene, bokilo na ngai ya mobali (mobali ya mwana na ngai) Ryan alakisaki ngai nsango moko elobaki, ya “Solo? Nkombo ya mobali wana ezali Bragg”—elakisi “komilakisa”—“ mpe azalaki kolobela na ntina ya bomikitisi te? Bobebisi nini!” Na mawa, boyokisi motema mpasi ekobaki.

Elilingi
Don Bragg lokola Mobti Ndembo ya Basketi

Tata na ngai ya malamu azalaki mobeti basiketi ya All-America ya UCLA na nse ya Molakisi John Wooden. Batikalaki elongo pene na bomoi ya tata na ngai, mpe na mbalakaka Molakisi mpe mama. Wooden asengelaki koya na ndako na biso mpo na kolia. Azalaki ntango nyonso na esengo ya kobetela ngai masolo ya basiketi to makambo mosusu eye ezalaki na makanisi na ngai. Ntango natunaki ye toli nini azalaki na yango mpo na ngai ntango nabandaki kelasi na ngai ya Sekondere. Ntango nyonso molakisi, alobaki, “Tata na yo ayebisaki ngai ete akotaki na Eklezia ya Yesu Klisto, nabanzi ete ozali na bondimi na Nkolo. Na bondimi wana yeba kozala na esimbelo na mabaku nyonso. Zala mobali malamu na ntango ya mbonge.”

Nsima ya mibu, lisolo wana etikalaki kati na ngai. Toli wana ya kozala kimya, na limemia mpe bompikiliki na mabaku nyonso, mingi mingi na ntango ya momekano mpe mpasi, etutaki makanisi na ngai. Nakokaki komona lolenge baekipi ya Molakisi Wooden ezalaki kobeta na esimbelo mpe bolongi monene oyo balongaki manzanza ya bikolo mbala zomi.

Kasi esimbelo elobelamaka lisusu mingi te na mikolo oyo mpe basalelaka yango kutu ndambo na bantango ya mbonge mpe mikakatano. Esalamaka mingimingi na masano—mosani oyo azalaka na esimbelo azali na mpifo na lisano ya makasi to ekipi ezangaka bolongi mpo na bozangi esimbelo. Lolenge oyo ya motuya esengaka ezala kati ya masano. Esimbelo esengaka esaleli makasi na bomoi mpe ekoki kopambola baboti, bakambi, bamisionele, bateyi, bayekoli, mpe moto nyonso oyo akutani na bikumbaki na bomoi.

Esimbelo ya molimo epambolaka biso totikala kimya mpe totalela bobele oyo ezali ntina koleka, mingi mingi ntango tokutani na nkpokoso. Mokambi Hugh B. Brown ateyaki, “Bondimi na Nzambe mpe na nkembo ya bosembo ya nsuka, esungaka na makanisi mpe esimbelo ya molimo liboso ya bampasi.”1

Mokambi Russell M. Nelson azali ndakisa malamu ya esimbelo ya molimo. Na eleko, wana ezalaki ye nDokotolo Nelson azalaki kosala lipaso ya misisa minei ya motema, ntango makila ya mokoni ekitaki makasi na mbala moko. Dokotolo. Nelson na kimya nyonso akitisaki likambo na nse mpe amonaki ete pensi moko elongolamaki na mbalakaka epai ya monganga moko ya ekipi. Ezongisamaki na lombango, mpe Dokotolo. Nelson alendisaki monganga ya ekipi, kolobaka, “Nakobaka kolinga yo,“ mpe abakisaki na lolenge ya lisano, “Ntango mosusu nalingaka yo mingi koleka bambala mosusu!” Alakisaki lolenge kobikisa na lombango esengelaki kosalama—na esimbelo, talelaka bobele oyo ezali ntina koleka—kolakisaka kobikisa na lombango. Mokambi Nelson alobaki: “Ezali likambo ya komipesa yo moko makasi. Likanisi na yo ya bomoto ezali, ‘Bimisa ngai, molakisi! Nalingi nazonga na ndaku.’ Kasi ya solo okoki te. Bomoi elandelamaka na ekipi mobimba esali lipaso. Na yango osengeli kotikala kimya mpe kopema mpe na mpiko makasi.”2

Ya solo, Mobikisi azali ndakisa ya nsuka ya esimbelo.

Kati ya Elanga ya Getesemana, kati ya bwale makasi, ntango “azalaki kotoka lokola ezalaki na matanga minene ya makila,”3 Alakisaki ndakisa ya esimbelo ya bonzambe na esakola moko ya pete kasi etonda na nguya, “Bolingi na ngai te, kasi ya yo nde, esalama.”4 Na nse ya etinda monene ya kopesa ndingisa na libiki ya bato banso, Yesu alakisaki ndenge misato ya ntina oyo esalisaka biso tososola esimbelo na Ye monene. Ya yambo, Ye ayebi oyo Ye azalaki mpe oyo ezalaki solo na etinda na Ye ya bonzambe. Oyo elandi, Ye ayebi ete ezalaki na mwango monene ya esengo. Mpe na nsuka, Ye ayebaki ete na nzela ya Bomikabi na Ye ezanga nsuka, oyo nyonso na bondimi na ye amemi nkanga na ye epai na Ye na kosalaka mpe kobombaka mayokani ya bule eye ezwami na nzela ya makuli ya bonganganzambe akobikisama, lokola eteyamaki lelo na lolenge ya kitoko mpenza na Mpaka Dale G. Renlund.

Na bokokanisi bobungisi mpe kotikala na esimbelo, banza na ntina ya maye esalamaki ntango Klisto mpe Bapostolo na Ye batikaki Elanga ya Getesemane. Ntango bakutanaki na basoda mpo bakanga Yesu, eyano ya Petelo ezalaki ya kobungisa esimbelo mpe kotika na botomboki kokata litoyi ya mosali moko ya monene ya nganganzambe, Malikusi. Eyano ya Yesu Klisto, na ngambo mosusu, ezalaki ya kobatela esimbelo na Ye mpe kotia kimya na likambo wana na kobikisaka Malikusi.5

Mpe mpo na baoyo ya biso baye balembi mpo na kosimba esimbelo na biso mpe ntango mosusu basili kolemba na bango, kanisalisolo oyo etikali ya Petelo. Ntango moke nsima ya likama eye mpe bopaswami motema ya kowangana kimoninga na ye na Klisto,6 Petelo atelemaki liboso ya bakambi kaka wana ya bonzambe oyo bapesaki Mobikisi kufa, mpe na esimbelo monene na nse ya monguna ye atatolaki litatoli monene ya bonzambe ya Yesu Klisto.7

Yeba Oyo Yo Ozali mpe Zala Solo na Bomoto na Yo ya Bonzambe.

Tika tobanza na ntina ya makambo esimbelo ya lolenge ya Klisto. Mpo na kobanda, koyebaka oyo tozali mpe kozala solo na bomoto na biso ya bonzambe ememaka kimya. Esimbelo na lolenge ya Klisto esengaka ete toboya komikokanisa na basusu to kolakisa lokola tozali moto mosusu oyo tozali te.8 Joseph Smith ateyaki, “soki bato basosoli te ezalela ya Nzambe, bango basosoli oyo bazali te.”9 Ezali malamu te kozala na esimbelo ya bonzambe na bozangi koyeba oyo biso tozali mpe bana mibali ya bonzambe mpe bana basi ya bolingo ya Tata na biso na Lola.

Na lisikulu eye “Maponi mpo na Boseko,” Mokambi Nelson ateyaki ete babosolo ya seko na ntina ya oyo biso tozali: tozali bana ya Nzambe, tozali bana ya liyokani, mpe tozali bayekoli ya Klisto. Na nsima Ye alakaki, “Ntango boyambi babosolo oyo, Tata na biso ya Lola akosalisa bino bozwa ntina na bino ya nsuka ya kobika seko liboso na Ye esantu.”10 Tozali bato ya molimo ya bonzambe oyo bazali na boyebi ya bokufi. Koyebaka oyo biso tozali mpe kozala solo na bomoto wana ya molimo ezali moboko na bokoli ya esimbelo ya Kimoklisto.

Boyeba Ete Ezali na Mwango ya Bonzambe

Oyo elandi, kokundolaka ete ezali na mwango monene, epesaka bokasi mpe esimbelo na ntango ya mikakatano. Nefi akokaki “kokende mpe kosala”11 lokola Nkolo atindaki “koyebaka te maye akokuta”12 makambo maye asengelaki kosala mpo ete ayebaki ete asengelaki kokambama na Molimo, ya bokokisi mwango ya seko ya Tata ya bolingi ya Lola. Esimbelo eyaka ntango tomonaka makambo kouta na bomoni ya seko. Nkolo ateyaki bayekoli na Ye “botombola misu na bino likolo”13 mpe “botika ete molulu ya boseko ezala kati ya makanisi na bino.”14 Na bolongi bantango ya mikakatano na mwango ya seko, momekano ekomaka libaku ya kolinga, kosalisa, koteya, mpe kopambola. Bomoni ya seko epesaka ndingisa na esimbelo ya Kimoklisto.

Yeba Nguya ya Likoki ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye

Mpe na nsuka, nguya ya likoki ya Klisto, ekokisamaka na libonza ya bomikabi na Ye, epesaka biso makasi ya koyika mpiko mpe kotalela. Na ntina na Yesu Klisto tokoki koyokana na Nzambe mpe kolendisa na kobatelaka liyokani wana. Tokoki kokangama na Mobikisi na esengo mpe kimya, kotala te oyo tozali.15 Mokapo 7 ya Alma etei malamu mpenza na ntina ya nguya ya likoki ya Klisto. Na kobakisa kosikola biso uta na masumu, Mobikisi akoki kolendisa biso na botau na biso, bobangi, mpe mimekano na biso na bomoi.

Ntango totaleli Klisto, tokoki kolonga bobangi na biso, lokola bato ya Alma basalaki na Elamani.16 Lokola mampinga ya kobunda esangisami, baye bayekoli ya bosembo ya Klisto balakisaki kosimbama. Mpaka David A. Bednar ateyaki: “Alma ateyaki bandimi bakundola Nkolo mpe Akokaki kopesa bobele lisiko. Mpe boyebi ya bobateli ya Mobikisi mobateli bokolongolo epesaki makoki na bato bakitisa babobangi na bangomei.”17 Yango elakisi esimbelo.

Moto ya Makasi kati ya Ekumbaki

Nowa ateyaki mingi etali bompikiliki kati ya ekumbaki, kasi Mobikisi azalaki moteyi monene na lolenge nini ya kobika kati ya ekumbaki. Azali moto ya makasi kati ya ekumbaki. Nsima ya mokolo molai ya boteyi elongo na Bayekoli na Ye, Mobikisi asengelaki na mwa bopemi mpe asengaki bakatisa na masuwa na ngambo mosusu ya mbu ya Galileya. Ntango Mobikisi apemaki, ekumbaki monene eyaki. Ntango mopepe mpe mbonge emekaki kotiolisa masuwa, Bapostolo babandaki kobanga mpo na bomoi na bango. Mpe namikundoli, mingi ya Bapostolo bazalaki balobi mbisi oyo bayebaki malamu bikumbaki na mbu wana! Nzokande, bwale,18 balamusaki Nkolo mpe basengaki, “[Nkolo], tala ete totiola te?” Nsima, na ndakisa ya esimbelo, Mobikisi “alamukaki, mpe agangelaki mopepe, mpe alobaki na mbu, Kimya, ezala. Mpe mopepe ekitaki, mpe ezalaki na … kimya makasi.”19

Mpe liteya monene ya esimbelo mpo na Bayekoli na Ye. Atunaki, “Mpo na nini bozali kobanga? mpo na nini bozali na bondimi te?”20 Azalaki kokundola bango ete Ye azalaki Mobikisi ya mokili, mpe ete Ye atindamaki na Tata mpo na kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya bana ya Nzambe. Ya solo, Mwana ya Nzambe akokaki te kowa na masuwa. Alakisaki ndakisa ya esimbelo ya bonzambe mpo ete Ye ayebaki bonzambe na Ye mpe Ayebaki ete ezalaki na mwango ya libiki mpe bonetoli mpe lolenge nini ezali ntina Bomikabi na Ye esengelaki kozala mpo na bolongi ya mwango ya bomoi ya seko.

Ezali na nzela ya Klisto mpe ya Bomikabi na Ye nde makambo malamu eyaka kati ya bomoi na biso. Ntango tomikundoli nani tozali, koyebaka ete ezali na mwango ya bonzambe ya mawa, mpe koyekamela mpiko kati ya bolendisi ya Nkolo, tokoki kosala makambo nyonso. Tokozwa kimya. Tokozala basi mpe mibali ya malamu kati ya ekumbaki nyonso.

Tokoki koluka lipamboli ya esimbelo ya Klisto, kaka te bobele mpo na kosalisa biso moko na ntango ya mimekano, kasi mpo na kopambola basusu mpe kosalisa bango na nzela ya mipepe makasi na babomoi na bango. Na ebandeli oyo ya Eyenga ya Mandalala, natatoli na ntina ya Yesu Klisto. Ye asekwi. NatatolI na ntina ya kimia, limemia, mpe esimbelo ya lola oyo Ye amemaka na bomoi na biso na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Hugh B. Brown,” kati na Conference Report, sanza ya zomi 1969, 105.

  2. Tala Sheri Dew, Insights from a Prophet’s Life: Russell M. Nelson (2019), 66–67.

  3. Bobongoli ya Joseph Smith, Luka 22:44 (na Luka 22:44, makomi ya nse b).

  4. Luka 22:42.

  5. Tala Luka 22:50–51; Yoane 18:10–12.

  6. Tala Matai 26:34–35, 69–75.

  7. Tala Misala 4:8–10; Neal A. Maxwell, “Content with the Things Allotted unto Us,” Ensign, Sanza ya mitano 2000, 74; Liahona, Sanza ya sambo 2000, 89: “When spiritually aligned, a poise can come, even when we do not know ‘the meaning of all things’ [1 Nephi 11:17].”

  8. Tala John R. Wooden, Wooden on Leadership (2005), 50: “I define poise as being true to oneself, not getting rattled, thrown off, or unbalanced regardless of the circumstance or situation. Yango ekoki koyokana pete, kasi Esimbelo ekoki kozala ndakisa malamu na bantango ya mimekano. Bakambi bazangaka Esimbelo na bobangi na nse ya mpasi.

    “Esimbelo elingi koloba kosimba makasi na boyambi na yo mpe kosala engebene na yango, kotala te lolenge nini mabe to malamu nini likambo ekoki kozala. Esimbelo elingi koloba koboya kopema to kozala lokuta, komikokanisa yomei na basusu, mpe kosalaka lokola moto songolo oyo azali yo te. Esimbelo elingi koloba kozala motema makasi na mabaku nyonso.”

  9. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 40.

  10. Russell M. Nelson, “Choices for Eternity” (worldwide devotional for young adults, May 15, 2022), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.

  11. 1 Nefi 3:7.

  12. 1 Nefi 4:6.

  13. Yoane4:35.

  14. Doctrine and Covenants 43:34; tala lisusu James E. Faust, “The Dignity of Self,” Ensign, Sanza ya mitano 1981: “Bolongobani ya moto yemei ezali ntina monene na kotalaka likolo ya boluki ya bosantu. Lokola nzete misato ya minene, tokoki kotanga mpo na pole. Liziba ya motuya ya pole oyo tokoki koya koyeba ezali likabo ya Molimo Mosantu. Ezali liziba ya bolongi makasi mpe kimia.

  15. Tala Russell M. Nelson, “Joy and Spiritual Survival,” Liahona, Nov. 2016, 82: “Bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, esengo toyokaka ezali moke oyo toyokaka etali makambo ya bomoi na biso mpe nyonso etali makambo ya bomoi na biso.”

  16. Tala Mosiya 23:27–28.

  17. David A. Bednar, “Therefore They Hushed Their Fears,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 46–47.

  18. Tala Jeffrey R. Holland, Our Day Star Rising: Exploring the New Testament with Jeffrey R. Holland (2022), 61–62: “Basusu wana, bango bazalaki bato oyo bayebi mosala malamu na kati elongo na Ye—zomi na moko ya Bazomi na mibale ya ebandeli bazalaki Balileya (longola kaka Yuda Moteki azalaki Moyudea). Motoba ya bato oyo zomi na moko bazalaki balobi mbisi. Mpe bazalaki kofanda na etima oyo. Babikaki bomoi na bango na kolobaka mbisi. Bazalaki wana uta bazalaki bana mike. Batata na bango bazalaki kosala minyama mpo na bango mpe bazalaki kobongisa ba masuwa ntango bazalaki bilenge mpenza. Bayebi mbu oyo; bayebi mipepe mpe bambonge. Bazali bato oyo bayebi makasi—kasi bazali kobanga. Mpe soki bango bazali kobanga, ekumbaki eyebani.”

  19. Tala Malako 4:35–39.

  20. Malako 4:40.